Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Bózala na bokɛngi, bóbondelaka mpenza”

“Bózala na bokɛngi, bóbondelaka mpenza”

“Bózala bato ya makanisi malamu mpe bózala na bokɛngi, bóbondelaka mpenza.”​—1 PE. 4:7.

1, 2. (a) Mpo na nini tosengeli ‘kozala na bokɛngi mpe kobondelaka mpenza’? (b) Mituna nini oyo etali libondeli tosengeli komituna?

MOTO moko oyo kala azalaki kosala na butu alobi ete: “Kosɛnzɛla ekómaka mpasi mingi soki ntɔngɔ elingi kotana.” Na ntembe te, bato mosusu oyo esɛngaka bálala te butu mobimba bayebi ete ezali bongo. Lelo oyo, biso bakristo tozali mpe na mokakatano ya ndenge wana mpamba te, mokili mabe ya Satana, oyo ezali lokola molili ya butu, ekómi na nsuka. (Rom. 13:12) Kolala mpɔngi na ntango oyo ntɔngɔ elingi kotana ekozala mpenza likama mpo na biso! Tosengeli mpenza ‘kozala bato ya makanisi malamu’ mpe kolanda toli oyo Biblia epesi biso ya ‘kozala na bokɛngi mpe kobondelaka mpenza.’​—1 Pe. 4:7.

2 Lokola mokili ya Satana ekómi na nsuka, tosengeli komituna boye: ‘Nazali mpenza na bokɛngi na oyo etali kobondela? Nasalaka mabondeli ya mitindo nyonso, mpe nabondelaka ntango nyonso? Nabondelaka mpe mpo na basusu, to nabondelaka kaka mpo na bamposa na ngai moko? Libondeli ezali na ntina nini na oyo etali lobiko na ngai?’

KOBÁ KOSALA MITINDO NYONSO YA MABONDELI

3. Tángá mwa mitindo ya mabondeli oyo tosengeli kosalaka.

3 Na mokanda na ye epai ya Baefese, ntoma Paulo alobelaki “mitindo nyonso ya mabondeli.” (Ef. 6:18) Ntango tobondelaka, mbala mingi tosɛngaka Yehova asalisa biso tókokisa bamposa na biso mpe tólonga mikakatano. Lokola Yehova, “Moyoki ya libondeli,” alingaka biso, ayokaka ntango tosɛngi ete asalisa biso. (Nz. 65:2) Nzokande, tosengeli kosuka kaka na kosɛnga te; tosengeli mpe kosalaka mitindo mosusu ya mabondeli. Na ndakisa kosanzola Yehova, kopesa ye matɔndi, mpe kosala malɔmbɔ.

4. Mpo na nini tosengeli kosanzola Yehova mbala na mbala na mabondeli na biso?

4 Ezali na bantina mingi oyo tosengeli kosalelaka maloba ya masanzoli ntango tozali kobondela Yehova. Na ndakisa, kokanisa “misala na ye ya nguya” mpe “bonene na ye” etindaka biso tósanzola ye. (Tángá Nzembo 150:1-6.) Bavɛrsɛ motoba ya Nzembo 150 elobeli kosanzola Yehova mbala 13. Mokomi mosusu ya nzembo amonisaki ete alingaka Nzambe ntango ayembaki ete: “Mbala nsambo na mokolo, nasanzoli yo mpo na bikateli na yo ya lisambisi ya boyengebene.” (Nz. 119:164) Ya solo, Yehova abongi mpenza kosanzolama. Yango wana, tosengeli kosanzola ye na mabondeli na biso “mbala nsambo na mokolo,” elingi koloba mbala mingi.

5. Na ndenge nini kopesa Yehova matɔndi na mabondeli na biso ezali libateli?

5 Kopesa matɔndi ezali motindo mosusu ya mabondeli. Paulo alendisaki bakristo ya engumba Filipi ete: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.” (Flp. 4:6) Kobondela Yehova mpo na kopesa ye matɔndi oyo euti na motema ezali mpenza libateli. Yango ezali na ntina mingimingi mpo tozali na mikolo ya nsuka, oyo bato mingi “bazangi botɔndi.” (2 Tim. 3:1, 2) Lelo oyo, bato mingi na mokili bazali na botɔndi te. Soki tokebi te, elimo yango ekoki mpe kokɔtela biso. Kopesa Nzambe matɔndi na mabondeli ekosalisa biso tóbatela esengo na biso mpe tózala te “bato oyo baimaimaka, bato oyo bamilelalelaka mpo na bomoi na bango.” (Yuda 16) Longola yango, soki tata ya libota azali kopesa matɔndi na mabondeli oyo asalaka elongo na libota na ye, akosalisa mwasi mpe bana na ye bázala mpe na momeseno ya kopesa matɔndi.

