“Nazali elongo na bino”
“Nazali elongo na bino”
“Bato mingi bakotambola epai na epai, mpe boyebi ya sikisiki ekokóma mingi.”—DAN. 12:4.
OKOPESA EYANO NINI?
Na ntango na biso, ndenge nini bakristo ya sembo bazwi “boyebi ya sikisiki”?
Ndenge nini bato oyo bazali kondima solo bakómi “mingi”?
Na ndenge nini boyebi ya sikisiki ekómi “mingi”?
1, 2. (a) Ndenge nini toyebi ete Yesu azali elongo na bayekoli na ye lelo oyo mpe akozala na bango na mikolo ekoya? (b) Danyele 12:4 elobeli eloko nini oyo ekomonana epai ya baoyo bakoyekola Makomami malamumalamu?
KANISÁ ete ozali na kati ya Paradiso. Mokolo nyonso ntango olamuki na ntɔngɔ, ozali nzoto kolɔngɔnɔ mpe na makasi ya kobanda mosala. Ozali koyoka nzoto mpasi te, ozali mpe na maladi te. Binama na yo nyonso, ezala miso, matoi, zolo, ezali kosala malamu. Ozali nzoto makasi, ozali kosepela na mosala na yo, ozali na baninga ebele, mpe ozali lisusu ata na motungisi moko te. Okoki kozwa mapamboli yango na mokili ya sika oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Yesu Kristo, Mokonzi oyo Nzambe aponi, akopambola bato nyonso mpe akosalisa bango bázwa boyebi ya Yehova.
2 Yehova akozala elongo na basaleli na ye ya sembo ntango bakobanda kosala mosala monene ya koteya bato boyebi na ye. Kasi, Nzambe ná Mwana na ye bazalaka elongo na bakristo ya sembo banda bankama ya bambula. Liboso Yesu amata na likoló, ayebisaki bayekoli na ye ya sembo ete akozala elongo na bango. (Tángá Matai 28:19, 20.) Mpo na kolendisa kondima na biso na elaka yango, tótalela mwa maloba oyo ezali na esakweli moko oyo Danyele akomaki ntango azalaki na Babilone eumeli sikoyo mbula koleka 2 500. Danyele akomaki ete na “ntango ya nsuka,” eleko oyo tozali sikoyo, “bato mingi bakotambola epai na epai, mpe boyebi ya sikisiki ekokóma mingi.” (Dan. 12:4) Makambo oyo ezali kosalema lelo oyo emonisi ete liloba ya Ebre oyo ebongolami na ‘kotambola epai na epai’ ezali na likanisi ya koyekola na mozindo. Baoyo bazali kotambola epai na epai ndenge wana bazali kozwa mapamboli mingi mpenza! Esakweli elobaki ete baoyo bakoyekola Makomami malamumalamu bakozwa boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe. Ebakisaki mpe ete bato mingi bakokóma na “boyebi ya sikisiki.” Longola yango, boyebi yango ekokóma mingi. Ekoteyama bipai nyonso mpe ekozala mpasi te mpo bato bázwa yango. Wana tozali kotalela ndenge oyo esakweli yango ezali kokokisama, tokomona ete Yesu azali elongo na bayekoli na ye lelo oyo mpe ete Yehova azali na makoki nyonso mpo na kokokisa nyonso oyo alakaki.
BAKRISTO YA SEMBO BAZWI “BOYEBI YA SIKISIKI”
3. “Boyebi ya sikisiki” ezalaki ndenge nini nsima ya liwa ya bantoma?
3 Nsima ya liwa ya bantoma, bakristo mingi batikaki mateya ya solo mpe lipɛngwi oyo esakolamaki epalanganaki nokinoki. (Mis. 20:28-30; 2 Tes. 2:1-3) Na boumeli ya bankama ya bambula oyo elandaki, “boyebi ya sikisiki” ezalaki mingi te, ezala epai ya bato mosusu to mpe epai ya baoyo bazalaki komibenga bakristo. Atako bakonzi ya mangomba ya bokristo bazalaki koloba ete bandimaka Biblia, bazalaki koteya mateya ya lokuta, “mateya ya bademo” oyo ezalaki kofingisa nkombo ya Nzambe. (1 Tim. 4:1) Bato mingi bazalaki na molili ya elimo. Kati na mateya ya lokuta oyo ezalaki koteyama tokoki kotánga mateya lokola oyo elobi ete Nzambe azali Bosato, ete molimo ekufaka te, mpe ete milimo mosusu enyokwamaka libela na libela na lifelo.
