Likambo oyo ekosukisa liwa!
Likambo oyo ekosukisa liwa!
MOBALI moko nkombo na ye Lazalo ná bandeko na ye ya basi Malata mpe Malia, bazalaki kofanda na Betani, engumba moko oyo ekabwanaki na Yelusaleme na ntaka ya kilomɛtrɛ 3. Mokolo mosusu, Lazalo abɛlaki makasi; nzokande, moninga na bango Yesu azalaki te. Bandeko na ye ya basi bamitungisaki mingi. Na bongo, batindelaki Yesu maloba. Mwa moke nsima ya kozwa nsango yango, Yesu asimbaki nzela mpo na kokende kotala Lazalo. Na nzela, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete azali kokende epai ya Lazalo mpo na kolamusa ye na mpɔngi. Liboso, bayekoli bakangaki ntina ya maloba ya Yesu te, kasi na nsima, alobaki na bango polele ete: “Lazalo akufi.”—Yoane 11:1-14.
Ntango Yesu akómaki na lilita ya Lazalo, alobaki ete bálongola libanga oyo ezipaki lidusu yango. Abondelaki na mongongo makasi, na nsima alobaki ete: “Lazalo, bimá!” Lazalo abimaki. Mobali yango oyo akufaki banda mikolo minei asekwaki.—Yoane 11:38-44.
Lisolo ya Lazalo emonisi polele ete lisekwa nde ekosukisa liwa. Kasi, likamwisi yango esalemaki mpenza? Biblia elobi ete esalemaki mpenza. Tángá Yoane 11:1-44, mpe okomona ndenge lisolo yango elobami polele. Okoki koloba ete likambo yango esalemaki te? Soki olobi bongo, ekomonisa ete ondimaka mpe te makamwisi nyonso oyo Biblia elobeli, ata mpe lisekwa ya Yesu Klisto ye moko. Nzokande, Biblia elobi ete “soki Klisto alamukaki te, kondima na bino ezali mpamba.” (1 Bakolinti 15:17) Lisekwa ezali liteya monene ya Biblia. (Baebele 6:1, 2) Kasi, liloba “lisekwa” elimboli nini?
“Lisekwa” elimboli nini?
Liloba “lisekwa” ezali mbala koleka 40 na Makomami ya Grɛki ya boklisto. Ebongolami uta na liloba ya Grɛki oyo elimboli “kotɛlɛma lisusu.” Liloba ya Liebele oyo ekokani na yango elimboli “kozonga na bomoi.” Kasi, eloko nini esekwaka ntango moto akufi? Ekoki kozala nzoto te, mpamba te yango epɔlaka mpe ezongaka mputulu. Oyo esekwaka ezali nzoto te, kasi moto oyo akufaki. Na bongo, kosekwa elakisi kozonga lisusu na bomoi—na bizaleli, makambo oyo moto ayebaki mpe makambo nyonso ya bomoto na ye.
Yehova Nzambe akoki kobosana ata likambo moko te oyo moto azalaki na yango liboso akufa. (Yisaya 40:26) Lokola Yehova azali Mobandisi ya bomoi, akoki kozongisa na bomoi moto oyo akufaki mpe kopesa ye nzoto ya sika. (Nzembo 36:9) Longola yango, Biblia elobi ete Yehova Nzambe azali na “mposa” ya kosekwisa bato oyo bakufá. (Yobo 14:14, 15) Ezali mpenza esengo koyeba ete Yehova azali na likoki mpe na mposa ya kozongisa na bomoi bato oyo bakufá!
Yesu Klisto mpe akokokisa mokumba monene na likambo ya lisekwa. Mbula moko nsima ya kobanda mosala na ye, alobaki boye: “Kaka ndenge Tata alamwisaka bakufi mpe azongisaka bango na bomoi, ndenge moko mpe Mwana azongisaka na bomoi baoyo ye alingi kozongisa.” (Yoane 5:21) Lisolo ya Lazalo ezali mpenza komonisa ete Yesu Klisto azali na nguya mpe na mposa ya kosekwisa bato oyo bakufá!
