Salelá mikolo nyonso ya bomoi na yo mpo na nkembo ya Nzambe
Salelá mikolo nyonso ya bomoi na yo mpo na nkembo ya Nzambe
DAVIDI, mokomi ya nzembo abondelaki Yehova boye: “Na ntɔngɔ, yokisá ngai motema boboto na yo . . . Yebisá ngai nzela oyo nasengeli kotambola.” (Nz. 143:8) Ntango olamuki mpe ozali kotɔnda Yehova mpo na mokolo ya sika ya bomoi oyo apesi yo, osalaka lokola Davidi, osɛngaka Yehova akamba yo na bikateli oyo ozali kozwa mpe atambwisa yo na nzela oyo eleki malamu? Na ntembe te, osalaka bongo.
Biso basaleli ya Yehova oyo tomipesi na ye, ‘ezala tozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu,’ tosalaka makasi ‘tósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.’ (1 Ko. 10:31) Toyebaka ete lolenge oyo tozali kotambwisa bomoi na biso mokolo na mokolo ekoki kokumisa Yehova to kobebisa lokumu na ye. Lisusu, tobosanaka te ete Liloba ya Nzambe elobi ete Satana afundaka bandeko ya Kristo—mpe, kutu, afundaka nde basaleli nyonso ya Nzambe awa na mabele—“butu moi.” (Em. 12:10) Yango wana, tozali na ekateli ya kopesa eyano na bifundeli ya lokuta ya Satana, mpe kosepelisa motema ya Yehova mpe kosalela Tata na biso ya Likoló mosala mosantu “butu moi.”—Em. 7:15; Mas. 27:11.
Tiká tólobela na mokuse lolenge mibale ya malamu oyo tokoki kosalelaka bomoi na biso mikolo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe. Ya liboso ezali kopona makambo oyo eleki ntina mpe ya mibale, komonisa ete tomemyaka basusu.
Tózala na bomoi oyo eyokani na ndai na biso
Ntango tomipesaki na Yehova, tomonisaki na motema na biso mobimba, mposa oyo tozalaki na yango ya kosalela ye. Tolakaki mpe Yehova ete tolingi kotambola na banzela na ye “mokolo na mokolo,” ɛɛ, mpo na libela. (Nz. 61:5, 8) Ndenge nini tozali kokokisa elaka yango? Ndenge nini tomonisaka mikolo nyonso ete tolingaka Yehova na motema na biso mobimba?
Liloba ya Nzambe emonisi polele makambo oyo Yehova azali kosɛnga biso tókokisa. (Mib. 10:12, 13) Makambo yango mingi ezali na etanda oyo ezali na motó ya likambo “Makambo oyo Nzambe asɛngi biso,” na lokasa 22. Nzambe nde asɛngi biso makambo yango nyonso mpe ezali na ntina mingi. Ndenge nini tokoki koyeba likambo oyo tosengeli kotya na esika ya liboso ntango makambo mibale to mingi ezali kosɛnga likebi na biso na ntango kaka moko?
Totyaka mosala na biso mosantu na esika ya liboso, oyo esangisi koyekola Biblia, kobondela, koyangana na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola. (Mat. 6:33; Yoa. 4:34; 1 Pe. 2:9) Kasi, makambo ya elimo ekoki te kozwa biso mokolo mobimba. Mosala, kelasi mpe misala mosusu ya ndako esengeli mpe kokɔta na programɛ na biso. Atako bongo, tosalaka makasi mpo mosala na biso ya mosuni mpe makambo mosusu ebebisa te mosala na biso mosantu, na ndakisa koyanganaka na makita. Na ndakisa, ntango tolingi kokende konje, tosengeli kokeba ete tózanga te ntango mokɛngɛli ya zongazonga akoya kotala lisangá na biso, tózanga te liyangani ya mokolo moko, liyangani ya zongazonga to liyangani ya etúká. Na ntango mosusu, tokoki kosangisa mikumba na biso mosusu. Na ndakisa, tokoki koyokana na libota mpo na kosukola Ndako ya Bokonzi to kosalela ntango ya kolya na mosala to na kelasi mpo na kopesa litatoli na baninga na biso ya mosala to ya kelasi. Ya solo, ata ekateli nini tolingi kozwa na bomoi na biso, na ndakisa, koluka mosala, kopona kelasi oyo tokotánga, to kopona baninga, tosengeli kotya na esika ya liboso, likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso—losambo ya Yehova, Tata na biso ya bolingo.—Mos. 12:13.
Tómonisaka ete tomemyaka basusu
Yehova alingaka tómibanzabanzaka mpo na basusu mpe tósalelaka bango makambo ya malamu. Nzokande, Satana atindaka bato bázala na ezaleli ya moimi. Mokili na ye etondi na bato oyo “bamilingaka” mpe “balingá bisengo” mpe baoyo bazali “kolona mpo na nzoto.” (2 Tim. 3:1-5; Gal. 6:8) Bato mingi bakanisaka mpenza te na makama oyo misala na bango ekoki komemela basusu. “Misala ya nzoto” ezali komonana bisika nyonso.—Gal. 5:19-21.