4. Na bambula ya 1870, ndenge nini etuluku moko ya bakristo bakómaki koluka “boyebi ya sikisiki”?
4 Nzokande, na bambula ya 1870, mbula soki 40 liboso “mikolo ya nsuka” ebanda, etuluku moko ya bakristo ya sembo babandaki koyangana na Pennsylvanie, na États-Unis, mpo na koyekola Biblia na mozindo mpe koluka “boyebi ya sikisiki.” (2 Tim. 3:1) Bamipesaki nkombo Bayekoli ya Biblia. Bazalaki te “bato ya bwanya ná bato ya mayele” oyo Yesu alobaki ete Nzambe abombi boyebi na miso na bango. (Mat. 11:25) Bazalaki bato ya komikitisa oyo bazalaki na mposa ya koyeba mokano ya Nzambe. Bazalaki kotánga Makomami na likebi, kopesana makanisi, mpe komanyola likoló na yango; bazalaki mpe kobondela Nzambe atambwisa bango. Bazalaki mpe kokokanisa mikapo ya Biblia mpe kotánga mikanda ya bato mosusu oyo bayekolaki makambo oyo bango mpe bazalaki koyekola. Mokemoke, Bayekoli yango ya Biblia bakómaki kososola mateya ya solo oyo ebombamaki na boumeli ya bankama ya bambula.
5. Mpo na nini batrakte Mateya ya kalakala ezalaki kobimisama?
5 Atako Bayekoli ya Biblia bazalaki kosepela mingi na makambo oyo bazalaki koyekola, batikaki te ete boyebi yango evimbisa bango na lolendo; bazalaki mpe te komikumisa ete bazali kosakola makambo ya sika. (1 Ko. 8:1) Kutu, bazalaki kokabola batrakte oyo ebengamaki Mateya ya kalakala. Bazalaki na mposa ya kosalisa bato oyo bakotánga batrakte yango báyeba mateya ya solo oyo ezali na Biblia. Batrakte ya liboso ezalaki na “makambo mingi mpo na kosalisa bato báyekola Biblia, bátika mateya ya lokuta oyo euti na bonkɔkɔ ya bato mpe bázongela mpenza mateya ya kalakala ya Nkolo na biso mpe ya bantoma.”—The Old Theology (Mateya ya kalakala), No. 1, Aprili 1889, lok. 32.
6, 7. (a) Mateya nini Yehova asalisi biso tókanga ntina na yango kobanda bambula ya 1870? (b) Mateya nini esepelisaki yo mingi ntango oyekolaki yango?
6 Banda bambula wana ya 1870 tii sikoyo, toyekoli mateya mingi ya solo! a Mateya yango ezali te makanisi ya mindɔndɔmindɔndɔ, oyo bato ya mayele ya teoloji batyanaka na yango ntembe na makita na bango. Ezali nde mateya ya solo, oyo ezali kosikola biso, oyo ezali kosalisa biso tózala na bomoi ya ntina mpe ya esengo, mpe tózala na elikya. Ezali kosalisa biso tóyeba bizaleli ya Yehova mpe mikano na ye. Ezali mpe kosalisa biso tóyeba malamumalamu mokumba ya Yesu, ntina oyo azalaki na bomoi awa na mabele mpe akufaki, mpe ezali komonisa oyo azali kosala lelo oyo. Mateya yango ezali kosalisa biso tóyeba ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi, mpo na nini tokufaka, ndenge oyo tosengeli kobondelaka, mpe ndenge oyo tokoki mpenza kozala na esengo.
