Mpo na nini osengeli komipesa na Yehova?
Mpo na nini osengeli komipesa na Yehova?
“Na butu ya lelo, anzelu moko ya Nzambe oyo ngai nazali moto na ye . . . atɛlɛmaki pene na ngai.”—MIS. 27:23.
1. Makambo nini baoyo balingi kozwa batisimo basengeli naino kosala, mpe yango ebimisi mituna nini?
“NA LISALISI ya mbeka ya Yesu Kristo, obongoli motema na masumu na yo mpe omipesi na Yehova mpo na kosala mokano na ye?” Yango ezali moko ya mituna mibale oyo bato oyo balingi kozwa batisimo bayanolaka na nsuka ya lisukulu ya batisimo. Mpo na nini bakristo basengeli komipesa na Yehova? Ndenge nini komipesa na Nzambe ememelaka biso litomba? Mpo na nini moto akoki te kosambela Nzambe na ndenge oyo andimaka soki amipesi na ye te? Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tosengeli naino koyeba soki komipesa elimboli nini.
2. Komipesa na Yehova elimboli nini?
2 Komipesa na Nzambe elimboli nini? Talá ndenge ntoma Paulo alobelaki boyokani na ye na Nzambe. Liboso ya ebele ya bato oyo bazalaki na masuwa oyo ekómaki na likama, abengaki Yehova “Nzambe oyo ngai nazali moto na ye.” (Tángá Misala 27:22-24.) Bakristo nyonso ya solo bazali bato ya Yehova. Kasi, mokili mobimba ezali “kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoa. 5:19) Bakristo bakómaka bato ya Yehova ntango bamipesi na ye na nzela ya libondeli. Yango ezali likambo oyo moto asengeli kosala ye moko. Na nsima, asengeli kozwa batisimo ya mai.
3. Batisimo ya Yesu ezalaki elembo ya nini, mpe ndenge nini bayekoli na ye balandaka ndakisa na ye?
3 Yesu atikelaki biso ndakisa ntango ye moko azwaki ekateli ya kosala mokano ya Nzambe. Lokola abotamaki na ekólo Yisraele, oyo esilaki komipesa na Nzambe, ye mpe asilaki komipesa na Nzambe. Yango wana, na batisimo na ye, asalaki likambo moko oyo eleki oyo esɛngamaki na Mibeko. Liloba ya Nzambe emonisi ete alobaki boye: “Talá! Nayei . . . kosala mokano na yo, Ee Nzambe.” (Ebr. 10:7; Luka 3:21) Na yango, batisimo ya Yesu ezalaki elembo ete ayei epai ya Nzambe mpo na kosala mokano ya Tata na ye. Bayekoli na ye bamekolaka ndakisa na ye ntango bamipesaka mpo na kozwa batisimo. Kasi, mpo na bango batisimo ya mai emonisaka na miso ya bato ete basilaki komipesa na Nzambe na nzela ya libondeli.
Ndenge komipesa ememelaka biso matomba
4. Boninga ya Davidi ná Yonatane emonisi nini na oyo etali koyokana mpo na likambo moko boye?
4 Komipesa na biso na Nzambe ezali likambo ya lisɛki te. Eleki mosika koyokana mpamba. Kasi, ndenge nini komipesa na Nzambe ememelaka biso matomba? Na ndakisa, tótala ndenge oyo koyokana na likambo moko boye ekoki komemela bato matomba. Ndakisa ya liboso ezali kosala boninga. Mpo na kozala na moninga, osengeli kondima mokumba oyo boninga esɛngaka. Yango esɛngaka koyokana, elingi koloba osengeli komona ete ozali na mokumba ya komibanzabanza mpo na moninga na yo. Boninga oyo eyebani mingi oyo Biblia elobeli, ezali oyo ya Davidi ná Yonatane. Basalaki kutu kondimana mpo na boninga na bango. (Tángá 1 Samwele 17:57; 18:1, 3.) Atako boninga ya ndenge wana ezalaka mingi te, baninga mingi balinganaka makasi soki bayokani, to soki mokomoko azali koyeba mokumba oyo azali na yango epai ya mosusu.—Mas. 17:17; 18:24.
5. Ndenge nini moombo akokaki kotikala libela epai ya nkolo ya malamu?
5 Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele elobeli boyokani mosusu oyo bato bakokaki kozala na yango soki bayokani. Na ndakisa, ntango moombo moko alingi kotikala libela epai ya nkolo na ye, akokaki kosala boyokani ya libela na nkolo na ye. Mibeko elobaki boye: “Soki moombo yango atingami kaka na koloba ete: ‘Nalingi mpenza nkolo na ngai, mwasi na ngai ná bana na ngai; nalingi kozwa bonsomi te,’ bongo nkolo na ye asengeli kobɛlɛmisa ye na Nzambe ya solo mpe asengeli komema ye na porte to na likonzí ya porte; mpe nkolo na ye asengeli kotɔbɔla ye litoi na etubeli, mpe akozala moombo na ye libela.”—Kob. 21:5, 6.
