‘Eleko ya molunge mpe eleko ya mpiɔ ekozanga te’
Kitoko ya biloko oyo Yehova akelá
‘Eleko ya molunge mpe eleko ya mpiɔ ekozanga te’
MOI makasi mpenza ebɛtaka na esobe. Na bisika mosusu ya mabelé, ememaka molunge nsima ya eleko ya mpiɔ makasi. Ya solo, molunge ya moi ezali moko ya makambo oyo esalaka mpenza ete tózala na bantango ya mbula mpe bantango ya moi mpe bileko ndenge na ndenge.
Na mabelé mobimba, bileko ezalaka ndenge moko te na bisika nyonso. Kasi bileko yango etali yo na nini? Osepelaka na ndenge biloko ekómaka sikasika na prɛnta to eleko ya ebandeli ya molunge, ntango omonaka banzete mpe bafololo ezali kobima? Oyokaka ndenge nini ntango omonaka mpokwa kitoko na eleko ya molunge? Osepelaka na mikolo ya ɔtɔnɛ to eleko ya ebandeli ya malili, ndenge nkasa ya nzete ekómaka langilangi? Oyokaka malamu ntango omonaka ndenge mbula-mpɛmbɛ ezipi zamba?
Nini esalaka ete bileko yango ezala? Na mokuse, ezali mpo na ndenge mabelé etɛngamá. Ntango mabelé ezali kobaluka zingazinga ya moi, ezalaka etɛngamá mwa moke na degre 23,5 (23,5°). Soki mabelé ezalaka etɛngamá mwa moke te, mbɛlɛ bileko yango elingaki kozala te. Mbɛlɛ tolingaki kozala kaka na ntango ya mbula to kaka na ntango ya moi mikolo nyonso. Elingaki mpe kobongola ndenge matiti ná banzete ezali mpe mosala ya bilanga.
Soki otali ndenge bileko yango ezali kolandana, okoki komona ete Mozalisi nde asalaki yango. Yango wana, mokomi ya nzembo alobaki boye mpo na Yehova Nzambe: “Yo nde otyaki bandelo ya mabelé; eleko ya molunge ná eleko ya mpiɔ, yo moto osalaki yango.”—Nzembo 74:17, NW. *
Mpo na moto oyo azali awa na mabelé mpe azali kotala likoló, moi, sanza mpe minzoto ezali mpenza biloko oyo elakisaka soki tozali na eleko nini. Ntango Nzambe asalaki moi mpe baplanɛti nyonso oyo ebalukaka zingazinga na yango, alobaki boye: “Tiká [biloko oyo epesaka, NW] pole ezala na etando ya likoló . . . Tiká ete ezala mpo na bilembo mpe na [bileko, NW], mpo na mikolo mpe na mbula.” (Genese 1:14) Mpo na bato oyo bafandi na bamboka oyo ezali na ndelo oyo babengi équateur, oyo ekaboli mabelé na katikati banda na ɛsti tii na wɛsti, na boumeli ya mbula moko, ntango mabelé ezali kobaluka, ekómaka na bisika mibale oyo, na midi, moi emonanaka likoló ya mitó na bango. Babengaka bantango yango équinoxes mpe na mikili mingi, yango emonisaka ebandeli ya eleko ya prɛnta mpe ya ɔtɔnɛ. Na ntango ya équinoxes, na mabelé mobimba, butu ná moi eumelaka ntango ndenge moko.
Kozala ya bileko mpe ndenge yango ebandaka etali kaka te ndenge moi, sanza mpe minzoto etambolaka na likoló. Bileko, bantango ya mbula mpe bantango ya moi, ezali na boyokani yango na yango. Yango nyonso ezali na kati ya ebongiseli moko oyo esangisi makambo ndenge na ndenge oyo ebatelaka bomoi. Ntango ntoma moklisto Paulo ná moninga na ye Balanabasi bazalaki koloba na bato ya Asie Mineure, oyo mingi kati na bango bamesanaki na mosala ya bilanga ya biloko ya kolya, balobaki ete Nzambe nde ‘apesaka bango bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, atondisaka mitema na bango mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.’—Misala 14:14-17.
