LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Novembre 2013

Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na motema molai ya Nzambe wana tozali kozela Yehova abebisa mokili oyo mabe? Ndenge nini Yehova ná Yesu bazali kobatela bampate na bango awa na mabele lelo oyo?

“Bózala na bokɛngi, bóbondelaka mpenza”

Mpo na nini bakristo ya solo basengeli kobondela ntango nyonso? Nani akozwa matomba soki ozali kobondela mpo na basusu?

Ndenge oyo tokoki kosalisa basusu

Talá ndenge makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba esungaka bato mpe esalisaka na kokokisa bamposa na bango ya elimo.

Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali “kozela”?

Makambo nini ekomonisa ete ntango oyo tozalaki kozela ete Yehova abebisa mokili oyo mabe ekómi na nsuka? Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na motema molai ya Yehova?

LISOLO YA BOMOI

Kosalela Nzambe nde nkisi na ye!

Onesmus abotamá na maladi moko oyo esalaka ete mikuwa ebukanaka mpambampamba. Ndenge nini bilaka ya Nzambe oyo ezali na Biblia elendisaki ye?

Babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe bazali banani lelo oyo?

Ndenge nini Hizikiya, Yisaya, Mika, mpe bankumu ya Yerusaleme bamonisaki ete bazalaki babateli malamu ya bampate? Lelo oyo, banani bazali babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe?

Tosá babateli ya mpate oyo Yehova atye

Elimo santu nde etyaka bakɛngɛli na lisangá ya Nzambe. Mpo na nini bampate basengeli koyokelaka bango?

Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate

Ntango ndeko moko ya lisangá azali na mposa ya lisalisi ya elimo, ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa ye? Ndenge nini bankulutu bakoki komekola “mobateli monene ya bampate,” Yesu Kristo?

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

“Nazalaki lokola nkoba na kati ya ndako na yango”

Na nsuka ya 1929, nkita ya mokili mobimba ebebaki. Basakoli ya ntango nyonso basalaki nini na ntango wana ya mpasi?