Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini tosengeli “kopesa moto mokomoko eyano”?

Ndenge nini tosengeli “kopesa moto mokomoko eyano”?

“Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko . . . mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto mokomoko eyano.”​—KOL. 4:6.

1, 2. (a) Lobelá likambo moko oyo emonisi ntina ya koyeba kotuna mituna. (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mpo na nini tosengeli te kozala motema likoló ntango masolo oyo ebimisaka ntembe ebimi?

ESILI koleka bambula, ndeko mwasi moko azalaki kosolola masolo ya Biblia na mobali na ye oyo azali Motatoli te. Mobali yango azalaki kala moto monene na lingomba moko ya bokristo. Ntango bazalaki kosolola, mobali ya ndeko mwasi yango ayebisaki ye ete andimaka liteya ya trinite. Lokola ndeko mwasi ayebaki ete mobali na ye ayebi mpenza te ndimbola ya liteya yango, na mayele nyonso atunaki ye boye: “Ondimaka ete Nzambe azali Nzambe, ete Yesu azali Nzambe, mpe ete elimo santu ezali Nzambe; kasi ondimaka te ete banzambe bazali misato kasi moko kaka?” Mobali akamwaki, mpe alobaki ete: “Te, nandimaka yango te!” Na nsima, basololaki malamumalamu mpo na koluka koyeba soki Nzambe azali mpenza nani.

2 Likambo wana, emonisi ntina ya kotunaka mituna na mayele, to koyeba kopona mituna. Emonisi mpe likambo oyo ya ntina mingi: Tosengeli te kozala motema likoló ntango masolo oyo ebimisaka ntembe lokola liteya ya trinite, lifelo to Mozalisi azalaka to te ebimi. Soki tozali kotyela Yehova mpe formasyo oyo azali kopesa biso motema, tokoki kopesa eyano oyo ekoki kondimisa moto, to oyo ekoki kosimba motema ya bayoki na biso. (Kol. 4:6) Tótalela sikoyo ndenge basakoli ya makoki basalaka ntango bazali kolobela masolo yango. Tokotalela ndenge ya (1) kotuna mituna oyo ekotinda moto abimisa makanisi na ye, (2) kokanisa na moto na Makomami, mpe (3) kosalela bandakisa mpo na kosalisa moto asimba likambo tolingi koloba.

KOTUNA MITUNA OYO EKOTINDA BAYOKI NA BISO BÁBIMISA MAKANISI

3, 4. Mpo na nini ezali na ntina kosalela mituna mpo esalisa biso tóyeba makambo oyo moyoki na biso andimaka? Pesá ndakisa.

3 Mituna ekoki kosalisa biso tóyeba makambo oyo moto andimaka. Mpo na nini ezali na ntina? Mokanda ya Masese 18:13 elobi ete: “Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye mpe kosambwa.” Yango wana, liboso ya koluka komonisa moto likanisi ya Biblia na likambo moko, ekozala malamu tóluka naino koyeba soki moto yango andimaka mpenza nini. Soki te, tokoki kolekisa ntango mingi na koboya likanisi oyo ye andimaka kutu te!​—1 Ko. 9:26.

4 Kanisá ete tozali kosolola na moto likambo etali liteya ya lifelo. Moto nyonso te nde andimaka ete lifelo ezali mpenza esika ya minyoko ya seko. Bato mingi balobaka ete ezali ezaleli ya moto oyo akabwani mpenza na Nzambe. Kasi, tokoki mbala mosusu koloba boye: “Lokola bato mingi balobaka makanisi ndenge na ndenge na likambo etali lifelo, nakoki koyeba makanisi na yo na likambo yango?” Nsima ya koyoka eyano ya moto yango, tokozala mpenza na makoki ya kosalisa ye akanga ntina na oyo Biblia elobaka na likambo yango.

5. Ndenge nini mituna ekoki kosalisa biso tóyeba ntina oyo moto akómá na makanisi oyo azali na yango?

5 Koyeba kosalela mituna ekoki mpe kosalisa biso tóyeba ntina oyo moyoki na biso andimaka likambo boye to boye. Na ndakisa, tokosala nini soki na mosala ya kosakola tokutani na moto moko oyo andimaka Nzambe te? Tokoki mbala mosusu kowela kokanisa ete moto yango alandaka makanisi ya mokili, na ndakisa liteya ya evolisyo. (Nz. 10:4) Nzokande, bato mingi bandimelaka lisusu Nzambe te mpo na ndenge bamonaka bato bazali konyokwama to bango moko mpe banyokwamaka. Mpo na bampasi wana, bakoki kozala na mokakatano ya kondima ete Mozalisi ya bolingo azali. Na yango, soki moto yango aboyi kondima ete Nzambe azali, tokoki kotuna ye boye: “Ozalaka na likanisi wana banda kala?” Soki alobi ezali bongo te, tokoki kotuna ye ayebisa soki ezali na likambo moko oyo etindaki ye aboya kondima ete Nzambe azali. Eyano oyo akopesa, ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kosalisa ye malamumalamu.​—Tángá Masese 20:5.

