Talelá likabo ya bomoi na motuya na yango ya solosolo
Talelá likabo ya bomoi na motuya na yango ya solosolo
“Makila ya Klisto . . . ekopɛtola masosoli na biso na misala ya kokufa mpo tósalela Nzambe ya bomoi mosala mosantu?”—BAEBELE 9:14.
1. Makambo nini emonisaka ete topesaka motuya mingi na bomoi?
SOKI balobi na yo opesa ntalo oyo bakoki kotɛka na yango bomoi na yo, ekozala boni? Topesaka bomoi na biso moko to ya bato mosusu motuya mingi. Yango wana, tokendaka mbangu epai ya monganga soki tobɛli, to mpe mbala na mbala tokendaka na lopitalo mpo na koyeba soki tozali nzoto kolɔngɔnɔ. Tolingaka kotikala na bomoi mpe kozala nzoto kolɔngɔnɔ. Ata mpe mibange to bibɔsɔnɔ mingi balingaka kokufa te; balingaka bátikala kaka na bomoi.
2, 3. (a) Masese 23:22 ezali kolobela mokumba nini? (b) Na kotalela Masese 23:22, mokumba nini tozali na yango na miso ya Nzambe?
2 Motuya oyo opesaka na bomoi emonanaka mpe na boyokani na yo na bato mosusu. Na ndakisa, Liloba ya Nzambe epesi toli oyo: “Yoká tata na yo oyo abotaki yo, mpe kotyola mama na yo te mpo anuni.” (Masese 23:22, NW) ‘Koyoka’ elimboli kaka te kokɔtisa makambo na matoi; maloba ya vɛrsɛ yango elimboli koyoka mpe kotosa. (Exode 15:26; Deteronome 7:12; 13:18; 15:5; Yosua 22:2; Nzembo 81:13) Mpo na nini Liloba ya Nzambe elobi ete osengeli koyoka tata mpe mama na yo? Ezali te kaka mpo bazali mikóló na yo to bayebi makambo mingi koleka yo. Ezali mpo bango nde ‘babotaki yo.’ Biblia mosusu ebongoli vɛrsɛ yango ete: “Yokela tata na yo, mpamba té ye moto abotá yo.” Tomoni mpenza ete soki bomoi ezali na motuya na miso na yo, osengeli kotosa moto oyo apesaki yo yango.
3 Soki ozali moklisto ya solo, ondimaka ete bomoi na yo euti libosoliboso epai ya Yehova. Na nzela na ye ‘ozali na bomoi’; okoki ‘kotambola,’ kosala makambo lokola ekelamu ya bomoi; ‘ozali’ mpe okoki kokanisa to kobongisa avenire na yo, ata mpe bomoi na yo ya seko. (Misala 17:28; Nzembo 36:9; Mosakoli 3:11) Na kolanda Masese 23:22, ebongi ‘tóyokaka’ mpe tótosaka Nzambe, tóluka koyeba ndenge oyo atalelaka bomoi mpe tótika ete yango etambwisa biso, na esika ya kolanda ndenge oyo bato mosusu batalelaka bomoi.
Tómemya bomoi
4. Na ebandeli mpenza, ndenge nini Yehova amonisaki ntina oyo tosengeli komemya bomoi?
4 Ntango Yehova akelaki bato ya liboso, amonisaki polele ete atikelaki moto te bonsomi ya kosalela bomoi ndenge nyonso oyo alingi. Lokola Kaina atondaki na zuwa, abomaki ndeko na ye Abele oyo asalaki mabe moko te. Okanisi ete Kaina azalaki na lotomo ya kosala likambo ya ndenge wana na bomoi ya moto? Nzambe akanisaki te ete azali na lotomo wana. Lokola Kaina asalaki likambo wana, Nzambe atunaki ye ete: “Osali nini? Mongongo ya makila ya ndeko na yo egangeli ngai longwa na mabelé.” (Genese 4:10) Tósimba ete makila ya Abele na mabelé ezalaki komonisa bomoi na ye, oyo bakataki yango mobesu, mpe ezalaki koganga epai ya Nzambe ete atalela likambo yango.—Baebele 12:24.
5. (a) Mobeko nini Nzambe apesaki na ntango ya Noa, mpe yango ezalaki mpo na banani? (b) Na ndenge nini mobeko yango ezalaki likambo monene ya sika?
