Mekolá komikitisa mpe boboto ya Yesu
‘Kristo anyokwamaki mpo na bino, atikeli bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.’—1 PETRO 2:21.
1. Mpo na nini komekola Yesu esalisaka biso tópusana penepene na Yehova?
MBALA mingi tómekolaka bato oyo tolingaka mingi. Kasi, na bato nyonso oyo bafandá awa na mabele, Yesu Kristo azali mpenza moto oyo tokoki komekola. Mpo na nini? Mokolo moko Yesu alobaki ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoane 14:9) Likambo yango ezali solo mpo Yesu amekolaki bomoto ya tata na ye na ndenge ya kokoka mpenza. Yango wana, ntango toyekoli makambo etali Yesu, toyekolaka mpe makambo etali Yehova. Mpe ntango tozali komekola Yesu, topusanaka penepene na Yehova, Moto oyo aleki bato nyonso na molɔ́ngɔ́. Likambo yango ezali lokumu mpenza!
2, 3. (a) Mpo na nini Yehova ayebisi biso makambo mingi oyo etali bomoi ya Yesu, mpe Nzambe na biso alingaka tósala nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo mpe oyo ekolanda?
2 Na Biblia, Yehova ayebisi biso makambo mingi oyo etali bomoi ya Yesu. Mpo na nini? Mpo Nzambe na biso alingi tóyeba mwana na ye mpo ete tómekola ye malamumalamu. 1 Petro 2:21.) Biblia ekokanisi ndakisa oyo Yesu atikela biso na matambe. Yango elingi koloba nini? Yehova alingi ete tólanda matambe ya mwana na ye, mpe yango elingi koloba komekola makambo nyonso oyo asalá. Na ntembe te, Yesu azalaki moto ya kokoka; na yango, mposa ya Yehova ezali te ete tómekola mwana na ye na ndenge ya kokoka. Kasi, alingi ete tósala oyo tokoki mpo na komekola Yesu.
(Tángá3 Tótalela mwa bizaleli kitoko ya Yesu. Na lisolo oyo, tokolobela komikitisa mpe boboto na ye. Na oyo elandi, tokolobela mpiko mpe bososoli na ye. Tokoyanola na mituna misato oyo etali ezaleli mokomoko: Elimboli nini? Ndenge nini Yesu amonisaki ezaleli yango? Ndenge nini tokoki komekola ye?
YESU AZALI NA KOMIKITISA
4. Kozala moto ya komikitisa elimboli nini?
4 Komikitisa elimboli nini? Bato mingi ya lolendo bakanisaka ete komikitisa ezali elembo ya bato ya bolɛmbu to ya bato oyo batyelaka bango motema te. Kasi likambo yango ezali solo? Nzokande, mpo na kozala moto ya komikitisa, tosengeli kozala makasi mpe na mpiko. Ezaleli ya komikitisa ekeseni mpenza na lolendo. Na Babiblia mosusu, liloba “komikitisa” ebongolami na “motema bosáwa” to “kosɔkɛma.” (Bafilipi 2:3) Mpo na kozala bato ya komikitisa, tosengeli liboso biso moko komitalela na ndenge ebongi. Na ndakisa, diksionɛrɛ moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete: “Komikitisa elimboli koyeba ete tozali mpamba mpenza liboso ya Nzambe.” Lisusu, soki tozali bato ya komikitisa, tokomona te ete tozali malamu mingi koleka basusu. (Baroma 12:3) Ezalaka pɛtɛɛ te mpo na biso bato ya kozanga kokoka tómonisa ezaleli yango. Kasi, tokoki koyekola ndenge ya kozala bato ya komikitisa soki tokanisi na mozindo na bonene ya Yehova mpe tomekoli ndakisa ya Yesu.
Soki tozali bato ya komikitisa, tokomona te ete tozali malamu mingi koleka basusu
5, 6. (a) Nani azali Mikaele, anzelu-mokonzi? (b) Ndenge nini Mikaele amonisaki ezaleli ya komikitisa?
5 Ndenge nini Yesu amonisaki ezaleli ya komikitisa? Mwana ya Nzambe azalaki ntango nyonso na komikitisa, ezala ntango azalaki anzelu ya nguya na likoló mpe moto ya kokoka awa na mabele. Tótalela mwa bandakisa mosusu.
