Ozali kapita malamu!
“Bozali bato na bino moko te.”—1 KO. 6:19.
1. Bato batalelaka moombo ndenge nini?
ELEKI sikoyo mbula soki 2 500, mokomi moko ya Grɛki akomaki ete: “Moto moko te alingaka kozala moombo.” Bato mingi lelo bakondima likambo yango. Liloba moombo epesaka likanisi ya moto oyo bazali komonisa bwale, oyo akangami, mpe azali kosala mpe koboma nzoto mpo na bolamu na ye moko te, kasi mpo na nkolo to mokonzi na ye.
2, 3. (a) Baombo to basaleli ya Kristo bazali bato ya ndenge nini? (b) Mituna nini oyo etali mosala ya kapita tokotalela?
2 Kasi, Yesu amonisaki ete bayekoli na ye bakozala basaleli mpamba to baombo. Kozala moombo oyo Yesu alobelaki, ezalaki te mpo na kokitisa bakristo ya solo to konyokola bango. Baombo yango bazali bato ya lokumu, oyo batyeli motema mpe bamemyaka bango. Tótalela na ndakisa maloba oyo Yesu alobaki mpo na “moombo” moko mwa moke liboso ya liwa na ye. Kristo alobaki ete akopesa mikumba na “moombo ya sembo mpe ya mayele.”—Mat. 24:45-47.
3 Simbá ete na mokanda ya Luka, Yesu asaleli liloba “kapita” na esika ya liloba “moombo.” (Tángá Luka 12:42-44.) Bakristo mingi ya sembo oyo bazali na bomoi lelo bazali te na kati ya etuluku wana ya “kapita ya sembo.” Kasi, Makomami emonisi ete na maloba mosusu, basaleli nyonso ya Nzambe bazali mpe bakapita. Mikumba nini tozali na yango na mosala ya Nzambe? Tosengeli kotalela yango ndenge nini? Mpo na kozwa eyano, tótalela naino mokumba oyo bakapita ya ntango ya kala bazalaki na yango.
MOKUMBA YA BAKAPITA
4, 5. Na ntango ya kala, bakapita bazalaki na mikumba nini? Pesá bandakisa.
4 Na ntango ya kala, kapita azalaki moombo oyo bazalaki kotyela motema mpe azalaki na mokumba ya kobatela bato, biloko to mombongo ya nkolo na ye. Bakapita bazalaki na bokonzi mingi mpe bazalaki Eba. 13:2; 15:2; 24:2-4.
kobatela biloko ya ndako, mbongo mpe basali mosusu. Tokoki komona likambo yango epai ya Eliezere, moto oyo Abrahama apesaki mokumba ya kobatela ebele ya biloko oyo azalaki na yango. Ekoki kozala ete ezali Eliezere nde Abrahama atindaki na Mezopotamia mpo na koponela mwana na ye Yisaka mwasi. Yango ezalaki mpenza mokumba moko monene mpe ya ntina mingi!—5 Yozefe, nkɔkɔ ya Abrahama azalaki kapita na ndako ya Potifare. (Eba. 39:1, 2) Na nsima, Yozefe azwaki mpe kapita, mpe apesaki ye mokumba likoló ya “ndako” na ye. Kapita yango azwaki bibongiseli mpo na koyamba bandeko zomi ya Yozefe. Mpe Yozefe apesaki mitindo ete kapita yango atya kɔpɔ ya palata na saki ya ndeko ya Yozefe, mpo ebima lokola “bayibi” yango. Yango emonisi ete bazalaki mpenza kotyela bakapita motema.—Eba. 43:19-25; 44:1-12.
6. Mikumba nini bankulutu, bakɛngɛli-batamboli mpe bandeko ya Komite ya filiale bazali na yango?
6 Bankama ya bambula na nsima, ntoma Paulo akomaki ete bankulutu bazali ‘bakapita ya Nzambe.’ (Tito 1:7) Lokola baponami mpo na kobatela “etonga ya Nzambe,” bakɛngɛli bapesaka malako mpe batambwisaka lisangá. (1 Pe. 5:1, 2) Ya solo, bazali na mikumba ndenge moko te. Na ndakisa, lelo oyo bankulutu mingi basalaka na lisangá moko. Bakɛngɛli-batamboli bakambaka masangá mingi. Mpe bandeko ya Komite ya filiale bakambaka masangá ya ekólo mobimba. Kasi, bango nyonso basengeli kokokisa mikumba na bango na bosembo nyonso; bango nyonso “bakozongisa monɔkɔ” epai ya Nzambe.—Ebr. 13:17.