6. Tosengeli kosala nini nsima ya kotuna motuna?

6 Nsima ya kotuna moto motuna, tosengeli mpenza koyoka eyano na ye na likebi mpe komitya na esika na ye. Na ndakisa, moto moko akoki koloba ete likama moko oyo esalemaki esalaki ete andima lisusu te ete Mozalisi ya bolingo azalaka. Liboso ya kopesa ye bilembeteli ete Nzambe azali, ekozala malamu tómitya na esika na ye mpe tómonisa ye ete ezali mabe te komitungisa mpo na nini tonyokwamaka. (Hab. 1:2, 3) Soki tozali motema molai mpe tomoniseli moto yango bolingo, yango ekoki kosalisa ye aluka koyeba makambo mingi. *

KOKANISA NA MOTO NA MAKOMAMI

Likambo nini ezali mpenza na ntina mpo tózala basakoli ya malamu? (Talá paragrafe 7)

7. Kozala mosakoli ya makoki ezali mpenzampenza kosɛnga nini?

7 Tótalela sikoyo ndenge oyo tokoki kokanisa na moto na Makomami. Na ntembe te, Biblia ezali esaleli na biso ya libosoliboso na mosala ya kosakola. Esalisaka biso tózala “na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Tim. 3:16, 17) Kozala mosakoli ya makoki esɛngaka nde kokanisa elongo na moto na bavɛrsɛ oyo totángi mpe kolimbola yango, kasi te kaka na kosopela ye mikapo lokola nguba. (Tángá Misala 17:2, 3.) Mpo na kokanga ntina ya likambo yango, tótalela makambo oyo misato.

8, 9. (a) Wapi lolenge moko ya kokanisa na moto oyo andimaka ete Yesu akokani na Nzambe? (b) Wapi makanisi mosusu ya likambo yango omoni ete ekoki kosalisa?

8 Likambo 1: Na mosala ya kosakola, tokutani na moto oyo andimaka ete Yesu akokani na Nzambe. Bavɛrsɛ nini tokoki kosalela mpo na kokanisa na ye na likambo yango? Tokoki kosɛnga moto yango atánga Yoane 6:38, epai tozali kotánga na ntina na Yesu ete: “Nakitaki uta na likoló mpo na kosala, mokano na ngai te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.” Nsima ya kotánga vɛrsɛ yango, tokoki kotuna moto yango boye: “Soki Yesu azali Nzambe, nani atindaki ye awa na mabele? Moto oyo atindaki ye aleki ye te mosika mpenza? Omoni te ete moto oyo atindaka aleki moto oyo atindami, boye te?”

9 Mpo na kaka kondimisa likanisi yango, tokoki mpe kotánga Bafilipi 2:9, epai ntoma Paulo amonisi likambo oyo Nzambe asalaki nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Nzambe atombolaki ye [Yesu] likoló koleka mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso.” Mpo na kosalisa moto yango akanisa na vɛrsɛ yango, tokoki kotuna ye boye: “Soki Yesu akokanaki na Nzambe liboso akufa mpe Nzambe atombolaki ye koleka mpenza, omoni te ete yango ekómisaki Yesu likoló mpenza ya Nzambe? Ekoki mpenza kosalema ete moto akóma likoló ya Nzambe?” Soki moto yango azalaka mpenza na limemya ya Liloba ya Nzambe mpe azali na motema malamu, makanisi oyo ekoki kotinda ye aluka kotalela lisolo yango na mozindo.​—Mis. 17:11.

10. (a) Ndenge nini tokoki kokanisa na moto oyo andimaka ete lifelo ezali? (b) Wapi makanisi mosusu ya likambo yango omoni ete ekoki kosalisa?