5 Nsima ya Mpela, mokili ya sika ebandaki kaka na bato mwambe. Nzambe alobaki likambo moko oyo etaleli bato nyonso, oyo ezali komonisa malamu lisusu ndenge oyo atalelaka bomoi mpe makila. Alobaki ete bato bakoki kolya nyama, kasi atyaki mobeko oyo: “Nyama nyonso ya bomoi, yango ekotambolaka, ekozala na bino kolya, mpe lokola nasili kopesa bino ndunda nyonso, nazali kopesa bino biloko nyonso. Nde bokolya mosuni te oyo ezali na bomoi na kati, yango ezali na makila na yango.” (Genese 9:3, 4) Bayuda mosusu balobaka ete maloba wana elimboli ete bato basengelaki te kolya mosuni to makila ya nyama oyo ezali naino na bomoi. Kasi na nsima, Nzambe amonisaki polele ete apekisaki nde kolya makila lokola bilei mpo na kobatela bomoi. Lisusu, mobeko oyo Nzambe apesaki Noa ezalaki likambo mosusu ya sika na ndenge oyo azali kokokisa mokano na ye monene oyo ezali mpe kosɛnga kosalela makila mpe oyo ekopesa bato likoki ya kozwa bomoi ya seko.
6. Na nzela ya Noa, ndenge nini Nzambe amonisaki malamumalamu motuya oyo apesaka na makila?
6 Nzambe abakisaki boye: “Nakotuna mpo na makila ya bomoi na bino, nakotuna yango epai ya nyama nyonso mpe epai ya moto, ata na mabɔkɔ ya moto oyo azali ndeko na ye, nakotuna mpo na bomoi ya moto. Soki moto akosopa makila ya moto, makila na ye mpenza ekosopana na moto, mpo ete Nzambe asalaki moto na elilingi na ye.” (Genese 9:5, 6) Maloba yango oyo etaleli bato nyonso ezali komonisa ete na miso ya Nzambe, makila ya moto ezali komonisa bomoi na ye. Mozalisi nde apesaka moto bomoi, mpe moto moko te asengeli kolongola bomoi yango, oyo emonisami na makila. Soki moto asali lokola Kaina, elingi koloba abomi moto, Mozalisi azali na lotomo ya ‘kotuna’ ye bomoi wana.
7. Mpo na nini ebongi tótalela maloba oyo Nzambe ayebisaki Noa na ntina etali makila?
7 Na maloba wana, Nzambe apekisaki bato kosala makambo oyo ebongi te na makila. Osí omituná soki mpo na nini? Nzambe alingaki mpenza koloba nini na mobeko yango? Eyano na motuna yango etaleli liteya moko monene ya Biblia. Atako mangomba mingi elobelaka yango te, liteya yango mpenza nde esimbi nsango ya boklisto. Ezali liteya nini, mpe ndenge nini etaleli bomoi, bikateli, mpe misala na yo?
Na likambo nini bakokaki kosalela makila?
8. Na kati ya Mibeko, likambo nini Yehova apekisaki na ntina na makila?
8 Yehova abakisaki makambo mosusu na ntina etali bomoi mpe makila ntango apesaki Bayisalaele Mibeko. Na ndenge yango, asalaki likambo mosusu ya sika na ndenge oyo azali kokokisa mokano na ye. Na ntembe te oyebi ete Mibeko esɛngaki bápesaka Nzambe mbeka ya biloko lokola mbuma, mafuta, mpe vinyo. (Levitike 2:1-4; 23:13; Mituya 15:1-5) Basengelaki mpe kopesaka mbeka ya banyama. Na ntina na bambeka yango, Nzambe alobaki boye: “Bomoi ya mosuni ezali kati na makila, mpe ngai nasili kopesa yango na bino na likoló ya etumbelo mpo na kosala kozongisa ya bondeko na ntina na bomoi, mpo ete ezali makila ekozongisa na bondeko na ntina na bomoi. Yango wana nasili koloba na bato ya Yisalaele ete, Moto moko te na kati na bino akolya makila.” Yehova abakisaki ete soki moto moko, na ndakisa moto ya bokila to moto oyo abɔkɔlaka bibwɛlɛ, abomi nyama mpo na kolya, asengelaki kosopa makila na yango mpe kozipa yango na mputulu. Mabelé ezali esika oyo Nzambe atyaka makolo, mpe ntango moto asopi makila na mabelé, azalaki komonisa ete azongisi bomoi epai ya Mopesi ya bomoi.—Levitike 17:11-13; Yisaya 66:1.