7 Tokoki sikoyo kokanga ntina ya bisakweli oyo ezalaki lokola “sekele” na boumeli ya bankama ya bambula, kasi ezali kokokisama na ntango oyo ya nsuka. (Dan. 12:9) Bisakweli yango mosusu ezali na mikanda ndenge na ndenge ya Makomami, mingimingi na Baevanzile mpe na mokanda ya Emoniseli. Kutu, Yehova asalisi biso tókanga ntina ya makambo oyo tokoki komona na miso te, na ndakisa ntango Yesu azwaki bokonzi, etumba oyo esalemaki na likoló, mpe ndenge Satana abwakamaki awa na mabele. (Em. 12:7-12) Nzambe asalisi biso mpe tókanga ntina ya makambo oyo tokoki komona, na ndakisa bitumba, koningana ya mabele, bamaladi, nzala, bato mabe oyo bazali kobakisa mikakatano ya ‘ntango ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano’ oyo tozali sikoyo.—2 Tim. 3:1-5; Luka 21:10, 11.
8. Tosengeli kopesa matɔndi na nani mpo na makambo oyo tomoni mpe toyoki?
8 Tokoki mpenza kokanga ntina ya maloba oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Esengo na miso oyo ezali komona makambo oyo bino bozali komona. Mpo nazali koloba na bino, Basakoli mingi mpe bakonzi mingi bazalaki na mposa ya komona makambo oyo bino bozali komona kasi bamonaki yango te, mpe bazalaki na mposa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka kasi bayokaki yango te.” (Luka 10:23, 24) Toyebi ete Yehova Nzambe nde asalisi biso tómona mpe tóyoka makambo nyonso oyo toyebi. Tozali mpe na botɔndi na ndenge Nzambe atindaki “mosungi,” elingi koloba elimo santu na ye mpo na kotambwisa bayekoli ya Yesu “na solo nyonso”! (Tángá Yoane 16:7, 13.) Tózwaka ntango nyonso na motuya “boyebi ya sikisiki” oyo tozali na yango mpe tómipesa na koyebisa yango bato mosusu!
“BATO MINGI” BAZALI KOZWA “BOYEBI YA SIKISIKI”
9. Likanisi nini epesamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Aprili 1881?
9 Na sanza ya Aprili 1881, na ntango oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekokisaki naino mbula mibale te banda ebandaki kobimisama, lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo yango emonisaki ete lisangá ezalaki na mposa ya basakoli 1 000. Elobaki boye: “Epai ya bato oyo bakoki kopesa ntango mingi to ntango na bango nyonso na mosala ya Nkolo, topesi likanisi . . . oyo: Bókende na bingumba ya minene mpe ya mike, na kotalela makoki na bino, kosala lokola ba colporteurs to Bapalanganisi ya nsango malamu, mpo na koluka na bisika nyonso bakristo ya sembo, oyo mingi na bango bokomona ete bazali na molende mpo na Nzambe, kasi bazali na boyebi te; bóluka komonisa bango bomɛngo ya boboto ya Tata na biso, mpe mateya kitoko ya liloba na Ye.”
10. Bato mingi bazalaki kosala nini nsima ya kotánga likanisi ya kokóma basakoli ya ntango nyonso?
10 Likanisi yango emonisaki ete Bayekoli ya Biblia bakangaki ntina ete mosala monene oyo bakristo ya solo basengeli kosala ezali ya kosakola nsango malamu. Kasi, na ntango wana, esengelaki mpenza kozala na kondima mpo na kokanisa ete bakoki kozwa basakoli ya ntango nyonso 1 000, mpamba te bato oyo bazalaki koyangana na makita ya Bayekoli ya Biblia bazalaki kaka mwa bankama. Nzokande, nsima ya kotánga trakte to zulunalo moko, bato mingi bazalaki komona ete ezali mateya ya solo mpe bazalaki kondima kokokisa mokumba wana. Na ndakisa, na mobu 1882, nsima ya kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko mpe mwa buku moko ya Bayekoli ya Biblia, mobali moko ya Londres, na Angleterre, akomaki boye: “Nasɛngi bino bólakisa ngai ndenge nini mpe nsango nini nasengeli kosakola mpo nakokisa mosala mosantu oyo Nzambe alingi ete esalema.”
