Kosolola malamu ekosalisa libala na bino ezala malamu
“Liloba oyo elobami na ntango na yango ezali lokola bapɔme ya wolo na kati ya eloko ya mayemi ya palata.”—MAS. 25:11.
1. Ndenge nini kosolola malamu ebongisaka mabala?
NDEKO mobali moko na Canada alobaki boye: “Nasepelaka kolekisa ntango mingi elongo na mwasi na ngai koleka na moto mosusu nyonso. Soki nazali elongo na ye na ntango ya esengo, esengo na ngai ebakisamaka; mpe soki nazali elongo na ye na ntango ya mpasi, mpasi na ngai ekitaka.” Mobali moko na Australie akomaki boye: “Na mbula 11 oyo tosali na libala, nalekisá ata mokolo moko te kozanga ete nasolola ná mwasi na ngai. Biso mibale tobangaka eloko moko te mpe totyelanaka motema na libala na biso. Kosolola mingi mpe malamu nde esalisi biso tózala na libala ya esengo.” Ndeko mwasi moko na Costa Rica alobaki boye: “Kosolola malamu esalisi biso tózala na libala ya esengo; esalisi mpe biso tózala penepene na Yehova, tókwea te na komekama, tózala na bomoko na libala na biso, mpe tólingana lisusu makasi.”
2. Makambo nini ekoki kopekisa babalani básololaka malamu?
2 Osololaka malamu ná molongani na yo, to ozalaka na mokakatano ya kosala yango? Ya solo, mikakatano ekoki kobima, mpo libala esangisi bato mibale ya kozanga kokoka oyo bazali na bomoto ekeseni, mpe na bizaleli mosusu oyo euti na mimeseno ya bonkɔkɔ to na ndenge oyo moto na moto abɔkwamá. (Rom. 3:23) Lisusu, ekoki kozala ete na libala, moto na moto azali na ndenge na ye ya kosolola. Yango wana, John Gottman ná Nan Silver, bapesi-toli na makambo ya libala, balobi ete: “Esɛngaka kozala na mpiko, kolendendela, mpe kosala milende mpo libala eumela.”
3. Nini esalisaka babalani bázala na boyokani makasi na libala na bango?
3 Ya solo, mpo na kozala na libala ya malamu, esɛngaka kosala milende mingi. Kasi, mwasi ná mobali oyo basalaka milende ya ndenge wana bazalaka na esengo mingi. Soki bazali mpenza kolingana, bakoki kozala na libala ya malamu. (Mos. 9:9) Tózwa ndakisa ya libala ya Yisaka ná Rebeka. (Eba. 24:67) Ata nsima ya kofanda bambula mingi na libala, eloko moko te emonisi ete bolingo na bango ekitaki. Ezali mpe bongo mpo na mabala mingi lelo oyo. Sekele na bango ezali nini? Bayekolá ndenge ya kobimisa makanisi na bango mpe mayoki na bango na bosembo kasi na boboto. Bamonisaka mpe bizaleli lokola mayele ya kososola, bolingo, limemya makasi, mpe komikitisa. Ndenge tokomona yango na lisolo oyo, soki mwasi ná mobali bazali komonisa bizaleli wana, bakobanda ntango nyonso kosolola malamu.
BÓMONISA MAYELE YA KOSOSOLA
4, 5. Ndenge nini mayele ya kososola ekoki kosalisa babalani báyebana malamumalamu? Pesá bandakisa.
