Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elisha amonaki makalo oyo ezali kopela mɔtɔ​—Yo mpe omonaka yango?

Elisha amonaki makalo oyo ezali kopela mɔtɔ​—Yo mpe omonaka yango?

Mokonzi ya Siri azalaki koluka Elisha, mosakoli ya Nzambe, mpo aboma ye mpe atindaki bato bálanda ye tii na Dotane, engumba oyo ezalaki na bangomba zingazinga na yango. Na butu, mokonzi ya Siri atindaki bampunda, makalo ya bitumba, mpe basoda ebele na Dotane. Na ntɔngɔntɔngɔ, basoda yango bazingaki engumba yango.​—2 Bak. 6:13, 14.

Ntango mosaleli ya Elisha alamukaki mpe abimaki libándá, amonaki bato oyo bayaki kokanga mosakoli ya Nzambe. Agangaki ete: “Mawa, nkolo na ngai! Tokosala nini?” Elisha azongiselaki ye ete: “Kobanga te, mpo baoyo bazali na biso bazali mingi koleka baoyo bazali na bango.” Na nsima, mosakoli yango abondelaki boye: “Ee Yehova, nabondeli yo, fungolá ye miso amona.” Lisolo yango elobi ete: “Na mbala moko, Yehova afungolaki miso ya mosaleli yango, bongo amonaki; mpe talá! etúká ya ngombangomba etondi na bampunda ná makalo ya bitumba ya mɔtɔ ezingi Elisha bipai nyonso.” (2 Bak. 6:15-17) Likambo yango mpe makambo mosusu ya bomoi ya Elisha ekoki koteya biso nini?

Elisha azalaki na motema ya kokita liboso ya basoda wana ya Siri mpamba te azalaki kotyela Yehova motema mpe amonaki ndenge oyo Nzambe azalaki kobatela ye. Lelo oyo, biso tozelaka te komona makamwisi, kasi tokoki kososola ndenge Yehova azali kobatela basaleli na ye. Ezali lokola nde bampunda ná makalo oyo ezali kopela mɔtɔ ezingi mpe biso. Soki tozali komona yango na miso na biso ya kondima mpe soki tozali ntango nyonso kotyela Nzambe motema, ‘tokofanda na kimya’ mpe tokozwa mapamboli ya Yehova. (Nz. 4:8) Tótalela mateya oyo tokoki kozwa na makambo mosusu ya bomoi ya Elisha.

ELISHA AKÓMI MOSALELI YA ELIYA

Mokolo moko, ntango Elisha azalaki kobalola mabele na elanga, mosakoli Eliya apusanaki pene na ye mpe abwakelaki ye elamba na ye ya mosala. Elisha ayebaki soki yango elingi koloba nini. Yango wana, asalaki fɛti mpo na kokabwana na tata na ye mpe mama na ye, mpe alongwaki na ndako na bango mpe akómaki mosaleli ya Eliya. (1 Bak. 19:16, 19-21) Lokola Elisha andimaki komipesa mobimba na mosala ya Nzambe, Yehova asalelaki ye mpe na nsima akómaki mosakoli na esika ya Eliya.

Elisha azalaki mosaleli ya Eliya na boumeli ya mbula soki motoba. Na boumeli ya ntango wana, Elisha nde “azalaki kosopela Eliya mai na mabɔkɔ.” (2 Bak. 3:11) Na ntango wana, bato bazalaki na momeseno ya kolya na mabɔkɔ; bazalaki te kosalela bakanya, bambeli, balutu to biloko mosusu mpo na kolya. Nsima ya kolya, mosaleli azalaki kosopela nkolo na ye mai mpo na kosukola mabɔkɔ. Na yango, misala mosusu oyo Elisha azalaki kosala ezalaki ya lokumu te. Atako bongo, azalaki komona ete kozala mosaleli ya Eliya ezali lokumu monene.

