Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 50

Yehova azwi ebongiseli mpo na kopesa yo bonsomi

Yehova azwi ebongiseli mpo na kopesa yo bonsomi

“Bosengeli . . . kosakola bonsomi na mokili epai ya bato na yango nyonso.”​—LEV. 25:10.

LOYEMBO 22 Bokonzi ezali koyangela​—Tiká eya!

NA MOKUSE *

1-2. (a) Yubile ezali nini? (Talá etanda “ Yubile ezalaki nini?”) (b) Yesu alobelaki nini na Luka 4:16-18?

NA BIKÓLO mosusu, basalaka milulu minene na mbula ya 50 ya boyangeli ya mokonzi moko. Mbala mingi, fɛti oyo basalaka na mbula ya 50 ebengamaka mbula ya Yubile ya mokonzi. Milulu ya Yubile ekoki kosalema mokolo moko, to mpe pɔsɔ moko to koleka, kasi nsukansuka esilaka, mpe eumelaka te mpo bato bábosana esengo oyo bayokaki.

2 Na lisolo oyo, tokolobela Yubile ya malamu mpenza, oyo eleki ata Yubile oyo ezalaki koumela mbula mobimba, oyo ezalaki kosalema nsima ya mbula 50 nyonso na Yisraele. Yubile yango ya ntango ya kala ezalaki kopesa Bayisraele bonsomi. Mpo na nini tosengeli kolobela yango? Mpo Yubile ya mbula mobimba oyo ezalaki kosalema na Yisraele ekundwelaka biso ebongiseli moko ya malamu oyo Yehova azwi banda sikoyo mpo na kopesa biso bonsomi oyo ekoumela seko, bonsomi oyo Yesu mpe alobelaki.​—Tángá Luka 4:16-18.

Yubile na Yisraele ezalaki kopesa esengo, mpo baombo bazalaki kozonga na mabota mpe na mabele na bango (Talá paragrafe 3) *

3. Ndenge emonisami na Balevi 25:8-12, matomba nini Bayisraele bazalaki kozwa na mbula ya Yubile?

3 Mpo tókanga ntina ya makambo oyo Yesu alobaki ntango alobelaki bonsomi, tólobela liboso ebongiseli ya Yubile oyo Nzambe atyaki mpo na bato na ye ya ntango ya kala. Yehova ayebisaki Bayisraele ete: “Bosengeli kosantisa mbula ya ntuku mitano (50) mpe kosakola bonsomi na mokili epai ya bato na yango nyonso. Ekokóma Yubile mpo na bino, mpe bosengeli kozonga moto na moto na mabele na ye mpe bokozonga moto na moto na libota na ye.” (Tángá Balevi 25:8-12.) Na lisolo oyo eleki, tomonaki matomba oyo Bayisraele bazalaki kozwa na Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ. Kasi, matomba nini Bayisraele bazalaki kozwa na Yubile? Tózwa ndakisa ete Moyisraele moko akɔtaki nyongo, mpe nsukansuka esɛngaki atɛka mabele na ye mpo na kofuta nyongo yango. Na mbula ya Yubile, basengelaki kozongisela ye mabele na ye. Na yango, moto yango akokaki ‘kozonga na mabele na ye,’ mpe alingaki kozanga te libula ya kotikela bana na ye. Ndakisa mosusu​—moto oyo azalaki na banyongo minene akokaki kotɛka moko ya bana na ye, ata mpe ye moko, na boombo mpo afuta nyongo. Na mbula ya Yubile, moombo asengelaki ‘kozonga na libota na ye.’ Na yango, moto moko te akokaki kozala moombo libela na libela, kozanga elikya! Ya solo, Yehova atyelaka mpenza bato na ye likebi!

4-5. Mpo na nini tosengeli koyekola makambo etali Yubile?

4 Litomba mosusu ezalaki nini? Yehova alobaki boye: “Moto moko te asengeli kokóma mobola epai na yo, mpamba te Yehova akopambola yo mpenza na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo lokola libula mpo na kozwa yango.” (Mib. 15:4) Yango ekeseni mpenza na makambo oyo esalemaka lelo na mokili, epai bazwi bazali se kokóma bazwi, mpe babola bazali se kokóma babola!

