Yehova azali Nkolo Mokonzi na biso oyo aleki nyonso!
Yehova azali Nkolo Mokonzi na biso oyo aleki nyonso!
“Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azali esika na ngai ya kokima.”—NZ. 73:28.
1. Na kolanda maloba na ye oyo ezali na 1 Bakorinti 7:31, emonani ete Paulo azalaki kolobela nini?
NTOMA Paulo alobaki boye: “Makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.” (1 Ko. 7:31) Emonani ete kobongwana oyo azalaki kolobela ezali lokola ntango bato bazali kosala teyatre, basani oyo bazwi mikumba ya bato ya malamu to baoyo bazwi mikumba ya bato ya mabe basilisi kosana, bakei mpe basusu bakɔti.
2, 3. (a) Tokoki kokokanisa ntembe oyo etali bokonzi ya Yehova na likambo nini? (b) Mituna nini tokotalela?
2 Lelo, teyatre moko ya ntina mingi ezali kosalema—etali mpe yo! Etaleli mingimingi kolongisama ya bokonzi ya Yehova Nzambe. Tokoki kokokanisa teyatre yango na likambo moko oyo ekoki kosalema na mboka moko. Na ngámbo moko, guvɛrnema oyo etyamá na kolanda mibeko ezali kosala mpo makambo etambola na molɔngɔ. Na ngámbo mosusu, lisangá moko ya mabe, oyo ezali koyangela na bokosi, na mobulu mpe koboma. Ebongiseli yango oyo eyokani na mibeko te ezali kotɛmɛla boyangeli oyo etyamá mpe komeka bosembo ya bana-mboka nyonso epai ya guvɛrnema yango.
3 Likambo moko ya ndenge wana ezali kosalema na molɔ́ngɔ́ mobimba. Ezali na guvɛrnema ya “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,” oyo etyamá na kolanda mibeko. (Nz. 71:5) Kasi bato bazali sikoyo konyokwama na ebongiseli moko ya mabe oyo etambwisami na “moto mabe.” (1 Yoa. 5:19) Ezali kotɛmɛla guvɛrnema ya Nzambe, guvɛrnema moko ya malamu, mpe ezali kotya na komekama bosembo ya bato nyonso epai ya boyangeli na ye. Likambo yango ebandaki ndenge nini? Mpo na nini Nzambe apesi yango nzela? Mokomoko na biso akoki kosala nini mpo na likambo yango?
Makambo oyo teyatre yango elobeli
4. Teyatre monene oyo etali molɔ́ngɔ́ mobimba elobeli makambo mibale nini oyo ekendaka nzela moko?
4 Teyatre yango monene oyo etali molɔ́ngɔ́ mobimba elobeli makambo mibale oyo ekendaka nzela moko: bokonzi ya Yehova mpe bosembo ya bato. Na Makomami, Yehova abengami mbala mingi “Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.” Na ndakisa, na elikya nyonso, mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azali esika na ngai ya kokima.” (Nz. 73:28) Kozala mokonzi-oyo-aleki-nyonso elimboli koleka na nguya to na bokonzi. Mokonzi oyo aleki nyonso azalaka na bokonzi likoló ya nyonso. Tozali na bantina malamu ya komona Yehova ete azali Nzambe Oyo-Aleki-Nyonso.—Dan. 7:22.
5. Mpo na nini tosengeli kosimba bokonzi ya Yehova?
5 Lokola azali Mozalisi, Yehova Nzambe azali Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na mabele mpe na molɔ́ngɔ́ mobimba. (Tángá Emoniseli 4:11.) Yehova azali mpe Mosambisi na biso, Moto oyo apesaka biso mibeko, mpe Mokonzi na biso, mpo ye moko nde azali na bokonzi ya kosambisa, ya kopesa mibeko mpe ya koyangela—makambo misato oyo esimbi boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Yis. 33:22) Lokola bomoi na biso euti na Nzambe mpe ye nde asimbi yango, tosengeli komona ye ete azali Nkolo Mokonzi na biso oyo aleki nyonso. Tokokoba kosimba bokonzi na ye soki tozali koyeba ntango nyonso ete “Yehova ye moko apiki makasi kiti na ye ya bokonzi na likoló; mpe bokonzi na ye eyangeli eloko nyonso.”—Nz. 103:19; Mis. 4:24.