Lelo oyo, bakristo mingi bazali kokokisa mikumba ndenge na ndenge ya mosala ya ntango nyonso. Kondima na bango mpe mposa ya kopesa makasi nyonso na mosala ya Yehova nde etindaka bango bákɔta na mosala ya ntango nyonso. Mikumba mosusu esɛngaka ete bálongwa esika oyo bafandi mpo na kokende kosala misala mosusu oyo bato bakoki komona ete ezali ya lokumu te, na ndakisa na Betele, na bisika oyo bazali kotonga, mpe bongo na bongo. Mokristo moko te asengeli komona ete misala ya ndenge wana ezali mpamba to ezangi lokumu, mpamba te Yehova azwaka yango na motuya mingi.​—Ebr. 6:10.

ELISHA AKANGAMI NA MOKUMBA NA YE

Liboso Nzambe ‘amema Eliya na likoló na mopɛpɛ makasi,’ ayebisaki mosakoli yango alongwa na Gilgale akende na Betele. Eliya asɛngaki Elisha atikala, kasi Elisha alobaki ete: “Nakotika yo te.” Ntango bazalaki kokende, Eliya asɛngaki Elisha mbala mibale lisusu ete azonga, kasi Elisha alingaki te. (2 Bak. 2:1-6) Kaka ndenge Ruta akangamaki na Naomi, Elisha mpe akangamaki na Eliya. (Ruta 1:8, 16, 17) Mpo na nini? Emonani ete ezalaki mpo Elisha azalaki kosepela mingi na mokumba oyo Nzambe apesaki ye ya kozala mosaleli ya Eliya.

Elisha atikelá biso ndakisa ya malamu mpenza. Soki tozwi mikumba mosusu na ebongiseli ya Nzambe, tokozwa yango na motuya mingi soki tozali kobosana te ete tozali kosalela nde Yehova. Likambo mosusu ya lokumu koleka yango ezali te.​—Nz. 65:4; 84:10.

“SƐNGÁ ELOKO OYO NASENGELI KOSALELA YO”

Wana mibali yango mibale bazalaki kosala mobembo, Eliya alobaki na Elisha ete: “Sɛngá eloko oyo nasengeli kosalela yo liboso nakamatama mpe natika yo.” Kaka ndenge likambo oyo Salomo asɛngaki bambula mingi liboso etalelaki makambo ya elimo, Elisha mpe asalaki kaka bongo. Asɛngaki ete ‘ndambo mibale ya elimo ya Eliya eyela ye.’ (1 Bak. 3:5, 9; 2 Bak. 2:9) Na Yisraele, mwana mobali ya liboso na kati ya libota azalaki kozwa ndambo mibale ya libula. (Mib. 21:15-17) Na yango, Elisha asɛngaki nde ete akóma lokola mwana ya elimo ya Eliya. Longola yango, emonani ete Elisha alingaki ete azala na mpiko lokola Eliya, oyo azalaki na “zuwa mpenza mpo na Yehova.”​—1 Bak. 19:13, 14.

Eliya asalaki nini mpo na likambo oyo mosaleli na ye asɛngaki? Alobaki boye: “Osɛngi likambo moko ya makasi. Soki omoni ngai ntango nakokamatama mpe nakotika yo, ekokómela yo bongo; kasi soki te, ekosalema te.” (2 Bak. 2:10) Emonani ete eyano ya Eliya ezalaki na ndimbola mibale. Ya liboso, kaka Nzambe nde akokaki kokata soki Elisha akozwa eloko oyo asɛngaki. Ya mibale, mpo Elisha azwa yango, esengelaki akangama na ekateli na ye ya kotikala elongo na Eliya, ata ndenge nini.

OYO ELISHA AMONAKI

Nzambe asalaki nini mpo na ndenge Elisha asɛngaki ndambo mibale ya elimo ya Eliya? Lisolo yango elobi ete: “Esalemaki boye: wana bazalaki kotambola, bazali kosolola nzelanzela, talá! likalo moko ya etumba, ya mɔtɔ, mpe bampunda ya mɔtɔ, ekaboli bango mibale; bongo Eliya amataki na likoló na mopɛpɛ makasi. Na ntango wana nyonso, Elisha azalaki komona yango.” * Yango ezalaki eyano ya Yehova na likambo oyo Elisha asɛngaki. Elisha amonaki Eliya azali kokamatama, azwaki ndambo mibale ya elimo ya Eliya, mpe akómaki mozwi-libula ya mosakoli yango.​—2 Bak. 2:11-14.

