Ozali koyeba lisusu?
Ozali koyeba lisusu?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna elandi:
• Mangomba oyo endimaka liteya oyo elobi ete makambo nyonso etángamá euti na lingomba nini?
Lingomba ya Calvin elobelaka mingi liteya oyo elobi ete makambo nyonso etángamá. Mateya ya Jean Cauvin (John Calvin), moto oyo akɔtisaki Mbongwana, ezali komonana na mangomba mingi, na ndakisa Église réformée, presbytérienne, congrégationaliste, mpe Puritaine.—1/9, nkasa 18-21.
• Kaina azwaki mwasi na ye wapi?
Na ntembe te mwasi ya Kaina azalaki moko ya bakitani ya Eva oyo abotaki “bana mibali mpe bana basi.” (Eba. 5:4)—1/9, lokasa 25.
• Ntango abimisaki Yisraele na Ezipito, Nzambe atindaki anzelu nini liboso na bango? (Kob. 23:20, 21)
Tokoki mpenza kokanisa ete anzelu yango, oyo ‘azalaki na nkombo ya Yehova na kati na ye’ ezalaki Mwana ya liboso ya Nzambe, oyo na nsima abotamaki na nkombo Yesu.—15/9, lokasa 21.
• Mpo na nini mokanda ya 1 Bakorinti elobeli mosuni ya nyama oyo epesamaki mbeka na bikeko?
Kopesa mbeka ya nyama ezalaki molulu ya ntina mingi oyo ezalaki kosalema na batempelo ya Bagrɛki mpe Baroma, kasi mosuni oyo elyami te bazalaki mpe kotɛkisa yango na bazando ya kotɛka misuni. Bakristo bazalaki kosangana te na losambo ya bapakano; kasi ezalaki na ntina te bámona mosuni oyo euti kuna ete ezalaki mbindo, ntango ezali kotɛkama na zando. Ntoma Paulo akomaki boye: “Eloko nyonso oyo bazali kotɛka na zando oyo batɛkaka misuni ya nyama bókoba kolya yango, bótuna mituna te mpo na lisosoli na bino; mpo ‘mabele mpe biloko oyo etondisi yango ezali ya Yehova.’” (1 Ko. 10:25, 26)—1/10, lokasa 12.
• Na oyo etali losambo ya solo, koluka komilongisa nini Nzambe andimaka te?
‘Eleki makasi. Nalingi nde te. Nazali na misala mingi. Nabongi mpenza na mosala yango te. Moto moko azokisi motema na ngai.’ Bantina wana ebongi te mpo na koboya kotosa mitindo ya Nzambe.—15/10, nkasa 12-15.
• Wapi mwa makambo oyo okoki kosala mpo makita ya bokristo etonga yo moko mpe basusu?
Bongisá liboso. Yanganáká pɔsɔ nyonso. Kómá na ngonga malamu. Memá bisaleli nyonso. Kotya makanisi na makambo mosusu te. Pesá biyano. Bakomantɛrɛ na yo ezala mikuse. Kokisá mikumba na yo. Pesá baoyo basalaki mikumba longonya. Sololá na bandeko liboso mpe nsima ya makita.—15/10, lokasa 22.
• Maladi ya maba, oyo eyebani lelo na nkombo ya maladi ya Hansen, ezali na lisolo nini ya Biblia oyo elobeli mwana mwasi moko ya moke?
Mokanda ya 2 Bakonzi mokapo 5 elobeli mwana mwasi moko ya moke ya Yisraele oyo azalaki mosaleli na ndako ya Naamane, mokonzi moko ya basoda ya Siri. Lokola abɛlaki maladi ya maba, mwana mwasi yango ayebisaki ye akende komona mosakoli Elisha mpo abika.—1/11, lokasa 22.
• Ndenge Arona akweaki na bopusi ya baninga ekoki koteya biso nini?
Mokolo moko ntango Moize azalaki te, Bayisraele batindaki ye asalela bango nzambe. Alɛmbaki mpe aselelaki bango yango. Yango emonisi ete bopusi ya baninga etali kaka bilenge te. Ekoki kokweisa ata mikóló oyo balingaka kosala oyo ezali malamu. Tosengeli kotɛmɛla bopusi mabe ya baninga.—15/11, lokasa 8.
• Solo to lokuta?
Satana azalaka mpenza: solo. (2 Ko. 11:14) Na liwa bato nyonso bakendaka na mokili ya bilimo: lokuta. (Mos. 9:5) Baanzelu ya sembo batyelaka biso likebi: solo. (Nz. 34:7) Yesu akokani na Nzambe: lokuta. (1 Ko. 11:3)—1/12, nkasa 8-9.