6, 7. Malɔmbɔ ezali nini, mpe mpo na makambo nini tokoki kosala malɔmbɔ epai ya Yehova?

6 Malɔmbɔ ezali mabondeli ya mozindo oyo esɛngaka kobimisa mpenza mayoki. Mpo na makambo nini tokoki kosala malɔmbɔ epai ya Yehova? Tokoki kosala yango ntango bazali konyokola biso to ntango tobɛli maladi moko oyo ekoki kotya bomoi na biso na likama. Na bantango ya ndenge wana, mabondeli oyo tosalaka mpo na kosɛnga lisalisi ya Nzambe ekómaka malɔmbɔ. Kasi, ezali kaka na bantango wana nde tosengeli kosalaka malɔmbɔ epai ya Yehova?

7 Tótalela libondeli ya ndakisa oyo Yesu asalaki mpe tótya likebi na oyo alobaki mpo na nkombo ya Nzambe, Bokonzi na ye mpe mokano na ye. (Tángá Matai 6:9, 10.) Mokili oyo etondi na makambo ya mabe, mpe baguvɛrnema ya bato ezali kolonga te kokokisa ata bamposa ya libosoliboso oyo moto azalaka na yango. Yango wana, tosengeli kobondelaka ete nkombo ya Tata na biso ya likoló esantisama mpe Bokonzi na ye elongola boyangeli ya Satana awa na mabele. Sikoyo, ezali mpe ntango ya kosala malɔmbɔ epai ya Yehova mpo na kosɛnga ete mokano na ye esalema na mabele ndenge ezali na likoló. Yango wana, tókoba kozala na bokɛngi, mpe tósalaka mitindo nyonso ya mabondeli.

‘BONDELÁKÁ NTANGO NYONSO’

8, 9. Mpo na nini tosengeli kokeba ete tópesa Petro ná bantoma mosusu foti te mpo balalaki mpɔngi na elanga ya Getesemane?

8 Atako ntoma Petro alendisaki bakristo ‘bázala na bokɛngi mpe bábondelaka mpenza,’ ye moko alongaki te kosala yango na mabaku mosusu. Azalaki moko ya bayekoli oyo balalaki mpɔngi ntango Yesu azalaki kobondela na elanga ya Getesemane. Atako Yesu ayebisaki bango ‘básɛnzɛlaka mpe bábondelaka ntango nyonso,’ basalaki yango te.​—Tángá Matai 26:40-45.

9 Nzokande, na esika tópesa Petro ná bantoma mosusu foti ndenge basɛnzɛlaki te, tosengeli nde kokanisa makambo oyo basalaki mokolo wana, oyo esalaki ete bálɛmba mingi. Basalaki mosala mingi mpo na kobongisa Elekeli mpe basalaki fɛti yango kaka na mpokwa wana. Na nsima, Yesu abandisaki Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, mpo bakristo báyeba ndenge oyo basengeli kosalaka Ekaniseli ya liwa na ye. (1 Ko. 11:23-25) “Nsima ya koyemba nzembo ya masanzoli, babimaki bakei na Ngomba ya Olive,” batambolaki na banzela ya mikemike ya Yerusaleme. (Mat. 26:30, 36) Na ntango wana, ekoki kozala ete midi ya butu esilaki koleka. Soki biso mpe tózalaka na elanga ya Getesemane na butu wana, na ntembe te, tolingaki mpe kolala. Na esika ya kopamela bayekoli yango oyo balɛmbaki, na bolingo nyonso, Yesu alobaki ete “elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”

Atako Petro abɛtaki libaku, ayekolaki ‘kozala na bokɛngi mpe kobondelaka mpenza’ (Talá paragrafe 10, 11)

10, 11. (a) Liteya nini Petro azwaki na likambo oyo ekómelaki ye na elanga ya Getesemane? (b) Likambo oyo ekómelaki Petro eteyi yo nini?

10 Petro abosanaki te likambo oyo ekómelaki ye na elanga ya Getesemane. Azwaki liteya moko monene na ndenge azangaki kosɛnzɛla. Mwa moke liboso, Yesu alobaki ete: “Na butu oyo, bino nyonso bokobɛta libaku mpo na ngai.” Kasi Petro agangaki ete: “Ata soki bamosusu nyonso babɛti libaku mpo na yo, ngai nakobɛta libaku ata moke te!” Yesu alobaki ete Petro akowangana ye mbala misato. Kasi, Petro aboyaki kondima, mpe alobaki ete: “Ata soki esengeli nakufa na yo, nakowangana yo ata moke te.” (Mat. 26:31-35) Nzokande, Yesu alobaki solo; Petro abɛtaki libaku. Ntango awanganaki Yesu mpo na mbala ya misato, Petro amitungisaki mingi mpe “alelaki na mawa makasi.”​—Luka 22:60-62.