10 Likambo 2: Mondimi moko ya molende azali na mokakatano ya kondima ete bato mabe banyokwamaka te seko na seko na lifelo. Ekoki kozala ete akóma na makanisi wana mpo mposa na ye ezalaka amona bato mabe bazali kofuta nyongo ya misala na bango ya mabe. Ndenge nini tokoki kokanisa na moto oyo azali na makanisi ya bongo? Ya liboso, tokoki kokitisa ye motema ete bato mabe bakozwa etumbu. (2 Tes. 1:9) Na nsima, tokoki kosɛnga ye atánga Ebandeli 2:16, 17, oyo emonisaka ete etumbu ya lisumu ezali liwa. Tokoki komonisa ye ete na nzela ya lisumu ya Adama, bato nyonso bakómá kobotama basumuki. (Rom. 5:12) Kasi tokoki komonisa polele ete Nzambe alobaki likambo moko te oyo etali kozwa etumbu na lifelo. Na nsima, tokoki kotuna boye, “Soki Adama ná Eva basengelaki konyokwama libela na libela, esengelaki kozala malamu báyebisa bango likambo yango, boye te?” Na nsima, tokoki kotánga Ebandeli 3:19, epai Nzambe amonisi etumbu oyo akatelaki bango nsima ya kosala lisumu, kasi alobelaki likambo moko te oyo etali lifelo. Kutu, ayebisaki nde Adama ete akozonga na mputulu. Tokoki komituna boye: “Ezalaki mpenza malamu koyebisa Adama ete akozonga na mputulu soki ezalaki ete akokende na lifelo?” Soki moto yango azali na makanisi malamu, motuna wana ekoki kotinda ye akanisa lisusu na mozindo na lisolo yango.

11. (a) Wapi lolenge moko ya kokanisa na moto oyo andimaka ete bato nyonso ya malamu bakendaka likoló? (b) Wapi makanisi mosusu ya likambo yango omoni ete ekoki kosalisa?

11 Likambo 3: Na mosala ya kosakola, tokutani na moto oyo andimaka ete bato nyonso ya malamu bakendaka likoló. Likanisi oyo ekoki kosala ete moto yango andima Biblia to te. Na ndakisa, kanisá ete tozali kotalela elongo na ye Emoniseli 21:4 (Tángá.) Moto yango akoki kokanisa ete mapamboli oyo balobeli na vɛrsɛ wana ezali nde bomoi na likoló. Ndenge nini tokoki kokanisa elongo na ye? Na esika tótánga bavɛrsɛ mosusu mpo na komonisa ete likanisi na ye ezali solo te, tokoki kobenda likebi na ye nde na likambo moko oyo ezali na vɛrsɛ yango. Elobi ete “liwa ekozala lisusu te.” Tokoki kotuna moto yango soki andimaka ete mpo eloko moko ezala lisusu te, esengeli naino kozala liboso. Ntango mosusu, akoki kondima likanisi yango. Na nsima, tokoki komonisa ye polele ete na likoló toyoká naino te ete anzelu moko akufi; kasi bato bakufaka nde awa na mabele. Yango wana, mpo na koloba solo, Emoniseli 21:4 elobeli nde mapamboli oyo ekozala awa na mabele na mikolo ezali koya.​—Nz. 37:29.

KOSALELA BANDAKISA MPO NA KOSALISA MOTO ASIMBA LIKAMBO TOLINGI KOLOBA

12. Mpo na nini Yesu azalaki kosalela bandakisa?

12 Longola kotuna mituna, Yesu azalaki mpe kosalela bandakisa na mosala na ye ya kosakola. (Tángá Matai 13:34, 35.) Bandakisa oyo Yesu azalaki kosalela ezalaki kosalisa mpo na koyeba makambo oyo ezalaki na mitema ya bayoki na ye. (Mat. 13:10-15) Bandakisa esalaki mpe ete bato básepela na mateya ya Yesu mpe bábosana yango te. Ndenge nini tokoki kosalela bandakisa ntango tozali koteya?