11, 12. (a) Ba colporteurs bazalaki na mokano nini, oyo biso mpe tozali na yango? (b) Ndenge nini ba colporteurs bazalaki kofungola “bakelasi” to masangá?
11 Na mobu 1885, Bayekoli ya Biblia soki 300 bazalaki ba colporteurs. Basakoli yango ya ntango nyonso bazalaki na mokano oyo biso mpe tozali na yango lelo oyo: kokómisa bato bayekoli ya Yesu Kristo. Kasi, ndenge oyo bazalaki kosala mosala ekeseni na ndenge biso tozali kosala yango. Mbala mingi biso toyekolaka Biblia na moto mokomoko. Na nsima, tolendisaka moyekoli ya Biblia ayanganaka na makita ya lisangá. Na ntango ya kala, ba colporteurs bazalaki kotikela bato mikanda mpe na nsima, bazalaki koyanganisa esika moko baoyo basepeli mpo na koyekola na bango Biblia. Na esika báyekola na moto mokomoko, bazalaki kosala “bakelasi” to masangá.
12 Na ndakisa, na 1907, etuluku moko ya ba colporteurs basalaki kampanye na engumba moko mpo na koluka bato oyo bazalaki na buku Aurore du millénium (oyo ezalaki mpe kobengama Étude des Écritures). Na nsima, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Bato yango [oyo basepelaki] bayanganaki mpo na mwa likita na ndako ya moko na bango. Colporteur moko alekisaki mokolo mobimba ya lomingo mpo na kolimbola bango mokano ya Nzambe mpo na bileko, mpe na mokolo ya lomingo oyo elandaki, alendisaki bango básalaka makita pɔsɔ na pɔsɔ.” Na 1911, bandeko babongolaki ndenge ya kosala mosala. Baministre-batamboli 58 bazalaki kosala badiskur na bingumba ndenge na ndenge ya États-Unis mpe ya Canada. Bandeko yango bazalaki kosala diskur mpe na nsima kozwa bankombo mpe adrɛsi ya bato oyo basepeli, mpe bazalaki kozwa bibongiseli mpo bato yango báyanganaka na ndako moko mpo básala “kelasi” ya sika. Na 1914, masangá ya Bayekoli ya Biblia na mokili mobimba ezalaki 1 200.
13. Nini ezali kokamwisa yo na komona ndenge oyo “boyebi ya sikisiki” epalangani lelo oyo?
13 Lelo oyo, na mokili mobimba masangá ezali soki 109 400 mpe bandeko basi mpe mibali soki 895 800 bazali babongisi-nzela. Bato pene na milio 8 bazali kondima “boyebi ya sikisiki” mpe bazali kosalela yango na bomoi na bango. (Tángá Yisaya 60:22.) b Ezali likambo ya kokamwa mpenza, mingimingi soki tokanisi likambo oyo Yesu asakolaki ete “bato nyonso bakoyina” bayekoli na ye mpo na nkombo na ye. Abakisaki ete bayekoli na ye bakonyokolama, bakokɔta bolɔkɔ, ata mpe kobomama. (Luka 21:12-17) Basaleli ya Yehova balongi mpenza kokokisa mokumba na bango ya kokómisa bato bayekoli, atako Satana, bademo na ye, mpe bato mosusu oyo bazali banguna na bango bazali kotɛmɛla bango. Lelo oyo, bazali kosakola “na mabele mobimba esika bato bafandi,” na bamboka oyo ezali na kati ya zamba, na bangomba, na bisobe, na bingumba minene, mpe na bamboka oyo ezali mosika mpenza. (Mat. 24:14) Bakokaki ata moke te kosala mosala yango soki Nzambe azalaki na bango te.