9. Wapi likambo kaka moko oyo Mibeko elobaki bakokaki kosalela makila, mpe ezalaki na ntina nini?
9 Mobeko wana ezalaki kaka te molulu moko ya losambo oyo ezali na ntina moko te mpo na biso lelo oyo. Osimbi ntina oyo Bayisalaele basengelaki kolya makila te? Nzambe alobaki boye: “Yango wana nasili koloba na bato ya Yisalaele ete, Moto moko te na kati na bino akolya makila.” Ezalaki mpo na nini? “Ngai nasili kopesa [makila] na bino na likoló ya etumbelo mpo na kosala kozongisa ya bondeko na ntina na bomoi.” Omoni te ete yango esalisi biso tóyeba ntina oyo Nzambe alobaki na Noa ete bato basengeli kolya makila te? Mozalisi amonaki malamu atalela makila lokola eloko ya motuya mingi, oyo basengelaki kosalela yango kaka likambo moko, oyo ekoki kobikisa bomoi ya ebele ya bato. Makila esengelaki kozala na ntina mingi mpo na kozipa masumu (kozongisa bondeko). Na yango, ntango Bayisalaele bazalaki kotambwisama na Mibeko, Nzambe apesaki bango ndingisa ya kosalela makila kaka na etumbelo mpo na kozipa masumu ya Bayisalaele oyo bazalaki kosɛnga Yehova bolimbisi.
10. Mpo na nini makila ya banyama ekokaki kolimbisa masumu mpo na libela te, kasi bambeka ya banyama oyo Mibeko esɛngaki ezalaki koteya nini?
10 Likanisi yango ezongelami mpe na ebongiseli ya boklisto. Ntoma Paulo alobelaki ebongiseli wana ya Mibeko ntango akomaki boye: “Biloko pene na nyonso epɛtolamaka na makila engebene Mibeko, mpe soki makila esopami te bolimbisi ezali te.” (Baebele 9:22) Paulo amonisaki polele ete bambeka oyo Bayisalaele bazalaki kopesa ezalaki te kokómisa bango bato ya kokoka, to oyo bazangi masumu. Akomaki boye: “Bambeka wana ezali nde kokundola masumu mbula na mbula, mpo ekoki kosalema soki moke te ete makila ya bangɔmbɛ-mibali mpe ya bantaba elongola masumu.” (Baebele 10:1-4) Atako bongo, bambeka wana ezalaki na ntina. Ezalaki koteya Bayisalaele ete bazali bato ya masumu mpe bazali na mposa ya eloko mosusu mpo masumu na bango elimbisama mpo na libela. Kasi, soki makila oyo ezalaki komonisa bomoi ya banyama ekokaki kozipa masumu mpo na libela te, makila mosusu ekokaki kosala yango?
Likambo oyo Mopesi ya bomoi asalaki
11. Nini ezali komonisa biso ete makila ya banyama oyo bazalaki kopesa lokola mbeka ezalaki kosakola eloko mosusu?
11 Mibeko ezalaki kosakola eloko mosusu oyo ekoki mpenza mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Paulo atunaki boye: “Bongo, mpo na nini Mibeko?” Apesaki eyano oyo: “Ebakisamaki mpo na komonisa polele bobuki-mibeko, tii ntango momboto oyo elaka epesamaki epai na ye akoya; mpe eyeisamaki na nzela ya baanzelu na lobɔkɔ ya moyokanisi moko [Moize].” (Bagalatia 3:19) Ndenge moko mpe, Paulo akomaki boye: “Mibeko ezali na elili ya makambo malamu oyo ekoya, kasi na bosolo mpenza ya makambo te.”—Baebele 10:1.
12. Na likambo etali makila, ndenge nini tokoki kokanga ntina ya mokano oyo Nzambe amonisaki naino te?
12 Na nyonso oyo tolobi, tósimba ete na ntango ya Noa, Nzambe alobaki ete bato bakoki kolya nyama, kasi bakokaki kolya makila te. Na nsima, Nzambe alobaki ete “bomoi ya mosuni ezali kati na makila.” Nzambe amonaki malamu ete makila emonisa bomoi mpe alobaki boye: “Ngai nasili kopesa [makila] na bino na likoló ya etumbelo mpo na kosala kozongisa ya bondeko na ntina na bomoi.” Kasi, ezalaki na likambo mosusu ya monene na mokano ya Nzambe oyo amonisaki yango naino te. Mibeko ezalaki na elili ya makambo malamu oyo ekoya. Makambo nini?