4 Masese 16:20 elobi ete: “Ye oyo amonisaka mayele ya kososola na likambo akozwa bolamu.” Likambo yango ezali mpenza solo mpo na libala mpe bomoi ya libota. (Tángá Masese 24:3.) Mayele ya kososola mpe bwanya eutaka libosoliboso na Liloba ya Nzambe. Ebandeli 2:18 eyebisi biso ete Nzambe asalaki mwasi mpo azala mosungi ya mobali, kasi te mpo akokana na ye na makambo nyonso. Yango wana, basi balobaka ndenge moko te ná mibali. Ezali solo ete bato bakeseni, kasi mbala mingi basi balingaka kolobela mayoki na bango, kolobela bato mosusu, mpe boyokani kati na bato. Basepelaka soki moto azali kosolola na bango lokola moninga mpe azali kofungolela bango motema, mpo yango endimisaka bango ete balingaka bango. Nzokande, mibali mingi basepelaka te kolobela mayoki na bango kasi basepelaka nde kolobela makambo etali mosala, mikakatano, mpe ndenge ya kolonga yango. Mibali balingaka mpe ete bápesa bango limemya.
5 Ndeko mwasi moko na Angleterre alobaki ete: “Mobali na ngai alingaka kosilisa mikakatano nokinoki na esika ya koyoka naino likanisi na ngai. Yango esalaka ngai mpasi mpo nalingaka nde ete ayokela ngai mpe amitya na esika na ngai.” Mobali moko akomaki ete: “Ntango ngai ná mwasi na ngai tobalanaki sika, nazalaki na ezaleli ya koluka kosilisa nokinoki mokakatano nyonso oyo azali na yango. Kasi, eumelaki te mpo nayeba ete azalaki nde na mposa nayokela ye.” (Mas. 18:13; Yak. 1:19) Mobali oyo azali na mayele ya kososola atalelaka mayoki ya mwasi na ye mpe asalelaka ye makambo na ndenge oyo ekomonisa ete alingaka ye. Lisusu, alingaka ete mwasi na ye ayeba ete makanisi na ye mpe mayoki na ye ezali na ntina mpo na ye. (1 Pe. 3:7) Ndenge moko mpe, mwasi oyo azali na mayele ya kososola asalaka makasi atalelaka makanisi ya mobali na ye. Soki mwasi ná mobali bayebi malamu mikumba oyo Biblia epesi mokomoko na bango, bazali kosepela na yango, mpe kokokisa yango, libala na bango ekozala malamu. Longola yango, bakozala na likoki ya kosala elongo mpo na kozwa bikateli ya malamu mpe kokokisa yango.
6, 7. (a) Ndenge nini etinda oyo ezali na Mosakoli 3:7 ekoki kosalisa mwasi ná mobali bámonisa mayele ya kososola? (b) Ndenge nini mwasi akoki komonisa bososoli, mpe milende nini mobali asengeli kosala?
6 Mwasi ná mobali oyo bazali na mayele ya kososola basengeli mpe koyeba ete ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mos. 3:1, 7) Ndeko mwasi moko oyo abalá esili koleka mbula zomi alobi ete: “Sikoyo nakómá koyeba ntango nini ebongi kolobela makambo mosusu. Soki mobali na ngai azali na misala mingi to mikumba mosusu, natikaka mwa ntango eleka liboso nayebisa ye makambo mosusu. Yango esali ete tókóma kososola malamu.” Mwasi oyo azali na bososoli alobaka mpe na boboto, mpo ayebi ete liloba oyo eponami malamu mpe “oyo elobami na ntango na yango” ekosepelisa mobali na ye mpe ekotinda ye ayokela ye.—Tángá Masese 25:11.
7 Mobali mokristo asengeli kosuka kaka te na koyoka makambo oyo mwasi na ye azali koloba, kasi asengeli mpe kosala makasi ete amonisa polele mayoki na ye. Nkulutu moko oyo abalá esili koleka mbula 27 alobaki ete: “Esɛngaka nasala makasi mpo nayebisa mwasi na ngai makambo oyo nazali na yango na motema.” Ndeko mobali moko oyo abalá esili koleka mbula 24 alobaki ete: “Soki likambo ebimi, nalingaka kolobela yango te. Nakanisaka ete ata soki tolobeli yango te, ekosila yango moko. Kasi sikoyo nayebi ete komonisa mayoki na ngai ezali bolɛmbu te. Soki namoni ete nazali kokoka te komonisa mayoki na ngai, nabondelaka mpo nayeba maloba ya malamu oyo nasengeli kosalela mpe lolenge malamu ya kobimisa yango. Na nsima nakanisaka naino mwa moke liboso
ete nabanda koloba.” Ezali mpe na ntina ete mwasi ná mobali bápona esika oyo ebongi mpo na kosolola, na ndakisa ntango bazali kaka bango mibale mpo na kotalela mokapo ya mokolo to kotánga Biblia elongo.8. Nini ekoki kosalisa babalani bázala na mposa makasi ya kobongisa lolenge na bango ya kosolola?