“BOYEBI YA SIKISIKI” EKÓMI “MINGI”
14. Ndenge nini “boyebi ya sikisiki” ekómi mingi na nzela ya mikanda?
14 “Boyebi ya sikisiki” ekómi mingi lokola bato ebele bazali kosakola nsango malamu. Ekómi mpe mingi na ndenge mikanda ezali kobimisama. Na sanza ya Yuli 1879, Bayekoli ya Biblia babimisaki nimero ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli; na ntango wana ezalaki kobengama Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona mpe Mosakoli ya Kozala ya Kristo. Zulunalo yango oyo ebimisamaki na imprimeri moko ya mokili, ezalaki kaka na Lingelesi, mpe ezalaki banimero 6 000 mpamba. Charles Russell, oyo azalaki na mbula 27 na ntango wana, aponamaki mpo azala mobimisi na yango, mpe Bayekoli ya Biblia mosusu mitano oyo bakɔmɛli na elimo, bazalaki mpe kokoma masolo mosusu oyo ezalaki kobimisama na zulunalo yango. Lelo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobimisama na minɔkɔ 195. Na mokili mobimba, zulunalo yango nde ezali kokabolama mingi koleka zulunalo mosusu nyonso; nimero mokomoko ezalaka na bazulunalo 42 182 000. Lamuká!, zulunalo mosusu oyo ekabolamaka nzela moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ezali mpe na esika ya mibale na bazulunalo oyo ekabolamaka mingi koleka na mokili mobimba; nimero mokomoko ezalaka na bazulunalo 41 042 000 na minɔkɔ 84. Longola yango, babuku mpe Babiblia soki milio 100 ebimisamaka mbula na mbula.
15. Mbongo mpo na kosala mosala ya kobimisa mikanda eutaka wapi?
15 Mbongo mpo na kosala mosala monene wana eutaka na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko. (Tángá Matai 10:8.) Likambo yango kaka ekamwisaka bato oyo basalaka mosala ya kobimisa mikanda, mpo bayebi ndenge oyo bamasini ya imprimeri, bapapye, mpe biloko mosusu ya mosala yango ezalaka ntalo mingi. Ndeko moko oyo asalaka na Departema ya kosomba biloko mpo na Babetele ya mokili mobimba alobaki boye: “Bato ya mombongo oyo bayaka kotala ba imprimeri na biso bakamwaka ete tosombaka bamasini ya sikasika mpe totongaka bandako kaka na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko. Bakamwaka mpe komona ete bandeko mingi oyo basalaka na Betele bazali bilenge mpe bazali na esengo.”
MABELE EKOTONDA NA BOYEBI YA NZAMBE
16. Mpo na nini “boyebi ya sikisiki” ekómi mingi?
16 “Boyebi ya sikisiki” ekómi mingi mpo na ntina moko malamu. Mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:3, 4) Yehova alingi ete bato báyeba solo mpo básambela ye na ndenge oyo ebongi mpe bázwa mapamboli na ye. Lokola Yehova asalisi bato bázwa “boyebi ya sikisiki,” ayanganisi bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele. Yehova azali mpe koyanganisa “ebele ya bato” na “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso,” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele.—Em. 7:9.
17. Ndenge oyo losambo ya solo epalangani ezali komonisa nini?
17 Ndenge oyo losambo ya solo epalangani na boumeli ya mbula 130 oyo eleki ezali komonisa polele ete Nzambe mpe Yesu Kristo, Mokonzi oyo ye aponi, bazalaki ntango nyonso elongo na basaleli ya Yehova awa na mabele, na ndenge bazalaki kotambwisa bango, kobatela bango, kobongisa bango, mpe koteya bango. Bokoli na bango ezali mpe komonisa polele ete makambo oyo Yehova alaki mpo na mikolo ezali koya ekokokisama. “Mabele ekotonda na boyebi ya Yehova ndenge mai etondi na mbu.” (Yis. 11:9) Na ntango yango, bato bakozwa mpenza mapamboli mingi!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Okoyeba makambo mingi lisusu soki otali DVD Les Témoins de Jéhovah—la foi en action, 1re partie: La sortie des ténèbres mpe DVD Les Témoins de Jéhovah—La foi en action, 2è partie: Que brille la lumière!
b Talá buku Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso II, lokasa 320.
[Mituna ya boyekoli]
[Elilingi na lokasa 6]
Bayekoli ya Biblia bazalaki bato ya komikitisa oyo bazalaki na mposa ya kosala mokano ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 7]
Yehova asepelaka na milende oyo osalaka mpo na kopalanganisa “boyebi ya sikisiki”