Bato oyo batambwisami na elimo ya Yehova, bakeseni mpenza mpo bamonisaka bizaleli lokola bolingo, boboto, mpe bolamu na boyokani na bango na basusu. (Gal. 5:22) Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete tótyaka bamposa ya basusu na esika ya liboso. Yango wana, tosalaka makambo oyo emonisaka ete totyelaka basusu likebi, atako tokebaka ete tómikɔtisa te na makambo na bango. (1 Ko. 10:24, 33; Flp. 2:3, 4; 1 Pe. 4:15) Totyaka likebi mingimingi epai ya bandeko na biso na lisangá. Atako bongo, tosalaka mpe makasi mpo na kosalisa bato mosusu oyo bayebi Yehova te. (Gal. 6:10) Okoki koluka libaku lelo mpo na komonisa boboto epai ya moto oyo okokutana na ye?—Talá etanda “Moniseláká bango limemya,” na lokasa 23.
Tosengeli kozela kaka te likambo moko boye esalema mpo tómonisa ete tomibanzabanzaka mpo na basusu. (Gal. 6:2; Ef. 5:2; 1 Tes. 4:9, 10) Na esika ya kosala bongo, mokolo na mokolo tosengeli koluka koyeba makambo oyo basusu bazali kokutana na yango mpe kozala pene mpo na kosalisa bango, ata soki kosala yango ekoki kozala pɛtɛɛ te mpo na biso. Tosengeli kokabola na basusu eloko nyonso oyo tozali na yango—ntango, biloko, makambo oyo toyebi, mpe bwanya na biso. Yehova alaki biso ete soki tozali kokabela basusu, ye mpe akokabela biso.—Mas. 11:25; Luka 6:38.
Mosala mosantu “butu moi”
Ekoki mpenza kosalema ete tósalela Yehova mosala mosantu “butu moi”? Ɛɛ, soki tozali kokoba kosala na molende makambo nyonso ya losambo na biso. (Mis. 20:31) Tokoki kotondisa bomoi na biso na mosala mosantu soki tozali kotánga Liloba ya Nzambe mpe tozali komanyola yango mokolo na mokolo, tozali kobondela ntango nyonso, tozali kosala makasi ete tózangisa te makita nyonso, mpe kosalela mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli.—Nz. 1:2; Luka 2:37; Mis. 4:20; 1 Tes. 3:10; 5:17.
Mokomoko na biso asalelaka Yehova mosala mosantu ndenge wana? Soki ezali bongo, mposa oyo tozali na yango ya kosepelisa ye mpe kopesa eyano na bifundeli ya lokuta ya Satana ekomonana na makambo nyonso ya bomoi na biso. Tosalaka makasi tópesa Yehova nkembo na makambo nyonso oyo tosalaka ata soki tokutani na likambo nini. Totikaka ete mitinda na ye etambwisa maloba, etamboli mpe bikateli oyo tozwaka. Tomonisaka botɔndi mpo na makambo malamu oyo asalaka mpo na biso mpe ndenge asungaka biso, na ndenge totyelaka ye motema na biso mobimba mpe tosalelaka makasi na biso na mosala na ye. Mpe ntango tokokisi te masɛngami na ye mpo tozali bato ya kozanga kokoka, tondimaka toli mpe disiplini na ye.—Nz. 32:5; 119:97; Mas. 3:25, 26; Kol. 3:17; Ebr. 6:11, 12.
Tiká ete tókoba mikolo nyonso kozala na bomoi oyo ekopesa Nzambe nkembo. Soki tosali bongo, tokozwa kopema mpo na milimo na biso mpe tokosepela mpenza na libateli ya bolingo ya Tata na biso ya likoló libela na libela.—Mat. 11:29; Em. 7:16, 17.
[Etanda/Elilingi na lokasa 22]
Makambo oyo Nzambe asɛngi biso
• Kobondela ntango nyonso.—Rom. 12:12.
• Kotánga mpe koyekola Biblia, mpe kosalela makambo oyotoyekolaka.—Nz. 1:2; 1 Tim. 4:15.
• Kosambela Yehova na lisangá.—Nz. 35:18; Ebr. 10:24, 25.
• Kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya bato ya libota na biso.—1 Tim. 5:8.
• Kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli.—Mat. 24:14; 28:19, 20.
• Kokokisa bamposa na biso ya mosuni mpe ya elimo, oyo esangisi mpe kozwa ntango ya kominanola.—Mrk. 6:31; 2 Ko. 7:1; 1 Tim. 4:8, 16.
• Kokokisa mikumba ya lisangá.—Mis. 20:28; 1 Tim. 3:1.
• Komibanzabanza mpo na bopɛto ya ndako na biso mpe ya Ndako ya Bokonzi.—1 Ko. 10:32.
[Etanda/Elilingi na lokasa 23]
Moniseláká bango limemya
• Ndeko mobali to ndeko mwasi oyo azali mobange.—Lev. 19:32.
• Moto moko oyo azali konyokwama na nzoto to na makanisi.—Mas. 14:21.
• Ndeko moko ya lisangá oyo azali na mposa makasi ya lisalisi oyo yo nde okoki kopesa ye.—Rom. 12:13.
• Ndeko na yo mpenza ya libota.—1 Tim. 5:4, 8.
• Ndeko moko ya lisangá oyo molongani na ye akufi.—1 Tim. 5:9.
• Nkulutu moko ya lisangá oyo asalaka mosala makasi.—1 Tes. 5:12, 13; 1 Tim. 5:17.