8 Ezali na ntina ete mwasi ná mobali bábondelaka mpe bázala na mposa makasi ya kobongisa ndenge na bango ya kosolola. Ya solo, ekoki kozala mpasi mpo na kotika mimeseno ya kala. Kasi bakokoka kosala yango soki balingaka Yehova, soki bazali kosɛnga elimo na ye, mpe soki bazali kotalela libala na bango lokola eloko ya bosantu. Mwasi moko oyo azali na mbula 26 akomaki boye: “Ngai ná mobali na ngai tozwaka na lisɛki te ndenge oyo Yehova atalelaka libala; yango wana tokanisaka soki moke te kokabwana. Yango etindaka biso tósala makasi tólobelaka mikakatano na biso elongo mpo na kosilisa yango.” Babalani oyo bazali sembo ndenge wana mpe bamonisaka ezaleli ya kokangama na Nzambe basepelisaka ye mpe bazwaka mapamboli mingi.—Nz. 127:1.
BÓKOLISA BOLINGO
9, 10. Wapi mwa makambo oyo babalani bakoki kosala mpo bolingo na bango ekóma makasi?
9 Bolingo, oyo ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko,” ezali ezaleli oyo eleki ntina na kati ya libala. (Kol. 3:14) Bolingo ya solosolo ekolaka ntango babalani oyo bazali sembo bazali kokabola bisengo mpe bampasi ya bomoi elongo. Babalani ya ndenge wana bakómaka baninga makasi mpe basepelaka kolekisa ntango elongo. Basukaka kaka te na kosalelana makambo ya minene, ndenge bafilme emonisaka yango, kasi basalelanaka mpe makambo ya mikemike, na ndakisa koyamba moninga, koloba na ye to kosalela ye likambo moko na boboto, kosɛkisa ye, to kotuna ye soki mokolo elekaki ndenge nini. Makambo wana ya mikemike ekoki kosala mingi mpo na kobongisa libala. Mobali moko oyo azali na libala ya esengo ná mwasi na ye esili koleka mbula 19 alobi ete babenganaka na telefone to batindelanaka bamesaje na boumeli ya mokolo “kaka mpo na koyeba soki moninga azali ndenge nini.”
10 Bolingo etindaka mpe babalani bákoba koluka koyebana malamumalamu. (Flp. 2:4) Mpe soki bayebani malamu, bolingo na bango ekokoba kokola mpe ekokóma makasi atako mokomoko na bango azali na bolɛmbu na ye. Na libala ya esengo, boyokani ya mwasi ná mobali ekómaka lisusu makasi ntango bambula ezali koleka. Yango wana, soki obalá, omituna boye: ‘Nayebaka molongani na ngai malamu? Nayebaka malamu mayoki na ye mpe ndenge oyo akoki kokanisa na likambo boye to boye? Mbala boni nakanisaka bizaleli malamu ya molongani na ngai, na ndakisa bizaleli oyo mingimingi etindaki ngai nalinga ye?’