Elisha azwaki elamba ya mosala oyo elongwaki epai ya Eliya mpe ekweaki, mpe alataki yango. Elamba yango ekómaki komonisa ete Elisha azali mosakoli ya Nzambe. Elembeteli mosusu oyo emonisaki ete akómi mosakoli emonanaki na nsima, ntango asalaki likamwisi ya kokabola mai ya Ebale Yordani.

Na ntembe te, likambo oyo Elisha amonaki ntango Eliya akamatamaki likoló na kati ya mopɛpɛ makasi etikalaki na makanisi na ye. Mpamba te, moto amonaka likalo ya etumba ya mɔtɔ mpe bampunda oyo ezali kopela mikolo nyonso te! Yango emonisaki ete Yehova andimi likambo oyo Elisha asɛngaki. Ntango Nzambe ayanolaka na mabondeli na biso, tozwaka te emonaneli ya likalo ya etumba to ya bampunda oyo ezali kopela mɔtɔ. Kasi tokoki kososola ndenge oyo Nzambe azali kosalela nguya na ye mpo na kokokisa mokano na ye. Mpe ntango tozali komona ndenge Yehova azali kopambola eteni ya ebongiseli na ye awa na mabele, ezali lokola nde tozali “komona” ndenge likalo na ye kuna na likoló ezali kotambola.​—Ezk. 10:9-13.

Elisha amonaki makambo mingi oyo endimisaki ye ete Yehova azali na nguya monene. Kutu, elimo santu ya Nzambe esalisaki mosakoli yango asala makamwisi 16​—mbala mibale koleka makamwisi oyo Eliya asalaki. * Mbala ya mibale oyo Elisha amonaki bampunda ná makalo ya bitumba ezali kopela mɔtɔ ezalaki na Dotane, ndenge tolobeli yango na ebandeli ya lisolo oyo.

ELISHA ATYELAKI YEHOVA MOTEMA

Atako banguna bazingaki ye na Dotane, Elisha azalaki motema ya kokita. Mpo na nini? Mpo akómaki na kondima makasi epai ya Yehova. Biso mpe tosengeli kozala na kondima ya ndenge wana. Yango wana, tóbondelaka Nzambe apesa biso elimo santu na ye mpo tókoka komonisa kondima mpe bizaleli mosusu ya mbuma ya elimo.​—Luka 11:13; Gal. 5:22, 23.

Likambo oyo esalemaki na Dotane epesaki mpe Elisha ntina mosusu ya kotya motema epai ya Yehova ná baanzelu na ye ya nguya oyo babatelaka biso. Mosakoli yango asosolaki ete Nzambe atindaki baanzelu na ye bázinga engumba mpe basoda ya Siri. Nzambe abomaki banguna yango miso mpe na ndenge yango, abikisaki Elisha ná mosaleli na ye na ndenge ya likamwisi. (2 Bak. 6:17-23) Na ntango wana ya mokakatano, ndenge moko mpe na mabaku mosusu, Elisha amonisaki kondima epai ya Yehova mpe atyelaki ye motema mobimba.

Na ndakisa ya Elisha, biso mpe tosengeli kotyela Yehova Nzambe motema. (Mas. 3:5, 6) Soki tosali bongo, “Nzambe ye moko akomonisela biso boboto mpe akopambola biso.” (Nz. 67:1) Ya solo, makalo ya mɔtɔ mpe bampunda ezingi biso na ndenge ya solo te. Kasi, na “bolɔzi monene” oyo ezali koya, Yehova akobatela lisangá ya bandeko na mokili mobimba. (Mat. 24:21; Em. 7:9, 14) Liboso tókóma kuna, tóbosanaka ata moke te ete “Nzambe azali ekimelo na biso.”​—Nz. 62:8.

^ par. 16 Eliya akendaki na likoló te epai Yehova ná baanzelu bafandaka. Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/1997, lokasa 15.

^ par. 19 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2005, lokasa 10.