13. Mpo na nini liwa ya Yesu ezalaki na ntina?
13 Makambo nyonso wana ezalaki komonisa liwa ya Yesu Klisto. Oyebi ete banyokolaki Yesu mpe babakaki ye na nzete. Babomaki ye lokola mosali ya mabe. Paulo akomaki boye: “Wana tozalaki naino bato ya bolɛmbu, Klisto, na ntango oyo etyamaki, akufelaki bato oyo batyolaka Nzambe. . . . Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye moko na likambo oyo ete, wana tozalaki naino basumuki, Klisto akufelaki biso.” (Baloma 5:6, 8) Na ndenge akufaki mpo na biso, Klisto apesaki lisiko mpo na kozipa masumu na biso. Lisiko wana nde esimbi mpenza nsango oyo baklisto basakolaka. (Matai 20:28; Yoane 3:16; 1 Bakolinti 15:3; 1 Timote 2:6) Lisiko ezali na boyokani nini na makila mpe bomoi, mpe na nini yango etaleli bomoi na yo?
14, 15. (a) Ndenge nini Babiblia mosusu, na Baefese 1:7, ezali nde kobenda likebi na liwa ya Yesu? (b) Soki moto azali kaka na Babiblia wana, likambo nini akoki kozanga ntango atángi Baefese 1:7?
14 Mangomba mosusu elobelaka mingi nde liwa ya Yesu, mpe bandimi na yango balobaka na ndakisa ete, “Yesu akufelaki ngai.” Tótalela ndenge oyo Babiblia mosusu ebongoli Baefese 1:7: “Kati na ye mpe na nzela ya liwa na ye tozwi lobiko, elingi koloba, kolongolama ya masumu na biso.” (The American Bible, ya Frank Scheil Ballentine, 1902) “Na nzela ya liwa ya Klisto tosikolami, mpe masumu na biso elimbisami.” (Today’s English Version, 1966) “Kati na Klisto mpe na mbeka ya bomoi na ye nde tosikolami, kosikolama oyo elimboli bolimbisi ya masumu.” (The New Testament, ya William Barclay, 1969) “Ezali na nzela ya liwa ya Klisto nde masumu na biso elimbisami mpe tozwi bonsomi.” (The Translator’s New Testament, 1973) Omoni ete Babiblia yango ezali kobenda likebi nde na liwa ya Yesu. Bato mosusu bakoki koloba ete ‘Liwa ya Yesu ezali mpenza na ntina. Boye, nini ezangi na mabongoli yango?’
15 Soki otángaka kaka Babiblia wana, okozanga likambo moko ya ntina mingi, mpe yango ekosala ete oyeba nsango ya Biblia malamu mpenza te. Babiblia wana ezali komonisa te ete na makomi ya Grɛki ya ebandeli, Baefese 1:7 ezali na liloba moko oyo elimboli “makila.” Yango wana, Babiblia mingi, na ndakisa Libongoli ya Mokili ya Sika, ebongoli malamumalamu makomi ya Grɛki: “Mpo na ye tozwi kosikolama na nzela ya lisiko na lisalisi ya makila ya moto wana, ɛɛ, kolimbisama ya mabunga na biso, engebene bomɛngo ya boboto monene na ye.”
16. Maloba “makila ya moto wana” esengeli kotinda biso na kokanisa na nini?
16 Maloba “makila ya moto wana” ezali na ndimbola monene mpe esengeli kotinda biso na kokanisa na makambo mingi etaleli makila. Likambo ya ntina ezalaki kaka te ete moto moko akufa, ata Yesu oyo azalaki moto ya kokoka. Akokisaki nde makambo oyo ezalaki lokola elili na Mibeko, mingimingi oyo ezalaki kosalema na Mokolo ya kozongisa bondeko. Na mokolo wana, bazalaki kopesa mbeka ya banyama oyo esɛngamaki na Mibeko. Na nsima, nganga-nzambe monene azalaki komema mwa ndambo ya makila ya banyama yango na Esika-Eleki-Bosantu na tabenakle to na tempelo, mpe kuna, azalaki lokola nde atɛlɛmi liboso ya Nzambe mpo na kolakisa ye makila yango.—Exode 25:22; Levitike 16:2-19.
