Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala
“Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala. Bosengeli kozala bato ya etamboli ya bosantu mpe kosala misala oyo ezali komonisa ete bokangami na Nzambe!”—2 PE. 3:11.
1, 2. ‘Tosengeli kozala bato ya lolenge nini’ mpo Nzambe andima biso?
MBALA mingi tolukaka koyeba soki basusu bakanisaka nini mpo na biso. Kasi, lokola tozali bakristo, tosengeli koluka koyeba mingimingi nde soki Yehova akanisaka nini mpo na biso. Tókende epai tózonga epai, ye nde Moto oyo aleki monene na molɔ́ngɔ́ mobimba mpe azali “liziba ya bomoi.”—Nz. 36:9.
2 Ntoma Petro amonisaki ete mpo tózala lolenge ya bato oyo Yehova andimaka, tosengeli kozala “bato ya etamboli ya bosantu” mpe kosala ‘misala oyo ekomonisa ete tokangami na Nzambe.’ (Tángá 2 Petro 3:11.) Mpo Nzambe andima biso, “etamboli” na biso esengeli kozala ya bosantu, elingi koloba ya pɛto: na bizaleli, na makanisi, mpe na elimo. Lisusu, tosengeli kosala ‘misala oyo ekomonisa ete tokangami na Nzambe,’ elingi koloba komemya ye mpe kokangama na ye na bosembo nyonso. Na yango, kondimama na Nzambe etali kaka etamboli na biso te, kasi etali mpe bomoto na biso ya kati. Lokola Yehova ‘atalaka motema malamumalamu,’ ayebaka soki tozali na etamboli ya bosantu mpe soki tokangami kaka na ye to te.—1 Nt. 29:17.
3. Na oyo etali boyokani na biso na Nzambe, mituna nini tosengeli komituna?
3 Satana Zabolo alingaka te ete tóluka Nzambe andima biso. Kutu, asalaka nyonso mpo na kotinda biso tósala makambo oyo ekobebisa boyokani na biso na Yehova. Satana asalelaka lokuta mpe bokosi mpo na kolɛngola biso mpe kotinda biso tótika kosambela Yehova. (Yoa. 8:44; 2 Ko. 11:13-15) Yango wana, tosengeli komituna boye: ‘Ndenge nini Satana akosaka bato? Ndenge nini nakoki kobatela boyokani na ngai na Yehova?’
NDENGE NINI SATANA AKOSAKA BATO?
4. Mpo na kobebisa boyokani na biso na Nzambe, eloko nini Satana alukaka libosoliboso, mpe mpo na nini?
4 Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Moto na moto Yak. 1:14, 15) Mpo na kotinda biso tótika Nzambe, Satana alukaka kobebisa libosoliboso motema na biso, esika oyo bamposa na biso eutaka.
amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu; lisumu mpe, ntango esalemi, eboti liwa.” (5, 6. (a) Satana asalelaka nini mpo na kokweisa biso? (b) Mitambo nini misato Satana asalelaka mpo na kobebisa bamposa ya motema na biso, mpe nini emonisi ete ayebi kosalela yango malamu?
5 Ndenge nini Satana alukaka kobebisa motema na biso? Biblia elobi: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoa. 5:19) Mpo na kokweisa biso, Satana asalelaka mpe “biloko oyo ezali na mokili.” (Tángá 1 Yoane 2:15, 16.) Na boumeli ya bankóto ya bambula, Zabolo akómisi mokili oyo ndenge alingi ezala mpo na kokosa bato. Lokola tofandi na mokili yango, tosengeli kokeba na mitambo na ye ya nsense.—Yoa. 17:15.
6 Satana alukaka kobebisa bamposa ya motema na biso. Ntoma Yoane atángaki mitambo misato oyo Satana asalelaka: (1) “mposa ya nzoto,” (2) “mposa ya miso,” mpe (3) “kolakisa na lolendo biloko ya kobikela.” Satana asalelaki mitambo yango mpo na komeka Yesu na esobe. Lokola Satana asaleli mitambo yango bambula mingi, lelo oyo ameseni mpenza kosalela yango, mpe ayebaka motambo nini asengeli kosalela mpo na moto mokomoko. Liboso tótalela ndenge oyo tokoki komibatela, tótala naino ndenge Zabolo alongaki kokweisa Eva na mitambo yango mosusu, kasi alongaki te kokweisa Mwana ya Nzambe.
