Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Esengo ya kosalela Yehova​—Ata na esika nini

Esengo ya kosalela Yehova​—Ata na esika nini

Ezalaki mbala ya liboso nabima na mosala ya kosakola ngai moko. Nazalaki kobanga makasi mpe makolo na ngai ezalaki kolɛnga mbala nyonso oyo nazalaki kobima. Eloko ebebisaki lisusu makambo, bato ya teritware yango bazalaki soki moke te kondima koyoka nsango malamu. Bato mosusu bazalaki kofinga ngai polelepolele mpe koloba ete bakobɛta ngai. Na sanza ya liboso na mosala na ngai ya mobongisi-nzela, nakabolaki kaka mwa buku moko!​—Markus.

WANA ezalaki na 1949, esali mbula koleka 60, kasi lisolo na ngai ebandaki bambula mingi liboso. Tata na ngai Hendrik azalaki kosala basapato mpe kosala mosala ya bilanga na Donderen, mwa mboka moko ya moke na nɔrdi ya Drenthe, na Pays-Bas. Nabotamaki kuna, na 1927; nazali mwana ya minei na libota ya bana nsambo. Tozalaki kofanda na mboka; ndako na biso ezalaki pembeni ya nzela monene ya mabele. Bato mingi ya mboka yango bazalaki kosala bilanga mpe nazalaki kosepela na bomoi ya basali-bilanga. Na 1947, ntango nazalaki na mbula 19, nayokaki nsango malamu mpo na mbala ya liboso epai ya Theunis Been, moto moko oyo azalaki kofanda pembeni na biso. Nazali koyeba lisusu ete ntango namonaki Theunis mbala ya liboso, nasepelaki na ye te; kasi mwa moke nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, akómaki Motatoli ya Yehova, mpe namonaki ete akómaki moto malamu mingi koleka ndenge azalaki liboso. Mbongwana oyo asalaki ekamwisaki ngai; yango wana ntango ayebisaki ngai elaka oyo Nzambe apesi ete akozongisa paradiso na mabele, nayokelaki ye. Nandimaki solo mbala moko, mpe ngai ná ye tokómaki baninga makasi. *

Nabandaki kosakola na sanza ya mitano 1948, mpe kaka na sanza oyo elandaki, na mokolo ya 20 sanza ya motoba, nazwaki batisimo na liyangani moko ya etúká na Utrecht. Na mokolo ya 01/01/1949, nakómaki mobongisi-nzela mpe batindaki ngai na Borculor, na ɛsti ya Pays-Bas, na lisangá moko ya moke oyo ezalaki kuna. Mpo na kokóma kuna, ezalaki kosɛnga kotambola kilomɛtrɛ soki 130; yango wana namonaki malamu nakende na velo na ngai. Nakanisaki ete nakosala ngonga 6, kasi lokola mbula makasi ebɛtaki mpe mopɛpɛ ezalaki makasi, nasalaki ngonga 12, atako nazwaki engbunduka na kilomɛtrɛ 90 ya nsuka! Nsukansuka, na butu, nakómaki esika oyo nazalaki kokende, na ndako ya libota moko ya Batatoli epai nafandaki ntango nyonso oyo nazalaki mobongisi-nzela na mboka yango.

Na bambula wana ya nsima ya etumba, bato bazalaki na bozwi mingi te. Nyonso oyo nazalaki na yango, ezalaki kaka kazaka moko ná bapatalo mibale​—kazaka elekaki ngai monene, bapatalo ezalaki mikuse! Ndenge namonisaki yango na ebandeli, sanza na ngai ya liboso na Borculo ezalaki mpasi, kasi Yehova apambolaki ngai mpo nazwaki bato ebele ya koyekola na bango Biblia. Nsima ya sanza libwa, batindaki ngai na Amsterdam.

NALONGWE NA MBOKA, NAKEI NA ENGUMBA YA MONENE

Ngai moto nakolá na mboka, esika bato mingi basalaka bilanga, nakómaki sikoyo na Amsterdam, engumba oyo eleki monene na Pays-Bas. Mosala ya kosakola ezalaki malamu mpenza. Na sanza ya liboso, nakabolaki mikanda ebele koleka oyo nakabolaki na boumeli ya sanza libwa. Eumelaki te, nakómaki koyekola Biblia na bato koleka 8. Nsima ya kokóma mosaleli ya lisangá (lelo oyo mokambi-misala ya bankulutu), nazwaki mokumba ya kosala diskur mpo na mbala ya liboso. Kosala diskur ezalaki kobangisa ngai mingi; yango wana motema ekitaki mpenza ntango batindaki ngai na lisangá mosusu mwa moke kaka liboso dati ya diskur yango ekoka. Na ntango wana, nayebaki te ete na boumeli ya bambula, nakosala badiskur koleka 5 000!