11 Petro azwaki mpenza liteya na likambo wana oyo ekómelaki ye mpe alongaki ezaleli na ye ya komityela motema koleka ndelo. Emonani ete libondeli esalisaki Petro na likambo yango. Toyebi yango mpo Petro nde apesaki toli ya ‘kozala na bokɛngi mpe kobondelaka mpenza.’ Tolandaka toli yango, oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu? Longola yango, ‘tobondelaka ntango nyonso’ mpo na komonisa ete totyelaka Yehova motema? (Nz. 85:8) Tosengeli mpe kobatela na makanisi likebisi oyo ya ntoma Paulo: “Moto oyo akanisi ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.”​—1 Ko. 10:12.

YEHOVA AYANOLAKI NA MABONDELI YA NEHEMIA

12. Mpo na nini Nehemia azali ndakisa malamu mpo na biso?

12 Tózwa ndakisa ya Nehemia, oyo azalaki mopesi-masanga ya Artazerezese mokonzi ya Perse na siɛklɛ ya mitano L.T.B. Nehemia apesaki ndakisa malamu ya moto oyo azalaki kobondela na etingya. Na boumeli ya mikolo ebele, azalaki “ntango nyonso kokila bilei mpe kobondela Nzambe” mpo na mpasi oyo Bayuda bazalaki komona na Yerusaleme. (Neh. 1:4) Ntango Artazerezese atunaki ye mpo na nini elongi na ye ezalaki mawamawa, ‘na mbala moko [Nehemia] abondelaki Nzambe ya likoló.’ (Neh. 2:2-4) Yango ebimisaki matomba nini? Yehova ayanolaki na mabondeli na ye mpe atambwisaki makambo mpo na bolamu ya basaleli na ye. (Neh. 2:5, 6) Na ntembe te, yango ekómisaki lisusu kondima ya Nehemia makasi!

13, 14. Tosengeli kosala nini mpo tózala ntango nyonso na kondima makasi mpe tótɛmɛla Satana oyo alukaka kolɛmbisa biso?

13 Kobondela ntango nyonso, ndenge Nehemia asalaki, esalisaka biso tóbatela kondima makasi. Satana azangá mawa, mpe mbala mingi abundisaka biso ntango tolɛmbi. Na ndakisa, soki tozali kobɛla to konyokwama na makanisi, tokoki kobanda kokanisa ete ntango oyo tozali kolekisa na mosala ya kosakola sanza na sanza ezali na motuya te na miso ya Nzambe. Basusu kati na biso bakoki kokóma mawamawa, mbala mosusu mpo na makambo oyo bakutaná na yango na bomoi. Satana alukaka kotinda biso tókanisa ete tozali na ntina te. Mbala mingi, alukaka tózala na mayoki ya mabe mpo kondima na biso elɛmba. Kasi, soki ‘tozali na bokɛngi mpe tozali kobondela mpenza,’ tokolonga kobatela kondima makasi. Ya solo, ‘nguba monene ya kondima ekosalisa biso tóboma mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe.’​—Ef. 6:16.

‘Kozala na bokɛngi mpe kobondelaka mpenza’ esalisaka biso tólonga mikakatano ndenge na ndenge (Talá paragrafe 13, 14)

14 Soki ‘tozali na bokɛngi mpe tozali kobondela mpenza,’ tokokwea te ata ntango kondima na biso emekami na mbalakaka. Ntango tokutani na komekama mpe mikakatano, tókanisa ndakisa ya Nehemia mpe tóbondela Nzambe mbala moko. Kaka na lisalisi ya Yehova nde tokoki kolonga komekama mpe koyika mpiko soki kondima na biso emekami.