6, 7. (a) Ndenge nini koyokana ememelaka bato matomba? (b) Yango emonisi nini na oyo etali boyokani na biso na Yehova?
6 Libala, ezali boyokani oyo esɛngaka kosala elako ya lisɛki te. Elako yango esalemaka epai ya moto, kasi ezali kɔntra te. Mwasi ná mobali oyo bazali kofanda esika moko kozanga kobalana bakoki soki moke te kozala na libateli ya solosolo; ata bana na bango bakoki kozala na yango te. Kasi, mwasi ná mobali oyo babalani na ndenge ya lokumu bazali na mokumba oyo Makomami esɛngi bango ya kosala nyonso mpo na kosilisa mikakatano na bango na bolingo ntango matata ebimi.—Mat. 19:5, 6; 1 Ko. 13:7, 8; Ebr. 13:4.
7 Na ntango ya kala, kosala boyokani na makambo ya mombongo mpe ya mosala, ezalaki komemela bato matomba. (Mat. 20:1, 2, 8) Lelo oyo mpe, likambo yango ezali na ntina. Na ndakisa, kokoma makambo oyo boyokani liboso ya kobanda mombongo to mosala na kompanyi moko ekoki kosalisa. Na yango, soki koyokana ebongisaka boninga, libala, mpe mosala, na ntembe te komipesa mobimba na Nzambe ekomemela yo matomba mingi na boyokani na yo na Yehova! Tiká tótalela sikoyo ndenge bato ya kala bazwaki matomba ndenge bamipesaki na Yehova Nzambe mpe ndenge likambo yango ezalaki elako mpamba te.
Ndenge komipesa na Nzambe ememelaki Bayisraele matomba
8. Komipesa ya Bayisraele epai ya Nzambe elimbolaki nini?
8 Ekólo ya Yisraele mobimba bamipesaki na Yehova ntango basalaki elako liboso ya Nzambe. Yehova ayanganisaki bango pene ya Ngomba Sinai, mpe alobaki na bango boye: “Soki bokotosa mpenza mongongo na ngai mpe bokobatela mpenza kondimana na ngai, bokokóma mpenza eloko na ngai moko kati na bato ya bikólo mosusu nyonso.” Bayisraele nyonso bayanolaki ete: “Nyonso oyo Yehova alobi tondimi kosala yango.” (Kob. 19:4-8) Komipesa na bango ezalaki na ndimbola monene, esukaki kaka te na kolaka kosala likambo moko. Elimbolaki ete bakómaki bato ya Yehova, mpe Yehova akómaki kotalela bango lokola ‘eloko na ye moko.’
9. Ndenge nini Bayisraele bazwaki matomba lokola bamipesaki na Nzambe?
9 Bayisraele bazwaki matomba lokola bazalaki bato ya Yehova. Azalaki sembo epai na bango mpe azalaki komibanzabanza mpo na bango kaka ndenge moboti ya bolingo asalaka epai ya mwana na ye. Nzambe alobaki na Bayisraele boye: “Mwasi akoki nde kobosana mwana na ye oyo ye azali komɛlisa mabɛlɛ mpe ayokela mwana ya libumu na ye mawa te? Ata basi wana bakoki kobosana, kasi ngai nakobosana yo te.” (Yis. 49:15) Yehova apesaki bango Mibeko mpo etambwisaka bango, basakoli mpo bálendisaka bango, mpe baanzelu mpo bábatelaka bango. Mokomi moko ya nzembo alobaki boye: “Azali koyebisa Yakobo liloba na ye, malako na ye mpe bikateli na ye ya lisambisi epai ya Yisraele. Asalelá ekólo mosusu bongo te.” (Nz. 147:19, 20; tángá Nzembo 34:7, 19; 48:14.) Ndenge Yehova azalaki komibanzabanza mpo na ekólo ya Yisraele, oyo bazalaki bato na ye na ntango ya kala, ndenge moko mpe akomibanzabanza mpo na baoyo bazali komipesa na ye lelo oyo.
Ntina oyo tosengeli komipesa na Nzambe
10, 11. Tobotamaka na kati ya libota monene ya Nzambe? Limbolá.