7. Ndenge nini toyebi ete bakristo nyonso bazali mpe bakapita?
7 Kasi, tokoloba nini mpo na bakristo mingi ya sembo oyo bazali bankulutu te? Ntoma Petro akomelaki bakristo nyonso mokanda; alobaki boye: “Na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango mpo na kosalelana lokola bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe oyo emonisami na ndenge mingi.” (1 Pe. 1:1; 4:10) Na boboto monene na ye, Nzambe apesi biso nyonso makabo, makoki mpe mayele oyo tokoki kosalela mpo na bolamu ya bandeko na biso bakristo. Na yango, baoyo nyonso basalelaka Nzambe bazali bakapita, mpe mpo na yango, azali kopesa bango lokumu, azali kotyela bango motema, mpe azali kosɛnga ete básalela mokumba yango malamu.
TOZALI BATO YA NZAMBE
8. Wapi likambo ya ntina mingi oyo tosengeli kobosana te?
8 Tokotya likebi sikoyo na makambo misato oyo biso bakapita tosengeli koyeba. Ya liboso: Biso nyonso tozali bato ya Nzambe mpe tokozongisa monɔkɔ epai na ye. Paulo akomaki boye: “Bozali bato na bino moko te, mpo bosombamaki mpenza na ntalo moko boye,” elingi koloba na mbeka ya makila ya Yesu. (1 Ko. 6:19, 20) Lokola tozali bato ya Yehova, tosengeli kotosa mibeko na ye, mpo mibeko yango ezali kilo te. (Rom. 14:8; 1 Yoa. 5:3) Tokómaka mpe baombo ya Kristo. Ndenge moko na bakapita ya ntango ya kala, tozali na bonsomi mingi, kasi bonsomi yango ezali na ndelo. Tosengeli kokokisa mikumba na biso ndenge esɛngami. Ezala tozali na mikumba nini, tozali kaka baombo ya Nzambe mpe ya Kristo.
9. Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na komonisa eloko oyo nkolo azelaka epai ya moombo na ye?
9 Yesu asalisi biso tóyeba eloko nini nkolo azelaka epai ya moombo na ye. Mokolo moko, abɛtɛlaki bayekoli na ye lisolo ya moombo moko oyo azongaki ndako nsima ya kosala mokolo mobimba. Nkolo na ye alobaki nde ete: “Yaká awa nokinoki mpe fandá na mesa”? Te. Alobaki ete: “Bongiselá ngai mwa eloko mpo nalya Luka 17:7-10.
na mpokwa, mpe latá elamba ya mosala mpe salelá ngai tii nakosilisa kolya mpe komɛla, na nsima yo mpe okolya mpe okomɛla.” Ndenge nini Yesu alimbolaki ndakisa yango? Alobaki ete: “Bongo bino mpe, ntango bosilisi kosala makambo nyonso oyo batindaki bino bósala, bóloba ete: ‘Tozali baombo mpamba. Oyo tosali ezali oyo tosengelaki kosala.’”—10. Nini emonisi ete Yehova asepelaka na milende oyo tosalaka mpo na kosalela ye?
10 Ya solo, Yehova asepelaka na milende oyo tosalaka mpo na kosalela ye. Biblia eyebisi biso ete: “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye.” (Ebr. 6:10) Yehova asɛngaka biso soki moke te makambo oyo eleki biso motó. Kutu, makambo oyo asɛngaka biso, ezalaka mpo na bolamu na biso mpe ezalaka kilo te. Kasi, na ndakisa oyo Yesu apesaki, moombo alukaka te komisepelisa, mpe atyaka te matomba na ye na esika ya liboso. Ndenge moko mpe, ntango tomipesaka epai ya Nzambe, toponaka kotya mosala na ye na esika ya liboso. Boye te?
MAKAMBO OYO YEHOVA ASƐNGAKA BISO NYONSO
11, 12. Lokola tozali bakapita, ezaleli nini tosengeli komonisa, mpe oyo wapi tosengeli komonisa te?
11 Likambo ya mibale: Lokola tozali bakapita, biso nyonso totosaka mibeko ndenge moko. Toboyi te, na lisangá kaka ndambo ya bakristo nde bazali na mikumba mosusu. Kasi, mikumba mingi ya bakristo nyonso ezali ndenge moko. Na ndakisa, lokola tozali bayekoli ya Kristo mpe Batatoli ya Yehova, tolendisami ete tólinganaka. Yesu alobaki ete bato bakoyeba bakristo ya solo na bolingo oyo bamoniselanaka. (Yoa. 13:35) Kasi, bolingo na biso esukaka kaka te na bandeko ya lisangá. Tosalaka makasi tólinga mpe bato oyo bazali Batatoli te. Biso nyonso tokoki mpe tosengeli kosala yango.