6. Bosembo ezali nini?
6 Mpo na kosimba bokonzi ya Yehova, tosengeli kobatela bosembo na biso epai na ye. “Bosembo” elimboli kozala na bizaleli oyo elongobani mpe kokangama na moto na motema mobimba. Moto oyo abatelaka bosembo ezali moto oyo azangi mbeba. Yobo azalaki moto ya ndenge wana.—Yobo 1:1.
Ndenge teyatre yango ebandaki
7, 8. Ndenge nini Satana abɛtɛlaki lotomo ya Yehova ya kozala Mokonzi ntembe?
7 Eleki mbula soki 6 000, ekelamu moko ya elimo abɛtɛlaki lotomo ya Yehova ya kozala Mokonzi ntembe. Mposa ya moimi mpo bato básambela ye nde etambwisaki maloba mpe misala ya motomboki yango. Motomboki yango atindaki mobali ná mwasi ya liboso, Adama ná Eva, bátika kozala sembo na bokonzi ya Nzambe mpe alukaki kobebisa lokumu ya Yehova na ndenge alobaki ete Yehova abukaki lokuta. (Tángá Ebandeli 3:1-5.) Motomboki yango akómaki Monguna monene, Satana (Motɛmɛli), Zabolo (Mokoseli bato makambo), nyoka (Mokosi), mpe dragɔ (Molei).—Em. 12:9.
8 Satana amityaki mokonzi oyo azali kotɛmɛla Nzambe. Lokola ntembe yango ebimaki, Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso akosala nini? Akoboma na mbala moko batomboki yango misato—Satana, Adama ná Eva? Azalaki mpenza na nguya ya kosala yango, mpe likambo ya ndenge wana elingaki komonisa soki nani azali na nguya oyo eleki. Elingaki mpe komonisa ete Yehova alobaki solo mpo na etumbu oyo moto akozwa soki abuki mobeko na ye. Mpo na nini Nzambe asalaki bongo te?
9. Satana abimisaki ntembe mpo na makambo nini?
9 Ntango Satana akosaki Adama ná Eva mpe akabolaki bango na Nzambe, abimisaki ntembe mpo na lotomo ya Yehova ya kosɛnga bato bátosaka ye. Lisusu, ntango atindaki mwasi ná mobali ya liboso bábuka mobeko ya Nzambe, Satana abimisaki mpe ntembe mpo na bosembo ya baanzelu mpe bato. Ndenge emonisamaki na likambo ya Yobo, oyo azalaki sembo na bokonzi ya Yehova, Satana alobaki ete akoki kokabola bato nyonso na Nzambe.—Yobo 2:1-5.
10. Lokola aboyaki kosilisa na mbala moko ntembe oyo ebimaki mpe komonisa ete azali Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova apesaki nzela na nini?
10 Lokola Yehova aboyaki kosilisa na mbala moko ntembe oyo ebimaki mpe komonisa ete azali Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, atikelaki Satana ntango ya komonisa soki makambo oyo alobaki ezali solo. Nzambe apesaki mpe bato libaku ya komonisa bosembo na bango na bokonzi na ye. Nini esalemi na boumeli ya bikeke? Satana asalá ebongiseli moko ya nguya mpe ya mabe. Nsukansuka, Yehova akobebisa yango mpe akoboma Zabolo, mpe akomonisa mpo na libela ete ye nde abongi kozala Mokonzi oyo aleki nyonso. Lokola Yehova Nzambe ayebaki ete makambo ekosuka malamu, asakolaki yango na Edene, ntango botomboki ebimaki.—Eba. 3:15.