5 Lokola tozali bakristo, tozali na nse ya Mibeko ya Moize te. Yango elakisi ete tolandaka te ebongiseli ya Yubile ya kala oyo esɛngaki kopesa baombo bonsomi, kolongola banyongo, mpe kozongisela bato mabele na bango. (Rom. 7:4; 10:4; Ef. 2:15) Atako bongo, ezali na ntina tóyekola makambo etali Yubile. Mpo na nini? Mpo tokoki kozwa bonsomi oyo ekundwelaka biso ebongiseli wana oyo Yehova atyaki mpo na Bayisraele.

YESU ASAKOLAKI ETE BATO BAKOZWA BONSOMI

6. Tosengeli kosikolama na nini?

6 Biso nyonso tosengeli kosikolama na boombo moko ya mabe mpenza: boombo ya lisumu. Lokola tozali bato ya masumu, tokoki konuna, kobɛla, mpe kokufa. Bato mingi bamonaka bosolo ya likambo yango ntango bamitali na talatala to ntango bakei kozwa lisalisi ya monganga. Lisusu, tolɛmbaka nzoto ntango tosali lisumu. Ntoma Paulo andimaki ete nzoto na ye ezalaki “komema [ye] mokangami epai ya mobeko ya lisumu.” Abakisaki ete: “Ngai moto ya mawa! Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali komema ngai na liwa?”​—Rom. 7:23, 24.

7. Yisaya asakolaki nini mpo na bonsomi?

7 Likambo ya esengo, Nzambe azwaki ebongiseli moko mpo na kosikola biso na boombo ya lisumu. Tokoki kozwa bonsomi yango kaka na nzela ya Yesu. Mbula koleka 700 liboso Yesu aya awa na mabele, mosakoli Yisaya asakolaki bonsomi monene oyo bato bakozwa na mikolo ezali koya. Bonsomi yango ya monene ekosala makambo ebele koleka bonsomi oyo ezalaki kopesama na mbula ya Yubile na Yisraele. Akomaki boye: “Elimo ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ezali na ngai, mpo Yehova atye ngai mafuta mpo nayebisa bato ya komikitisa nsango malamu. Atindi ngai nakanga mpota ya bato oyo bazoki na mitema, nasakola bonsomi epai ya baoyo bakangami.” (Yis. 61:1) Esakweli yango ekokisamaki epai ya nani?

8. Esakweli ya Yisaya oyo elobeli bonsomi ekokisamaki epai ya nani?

8 Esakweli yango ya ntina mingi oyo etali bonsomi ebandaki kokokisama ntango Yesu abandaki mosala na ye awa na mabele. Ntango akendaki na sinagoga ya mboka na ye Nazarete, Yesu atángelaki Bayuda oyo bazalaki wana maloba yango ya esakweli ya Yisaya. Yesu alobaki ete maloba ya vɛrsɛ yango ekokisamaki epai na ye moko; alobaki: “Elimo ya Yehova ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu, atindi ngai mpo nasakwela baoyo bakangami kosikolama mpe nafungola miso ya bato oyo bakufá miso, mpo natika bato oyo batutamá bákende na bonsomi, mpo na kosakola mbula ya kondimama na Yehova.” (Luka 4:16-19) Ndenge nini Yesu akokisaki esakweli yango?

BATO YA LIBOSO MPO NA KOZWA BONSOMI

Na sinagoga ya Nazarete, Yesu asakoli ete bato bakozwa bonsomi (Talá paragrafe 8-9)