12 Tosengeli mpe kozala na etamboli ya malamu. Tosengeli koboya etamboli mpe lolenge ya bomoi oyo Liloba ya Nzambe epekisi. Paulo akomaki ete: “Ezala bato ya pite, basambeli ya bikeko, bato ya ekobo, mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka na bango nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mibali oyo balalaka na mibali, miyibi, bato ya lokoso, balangwi-masanga, bafingi, mpe babɔtɔli bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (1 Ko. 6:9, 10) Ya solo, esɛngaka milende mpo na kotosa mibeko ya Nzambe. Kasi, kosala milende yango, ezali mosala ya mpunda te, mpo ekomemela biso matomba ebele, na ndakisa kozala nzoto kolɔngɔnɔ, koyokana malamu ná basusu mpe kosala boninga makasi ná Nzambe.—Tángá Yisaya 48:17, 18.
13, 14. Bakristo nyonso bazali na mokumba nini, mpe ndenge nini tosengeli kotalela yango?
13 Tóbosana mpe te ete kapita azalaki na mosala ya kosala. Biso mpe tozali na mosala. Nzambe apesi biso likabo moko ya motuya: boyebi ya solo. Nzambe alingi ete tóyebisa basusu boyebi yango. (Mat. 28:19, 20) Paulo akomaki ete: “Moto atalela biso ete tozali basali na nse ya Kristo mpe bakapita ya basekele mosantu ya Nzambe.” (1 Ko. 4:1) Paulo ayebaki ete mokumba yango elimboli kobatela malamu mpenza “basekele mosantu” mpe koyebisa yango epai ya basusu na bosembo nyonso ndenge Nkolo na biso Yesu Kristo asɛngi tósala.—1 Ko. 9:16.
14 Ntango toteyaka basusu solo, tomonisaka ete tolingaka bango. Nzokande, bakristo nyonso bazali na makambo ya bomoi ndenge moko te. Yango wana bakoki kosala ndenge moko te na mosala ya kosakola. Yehova ayebi yango malamu. Likambo ya ntina, ezali ya kosala nyonso oyo tokoki. Na ndenge yango, tokomonisa ete tolingaka mpenza Nzambe mpe bazalani na biso.
NTINA YA KOZALA SEMBO
15-17. (a) Mpo na nini ezali na ntina ete kapita azala sembo? (b) Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na komonisa makambo oyo ekoki kokómela biso soki tozali sembo te?
15 Likambo ya misato, oyo eyokani mpenza na makambo mibale ya liboso ezali: Tosengeli kozala sembo mpe bato oyo babongi kotyelama motema. Kapita akokaki kozala na bizaleli mingi ya malamu mpe makoki mingi, kasi ekokaki kozala ata na ntina moko te soki azalaki kokokisa mikumba na ye te to azalaki sembo te epai ya nkolo na ye. Ezali na ntina kapita azala sembo soki alingi kosala mosala ya malamu mpe kosepelisa nkolo na ye. Tóbosana te maloba oyo ntoma Paulo akomaki ete: “Eloko oyo balukaka epai ya bakapita ezali ete moto amonana sembo.”—1 Ko. 4:2.
16 Soki tozali sembo, tokozwa mbano; ezali likambo ya kotyela ntembe te. Soki tozali sembo te, tokomona mpasi. Ndakisa oyo Yesu apesaki ya batalanta emonisi polele likambo yango. Baombo oyo bazalaki sembo mpe ‘basalaki mombongo’ na mbongo oyo bazwaki, bapesaki bango longonya mpe bazwaki mapamboli ebele. Moombo oyo akokisaki te mokumba oyo bapesaki ye, atángamaki moombo “mabe,” ya “gɔigɔi,” mpe ya “mpamba.” Babɔtɔlaki talanta oyo bapesaki ye, mpe babwakaki ye libándá.—Tángá Matai 25:14-18, 23, 26, 28-30.
17 Mokolo mosusu mpe, Yesu amonisaki makambo oyo ekoki kokómela biso soki tozali sembo te. Alobaki ete: “Moto moko boye azalaki mozwi mpe azalaki na kapita moko, mpe bafundaki kapita yango epai na ye ete azalaki kobebisa biloko na ye mpamba. Bongo abengaki ye mpe ayebisaki ye ete: ‘Likambo nini nazali koyoka mpo na yo? Pesá lapolo ya mosala na yo, mpo okokamba lisusu ndako te.’” (Luka 16:1, 2) Lokola moombo yango abebisaki biloko ya nkolo na ye, nkolo na ye alongolaki ye na mosala. Oyo nde liteya moko kitoko tozwi! Tokolinga soki moke te kozanga kokokisa makambo oyo Nzambe asɛngaka biso.