11. Bato mingi basalaki nini na likambo oyo etali bokonzi ya Yehova?
11 Bato mingi bamonisaki kondima mpe babatelaki bosembo na bango na likambo oyo etali bokonzi ya Yehova mpe kosantisama ya nkombo na ye. Kati na bango, tokoki kotánga Abele, Enoka, Noa, Abrahama, Sara, Moize, Ruta, Davidi, Yesu, bayekoli ya Kristo ya ekeke ya liboso, mpe bamilio ya bato oyo bazali kobatela Mas. 27:11.
bosembo na bango lelo. Bato yango oyo bazali kosimba bokonzi ya Nzambe bazali kosalisa na komonisa ete Satana azali moto ya lokuta mpe na kosukola nkombo ya Yehova nsɔni oyo Zabolo abwakelaki yango na ndenge amikumisaki ete akoki kokabola bato nyonso na Nzambe.—Nsuka ya teyatre yango eyebani
12. Mpo na nini tokoki kondima ete Nzambe akotika mabe libela na libela te?
12 Tokoki kondima ete mosika te Yehova akomonisa bokonzi na ye. Akotika mabe libela na libela te, mpe toyebi ete tozali na mikolo ya nsuka. Yehova abomaki bato mabe na ntango ya Mpela. Abebisaki Sodoma ná Gomora mpe Farao ná mampinga na ye. Sisera ná basoda na ye mpe Senakeribe ná mampinga na ye ya Asiri balongaki te kotɛlɛma liboso ya Oyo-Aleki-Likoló. (Eba. 7:1, 23; 19:24, 25; Kob. 14:30, 31; Bas. 4:15, 16; 2 Bak. 19:35, 36) Na yango, tokoki kozala na elikya ete Yehova Nzambe akotika libela na libela te ete nkombo na ye etyolama mpe Batatoli na ye bányokwamaka. Longola yango, sikoyo tozali komona elembo ya kozala ya Yesu mpe ya bosukisi ya makambo ya ntango oyo mabe.—Mat. 24:3.
13. Tokoki kosala nini mpo tóbomama te elongo na banguna ya Yehova?
13 Mpo tóbomama te elongo na banguna ya Nzambe, tosengeli kozala sembo na bokonzi ya Yehova. Ndenge nini tokoki kosala yango? Tosengeli kokabwana na boyangeli mabe ya Satana mpe kotika te bato na ye bábangisa biso. (Yis. 52:11; Yoa. 17:16; Mis. 5:29) Kaka soki tosali bongo nde tokoki kosimba bokonzi ya Tata na biso ya likoló mpe kozala na elikya ya kobika ntango Yehova akolongola nsɔni nyonso oyo bapakolá nkombo na ye mpe akomonisa ete azali Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba.
14. Biteni ndenge na ndenge ya Biblia elobeli nini?
14 Biblia mobimba elobeli makambo mingi oyo etali bato mpe bokonzi ya Yehova. Mikapo misato ya ebandeli eyebisi biso ndenge Nzambe azalisaki mokili mpe ndenge moto akweaki na lisumu; nzokande mikapo misato ya nsuka elobeli ndenge moto akozonga moto ya kokoka. Biteni mosusu ya katikati elobeli bibongiseli oyo Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azwi mpo na kokokisa mokano na ye mpo na bato, mpo na mabele mpe mpo na molɔ́ngɔ́. Mokanda ya Ebandeli emonisi ndenge oyo Satana mpe mabe ekɔtaki na mokili, mpe mikapo ya nsuka ya mokanda ya Emoniseli emonisi ndenge oyo mabe ekolongolama, ndenge Zabolo akobebisama, mpe ndenge mokano ya Nzambe ekosalema na mabele ndenge ezali na likoló. Ya solo, Biblia emonisi esika lisumu mpe liwa eutá mpe emonisi ndenge oyo ekolongolama na mabele, mpo etika esika na esengo oyo ezangi nsuka mpe bomoi ya seko mpo na bato oyo babatelaka bosembo.