“MPOSA YA NZOTO”
7. Ndenge nini Satana asalelaki “mposa ya nzoto” mpo na komeka Eva?
7 Mpo bato bákoba kozala nzoto makasi, bazalaka na mposa ya kolya. Nzambe akelá mabele mpo ebimisaka bilei beboo. Satana akoki kosalela mposa wana ya kolya mpo na kolongola makanisi na biso na kosala mokano ya Nzambe. Tótala ndenge asalaki yango epai ya Eva. (Tángá Ebandeli 3:1-6.) Satana alobaki na Eva ete akokufa te soki alei mbuma ya “nzete ya koyeba malamu ná mabe”; alobaki ete mokolo oyo akolya yango, akokóma lokola Nzambe. (Eba. 2:9) Na yango, Zabolo amonisaki Eva ete ezalaki na ntina te ete atosa Nzambe mpo atikala na bomoi. Ezalaki lokuta mpenza! Lokola Satana atyaki likanisi yango na motó ya Eva, esengelaki Eva apona: Kotika kokanisa likambo yango, to kokoba kokanisa yango mpe na ndenge yango, kokolisa mposa ya mbuma yango. Atako akokaki kolya mbuma ya banzete mosusu nyonso oyo ezalaki na elanga, Eva aponaki kokoba kokanisa likambo oyo Satana ayebisaki ye mpo na nzete oyo ezalaki na katikati ya elanga, mpe “akamataki mbuma na yango mpe alyaki.” Na ndenge yango, Satana alonaki na motema ya Eva mposa ya eloko oyo Mozalisi na ye apekisaki.
8. Ndenge nini Satana asalelaki “mposa ya nzoto” mpo na koluka komeka Yesu, mpe mpo na nini alongaki te?
Luka 4:1-3) Yesu asengelaki kopona: Koboya kosalela nguya na ye ya kosala makamwisi mpo na kokokisa mposa ya kolya, to kondima kosalela yango. Yesu ayebaki ete asengeli te kosalela nguya wana mpo na koluka matomba na ye moko. Atako azalaki na nzala, alukaki libosoliboso kobatela boyokani na ye na Yehova na esika aluka kosilisa nzala na ye. Yesu azongisaki: “Ekomamá ete: ‘Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.’”—Mat. 4:4; Luka 4:4.
8 Satana asalelaki mpe motambo wana mpo na komeka Yesu na esobe. Nsima ya kokila bilei mikolo 40 mpe butu 40, Satana alukaki kosalela mposa ya kolya mpo na komeka Yesu. Satana alobaki ete: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá libanga oyo ekóma limpa.” (“MPOSA YA MISO”
9. Maloba “mposa ya miso” emonisi nini, mpe ndenge nini Satana asalelaki motambo yango epai ya Eva?
9 Yoane alobelaki mpe motambo ya “mposa ya miso.” Maloba yango emonisi ete moto akoki kokóma na mposa ya eloko moko kaka na kotala yango. Epai ya Eva, Satana alamwisaki mposa yango ntango alobaki ete: “Miso na bino ekofungwama mpenza.” Lokola Eva atalaki mingi mbuma oyo epekisamaki, akómaki mpe kosepela na yango mingi. Eva amonaki ete nzete yango “ezalaki eloko oyo miso ekokaki kolula.”
10. Ndenge nini Satana asalelaki “mposa ya miso” mpo na komeka Yesu, kasi Yesu ayanolaki nini?
10 Ndenge nini Satana asalelaki yango epai ya Yesu? Satana “alakisaki [Yesu] na mwa ntango moke makonzi nyonso ya mabele esika bato bafandi; mpe Zabolo alobaki na ye ete: ‘Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango.’” (Luka 4:5, 6) Yesu akokaki te komona makonzi nyonso ya mabele na miso boye na ntango moke, kasi amonaki nde nkembo na yango na emonaneli; na ntembe te Satana akanisaki ete nkembo ya makonzi wana ekokaki kobenda Yesu. Satana ayokaki ata nsɔni te koloba na Yesu ete: “Soki osaleli ngai likambo moko ya losambo, yango nyonso ekozala ya yo.” (Luka 4:7) Yesu alingaki ata moke te kozala lolenge ya moto oyo Satana alingaki ete azala. Apesaki eyano mbala moko. Alobaki boye: “Ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’”—Luka 4:8.