17. Ndenge nini Yesu akokisaki likambo oyo ezalaki komonisama na Mokolo ya kozongisa bondeko?
17 Paulo alimbolaki ete Yesu akokisaki makambo oyo ezalaki komonisama na Mokolo ya kozongisa bondeko. Ya liboso, alobaki ete na Yisalaele, nganga-nzambe monene azalaki kokɔta mbala moko na Esika-Eleki-Bosantu na makila ya bambeka “mpo na ye moko mpe mpo na masumu bato ya ekólo bazalaki kosala kozanga koyeba.” (Baebele 9:6, 7) Ntango Yesu asekwaki na nzoto ya elimo mpe amataki na likoló mpenza, yango ekokisaki likambo yango. Lokola ekelamu ya elimo, oyo azali na nzoto ya mosuni mpe makila te, akokaki kotɛlɛma liboso ya “Nzambe mpenza mpo na biso.” Alakisaki nini epai ya Nzambe? Eloko ya mosuni te, kasi eloko oyo ezali na motuya koleka. Paulo akomaki lisusu boye: “Ntango Klisto ayaki lokola nganga-nzambe monene . . . , akɔtaki, na makila ya bantaba mpe ya bangɔmbɛ-mibali ya mike te, kasi nde na makila na ye moko, mbala moko mpo na libela na kati ya esika mosantu mpe azwelaki biso kosikolama ya seko. Mpo soki makila ya bantaba mpe ya bangɔmbɛ-mibali . . . ezali kosantisa tii na kopɛtolama ya mosuni, na koleka boni makila ya Klisto, oyo na nzela ya elimo moko ya seko amikabaki epai ya Nzambe kozanga litɔnɔ, ekopɛtola masosoli na biso na misala ya kokufa mpo tósalela Nzambe ya bomoi mosala mosantu?” Yesu alakisaki epai ya Nzambe motuya ya makila na ye.—Baebele 9:11-14, 24, 28; 10:11-14; 1 Petelo 3:18.
18. Mpo na nini makambo oyo Biblia elobi mpo na makila esengeli kozala na ntina mingi mpo na baklisto lelo oyo?
18 Liteya yango oyo euti na Nzambe esalisi biso tókanga ntina ya makambo ya kokamwa oyo Biblia elobi mpo na makila: ntina oyo Nzambe atalelaka yango bongo, ndenge oyo biso tosengeli kotalela yango, mpe ntina oyo tosengeli kotosa Nzambe na makambo oyo alobi tósala te na makila. Ntango ozali kotánga Makomami ya Grɛki ya boklisto, okomona bisika ebele oyo balobeli makila ya Klisto. (Talá etanda.) Yango ezali komonisa polele ete moklisto mokomoko asengeli kozala na kondima “na kati na makila [ya Yesu].” (Baloma 3:25) Masumu na biso ekoki kolimbisama mpe kimya ekoki kozala kati na biso na Nzambe kaka “na lisalisi ya makila oyo [Yesu] asopaki.” (Bakolose 1:20) Ezali bongo mpo na bato oyo Yesu asali na bango kondimana mpo na koyangela na ye na likoló. (Luka 22:20, 28-30; 1 Bakolinti 11:25; Baebele 13:20) Ezali mpe bongo mpo na “ebele ya bato” lelo oyo; bango bakobika na “bolɔzi monene” mpe bakozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Na maloba ya elilingi, ‘basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate.’—Emoniseli 7:9, 14.
19, 20. (a) Mpo na nini Nzambe akataki makambo oyo tokoki kosalela makila, mpe ndenge nini tosengeli kotalela likambo yango? (b) Tosengeli koluka koyeba nini?