15. Tokoki kosala nini mpo tózwa matomba oyo ekoya ntango teyatre oyo etali bokonzi ekosila?
15 Etikali moke makambo nyonso ya mokili oyo ebongwana. Teyatre oyo etali ntembe ya bokonzi, oyo ebandá banda bikeke ya kalakala, Nz. 118:6, 7.
ekokóma na nsuka. Satana akolongwa na teyatre, mpe akolimwa mpo na libela, mpe mokano ya Nzambe ekolonga. Kasi mpo na kosepela na likambo yango mpe kozwa ebele ya mapamboli oyo Liloba ya Nzambe esakolá, tosengeli kosimba bokonzi ya Yehova sikoyo. Tokoki kozala na katikati te. Mpo tóloba ete: “Yehova azali na ngai esika moko,” tosengeli kotikala na ngámbo na ye.—Tokoki kobatela bosembo na biso
16. Mpo na nini tokoki kondima ete bato bakoki kobatela bosembo na bango epai ya Nzambe?
16 Tokoki kosimba bokonzi ya Yehova mpe kobatela bosembo na biso, mpo ntoma Paulo akomaki boye: “Komekama moko te ekómeli bino oyo ekómelaka bato nyonso te. Kasi Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.” (1 Ko. 10:13) Komekama oyo Paulo alobelaki eutaka wapi, mpe ndenge nini Nzambe abongiselaka biso nzela ya kobima?
17-19. (a) Bayisraele bakweaki na komekama nini na esobe? (b) Mpo na nini tokoki kobatela bosembo na biso epai ya Yehova?
17 Ndenge bomoi ya Yisraele na esobe emonisi yango, “komekama” eyaka na nzela ya makambo oyo ekoki kotinda biso tóbuka mibeko ya Nzambe. (Tángá 1 Bakorinti 10:6-10.) Bayisraele bakokaki kotɛmɛla komekama, kasi bazalaki na mposa ya “makambo ya mabe” ntango Yehova asalaki likamwisi mpe abimiselaki bango bandɛkɛ babengi kayɛ na boumeli ya sanza mobimba. Atako bato bazangaki mosuni mpo na mwa ntango, Nzambe apesaki bango mana mpo bályaka. Atako bongo, bakweaki na komekama; batikaki lokoso emema bango ntango bazalaki kolɔkɔta bakayɛ.—Mit. 11:19, 20, 31-35.
18 Mwa moke liboso, ntango Moize akendaki kozwa Mibeko na Ngomba Sinai, Bayisraele bakómaki basambeli ya bikeko, basambelaki mwana-ngɔmbɛ mpe bamipesaki na bisengo ya nzoto. Lokola mokambi na bango oyo bazalaki komona azalaki te, bakweaki na komekama. (Kob. 32:1, 6) Kaka liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka, bana basi ya Moabe bakosaki bankóto ya Bayisraele, mpe basangisaki na bango nzoto. Na likambo yango, Bayisraele ebele bakufaki mpo na lisumu na bango. (Mit. 25:1, 9) Na bantango mosusu, bato ya Yisraele bakweaki na komekama ya kotomboka mpe koyimayima; na libaku moko, balobaki mabe mpo na Moize mpe mpo na Nzambe ye moko! (Mit. 21:5) Bayisraele bayimayimaki ata nsima ya kobomama ya Kora, Datane, Abirame ná bato mosusu oyo basanganaki na botomboki na bango; balobaki ete kobomama ya batomboki yango ezalaki sembo te. Mpo na yango, Bayisraele 14 700 bakufaki na bolɔzi oyo Nzambe atindelaki bango.—Mit. 16:41, 49.