Kasi, ezali nde na eloko moko oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi? Liteya ya lisekwa eyokani te na likanisi oyo elobaka ete Yoane 11:23, 24) Ntango mpe Lazalo asekwaki, alobaki te ete azalaki na bomoi epai mosusu. Akufaki mpenza. Biblia elobi boye: “Bakufi bayebi likambo te.” Mpe ete: “Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika ya bakufi, esika ekokenda yo.”—Mosakoli 9:5, 10.
moto azali na molimo to elimo oyo ekufaka te. Soki ezalaki na eloko moko oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi, lisekwa elingaki kozala na ntina moko te. Malata, ndeko mwasi ya Lazalo azalaki kokanisa te ete ndeko na ye oyo akufaki akómaki na bomoi na mokili ya bilimu. Ayebaki kaka ete lisekwa ekozala. Ntango Yesu ayebisaki ye ete: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa,” Malata alobaki boye: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka.” (Na bongo, Biblia emonisi ete lisekwa nde ekosukisa liwa. Kasi na kati ya ebele ya bato nyonso oyo bakufá, banani mpenza bakosekwa, mpe epai wapi?
Banani bakosekwa?
Yesu alobaki boye: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo [na ngai] mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Elaka yango emonisi ete baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama, na maloba mosusu, bato nyonso oyo bazali na makanisi ya Yehova bakosekwa. Na yango, tokoki komituna boye: Na kati ya bato nyonso oyo bakufá, banani oyo Nzambe abombá na makanisi na ye mpe akosekwisa bango?
Mokanda ya Baebele mokapo 11, etángi mibali mpe basi oyo basalelaki Nzambe na bosembo. Bato yango, bakisa mpe basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bazali kokufa na mikolo na biso bakosekwa. Kasi, ezali boni mpo na bato oyo basalelaki Nzambe te, mbala mosusu mpo bayebaki ye te? Bango mpe bazali na makanisi ya Nzambe? Mingi bazali na kati ya makanisi ya Nzambe, mpamba te Biblia elobi boye: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”—Misala 24:15.
Kasi, ezali bato nyonso te oyo bakufá nde bakosekwa. Biblia elobi boye: “Soki tozali na momeseno ya kosala lisumu na nko nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, Baebele 10:26, 27) Ezali na bato mosusu oyo bakufá, baoyo basalaki masumu oyo elimbisamaka te. Bato yango bazali na Hadesi te (nkunda) kasi na Gehena, oyo ezali elilingi ya libebi ya seko. (Matai 23:33) Kasi, tosengeli kokeba: ezali lotomo na biso te ya kokata soki moto boye akosekwa to te. Yango ezali mokumba ya Nzambe. Ye nde ayebi nani azali na Hadesi mpe nani azali na Gehena. Biso tosengeli se kosala makasi ete tósala mokano ya Nzambe na bomoi na biso.
etikali lisusu te na mbeka mpo na masumu, kasi etikali kaka kozela lisambisi moko ya nsɔmɔ.” (Banani bakosekwa mpo na bomoi na likoló?
Lisekwa ya Yesu Klisto eleki lisekwa mosusu nyonso. “Abomamaki na mosuni, kasi azongisamaki na bomoi na elimo.” (1 Petelo 3:18) Liboso ya Yesu, moto moko te asekwaki na lolenge wana. Ye moko alobaki boye: “Moto moko te amatá na likoló longola kaka ye oyo autaki na likoló, Mwana ya moto.” (Yoane 3:13) Mwana ya moto azalaki moto ya liboso oyo asekwaki na nzoto ya elimo. (Misala 26:23) Kasi, bato mosusu basengelaki kosekwa ndenge yango nsima na ye. Biblia elobi boye: “Moto na moto na molɔngɔ na ye: Klisto mbuma ya liboso, na nsima baoyo bazali bato ya Klisto na ntango ya kozala na ye.”—1 Bakolinti 15:23.
Bato moke—“baoyo bazali bato ya Klisto”—bakosekwa mpo na bomoi na likoló mpo na mosala moko ya ntina mingi. (Baloma 6:5) ‘Bakoyangela mabelé’ elongo na Klisto. (Emoniseli 5:9, 10) Bakozala mpe banganga-nzambe na ndenge bakosala mosala ya kolongola mbuma mabe ya lisumu oyo Adama, moto ya liboso, atikelá biso. (Baloma 5:12) Baoyo bakoyangela elongo na Klisto lokola bakonzi mpe banganga-nzambe bazali bato 144000. (Emoniseli 14:1, 3) Bakosekwa na nzoto nini? Biblia elobi ete bakosekwa na “nzoto ya elimo.” Yango ekopesa bango nzela ya kozala na bomoi na likoló.—1 Bakolinti 15:35, 38, 42-45.