13. Ndenge nini tokoki komonisa ete Nzambe aleki Yesu?

13 Kosalela bandakisa oyo ezangi mindɔndɔ, esalisaka mingi. Na ndakisa, ntango tozali komonisa ete Nzambe aleki Yesu, tokoki mbala mosusu komeka likanisi oyo. Tokoki komonisa ete Nzambe ná Yesu basalelaki makambo etali libota mpo na kolobela boyokani oyo bango mibale bazali na yango. Nzambe alobaki ete Yesu azali Mwana na ye, mpe Yesu alobaki ete Nzambe azali Tata na ye. (Luka 3:21, 22; Yoa. 14:28) Na nsima, tokoki kotuna ye boye: “Soki olingi oteya ngai ete bato mibale bakokani, ndakisa nini oyo etali bato ya libota moko okosalela mpo na komonisa likambo yango?” Mbala mosusu moto yango akoki kolobela bandeko mpenza oyo babimá libumu moko to mpe akoki kolobela mapasa. Soki asali yango, tokoki koluka koyeba soki ndakisa yango ekokani na nini. Na nsima, tokoki kotuna boye: “Soki ngai ná yo tokangi ntina ya ndakisa yango, okanisi te ete Yesu, Moteyi monene akanisaki mpe bongo? Kutu abengaki Nzambe Tata na ye. Na bongo, Yesu amonisaki ete Nzambe azali mokóló na ye ya mosika mpenza mpe azali na bokonzi koleka ye mosika mpenza.”

14. Ndakisa nini ekoki komonisa ete ekoki kosalema te ete Nzambe atindaka Zabolo anyokolaka bato na lifelo?

14 Tózwa ndakisa mosusu. Bato mosusu bandimaka ete Satana azali “mokonzi” ya lifelo. Ndakisa yango ekoki kosalisa moboti amona ete ekoki kosalema te Nzambe atinda Zabolo anyokolaka bato na lifelo. Tokoki mbala mosusu koloba boye: “Kanisá ete mwana na yo akómi mpenza motomboki mpe azali kosala mabe mingi. Okosala nini?” Na ntembe te, moboti akoloba akosepela kosembola ye. Akoki komeka mbala na mbala kosalisa mwana yango atika kosala mabe. (Mas. 22:15) Na nsima, tokoki kotuna moboti yango oyo akoki kosala soki mwana azali kaka kotika mabe te. Baboti mingi bakoloba ete likambo mosusu ya kosala ekozala te, kaka kopesa mwana yango etumbu. Lisusu, tokoki kotuna ete: “Okosala nini soki oyei koyeba ete moto moko mabe nde atindaki mwana na yo akóma motomboki?” Na ntembe te, moboti akosilikela moto yango makasi. Mpo na kosalisa moboti yango asimba likambo oyo tolingi koloba, tokoki kotuna ye boye: “Soki oyebi ete moto moko ya mabe nde atindaki mwana na yo akóma motomboki, okolinga ete moto yango apesa mwana na yo etumbu na esika na yo?” Na ntembe te, okosala bongo te. Emonani polele ete Nzambe akoki kosalela Satana te mpo apesaka etumbu na bato oyo ye moko nde atindaka na kosala makambo ya mabe!

TÓZALA NA MAKANISI OYO EBONGI

15, 16. (a) Mpo na nini tosengeli kotya motema te ete moto nyonso oyo tosakwelaka akondima nsango ya Bokonzi? (b) Mpo na koteya malamu, esengeli kaka tózala na makoki mingi? Limbolá. (Talá mpe etanda “ Mpo na kosalisa biso tópesaka eyano.”)

15 Toyebaka ete moto nyonso te oyo tosakwelaka akondima nsango ya Bokonzi. (Mat. 10:11-14) Ezali mpenza bongo ata soki tosaleli mituna oyo ebongi, tokanisi na bango na ndenge ya malamu mpe tosaleli bandakisa ya kitoko mpenza. Atako Yesu azalaki Moteyi oyo alekaki bateyi nyonso awa na mabele, kasi kaka bato moke nde bandimaki mateya na ye!​—Yoa. 6:66; 7:45-48.

16 Epai mosusu, ata soki tozali komona lokola ete tozali na makoki mingi te, kasi tokoki kozala basakoli oyo babongi. (Tángá Misala 4:13.) Liloba ya Nzambe ezali na ntina ya kosalisa biso tóndima ete ‘baoyo nyonso bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko’ bakondima nsango malamu. (Mis. 13:48) Na yango, tiká ete tókolisa mpe tókoba komitalela na ndenge ebongi mpe tozalaka na makanisi malamu mpo na baoyo tozali koluka kosakwela nsango malamu ya Bokonzi. Tiká ete tosalelaka formasyo oyo Yehova azali kopesa, mpe totyaka elikya ete ekomemela biso mpe bato oyo bazali koyoka biso litomba. (1 Tim. 4:16) Yehova akoki kosalisa biso tómona ndenge tosengeli “kopesa moto mokomoko eyano.” Ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi, lolenge moko ya kolonga na mosala na biso ya kosakola, ezali ya kosalela basusu makambo oyo biso tolingaka mpe basalela biso.

^ par. 6 Talá lisolo Est-il possible de devenir croyant?na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2009, na Lifalanse.