19 Ata komekama moko te oyo touti kolobela elekaki makasi mpo Bayisraele bákoka kolonga yango te. Bato yango bakweaki na komekama mpo bazangaki kondima mpe babosanaki Yehova, ndenge oyo azalaki kobatela bango na bolingo, mpe bosembo ya banzela na ye. Ndenge esalemaki mpo na Bayisraele, komekama oyo tokutanaka na yango ezalaka likambo ya sika te mpo na biso bato. Soki tosali mpenza makasi mpo tótɛmɛla yango mpe totyeli Nzambe motema ete akosunga biso, tokoki kobatela bosembo na biso. Tokoki kondima likambo yango mpo “Nzambe azali sembo” mpe atikaka te ete ‘tómekama koleka oyo tokoki kokangela motema.’ Yehova akoki kosundola biso ata moke te mpe akoki kotika biso te tókutana na makambo oyo Nz. 94:14.
ekoki kosala ete moto akoka soki moke te kosala mokano ya Nzambe.—20, 21. Ntango tomekami, ndenge nini Nzambe abongisaka “nzela ya kobima”?
20 Yehova abongiselaka biso “nzela ya kobima” na ndenge apesaka biso makasi ya kolonga komekama. Na ndakisa, banyokoli bakoki konyokola biso na nzoto mpo na kotinda biso tówangana kondima na biso. Mpo na minyoko ya ndenge wana, tokoki koyoka mposa ya kowangana kondima na biso mpo tókima kobɛtama, minyoko, to mpe liwa. Nzokande na kolanda maloba oyo Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, oyo ezali na 1 Bakorinti 10:13, toyebi ete likambo oyo ebimisi komekama ezalaka kaka mpo na ntango mokuse. Yehova akotika te likambo yango ekóma tii na esika oyo tokokoka te kotikala sembo epai na ye. Nzambe akoki kolendisa kondima na biso mpe kopesa biso makasi ya elimo oyo tosengeli na yango mpo na kobatela bosembo na biso.
21 Yehova asungaka biso na nzela ya elimo santu na ye. Elimo yango ezongisaka mpe na makanisi na biso mitinda ya Biblia oyo tosengeli na yango mpo na kolonga komekama. (Yoa. 14:26) Na yango, tokokosama te mpo na kolanda nzela ya mabe. Na ndakisa, toyebi bantembe oyo etali bokonzi ya Yehova mpe bosembo ya bato. Na boyebi ya ndenge wana mpe na lisalisi ya Nzambe, bato mingi bazwaki makasi ya kotikala sembo tii na nsuka. Kasi, liwa te nde ezalaki nzela ya kobima mpo na bango; Yehova nde asalisaki bango báyika mpiko tii na nsuka kozanga bákwea na komekama. Akoki mpe kosala bongo mpo na biso. Kutu mpo na bolamu na biso, asalelaka mpe baanzelu na ye ya sembo lokola basali oyo “batindami mpo na kosalela bato oyo bakozwa libula ya lobiko.” (Ebr. 1:14) Ndenge lisolo oyo elandi emonisi yango, kaka bato oyo babatelaka bosembo nde bakoki kolikya kozwa libaku kitoko ya kosimba bokonzi ya Nzambe libela na libela. Tokoki kotángama na kati ya bato yango soki tokobi komona Yehova ete azali Nkolo Mokonzi na biso oyo aleki nyonso.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tosengeli kondima Yehova ete azali Nkolo Mokonzi na biso oyo aleki nyonso?
• Kobatela bosembo na biso epai ya Nzambe elimboli nini?
• Ndenge nini toyebi ete mosika te Nzambe akomonisa ete azali mokonzi oyo aleki nyonso?
• Na kolanda 1 Bakorinti 10:13, mpo na nini tokoki kobatela bosembo?
[Mituna ya boyekoli]
[Elilingi na lokasa 24]
Satana atindaki Adama ná Eva bátika kozala sembo epai ya Yehova
[Elilingi na lokasa 26]
Zwá ekateli ya kosimba bokonzi ya Yehova