6 Ezaleli na ye. Na mokanda ya Yuda, tótángaka ndenge bomoi ya Yesu ezalaki liboso aya awa na mabele. (Tángá Yuda 9.) Lokola azali Mikaele, elingi koloba, mokonzi ya baanzelu, Yesu “azalaki na matata ná Zabolo” mpe “azalaki kowelana” na moto mabe “mpo na nzoto ya Moize.” Nsima ya liwa ya Moize, Yehova akundaki ye epai oyo ata moto moko te akokaki koyeba. (Kolimbola Mibeko 34:5, 6) Ntango mosusu, Zabolo alingaki komeka Bayisraele básalela nzoto ya Moize mpo na losambo ya lokuta. Ezala Zabolo alingaki kosala mabe nini, na mpiko nyonso, Mikaele asukisaki ye. Buku moko elobi ete maloba “azalaki na matata” mpe “azalaki kowelana” esalelamaka mpe mpo na kolobela “likambo oyo bamemi na tribinale” mpe ekoki kopesa likanisi ete “Mikaele atɛmɛlaki lotomo oyo Zabolo azalaki na yango ya kozwa nzoto ya Moize.” Kasi, anzelu-mokonzi ayebaki ete bokonzi na ye ezali na ndelo. Na yango, apesaki likambo na mabɔkɔ ya Yehova, zuzi oyo aleki bazuzi nyonso, mpe kaka moko oyo azali na lotomo ya kosambisa Satana. Yesu amonisaki mpenza ezaleli ya komikitisa!
Yesu andimaki na komikitisa mpenza kosala eloko nyonso oyo Yehova ayebisaki ye asala, ata “tii na liwa”
7. Ndenge nini Yesu amonisaki ezaleli ya komikitisa na maloba mpe misala na ye?
7 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki mpe ezaleli ya komikitisa na lolenge na ye ya koloba mpe makambo oyo azalaki kosala. Maloba na ye. Yesu azalaki koluka soki moke te ete bato batyela ye likebi oyo eleki ndelo. Kutu, alingaki nde ete tata na ye azwa lokumu nyonso. (Marko 10:17, 18; Yoane 7:16) Yesu azalaki soki moke te koloba na bayekoli na ye makambo na lolenge oyo ekosala ete bámimona bazoba to bato bazangá ntina. Lisusu, azalaki komemya bango mpe azalaki komonisa ete azali kotyela bango motema na ndenge azalaki kopesa bango longonya mpo na bizaleli na bango ya malamu. (Luka 22:31, 32; Yoane 1:47) Misala na ye. Yesu amonaki malamu azala na bomoi ezangi mindɔndɔ, elingi koloba bomoi ezangi ebele ya biloko ya mosuni. (Matai 8:20) Azalaki kolinga kosala misala ya mpamba oyo bato mingi balingaka te kosala. (Yoane 13:3-15) Atiká mpe ndakisa ya kokoka mpenza ya komikitisa na nzela ya botosi na ye. (Tángá Bafilipi 2:5-8.) Na bokeseni na bato ya lolendo oyo baboyaka mpenza komemya basusu, Yesu andimaki na komikitisa mpenza kosala eloko nyonso oyo Yehova ayebisaki ye asala, ata “tii na liwa.” Emonani polele ete Yesu, mwana ya moto, azalaki na “komikitisa na motema.”—Matai 11:29.
MEKOLÁ KOMIKITISA YA YESU
8, 9. Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya komikitisa?
8 Ndenge nini tokoki komekola ezaleli ya komikitisa ya Yesu? Makanisi na biso. Soki tozali bato ya komikitisa, tokoyeba ete bokonzi na biso ezali na ndelo. Lisusu, tokoyeba ete tozali te na lotomo ya kosambisa basusu. Tokotyola bango te to tokokanisela bango mabe te. (Luka 6:37; Yakobo 4:12) Komikitisa esalisaka biso tóboya kozala ‘bayengebene koleka ndelo.’ Yango elingi koloba ete tokomona te ete toyebi mingi koleka baoyo bazali na makoki ndenge moko na biso to bazali te na mikumba oyo biso tozali na yango. (Mosakoli 7:16) Bankulutu ya komikitisa bakanisaka te ete baleki bandeko na bango ya lisangá. Kutu, babateli ya mpate wana ya bolingo ‘bamonaka ete basusu baleki,’ elingi koloba bakanisaka ete basusu bazali na ntina mingi koleka bango moko.—Bafilipi 2:3; Luka 9:48.