Na likoló: Markus (na lobɔkɔ ya mobali) azali kosakola na balabala pene na Amsterdan na 1950

Na sanza ya mitano 1950, batindaki ngai na Haarlem. Na nsima, basɛngaki ngai nakóma mokɛngɛli ya zongazonga. Mikolo misato mobimba, nalalaki malamu te. Nayebisaki Robert Winkler, moko ya bandeko oyo bazalaki kosala na biro ya filiale, ete nazali komona ete nakokoka mokumba yango te; kasi ayebisaki ngai ete: “Yo tondisá kaka formilɛrɛ. Okoyekola kaka.” Mwa moke na nsima, nazwaki formasyo ya sanza moko mpe nabandaki kosala lokola mosaleli ya zongazonga (mokɛngɛli ya zongazonga). Na lisangá moko oyo nakendaki kotala, nakutanaki na Janny Taatgen, elenge mwasi moko kitoko oyo azalaki mobongisi-nzela mpe azalaki kolinga Yehova mingi mpe komonisa elimo ya komipimela. Tobalanaki na 1955. Kasi, liboso nakoba lisolo na ngai, Janny akolobela ndenge akómaki mobongisi-nzela mpe ndenge tosalaki elongo ntango tobalanaki.

MOSALA NSIMA YA KOBALANA

Janny: Mama na ngai akómaki Motatoli na 1945 ntango nazalaki na mbula 11. Amonaki mbala moko ete ezali na ntina ayekolaka Biblia na biso misato bana na ye, kasi tata azalaki kosepela na solo te; yango wana mama azalaki koteya biso soki tata azali te.

Likita ya liboso oyo nakendaki ezalaki liyangani ya etúká oyo esalemaki na La Haye, na 1950. Pɔsɔ moko na nsima, nakendaki na likita na ngai ya liboso na Ndako ya Bokonzi, na Assen (etúká ya Drenthe). Tata asilikaki makasi mpe abenganaki ngai na ndako. Mama alobaki na ngai ete: “Oyebi epai wapi okoki kokende kofanda.” Nayebaki ete azalaki kolobela bandeko na ngai ya elimo. Liboso, nafandaki na libota moko ya Batatoli pembeni na biso; kasi tata azalaki kaka kolukela ngai mindɔndɔ; yango wana nakendaki na lisangá ya Deventer (Overijssel), na kilomɛtrɛ soki 95. Kasi, lokola nazalaki naino mwana moke, bakonzi ya Leta balandelaki tata mpo abenganaki ngai na ndako. Na yango, asɛngaki ngai nazonga na ndako. Atako tata andimaki solo ata mokolo moko te, nsukansuka akómaki kotika ngai nayanganaka na makita nyonso mpe nabimaka mosala ya kosakola.

Na nse: Janny (na lobɔkɔ ya mobali) azali mobongisi-nzela mosungi na 1952

Mwa moke nsima ya kozonga na ndako, mama abɛlaki makasi, mpe ngai nde nasengelaki kosala misala nyonso ya ndako. Atako bongo, nakobaki kokola na elimo mpe nazwaki batisimo na 1951, ntango nazalaki na mbula 17. Na 1952, ntango mama ayokaki nzoto malamu, nasalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi elongo na bandeko misato ya basi na boumeli ya sanza mibale. Tozalaki kofanda na masuwa moko oyo ezalaki lokola ndako, mpe tozalaki kosakola na bingumba mibale ya Drenthe. Nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza na 1953. Mbula moko na nsima, mokɛngɛli ya zongazonga moko ya elenge ayaki kotala lisangá na biso. Ezalaki Markus. Tobalanaki na sanza ya mitano 1955, mpo tomonaki ete tokoki kosalela Yehova malamu koleka soki tobalani.​—Mos. 4:9-12.

Na lobɔkɔ ya mobali: Mokolo ya libala na biso na 1955

Markus: Nsima ya libala na biso, teritware ya liboso oyo batindaki biso lokola babongisi-nzela ezalaki na Veendam (Groningue). Tozalaki kofanda na mwa ndako moko ya moke mpenza. Atako bongo, Janny abongisaki ndako yango malamu. Mikolo nyonso na butu, ezalaki kosɛnga tólongola mesa ná mwa bakiti na biso mibale mpo tókitisa mbeto na biso.