9. Na ntango ya Yesu, bato mingi bazalaki kozela kosikolama ya ndenge nini?

9 Kosikolama, to bonsomi, oyo Yisaya asakolaki mpe oyo Yesu atángaki na tempelo ebandaki kopesama na siɛklɛ ya liboso. Yesu amonisaki yango polele ntango alobaki ete: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.” (Luka 4:21) Mbala mosusu, bato mingi oyo bayokaki makambo oyo Yesu atángaki bazalaki kozela mbongwana esalema na makambo ya politiki, mpo básikolama na boyangeli ya Baroma. Ekoki kozala ete makanisi na bango ezalaki lokola ya mibali mibale oyo balobaki: “Tozalaki kolikya ete moto yango nde azalaki moto oyo asengelaki kosikola Yisraele.” (Luka 24:13, 21) Kasi, toyebi ete Yesu asɛngaki te na bayekoli na ye bátombokela boyangeli mabe ya Roma. Kasi, ayebisaki bango bápesa “Kaisala biloko ya Kaisala.” (Mat. 22:21) Na yango, ndenge nini Yesu apesaki bato bonsomi na ntango wana?

10. Yesu apesaki bato likoki ya kosikolama na nini?

10 Mwana ya Nzambe ayaki kosalisa bato mpo bázwa bonsomi na ndenge mibale. Ya liboso, Yesu apesaki bato likoki ya kosikolama na mateya ya lokuta oyo bakonzi ya mangomba bazalaki koteya. Bayuda mingi na ntango wana bazalaki baombo ya bonkɔkɔ mpe ya mateya ya lokuta. (Mat. 5:31-37; 15:1-11) Bato oyo basengelaki kokamba bato na makambo ya elimo bazalaki lokola bato bakufá miso. Lokola baboyaki Masiya mpe pole ya elimo oyo ayaki na yango, batikalaki kaka na molili mpe na lisumu. (Yoa. 9:1, 14-16, 35-41) Na nzela ya mateya ya solo mpe ndakisa na ye ya malamu, Yesu asalisaki bato ya komikitisa báyeba ndenge ya kozwa bonsomi ya elimo.​—Mrk. 1:22; 2:23–3:5.

11. Wapi lolenge ya mibale oyo Yesu apesaki bato bonsomi?

11 Ya mibale, Yesu apesaki bato likoki ya kosikolama na boombo ya lisumu. Na nzela ya mbeka ya Yesu, Nzambe akokaki kolimbisa masumu ya baoyo bamonisi kondima mpe bandimi lisiko oyo apesaki. (Ebr. 10:12-18) Yesu alobaki: “Soki Mwana apesi bino bonsomi, bokokóma mpenza na bonsomi.” (Yoa. 8:36) Bonsomi yango ezalaki monene mpenza koleka bonsomi nyonso oyo Bayisraele bakokaki kozwa na mbula ya Yubile! Na ndakisa, moto oyo azwi bonsomi na Yubile akokaki lisusu kokóma moombo, mpe nsukansuka kokufa.

12. Banani bato ya liboso oyo bazwaki bonsomi oyo Yesu asakolaki?

12 Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., Yehova atyaki bantoma mpe mibali ná basi mosusu ya sembo mafuta na elimo santu. Andimaki bango bákoma bana na ye mpo ete na mikolo ezali koya, básekwa mpo na kokende na likoló koyangela elongo na Yesu. (Rom. 8:2, 15-17) Bango nde bato ya liboso oyo bazwaki bonsomi oyo Yesu asakolaki na sinagoga ya Nazarete. Mibali ná basi yango bazalaki lisusu te baombo ya mateya ya lokuta mpe ya mimeseno ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda oyo eyokanaki te na Makomami. Lisusu, Nzambe azalaki komona bango ete basikolami na lisumu oyo ememaka na liwa. Yubile yango ya elilingi oyo ebandaki na kotyama mafuta na elimo ya bayekoli ya Kristo na mobu 33 T.B., ekosuka na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu. Makambo ekozala ndenge nini na ntango yango?

BONSOMI MPO NA BAMILIO YA BATO

13-14. Longola bakristo oyo batyami mafuta na elimo, banani bakoki mpe kozwa bonsomi oyo Yesu alobelaki?

13 Lelo oyo, bamilio ya bato ya mitema sembo na bikólo nyonso bazali na kati ya “bampate mosusu.” (Yoa. 10:16) Nzambe aponi bango te mpo báyangela elongo na Yesu na likoló. Kasi, Biblia elobi ete bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele. Yo mpe ozali na elikya yango?