Ebongiseli ya kokamwa oyo esalaka ete banzete epɛtolaka mopɛpɛ na lisalisi ya pole ya moi (photosynthèse), yango nde esalaka ete matiti mpe banzete ezala na mokili mpe mwa milona mikemike ezala na mai. Mpo na yango, biloko oyo bato ná banyama balyaka, bakisá mpe bikelamu ndenge na ndenge oyo ezali esika moko, elandaka bileko, bantango ya mbula mpe ya moi, na ndenge moko oyo ezali mpasi mpenza mpo na kolimbola yango. Paulo amonisaki malamu ete lobɔkɔ ya Yehova nde esalaka makambo wana nyonso, alobaki boye: “Mabelé oyo emɛlaka mai ya mbula oyo ekwelaka yango mbala na mbala, mpe oyo na nsima ebotaka ndunda oyo ebongi na baoyo yango mpe elonamaki mpo na bango, ezwaka na ngala na yango lipamboli ya Nzambe.”—Baebele 6:7.
Liloba “lipamboli” ekokóma na ndimbola mosusu soki otɛlɛmi mwa moke mpe okanisi na makambo oyo esalemaka na bisika oyo prɛnta eyaka na mopɛpɛ moko Loyembo ya Salomo 2:12, 13) Yango nde ebongisaka esika mpo na mosala ya kobuka mbuma oyo ekosalema na nsuka ya eleko ya molunge to na eleko ya ɔtɔnɛ.—Exode 23:16.
kitoko, na pole ya moi oyo eumelaka ntango mingi, na moi oyo engɛngaka makasi mpe na mbula ya ntina mingi mpo na bilanga. Bafololo ebimaka mpe banyama-nkɛkɛ ebimaka na bisika oyo yango ebombanaki na eleko ya mpiɔ mpo na kokende komemela banzete putulu oyo ebotisaka mbuma. Zamba etondaka na langi mpe na makɛlɛlɛ ya bandɛkɛ, lokola geai bleu oyo ozali komona awa, mpe mokili ekómaka na loyenge. Bomoi ezali kozonga nokinoki, mpe banzete ezongelaka mosala na yango ya kobota, kobota lisusu mpe kokola. (Misala ya Yehova emonani polele na ndenge moko ya kokamwa, soki totali ndenge atyaki mabelé na esika na yango; yango epesi biso butu mpe moi, bileko, ntango ya kolona mpe ntango ya kobuka. Toyebi ete nsima ya eleko ya mpiɔ, eleko ya molunge ekozanga te koya. Kutu, Nzambe nde apesaki elaka oyo: ‘Wana ekoumela mokili, ntango ya kokona mpe ntango ya kobuka, malili mpe molunge, eleko ya molunge mpe eleko ya mpiɔ, ná mokolo mpe butu ekozanga te.’—Genese 8:22.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 6 Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2004, sanza ya Yuli/Augusto.
[Etanda/Elilingi na lokasa 9]
Sanza ezali na ntina mingi mpo na bomoi
Banda kalakala, sanza etindaka bato bakánisa na makambo mingi mpe ekamwisaka bango. Kasi, oyebi ete sanza esalaka mosala monene mpo bileko ezala ndenge ezalaka? Sanza esalaka ete kotɛngama ya mabelé, elingi koloba badegre na yango ya kotɛngama ntango ebalukaka zingazinga ya moi, etikala kaka bongo, elingi koloba. Andrew Hill, mokomi moko ya makambo ya siansi, alobi ete yango “esalaka mosala moko ya ntina ya kobongisa makambo mpo bomoi ezala awa na mabelé.” Soki sanza ezalaka te mpo na kosala ete kotɛngama ya mabelé etikala kaka bongo, mbɛlɛ molunge elingaki kozala mingi mpe yango elingaki kosala ete bomoi ezala te awa na mabelé. Yango wana, etuluku moko ya bato oyo bayekolaka minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali kuna na likoló balobaki boye: “Tokoki kotalela sanza lokola eloko oyo esalaka ete ntango ya mbula mpe ntango ya molunge ezalaka awa na mabelé.”—Nzembo 104:19.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Sanza: U.S. Fish & Wildlife Service, Washington, D.C./Bart O’Gara
[Elilingi na lokasa 9]
Bakamela, na Afrika ya Nɔrdi mpe na Arabie