19 Tomoni mpenza ete makila ezali eloko ya motuya na miso ya Nzambe. Esengeli mpe kozala na motuya na miso na biso. Mozalisi, oyo alingaka ete biso tózala na bomoi, azali na lotomo ya kokata makambo nini bato bakoki kosalela makila. Lokola alingaka ete tózala na bomoi, alingi ete makila esalelama na lolenge kaka moko oyo ezali na ntina mingi, oyo ekoki kopesa bomoi ya seko. Mpo na likambo yango, asalelaki makila ya motuya mingi ya Yesu. Tosengeli mpenza kozala na botɔndi ete Yehova Nzambe alingaki bolamu na biso na ndenge asalelaki makila ya Yesu mpo na kobikisa bomoi! Tosengeli mpe kotɔnda Yesu na ndenge andimaki ete makila na ye esopana mpo na biso! Sikoyo, tokoki mpenza kokanga ntina oyo ntoma Yoane alobaki maloba oyo: “Epai na ye oyo alingaka biso mpe oyo afungolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na ye moko—mpe akómisi biso bokonzi, banganga-nzambe mpo na Nzambe na ye mpe Tata—ɛɛ, epai na ye nkembo mpe nguya ezala libela na libela. Amen.”—Emoniseli 1:5, 6.
20 Nzambe na biso mpe Mopesi ya bomoi oyo atondi na bwanya ayebaki banda kala ete akosalela makila mpo na kobikisa bomoi. Yango wana, tokoki komituna motuna oyo, ‘Yango esengeli kotinda biso na kozwa bikateli nini mpe na kosala nini?’ Lisolo oyo elandi ekolobela likambo yango.
Okopesa eyano nini?
• Lisolo ya Abele ná ya Noa ezali koteya biso nini na ndenge oyo Nzambe atalelaka makila?
• Na kati ya Mibeko, Nzambe akataki makambo nini Nzambe oyo bakoki kosalela makila, mpe mpo na nini?
• Ndenge nini Yesu akokisaki likambo oyo emonisamaki na Mokolo ya kozongisa bondeko?
• Ndenge nini makila ya Yesu ekoki kobikisa bomoi na biso?
[Mituna ya boyekoli]
[Etanda na lokasa 18]
MAKILA YA NANI EBIKISAKA BOMOI?
“Bókeba mpo na bino moko mpe mpo na etonga mobimba, oyo na kati na yango elimo santu etye bino bakɛngɛli, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko.”—Misala 20:28.
“Kutu, na koleka mpenza, lokola totángami bayengebene sikoyo na lisalisi ya makila na ye, tokobikisama uta na nkanda mpo na ye.”—Baloma 5:9.
“Bozalaki na elikya te mpe bozalaki na Nzambe te na kati ya mokili. Kasi sikoyo na bomoko elongo na Klisto Yesu bino bato kala bozalaki mosika mpenza bokómi penepene na lisalisi ya makila ya Klisto.”—Baefese 2:12, 13.
“Nzambe amonaki malamu ete litondi nyonso efanda na kati na ye, mpe na nzela na ye azongisa lisusu boyokani na kati na ye mpe biloko mosusu nyonso na kotyáká kimya na lisalisi ya makila oyo asopaki likoló ya nzete ya mpasi.”—Bakolose 1:19, 20.
“Na yango, bandeko, . . . tozali na mpiko na oyo etali nzela ya kokɔta na esika mosantu yango na lisalisi ya makila ya Yesu.”—Baebele 10:19.
“Ezalaki te na biloko oyo epɔlaka . . . nde bosikolamaki na motindo ya etamboli na bino ya kozanga kobota mbuma oyo bozwaki na nzela ya mimeseno oyo eutaki na bankɔkɔ na bino. Kasi ezalaki nde na makila moko ya motuya, lokola oyo ya mwana-mpate ezangi mbeba mpe ezangi litɔnɔ, ɛɛ oyo ya Klisto.”—1 Petelo 1:18, 19.
“Soki tozali kotambola na kati ya pole lokola ye moko azali na kati ya pole, tozali na bosangani biso na biso, mpe makila ya Yesu Mwana na ye ezali kopɛtola biso uta na lisumu nyonso.”—1 Yoane 1:7.
“Obongi kozwa rulo wana mpe kofungola bilembo na yango, mpamba te obomamaki mpe na makila na yo osombelaki Nzambe bato na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso.”—Emoniseli 5:9.
“Mofundi ya bandeko na biso abwakami na nse . . . Mpe balongaki ye mpo na makila ya Mwana-Mpate mpe mpo na liloba ya litatoli na bango.”—Emoniseli 12:10, 11.
[Elilingi na lokasa 16]
Na kati ya Mibeko, Nzambe amonisaki polele ete bakokaki kosalela makila mpo na bolimbisi ya masumu
[Elilingi na lokasa 17]
Na lisalisi ya makila ya Yesu, bomoi ya ebele ya bato ebikisami