14 Okoki kozwa banda sikoyo matomba mosusu oyo bakristo oyo bakokende na likoló bazali mpe kozwa. Mpo na kondima na yo na makila ya Yesu, okoki kosɛnga Yehova alimbisa masumu na yo. Yango ekosala ete Nzambe andima yo mpe apesa yo lisosoli ya kimya. (Ef. 1:7; Em. 7:14, 15) Kanisá mpe mapamboli oyo ozali na yango ndenge osikolami na mateya ya lokuta oyo eyokani te na Biblia. Yesu alobaki: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoa. 8:32) Tozali mpenza na esengo ndenge tozali na bonsomi ya ndenge wana!

15. Bonsomi mpe mapamboli nini tokoki kozwa na mikolo oyo ezali koya?

15 Okoki kolikya kozwa bonsomi ya monene koleka. Mosika te, Yesu akosala mpo na kobebisa mangomba ya lokuta mpe kolongola boyangeli mabe ya bana bato. Nzambe akobatela “ebele mpenza ya bato” oyo basalelaka ye, mpe akopesa bango mapamboli na paradiso awa na mabele. (Em. 7:9, 14) Ebele ya bato bakosekwa mpe bakozwa libaku ya kosikolama na mbuma mabe nyonso ya lisumu ya Adama.​—Mis. 24:15.

16. Bonsomi nini ya monene bato bakozwa?

16 Na Boyangeli ya Mbula Nkóto, Yesu ná bato oyo bakoyangela elongo na ye bakosalisa na kokómisa bato awa na mabele bato ya kokoka mpe oyo bazali na boyokani ya kokoka na Nzambe. Ntango wana ya kobongisa makambo mpe ya kosikolama ekozala lokola Yubile oyo ezalaki na Yisraele. Yango elakisi ete bato nyonso oyo basalelaka Yehova na bosembo awa na mabele bakozala bato ya kokoka, oyo balongwe na boombo ya lisumu.

Na mokili ya sika, tokosepela kosala mosala ya malamu mpe ya esengo (Talá paragrafe 17)

17. Makambo nini Yisaya 65:21-23 esakoli mpo na basaleli ya Nzambe? (Talá elilingi ya ezipeli.)

17 Esakweli moko oyo elobeli ndenge bomoi ekozala awa na mabele ezali na Yisaya 65:21-23. (Tángá.) Tokozala bato ya gɔigɔi te. Biblia emonisi ete na ntango wana, basaleli ya Nzambe bakozala na misala ya malamu mpe ya esengo. Tondimi ete na nsuka ya boyangeli ya mbula nkóto, “biloko oyo ezalisamá ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”​—Rom. 8:21.

18. Mpo na nini tokoki kondima ete makambo ekozala malamu mingi na mikolo oyo ezali koya?

18 Ndenge kaka Yehova abongisaki ete Bayisraele bázala na bokatikati mpo na mosala mpe kopema, ekozala mpe bongo mpo na basaleli na ye na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo oyo ezali koya. Na ntembe te, ekozala ntango ya makambo ya elimo. Kosambela Nzambe nde epesaka biso esengo lelo oyo, mpe ekozala kaka bongo na mokili ya sika. Ya solo, tozali na ntina ya kosepela mpo na mosala ya malamu mpe makambo ya elimo oyo tokosala na nse ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo.

LOYEMBO 142 Tósimba makasi elikya na biso

^ par. 5 Yehova azwaki ebongiseli moko ya malamu mpo na kopesa bato bonsomi na Yisraele ya kala. Ebongiseli yango ebengamaki Yubile. Biso bakristo tozali na nse ya Mibeko ya Moize te; kasi ezali na ntina mingi tóyeba makambo oyo etali Yubile yango. Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo Yubile ya ntango ya kala ekundwelaka biso ebongiseli oyo Yehova azwi mpo na biso mpe ndenge oyo tokoki kozwela yango matomba.

^ par. 61 ELILINGI: Na mbula ya Yubile, mibali oyo bazalaki baombo bazalaki kosikolama mpe bakokaki kozonga na mabota mpe na mabele na bango.