BONDELÁKÁ MPE MPO NA BASUSU

15. Mituna nini tosengeli komituna na oyo etali kobondela mpo na basusu?

15 Yesu asalaki lilɔmbɔ mpo kondima ya ntoma Petro elɛmba te. (Luka 22:32) Epafrasi, mokristo moko ya sembo na siɛklɛ ya liboso, amekolaki Yesu na likambo yango mpe azalaki komipesa na mabondeli mpo na bandeko na ye ya Kolose. Paulo akomelaki bango ete: “Azali ntango nyonso koboma nzoto mpo na bino na mabondeli na ye, mpo nsukansuka bózala bato bakoki na nyonso mpe oyo bazali na kondima makasi na kati ya mokano mobimba ya Nzambe.” (Kol. 4:12) Tosengeli komituna boye: ‘Nasalaka mpenza makasi nabondela mpo na bandeko ya mokili mobimba? Nazalaka na momeseno ya kobondela mpo na bandeko na biso bakristo oyo bazali konyokwama mpo na makama oyo ebimaka yango moko? Mbala ya nsuka oyo nabondelaki mpenza mpo na bandeko oyo bazali na mikumba minene na ebongiseli ya Yehova ezalaki mokolo nini? Na mikolo oyo euti koleka, nabondelaki mpo na ndeko moko ya lisangá oyo azali kobunda na mikakatano?’

16. Ezali mpenza na ntina tóbondelaka mpo na basusu? Limbolá.

16 Kobondela Yehova Nzambe mpo na bandeko na biso ekoki mpenza kosalisa bango. (Tángá 2 Bakorinti 1:11.) Yehova akosala te kaka mpo basaleli na ye ebele babondeli ye mpo na likambo moko mbala na mbala; kasi ntango azali koyanola na mabondeli na bango, atalelaka mposa oyo bango nyonso bamonisi mpe asepelaka komona ndenge batyelanaka likebi mpe bamibanzabanzaka mpo na basusu. Yango wana, tosengeli kozwa na lisɛki te mokumba na biso ya kobondela mpo na basusu. Ndenge moko na Epafrasi, tosengeli kosala makasi ya kobondelaka mpo na bandeko na biso bakristo; yango ekomonisa ete tolingaka bango na motema mobimba mpe ete tomibanzabanzaka mpo na bango. Soki tozali kosala bongo, tokozala na esengo mingi, mpamba te “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Mis. 20:35.

“LOBIKO NA BISO EKÓMI PENE”

17, 18. Ndenge nini ‘kozala na bokɛngi mpe kobondela mpenza’ ekosalisa biso?

17 Mwa moke liboso Paulo aloba ete “butu epusani mpenza; ntɔngɔ ekómi pene,” akomaki boye: “Boyebi eleko oyo: ngonga na bino ya kolamuka na mpɔngi ekoki, mpo sikoyo lobiko na biso ekómi pene mpenza koleka ntango oyo tokómaki bandimi.” (Rom. 13:11, 12) Mokili ya sika oyo Nzambe alaki ekómi pene, mpe lobiko na biso ekómi pene mpenza koleka ndenge tokoki kokanisa. Tosengeli te kolala mpɔngi na elimo, mpe tosengeli soki moke te kotika ete makambo ya mokili oyo eyiba biso ntango ya kozala elongo na Yehova mpo na kobondela ye. Tosengeli nde ‘kozala na bokɛngi mpe kobondelaka mpenza.’ Yango ekosalisa biso ‘tózala bato ya etamboli ya bosantu mpe tósala misala oyo ekomonisa ete tokangami na Nzambe,’ wana tozali kozela mokolo ya Yehova. (2 Pe. 3:11, 12) Na ndenge yango, tokomonisa ete tozali kolala mpɔngi te na elimo mpe tozali kondima mpenza ete nsuka ya mokili oyo mabe ekómi pene. Yango wana, ‘tóbondelaka ntango nyonso.’ (1 Tes. 5:17) Tólanda mpe ndakisa ya Yesu, tólukaka esika oyo tokozala biso moko mpo na kobondela. Soki tozali kolekisa ntango mingi na kobondela Yehova, tokopusana lisusu pene na ye. (Yak. 4:7, 8) Mpe yango ekozala mpenza lipamboli!

18 Biblia elobi: “Na mikolo oyo azalaki na nzoto ya bomoto, Kristo alɔmbaki mpe lisusu asɛngaki Oyo azalaki na likoki ya kobikisa ye na liwa, na koganga makasi mpe na mpisoli, mpe ayokaki ye mpe andimaki ye mpo na ezaleli na ye ya kobanga Nzambe.” (Ebr. 5:7) Yesu asɛngaki, asalaki malɔmbɔ, mpe atikalaki sembo epai ya Nzambe tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. Yango wana, Yehova asekwisaki Mwana na ye mpe apesaki ye bomoi ya kozanga kokufa kuna na likoló. Biso mpe tokoki kotikala sembo epai ya Tata na biso ya likoló, ata soki tokutani na komekama to mikakatano ya ndenge nini na mikolo ezali koya. Kutu, tokoki kozwa libonza ya bomoi ya seko, soki tokobi ‘kozala na bokɛngi mpe kobondela mpenza.’