Lisekwa mpo na bomoi na likoló ebandaki ntango nini? Mokapo ya 1 Bakolinti 15:23 elobi ete: “Na ntango ya kozala [ya Klisto].” Makambo oyo ezali koleka na mokili banda 1914 emonisi ete kozala ya Klisto mpe “bosukisi ya ebongiseli ya makambo” ebandaki na mbula wana. (Matai 24:3-7) Na yango, tokoki koloba ete lisekwa ya baklisto ya sembo mpo na bomoi na likoló esilaki kobanda, atako bato bazali komona yango te. Yango elingi koloba ete bantoma mpe baklisto ya ekeke ya liboso basilaki kosekwa mpe bazali na bomoi na likoló. Ezali boni mpo na baklisto ya ntango na biso oyo Nzambe apesi bango elikya ya koyangela elongo na Klisto na likoló? Bango basekwaka “na kobɛta ya liso,” elingi koloba mbala moko ntango bakufi. (1 Bakolinti 15:52) Lokola lisekwa ya bato 144000 ezali kosalema liboso ya lisekwa ya ebele ya bato oyo bakozala na bomoi awa na mabelé, ebengami “lisekwa ya liboso.”—Bafilipi 3:11; Emoniseli 20:6.
Banani bakosekwa mpo na bomoi awa na mabelé?
Biblia emonisi ete bato mingi oyo bakufá bakozonga na bomoi awa na mabelé. (Nzembo 37:29; Matai 6:10) Ntoma Yoane azwaki emonaneli ya lisekwa; na nsima alobaki boye: “Mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe liwa ná Hadesi ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe basambisamaki moto na moto engebene misala na ye. Mpe liwa ná Hadesi ebwakamaki na kati ya laki ya mɔtɔ. Yango elakisi liwa ya mibale, laki yango ya mɔtɔ.” (Emoniseli 20:11-14) Baoyo bazali na Hadesi to Sheole, elingi koloba na nkunda, bazali na makanisi ya Nzambe. Mokomoko na bango akozonga na bomoi. (Nzembo 16:10; Misala 2:31) Mpe mokomoko akosambisama na kotalela makambo oyo akosala nsima ya lisekwa na ye. Nini ekokómela liwa mpe Hadesi? Ekobwakama na “laki ya mɔtɔ.” Elingi koloba ete liwa oyo Adama atikelá bato ekozala lisusu te.
Luka 7:11-17) Lisusu, Biblia elobi ete ntango Yesu asekwisaki mwana moko ya mwasi ya mbula 12, “na mbala moko [baboti na ye] bazalaki bango lisusu te, bazalaki na esengo makasi.” (Malako 5:21-24, 35-42; Luka 8:40-42, 49-56) Ya solo, na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, tokozala na esengo ya koyamba bandeko na biso oyo bakosekwa.
Kanisá naino esengo oyo elikya ya lisekwa ekoki kopesa moto nyonso oyo akufelá ndeko to moninga moko! Kanisá naino esengo oyo mwasi ya mboka Naini, oyo akufelá mobali, ayokaki ntango Yesu asekwisaki mwana na ye ya mobali kaka moko oyo azalaki na ye! (Koyeba solo na ntina ya lisekwa ekoki komemela biso matomba nini? Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Bato mingi babangaka liwa mpe baboyaka kokanisa yango.” Mpo na nini? Mpamba te mpo na bango, liwa ezali likambo moko ya nsɔmɔ mpe oyo ekoki kolimbolama te. Koyeba solo na ntina na bakufi mpe kozala na elikya ya lisekwa ekoki kolendisa biso soki “liwa, oyo ezali monguna ya nsuka,” ekómeli biso. (1 Bakolinti 15:26) Boyebi yango esalaka ete tómitungisa koleka ndelo te ntango tokufeli ndeko to moninga moko.
Lisekwa mpo na bomoi awa na mabelé ekobanda ntango nini? Lelo oyo, mabelé etondi na mobulu, bitumba, kobomana, mpe mai ná mopɛpɛ ebebi mingi. Soki bato oyo bakufá basekwi na mokili oyo, na ntembe te esengo na bango ekozala kaka ya ntango mokuse. Nzokande, Mozalisi alaki ete etikali moke akosukisa mokili oyo Satana azali koyangela. (Masese 2:21, 22; Danyele 2:44; 1 Yoane 5:19) Etikali moke Nzambe akokisa mokano na ye mpo na mabelé. Na nsima, ebele ya bato oyo bakufá bakosekwa na mokili ya sika mpe ya kimya oyo Nzambe akosala.
[Elilingi na lokasa 7]
Bato mingi oyo bakufá bakosekwa mpo na bomoi awa na mabelé