KOMIKOKANISAKA NÁ BASUSU EZALI MALAMU?
18. Mpo na nini tosengeli te komikokanisaka ná basusu?
18 Mokomoko na biso akoki komituna boye: ‘Ndenge nini natalelaka mokumba na ngai ya kapita?’ Mikakatano ekoki kobima ntango tozali komikokanisa ná basusu. Biblia epesi biso toli ete: “Moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, bongo akozwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko, kasi mpo azali komikokanisa na moto mosusu te.” (Gal. 6:4) Na esika ya kokokanisa mosala na biso ná oyo ya basusu, tosengeli nde kotalela oyo biso moko tozali na likoki ya kosala. Yango ekobatela biso mpo tóvimba na lolendo te to tólɛmba nzoto te. Ntango tozali komitalela, tosengeli koyeba ete makambo ya bomoi ebongwanaka. Ntango mosusu mpo na maladi, bobange to mikumba mosusu, tokoki te kosala makambo nyonso oyo tozalaki kosala. To mpe makambo ya bomoi na biso ezali kopesa biso nzela ya kosala mingi koleka ndenge tozali kosala sikoyo. Soki ezali bongo, mpo na nini te koluka kosala mingi lisusu?
19. Soki tozwi naino te mokumba moko, mpo na nini tosengeli te kokóma mawamawa?
19 Lisusu, tosengeli te komikokanisa ná baoyo bazali na mikumba mosusu oyo tozali na mposa ya kozwa. Na ndakisa, ndeko mobali moko akoki kozala na mposa ya kokóma nkulutu na lisangá to kosala badiskur na mayangani. Esengeli kosala makasi mpo na kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba yango, kasi tosengeli te kozala mawamawa soki tozwi yango te na ntango oyo biso tolingaki kozwa. Ntango mosusu mpo na bantina oyo toyebi te, ekoki kosɛnga tózela ntango molai liboso ete tózwa mikumba mosusu. Tóbosana te ete Moize akanisaki ete akoki mpo na kobimisa bana ya Yisraele na Ezipito, kasi asengelaki kozela mbula 40 liboso asala yango. Yango epesaki ye ntango mingi ya komonisa bizaleli oyo asengelaki na yango mpo na kotambwisa libota wana ya motó makasi mpe ya batomboki.—Mis. 7:22-25, 30-34.
20. Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Yonatane?
20 Ntango mosusu, ezali mpe na mikumba mosusu oyo tokotikala kozwa te. Yango ekómelaki mpe Yonatane. Azalaki mwana ya Saulo mpe na ndenge yango, asengelaki kokóma mokonzi na Yisraele. Kasi, Nzambe aponaki Davidi, leki ya mosika mpo azala mokonzi. Yonatane asalaki nini ntango makambo ebalukaki ndenge wana? Andimaki yango, mpe atyaki kutu ata bomoi na ye na likama mpo na kosalisa Davidi. Alobaki na Davidi boye: “Yo, okokóma mokonzi ya Yisraele, mpe ngai, nakokóma moto ya mibale.” (1 Sa. 23:17) Ozwi liteya? Yonatane andimaki likambo yango, ayokelaki Davidi zuwa te ndenge tata na ye asalaki. Na esika ya kolula mikumba oyo basusu bazali na yango, biso nyonso tokoki komipesa mpo na kokokisa mikumba oyo tozali na yango. Tokoki mpenza kondima ete na mokili ya sika, Yehova akokokisa bamposa ya basaleli na ye nyonso.
21. Ndenge nini tosengeli kotalela mokumba na biso ya kapita?
21 Tóbatela na makanisi ete lokola tozali bakapita oyo batyeli motema, tozali te baombo oyo batindaka bango na makasi básalela mokonzi oyo anyokolaka bango. Nzokande, Nzambe atyeli nde biso motema mpe apesi biso mpenza lokumu monene. Apesi biso mosala ya kosakola nsango malamu na mikolo ya nsuka ya mokili oyo; ezali mosala oyo ekozongelama lisusu te. Ntango tozali kosala yango, tozali mpe na bonsomi mingi ya kopona ndenge oyo tokokokisa mikumba na biso mosusu. Yango wana, tiká ete tózala bakapita ya sembo. Mpe tóbosana ata moke te ete tozali na libaku malamu ya kosalela Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba.