Ozali koyeba lisusu?
Otángaki na likebi banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna oyo elandi:
Tokoki kosala nini mpo tópekisa lolemo na biso?
Tosengeli kotalela motema na biso. Na esika ya koloba mabe mpo na ndeko moko, tosengeli komituna mpo na nini tozali kokanisa bongo. Tozali koloba mabe mpo na ye mpo lokumu na ye ebeba, mpe biso tómonana bato malamu? Kutu, moto oyo alobaka mabe mpo na basusu, akoki kobebisa lisusu makambo.—15/8, lokasa 21.
Ndenge nini mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele emonisaki ndenge oyo atalelaka basi?
Bayisraele ya basi bazalaki na bonsomi mingi, mpe bazalaki na lotomo ya koyekola. Bazalaki kopesa bango lokumu mpe limemya, mpe mibeko ezalaki kobatela lotomo na bango.—1/9, nkasa 5-7.
Makambo nini ekosalema liboso mpenza nsuka eya?
Bato bakoloba “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” Bikólo ekobundisa Babilone Monene mpe ekoboma yango. Bakobundisa basaleli ya Nzambe. Etumba ya Armagedone ekoya, na nsima Satana ná bademo na ye bakobwakama na libulu mozindo.—15/9, lokasa 4.
Matomba nini tozali na yango lokola toyebi te ntango oyo nsuka ekoya?
Lokola toyebi te mokolo to ngonga oyo nsuka ekoya, yango esalisaka biso tómonisa oyo ezali mpenza na motema na biso. Yango ezali kopesa biso libaku ya kosala makambo oyo ekosepelisa motema ya Yehova. Elendisaka biso tózala na bomoi ya komipimela, mpe esalisaka biso tótyela Nzambe mpe Liloba na ye motema mobimba. Lisusu, ezali kotika nzela ete bampasi oyo tozali kokutana na yango lelo ebongisa biso.—15/9, nkasa 24-25.
Ndenge nini tokoki kolimbola Ebandeli 3:19 na moto oyo andimaka lifelo ya mɔtɔ?
Vɛrsɛ yango elobi ete soki Adama akufi, akozonga na putulu ya mabele, kasi akokende te konyokwama na mɔtɔ na lifelo.—1/10, lokasa 13.
“Minzoto nsambo” na lobɔkɔ ya mobali ya Yesu, oyo Emoniseli 1:16, 20 elobeli, ezali komonisa banani?
Ezali komonisa bankulutu oyo batyami mafuta na elimo, kasi mpe bankulutu nyonso ya masangá.—15/10, lokasa 14.
Mwasi ná mobali bakoki kosala nini soki bazali na banyongo?
Basengeli kolobela banyongo na bango polelepolele mpe na kimya. Ekozala malamu báyeba malamumalamu motángo ya mbongo oyo bazali na yango. Bakoki kosala ete mbongo oyo bazwaka ebakisama mwa moke, to mpe básombaka bisombelá te? Basengeli kotalela banyongo oyo wapi bakofuta liboso; mbala mosusu bakoki kosolola na bato oyo badefisaki bango mbongo, báyokana mpo na kofuta banyongo na bango. Kasi, ekosɛnga bándima ete bakokoka makambo nyonso te mpe báyeba kosalela mbongo na ndenge esengeli. (1 Tim. 6:8)—1/11, nkasa 19-21.
Ndenge nini Yesu amonisaki komikitisa, ndenge elobelami na Yisaya 50:4, 5?
Bavɛrsɛ yango elobi ete moto oyo azali na “lolemo ya bato oyo bateyami” ‘akobaluka na ngámbo mosusu te.’ Yesu amonisaki komikitisa mpe atyaki likebi mingi na makambo oyo Tata na ye ateyaki ye. Yesu azalaki na mposa makasi ya koyekola epai ya Yehova, mpe azalaki kotala malamumalamu ndenge oyo Yehova azalaki komonisa komikitisa ntango azalaki kolimbisa masumu ya bato.—15/11, lokasa 11.
Ndenge nini mokanda moko ya kokanisa makambo oyo eleká oyo batyá kashɛ ya posita, na Estonie, epesaki litatoli malamu mpo na bosembo ya Batatoli ya Yehova?
Na 2007, biro ya posita ya ekólo Estonie ebimisaki mokanda moko batyá kashɛ ya posita mpo na kokanisa bato oyo bakufaki ntango Staline alukaki kosilisa bato ya Estonie. Motángo 382 oyo ezali na mokanda yango, elakisi motángo ya Batatoli ya Yehova ná bana na bango oyo bamemaki na Russie, na 1951, na bakaa epai bazalaki kosalisa bango misala ya makasi; bazalaki mosika mpenza ya bandako na bango na Estonie.—1/12, nkasa 27-28.