10 Ntango bazali kokanisa komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo, bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Mabe ezali wapi soki nazali kosambela Nzambe kozanga ete namipesa na ye?’ Tokomona ntina ya likambo yango soki totaleli ndenge oyo tozali liboso ya Nzambe. Kobosana te ete mpo na lisumu ya Adama, biso nyonso tobotamaka na kati ya libota ya Nzambe te. (Rom. 3:23; 5:12) Komipesa na Nzambe ezali likambo ya ntina mingi oyo tosengeli kosala mpo tóndimama na kati ya libota monene ya Nzambe. Tótala mpo na nini.
11 Moko te kati na biso azali na tata oyo akoki kopesa biso bomoi ya kokoka ndenge Nzambe abongisaki. (1 Tim. 6:19) Tobotamaki bana ya Nzambe te mpo ntango Adama ná Eva basalaki lisumu, bato bakabwanaki na Tata na bango ya bolingo mpe Mozalisi. (Talá mpe Kolimbola Mibeko 32:5.) Kobanda ntango wana, bato bazalaka libándá ya libota monene ya Yehova, mpe bakabwani na Nzambe.
12. (a) Ndenge nini bato ya kozanga kokoka bakoki kokɔta na libota ya Nzambe? (b) Makambo nini tosengeli kokokisa liboso ya kozwa batisimo?
12 Nzokande, mokomoko na biso akoki kosɛnga ete Nzambe andima ye na libota ya basaleli na ye oyo andimaka. * Ndenge nini ekoki kosalema mpo na bato ya masumu lokola biso? Ntoma Paulo akomaki boye: “Ntango tozalaki banguna, tozongisaki boyokani na Nzambe na nzela ya liwa ya Mwana na ye.” (Rom. 5:10) Na ntango ya batisimo tosɛngaka Nzambe lisosoli ya malamu mpo andima biso. (1 Pe. 3:21) Kasi, liboso ya kozwa batisimo ezali na makambo oyo tosengeli kokokisa. Tosengeli koyeba Nzambe, koyekola kotyela ye motema, kobongola mitema, mpe kobongola etamboli na biso. (Yoa. 17:3; Mis. 3:19; Ebr. 11:6) Kasi, ezali na likambo mosusu oyo tosengeli kosala liboso Nzambe andima biso na libota na ye. Likambo yango ezali nini?
13. Mpo na nini ebongi mpenza moto asala elako ya komipesa na Nzambe mpo akɔta na libota ya basambeli na ye oyo andimaka?
13 Liboso ete moto oyo azalaki mosika na Nzambe akɔta na libota ya basaleli na ye oyo andimaka, asengeli naino kopesa Yehova elaka. Mpo na kokanga ntina ya likambo yango, kanisá ete tata moko amoniseli mwana moko ya etike boboto mpe asepeli kozwa ye na libota na ye. Tata yango ayebani ete azali moto malamu. Kasi, liboso azwa elenge yango lokola mwana na ye, tata yango alingi ete mwana wana alaka ye likambo moko. Na yango, tata yango alobi na mwana yango boye: “Liboso nandima yo lokola mwana na ngai, nalingi koyeba soki okobanda kolinga ngai mpe okotosa ngai lokola tata na yo.” Kaka soki elenge wana alaki kosala bongo nde tata wana akondima ye na libota na ye. Kosala bongo ezali mabe? Ndenge moko mpe Yehova andimaka na libota na ye kaka baoyo bandimi kosala elako ya komipesa na ye. Biblia elobi boye: “Na bomoi na bino mobimba bómipesa epai na ye lokola mabonza oyo ezali ya kokufa té kasi ya bomoi, yango ezali ya Nzambe pe esepelisaka ye.”—Rom. 12:1, Bible na lingala ya lelo oyo.
Emonisaka bolingo mpe kondima
14. Na ndenge nini komipesa emonisaka bolingo?
14 Kosala elako ya komipesa na Nzambe emonisaka ete tolingaka Yehova na motema na biso mobimba. Na maloba mosusu, ezali lokola elako ya libala. Mokristo oyo azali kobala amonisaka bolingo na ye ntango asali elako ete akotikala sembo epai ya mwasi na ye, ata soki likambo nini ebimi. Yango ezali kosala elako epai ya moto, kasi te kaka kolaka kosala likambo moko boye. Mokristo yango ayebaka ete akozwa te libaku ya kofanda na mwasi na ye soki asali te elako ya libala. Ndenge moko, tokoki te kozwa libaku ya kokɔta na libota ya Yehova soki tosali te elako ya komipesa na ye. Na yango, tomipesaka na Nzambe mpo, atako tozali bato ya kozanga kokoka, tozalaka na mposa ya kozala bato na ye mpe tozalaka na ekateli ya kozala sembo epai na ye, ata soki likambo nini eyei.—Mat. 22:37.