BÓYEKOLA KOMONISELANA LIMEMYA
11. Mpo na nini limemya ezali na ntina mingi mpo na kozala na libala ya esengo? Pesá ndakisa.
11 Ata na mabala ya esengo, mikakatano ezangaka te, mpe mwasi ná mobali oyo balinganaka bakoki mbala mosusu koyokana na makambo nyonso te. Abrahama ná Sara bazalaki koyokana na makambo nyonso te. (Eba. 21:9-11) Atako bongo, yango ebebisaki boyokani na bango te. Mpo na nini? Bazalaki kopesana lokumu mpe komoniselana limemya. Na ndakisa, Abrahama azalaki koloba na Sara ete “nabondeli yo.” (Eba. 12:11, 13) Sara azalaki kotosa Abrahama mpe azalaki kobenga ye “nkolo.” (Eba. 18:12) Soki babalani bazali kopesana limemya te, mbala mingi yango emonanaka na ndenge na bango ya koloba to na mingongo na bango. (Mas. 12:18) Soki bazali komoniselana limemya te, libala na bango ekoki kosuka mabe.—Tángá Yakobo 3:7-10, 17, 18.
12. Mpo na nini bato oyo babalani sika basengeli mingimingi kosala makasi mpo básololaka na limemya?
12 Mwasi ná mobali oyo babalani sika basengeli mingimingi kosala makasi mpo bálobaka na boboto mpe na limemya, mpo yango ekosalisa bango básololaka polele mpe báfungolelanaka motema. Mobali moko alobi boye: “Atako bambula ya ebandeli ya libala ezalaka ya esengo, ntango mosusu ekoki mpe kozala na mikakatano. Ntango mokomoko abandi koyeba malamu mayoki, bizaleli, mpe bamposa ya molongani na ye, mbala mosusu mwa matata ekoki kobima kati na bango! Atako bongo, babalani bakoki kobatela boyokani ya malamu soki bazali makambo makasimakasi te, soki bazali kobɛta mwa masolo ya kosɛkisa, mpe soki bazali komonisa bizaleli lokola komikitisa, motema molai, mpe soki bazali kotyela Yehova motema.” Toli wana ezali malamu mpenza!
BÓMONISA KOMIKITISA YA SOLOSOLO
13. Mpo na nini komikitisa ezali na ntina mingi mpo na kozala na libala ya malamu mpe ya esengo?
13 Lisolo ya malamu kati na mwasi ná mobali oyo babalaná ezali lokola mokɛli ya mai oyo ezali kotíyola malɛmbɛmalɛmbɛ na kati ya elanga. “Komikitisa” ezali na ntina mingi mpo mokɛli yango ekoba kotíyola. (1 Pe. 3:8) Ndeko mobali moko oyo abalá esili koleka mbula 11 alobaki ete: “Komikitisa esalisaka babalani básilisa nokinoki matata, mpo etindaka moto aloba ete ‘limbisá ngai.’” Nkulutu moko oyo azali na libala ya esengo banda mbula 20 alobaki ete: “Na bantango mosusu, koloba ‘limbisá ngai’ ezalaka na ntina mingi koleka koloba ‘nalingaka yo.’” Abakisaki ete: “Libondeli ezali moko ya makambo oyo esalisaka nokinoki mpo na komonisa komikitisa. Ntango ngai ná mwasi na ngai tobondelaka Yehova elongo, yango ekundwelaka biso ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe ete Nzambe amoniselaka biso boboto monene. Koyeba bongo esalisaka ngai natalela makambo na ndenge oyo ebongi.”
14. Ndenge nini lolendo ekoki kobebisa libala?
14 Nzokande, lolendo esalisaka babalani te mpo na kosilisa matata. Epekisaka bango básolola malamu mpo elongolaka mposa mpe makasi ya kosɛnga bolimbisi. Na esika ya koloba na komikitisa ete, “limbisá ngai,” moto ya lolendo alukaka nde komilongisa. Na esika ete andima mabe oyo asalaki, alukaka kopesa foti na moto mosusu. Soki bazokisi ye, na esika aluka kimya, asilikaka, mpe mbala mosusu azongisaka na maloba ya makasi to aboyaka kolobisa moninga. (Mos. 7:9) Ya solo, lolendo ekoki kobebisa libala. Tóbosana te ete “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”—Yak. 4:6.