“KOLAKISA NA LOLENDO BILOKO YA KOBIKELA”
11. Ndenge nini Satana akosaki Eva?
11 Na kati ya biloko oyo ezali na mokili, Yoane atángaki mpe “kolakisa na lolendo biloko ya kobikela.” Ya solo, ntango Eba. 2:17; 3:5) Na ndenge yango, Satana amonisaki ete Eva akoki komitambwisa ye moko ata soki Yehova azali te. Emonani ete lolendo nde etindaki ye andima lokuta wana. Alyaki mbuma oyo epekisamaki, akanisaki ete akokufa solo te. Amikosaki mpenza!
Adama ná Eva bazalaki kaka bango mibale awa na mabele, bakokaki te ‘kolakisa na lolendo biloko na bango ya kobikela’ epai ya bato mosusu. Kasi bamonisaki ezaleli ya lolendo. Ntango Satana amekaki Eva, amonisaki ye ete Nzambe azalaki kopimela ye eloko moko ya malamu. Zabolo alobaki na ye ete mokolo kaka akolya mbuma ya “nzete ya koyeba malamu ná mabe,” ‘akokóma mpenza lokola Nzambe, akoyeba malamu ná mabe.’ (12. Satana alukaki komeka Yesu na lolenge nini mosusu, mpe Yesu ayanolaki nini?
12 Na bokeseni na Eva, Yesu apesaki ndakisa malamu mpenza ya komikitisa! Satana alukaki komeka ye na lolenge mosusu, kasi Yesu aboyaki ata likanisi ya kosala likambo oyo ekokamwisa bato mpe ekomeka Nzambe. Soki Yesu asalaki bongo, alingaki komonisa ete azali na lolendo! Kasi, apesaki Satana eyano ya polele ete: “Elobamá: ‘Osengeli komeka Yehova Nzambe na yo te.’”—Tángá Luka 4:9-12.
NDENGE NINI TOKOKI KOBATELA BOYOKANI NA BISO NA YEHOVA?
13, 14. Ndenge nini Satana akosaka biso lelo oyo?
13 Lelo mpe Satana azali kosalela mitambo lokola oyo asalelaki mpo na komeka Eva mpe Yesu. Zabolo azali kosalela “mposa ya nzoto” mpo na kotinda bato bámipesa na pite mpe ekobo, mpe bálekisa ndelo na kolya mpe komɛla. Na nzela ya pornografi, mingimingi na Internet, akoki kozwa moto oyo azali ekɛngɛ te mpe kobenda ye na “mposa ya miso.” Longola yango, azali kosalela mposa ya “kolakisa na lolendo biloko ya kobikela” mpo na kotinda bato bákóma na lolendo, bánduka biloko ya mokili mpe báluka lokumu!
14 “Biloko oyo ezali na mokili” ezali lokola mpambo oyo mobomi-mbisi asalelaka. Mpambo ebendaka mbisi, kasi ezalaka na ndɔbɔ na kati. Satana asalelaka makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo mpo na kotinda bato básala makambo oyo ekobuka mibeko ya Nzambe. Kasi asalelaka mayele wana ya nsense mpo na kotinda biso tókóma na bamposa ya mabe mpe tóbebisa motema na biso. Alingaka tókanisa ete kokokisa bamposa na biso mpe kobongisa bomoi na biso ezali na ntina mingi koleka kosala mokano ya
Nzambe. Okotika Satana azwa yo na mitambo wana?15. Ndenge nini tokoki komekola lolenge oyo Yesu atɛmɛlaki komekama ya Satana?