15. Ndenge nini komipesa emonisaka kondima?
15 Ntango tomipesi na Nzambe, tomonisaka kondima. Mpo na nini ezali bongo? Kondima na biso epai ya Yehova epesaka biso elikya ete kopusana penepene na Nzambe ezali likambo ya malamu mpo na biso. (Nz. 73:28) Toyebi ete ekozala ntango nyonso pɛtɛɛ te kotambola elongo na Nzambe lokola tozali na kati ya “libota oyo etɛngamá mpe egumbamá,” kasi totyaka elikya na elaka oyo Yehova apesi ete akosunga biso na milende oyo tozali kosala. (Flp. 2:15; 4:13) Toyebi ete tozali bato ya kozanga kokoka, kasi tondimaka ete Yehova akomonisela biso boboto monene ata soki tosali mabunga. (Tángá Nzembo 103:13, 14; Baroma 7:21-25.) Tozali na kondima ete Yehova akopambola ekateli oyo tozali na yango ya kotikala sembo.—Yobo 27:5.
Komipesa na Nzambe ememaka esengo
16, 17. Mpo na nini komipesa na Yehova ememaka esengo?
16 Komipesa na Yehova ememaka esengo mpo yango esɛngaka ete biso moko tómipesa. Yesu amonisaki bosolo ya likambo yango na maloba oyo: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Mis. 20:35) Yesu amonaki mpenza ndenge esengo ya kopesa ezalaka ntango asalaki mosala na ye awa na mabele. Na ntango mosusu, azalaki kutu komipimela kopema, kolya, mpe bisengo mosusu mpo akoka kosalisa bato bámona nzela ya bomoi. (Yoa. 4:34) Yesu azalaki kozwa esengo na ndenge azalaki kosepelisa motema ya Tata na ye. Alobaki boye: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.”—Yoa. 8:29; Mas. 27:11.
17 Na yango, Yesu alakisaki bayekoli na ye nzela oyo ekoki komemela bango esengo na bomoi ntango alobaki ete: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya.” (Mat. 16:24) Kosala bongo esalaka ete tópusana lisusu pene na Yehova. Ezali nde na moto mosusu oyo tokoki komitika na mabɔkɔ na ye, oyo na bolingo nyonso akoki komibanzabanza mpo na biso?
18. Mpo na nini kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa na biso epai ya Yehova ememaka esengo mingi koleka komipesa na eloko to na moto moko boye?
18 Komipesa na Yehova mpe na nsima kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa yango mpe kosala mokano ya Nzambe ememaka esengo mingi koleka komipesa na eloko moko to na moto moko boye. Na ndakisa, bato mingi bamipesaka mpo na koluka bomɛngo kozanga ete bázwa esengo ya solosolo. Kasi, baoyo bamipesaka na Yehova bazwaka esengo oyo ekoumela. (Mat. 6:24) Lokumu ya kozala “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe,” epesaka bango esengo, nzokande bamipesaka na mosala moko boye te kasi nde na Nzambe na biso oyo abosanaka te oyo tozali kosala mpo na ye. (1 Ko. 3:9) Moto moko te akoki kozala na botɔndi mpo na makambo oyo tomipimelaka na mosala na ye koleka ndenge Nzambe asalaka yango. Kutu, akozongisa ata basaleli na ye ya sembo bilenge mpo ete básepela na bomoi libela na libela.—Yobo 33:25; tángá Baebre 6:10.
19. Bato oyo bamipesaka na Yehova bazalaka na libaku nini ya malamu?
19 Kopesa bomoi na yo epai ya Yehova ekoki kosalisa yo okóma mpenza na boyokani makasi na ye. Biblia elobi ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yak. 4:8; Nz. 25:14) Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela ntina oyo tokoki kozala na elikya ntango tozali kozwa ekateli ya kokóma bato ya Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 12 “Bampate mosusu” ya Yesu bakokóma bana ya Nzambe kaka na nsuka ya mbula nkóto. Kasi, lokola basili komipesa na Nzambe, bakoki na ndenge ebongi kobenga Nzambe “Tata,” mpe bakoki kotalelama lokola bato ya libota ya Yehova oyo basambelaka ye.—Yoa. 10:16; Yis. 64:8; Mat. 6:9; Em. 20:5.
Okopesa eyano nini?
• Komipesa na Nzambe elimboli nini?
• Ndenge nini komipesa na Nzambe ememelaka biso matomba?
• Mpo na nini bakristo basengeli komipesa na Yehova?
[Mituna ya boyekoli]
[Elilingi na lokasa 6]
Kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo epai ya Nzambe ememaka esengo ya libela