15. Ndenge nini kosalela etinda oyo ezali na Baefese 4:26, 27 ekoki kosalisa babalani básilisa matata na bango?
15 Soki mwasi ná mobali bayokani te na likambo moko, basengeli kosala nyonso mpo na kosilisa matata yango nokinoki, na esika ya komonisa lolendo. Paulo ayebisaki baninga na ye bakristo ete: “Moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te.” (Ef. 4:26, 27) Koboya kotosa batoli ya Liloba ya Nzambe ekoki kobimisela babalani mitungisi ezangá ntina. Ndeko mwasi moko alobaki ete: “Mikolo mosusu, ngai ná mobali na ngai tozalaki te kosalela toli oyo ezali na Baefese 4:26, 27. Soki tosaleli yango te, nazalaki kolala malamu te!” Na yango, eleki malamu koluka kosilisa matata nokinoki mpo na kozongisa boyokani! Ya solo, ekoki kosɛnga ete babalani bátika mwa ntango eleka mpo nkanda ekita. Ebongi mpe ete mwasi ná mobali bábondela Yehova mpo na kosɛnga ye asalisa bango bázala na komikitisa. Yango ekosalisa mokomoko na bango aluka kosilisa mokakatano oyo bazali na yango, na esika atalela kaka mayoki na ye, mpamba te kosala bongo ekoki kobebisa lisusu makambo.—Tángá Bakolose 3:12, 13.
16. Ndenge nini komikitisa ekoki kosalisa mwasi ná mobali bátalela makoki oyo bazali na yango na ndenge oyo ebongi?
16 Soki moto oyo abalá azali na komikitisa mpe ayebi esika makoki na ye esuki, akotalela mingimingi makambo malamu oyo molongani na ye azali na yango. Tózwa ndakisa: Ekoki kozala ete mwasi azali na makoki mosusu oyo asalelaka mpo na bolamu ya libota. Soki mobali na ye azali na komikitisa mpe ayebi esika makoki na ye esuki, akomona te ete mwasi na ye azali koluka kobɔtɔla ye bokonzi. Kasi akolendisa ye asalelaka makoki na ye, mpe na ndenge yango, akomonisa ete alingaka ye mpe azwaka ye na valɛrɛ. (Mas. 31:10, 28; Ef. 5:28, 29) Ndenge moko mpe, mwasi oyo azali na komikitisa mpe ayebi esika makoki na ye esuki akomikumisa te mpo na makoki oyo azali na yango mpe akokitisa mobali na ye te. Lokola bango mibale bazali “mosuni moko,” soki likambo moko ezokisi moninga, bango mibale bakoyoka mpasi.—Mat. 19:4, 5.
17. Nini ekoki kosala ete mabala ya lelo ezala ya esengo mpe ekumisa Nzambe?
17 Na ntembe te bokosepela ete libala na bino ezala lokola oyo ya Abrahama ná Sara to oyo ya Yisaka ná Rebeka, mpamba te mabala na bango ezalaki ya esengo, eumelaki ntango molai, mpe epesaki Yehova lokumu. Mpo na yango, bosengeli kotalela libala ndenge Nzambe atalelaka yango. Bótángaka Liloba na ye mpo na kozwa mayele ya kososola mpe bwanya. Soki bozali kosepela na bizaleli malamu oyo mokomoko na bino azali na yango, “lolemo ya mɔtɔ ya Yah,” elingi koloba bolingo na bino, ekóma makasi. (Loy. 8:6) Bósala makasi mpo bólona komikitisa. Moniselá molongani na yo limemya. Soki bosali makambo wana, libala na bino ekopesa bino mpe Tata na bino ya likoló esengo. (Mas. 27:11) Mbala mosusu, bokoki komiyoka lokola mobali moko oyo abalá esili koleka mbula 27, oyo akomaki ete: “Nakokoka te kozala na bomoi soki mwasi na ngai azali te. Mokolo na mokolo, boyokani na biso ezali se kokóma makasi, mpamba te tolingaka Yehova mingi mpe tosololaka mingi.”