15 Eva akweaki ntango Satana amekaki ye, kasi Yesu akweaki te. Mbala nyonso, Yesu azongisaki eyano oyo euti na Makomami; azalaki koloba ete: “Ekomamá” to, “Elobamá.” Soki tozali bayekoli ya Biblia ya molende, tokoyeba malamu Makomami mpe tokozala na likoki ya komikundola bavɛrsɛ oyo ekoki kosalisa biso tókwea te ntango tomekami. (Nz. 1:1, 2) Kokanisa bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli, oyo batikalaki sembo epai ya Nzambe, ekosalisa biso tómekola bango. (Rom. 15:4) Kobanga Yehova na ndenge ya solo, kolinga makambo oyo alingaka mpe koyina oyo ayinaka, ekobatela biso.—Nz. 97:10.
16, 17. Ndenge nini ‘makoki na biso ya kokanisa’ ekoki kosala ete tózala bato malamu to bato mabe?
16 Ntoma Paulo alendisi biso tósalela ‘makoki na biso ya kokanisa’ mpo na kokóma lolenge ya bato oyo bazali kotika ete makanisi ya Nzambe etambwisa bango, kasi makanisi ya mokili te. (Rom. 12:1, 2) Mpo na komonisa ntina oyo tosengeli kobatela makanisi na biso, ntoma Paulo alobaki ete: “Mpo tozali kokweisa makanisi mpe eloko nyonso etombwani oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe; mpe tozali kokómisa likanisi nyonso mokangami mpo etosa Kristo.” (2 Ko. 10:5) Makanisi na biso ekoki kokómisa biso bato malamu to bato mabe, yango wana tosengeli ‘kokoba kokanisa’ makambo oyo elendisaka.—Flp. 4:8.
17 Soki tolingi kozala basantu, tosengeli koboya kokolisa makanisi ya mabe na bɔɔngo na biso mpe bamposa ya mabe na motema na biso. Tosengeli kolinga Yehova na “motema ya pɛto.” (1 Tim. 1:5) Kasi motema ezali na bokosi, mpe ntango mosusu tokoki koyeba te ete “biloko oyo ezali na mokili” ebandi kobebisa biso. (Yir. 17:9) Yango wana, tosengeli ‘kokoba komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima, kokoba kotala soki tozali ndenge nini,’ elingi koloba komitalelaka na bosembo nyonso na nzela ya boyekoli ya Biblia, oyo ezali lokola talatala.—2 Ko. 13:5.
18, 19. Mpo na nini tosengeli kozala na ekateli ya kozala lolenge ya bato oyo Yehova alingi tózala?
18 Tokoki mpe kotɛmɛla “biloko oyo ezali na mokili” soki tobateli maloba oyo Yoane akomaki na litambwisi ya elimo santu ete: “Mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoa. 2:17) Mokili oyo ya Satana ezali komonana lokola nde ezwá misisa mpe ezali ya malonga. Nzokande, mokolo mosusu, ekokóma na nsuka na yango. Eloko moko te oyo mokili ya Satana epesaka ekoumela libela. Komikundola likambo yango ekosalisa biso tókwea te na mitambo ya Zabolo.
19 Ntoma Petro alendisi biso tózala lolenge ya bato oyo Nzambe asepelaka na bango, wana tozali ‘kozela mpe kobatela na makanisi na biso kozala ya mokolo ya Yehova oyo likoló, lokola ekozika na mɔtɔ, ekosilela mpe biloko na yango, lokola ekokóma mɔtɔ makasi, ekonyangwa!’ (2 Pe. 3:12) Etikali mpenza moke mokolo oyo Yehova akobebisa biteni nyonso ya mokili ya Satana ekóma. Tii tókóma mokolo yango, Satana akokoba kosalela “biloko oyo ezali na mokili” mpo na komeka biso, ndenge amekaki Eva mpe Yesu. Tosengeli te kozala lokola Eva mpe koluka kokokisa bamposa na biso moko. Kosala bongo ekozala lokola kondima ete Satana azali nzambe na biso. Tosengeli nde kozala lokola Yesu mpe kotɛmɛla masɛnginya yango, ata soki ezali komonana mabe te mpe ezali kobenda biso. Tiká ete mokomoko na biso azwa ekateli ya kozala lolenge ya moto oyo Yehova alingi ete azala.