Nsima ya sanza motoba, batindaki biso na mosala ya mokɛngɛli-motamboli na Belgique. Na 1955, ezalaki na basakoli 4 000 mpamba na ekólo yango. Lelo oyo, babakisami mbala motoba! Na Flanders, na nɔrdi ya Belgique, bato balobaka monɔkɔ oyo elobamaka na Pays-Bas. Kasi, elobeli ya bato ya Belgique ekesanaki makasi na oyo ya biso; yango wana na ebandeli, kosolola na bato ezalaki mokakatano.

Janny: Mosala ya mokɛngɛli-motamboli esɛngaka komonisa mpenza elimo ya komipimela. Tozalaki kokende kotala masangá na bavelo na biso mpe tozalaki kolala na bandako ya bandeko. Lokola tozalaki na ndako na biso moko te, tozalaki kofanda epai ya bandeko ya lisangá oyo tokei kotala tii na mokolo ya mibale na ntɔngɔ, mpo tókende mbala moko na lisangá mosusu. Atako bongo, tozalaki komona ete mokumba na biso ezali lipamboli ya Yehova.

Markus: Na ebandeli, toyebaki ata ndeko moko te na masangá yango, kasi bazalaki na boboto mpe bazalaki koyamba biso malamu. (Ebr. 13:2) Na boumeli ya bambula, totalaki masangá nyonso ya monɔkɔ ya Néerlandais na Belgique mbala ebele. Yango ememelaki biso mapamboli ebele. Na ndakisa, toyebaki bandeko pene na nyonso oyo bazalaki na bazongazonga ya monɔkɔ ya Néerlandais, mpe tokómaki kolinga bango mingi. Tomonaki ndenge bankama ya bilenge bazali kokola na nzoto mpe na elimo, komipesa na Yehova, mpe kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bango. Ezali mpenza esengo komona ete mingi kati na bango bazali kosalela Yehova na bosembo na mosala ya ntango nyonso. (3 Yoa. 4) Kolendisana na bandeko ndenge wana esalisi biso tókoba kosalela Yehova na motema na biso mobimba.​—Rom. 1:12.

MOKAKATANO MOKO MONENE MPE LIPAMBOLI

Markus: Banda mokolo oyo tobalanaki, tozalaki na mposa ya kokɔta Eteyelo ya Gileade. Mikolo nyonso, tozalaki koyekola Lingelesi ngonga mobimba. Kasi, ezalaki pɛtɛɛ te koyekola Lingelesi kaka na mikanda; na yango, tomonaki malamu tókende konje na Angleterre mpo tóyekola monɔkɔ yango malamu ntango tobimi na mosala ya kosakola. Nsukansuka, na 1963, tozwaki anvelɔpɛ moko oyo eutaki na biro monene na Brooklyn. Ezalaki na mikanda mibale, moko ya ngai, moko ya Janny. Na mokanda na ngai, basɛngaki ngai nakende kokɔta kelasi ya Gileade oyo babongisaki mpo na sanza zomi. Mateya ya kelasi yango ebongisamaki mingimingi mpo na kolakisa bandeko mibali ndenge ya kotambwisa lisangá. Na yango, na bana-kelasi 100 oyo babengamaki, 82 bazalaki mibali.

Janny: Na mokanda oyo nazwaki, basɛngaki ngai nakanisa malamu na libondeli soki nakondima kotikala ngai moko na Belgique ntango Markus akokende Gileade. Mpo na koloba solo, na ebandeli, nasepelaki te. Namonaki lokola ete Yehova apamboli te milende nyonso oyo nazalaki kosala. Kasi, namikundolaki ntina ya Eteyelo ya Gileade: kosalisa bandeko oyo bakɔti yango bákokisa mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba. Na yango, nandimaki kotikala mpe batindaki ngai mobongisi-nzela monene na Ghent, engumba moko ya Belgique, elongo na Anna mpe Maria Colpaert, bandeko basi mibale oyo bazalaki babongisi-nzela monene oyo baumeli mingi.

Markus: Lokola nasengelaki kobongisa Lingelesi na ngai, babengaki ngai na Brooklyn sanza mitano liboso eteyelo yango ebanda. Nasalaki na Departema ya kotinda mikanda na masangá mpe na Departema ya mosala. Kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova mpe kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotinda mikanda mpo na bandeko ya Asie, ya Mpoto, mpe ya Amerika ya Sudi esalisaki ngai namona bonene ya lisangá ya bandeko na mokili mobimba. Nabosanaka te ndeko Alexander Macmillan, oyo azalaki moko ya ba pèlerin (mokɛngɛli-motamboli) na eleko ya ndeko Russell. Na ntango wana, akómaki mobange mpe azalaki koyoka lisusu malamu te, kasi azalaki koyangana na makita nyonso ya lisangá. Yango esimbaki mpenza motema na ngai mpe eteyaki ngai ete tosengeli komona ata mokolo moke te ete mayangani na biso ezali mpamba.​—Ebr. 10:24, 25.

Janny: Ngai ná Markus tozalaki kokomelana mikanda mbala ebele na kati ya pɔsɔ. Tozalaki na mposa makasi ya komonana! Atako bongo, Markus azalaki kosepela mingi na formasyo oyo azalaki kozwa na Gileade, mpe ngai nazalaki kozwa esengo mingi na mosala ya kosakola. Ntango Markus autaki na États-Unis mpe azongaki na Belgique, nazalaki koyekola Biblia na bato 17! Ezalaki mpasi mingi ndenge tokabwanaki sanza 15, kasi namonaki ete Yehova apambolaki biso mpo tomonisaki elimo ya komipimela. Mokolo oyo Markus azongaki, mpɛpɔ ezwaki retare ya bangonga ebele; na yango ntango nsukansuka, akómaki, toyambanaki mpe tolelaki. Banda wana, tokabwanaka lisusu te.

TOSEPELAKA NA MOKUMBA NYONSO OYO BAPESI BISO

Markus: Ntango nautaki Gileade na sanza ya zomi na mibale 1964, basɛngaki biso tókende kosala na Betele. Atako toyebaki yango te na ntango wana, totikalaki kuna libela te. Sanza misato mpamba na nsima, basɛngaki biso tókende mosala ya mokɛngɛli ya etúká na engumba Flanders. Ntango Aalzen ná Els Wiegersma bayaki lokola bamisionɛrɛ na Belgique, batindaki bango na mosala ya mokɛngɛli ya etúká, mpe biso tozongaki na Betele, epai nasalaki na Departema ya mosala. Kobanda 1968 tii na 1980, ntango mosusu tozalaki kosala na Betele, ntango mosusu na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Nsukansuka, kobanda 1980 tii 2005, nazalaki mokɛngɛli ya etúká.

Atako mbala mingi bazalaki kotinda biso na teritware to kotika biso na Betele, tozalaki kobosana ata moke te ete tomipesaki na Yehova mpo na kosalela ye na molimo na biso mobimba. Tozalaki mpenza kosepela na mokumba nyonso oyo bapesi biso, mpo tozalaki na kondima ete mbongwana nyonso oyo ezalaki kosalema ezalaki mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso.

Janny: Nasepelaki mingi na libaku oyo nazwaki ya kokende elongo na Markus na Brooklyn na 1977 mpe na Patterson na 1997, epai azwaki formasyo mosusu oyo bapesaka bandeko ya Bakomite ya filiale.

YEHOVA AYEBI BAMPOSA NA BISO

Markus: Na 1982, basalaki Janny lipaso mpe elekaki malamu. Mbula misato na nsima, bandeko ya lisangá ya Louvain bapesaki biso ndako moko ya kofanda na etaze ya Ndako ya Bokonzi na bango. Nsima ya mbula 30, wana ezalaki mbala ya liboso tózwa mwa esika na biso moko ya kofanda. Na mokolo ya mibale, soki tokangisi biloko mpo na kokende kotala lisangá moko, ezalaki kosɛnga namata na baetaze 54 kende zongá mbala ebele mpo na kokitisa bisaka na biso! Likambo ya esengo, na 2002, bibongiseli ezwamaki mpo tókóma kofanda na ndako ya nse. Ntango nakómaki na mbula 78, batindaki biso babongisi-nzela monene na mboka Lokeren. Tosepelaka mingi na mosala yango mpe ndenge tozali naino na makasi ya kobima mosala ya kosakola mikolo nyonso.

“Tozalaki mpenza na kondima ete eloko ya ntina mingi ezali te esika nini tozali kosala to mokumba nini tozali na yango, kasi nde nani oyo tozali kosalela”

Janny: Biso mibale tosali mbula koleka 120 na mosala ya ntango nyonso! Tomoni mpenza na bomoi na biso moko bosolo ya elaka oyo Yehova apesaki ete ‘akotika biso ata moke te’ mpe ete soki totikali sembo epai na ye, ‘tokozanga eloko te.’​—Ebr. 13:5; Mib. 2:7.

Markus: Ntango tozalaki bilenge, tomipesaki na Yehova. Tozalaki koluka makambo ya minene te. Tozalaki kondima mokumba nyonso oyo bapesi biso mpo tozalaki mpenza na kondima ete eloko ya ntina mingi ezali te esika nini tozali kosala to mokumba nini tozali na yango, kasi nde nani oyo tozali kosalela.

^ par. 5 Na boumeli ya bambula, tata na ngai, mama na ngai, yaya na ngai moko ya mwasi, mpe baleki na ngai mibale ya mibali bakómaki mpe Batatoli.