9 Tólobela ndeko Thorn, oyo asalaki lokola mokɛngɛli motamboli kobanda na mobu 1894. Nsima ya mbula ebele, bapesaki ye mokumba ya kobatela nsoso na ferme ya Bokonzi mosika mpenza na nɔrdi ya New York. Ntango nyonso oyo makanisi ezalaki koyela ye ya komimona ete azali kosala mosala moko ya ntina mingi, azalaki komilobela boye: Yisaya 40:12-15.) Oyo mpenza makanisi ya komikitisa!
“Yo mwa mputulu ya mpamba. Eloko nini ozali na yango mpo ovimba na lolendo?” (Tángá10. Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya komikitisa na maloba mpe misala na biso?
10 Maloba na biso. Soki tozali mpenza bato ya komikitisa, yango ekomonana na lolenge oyo tozali kosolola na basusu. (Luka 6:45) Ntango tozali kosolola na bango, tokolobela mingi te mikumba na biso mpe makambo oyo tosali. (Masese 27:2) Kasi, tokopesa nde bandeko na biso longonya mpo na makambo ya malamu oyo bazali kosala mpe tokotya likebi mingi na bizaleli na bango ya malamu mpe makoki na bango. (Masese 15:23) Misala na biso. Bakristo ya komikitisa balukaka te kokóma bavedɛti to bato minene na mokili oyo. Kutu, bazalaka na bomoi ezangi mindɔndɔ, mpe basalaka misala ya mpamba, mpo ete bakoka kosalela Yehova na kotalela makoki na bango. (1 Timote 6:6, 8) Oyo eleki ntina, tokoki komonisa ezaleli ya komikitisa soki tozali na botosi. Tosengeli kozala na komikitisa mpo ‘tótosaka baoyo bazali kokamba’ lisangá, tóndima mpe tólanda litambwisi ya ebongiseli ya Yehova.—Baebre 13:17.
YESU AZALAKI BOBOTO
11. Ezaleli ya boboto elimboli nini?
11 Kozala boboto elimboli nini? Ezaleli yango elimboli komitya na esika ya basusu. Elimboli komonisa bolingo mpe motema mawa. Biblia esalelaka mpe maloba “mawa monene,” “motema mawa mingi” mpe “bolingo ya motema.” (Luka 1:78; 2 Bakorinti 1:3; Bafilipi 1:8) Buku moko elobaka ete komonisa boboto esengeli kosuka te kaka na koyokela bato oyo bazali na bosɛnga mawa. Elobaka ete kozala na ezaleli ya boboto elimboli ete “tosengeli mpenza kosala nyonso mpe koluka kosalisa.” Tosengeli kosala mwa likambo oyo ekoki kobongisa bomoi ya basusu. Kozala na boboto ezali ezaleli oyo etindaka moto asala likambo moko ya ntina mpenza na bomoi ya basusu.
12. Nini emonisi ete Yesu azalaki koyoka mawa monene mpo na basusu, mpe boboto na ye etindaki ye asala nini?
12 Ndenge nini Yesu amonisaki ezaleli ya boboto? Mayoki mpe misala na ye ezalaki komonisa boboto. Yesu azalaki na mawa monene mpo na basusu. Ntango amonaki moninga na ye Maria mpe bato mosusu bazali kolela mpo na liwa ya Lazare, Yesu alelaki ná bango. (Tángá Yoane 11:32-35.) Mawa oyo etindaki ye asekwisa mwana mobali ya mwasi moko oyo mobali akufá nde etindaki ye asekwisa Lazare. (Luka 7:11-15; Yoane 11:38-44) Ekoki kozala ete ezaleli wana ya boboto epesaki Lazare libaku ya kozala na bomoi na likoló. Liboso mpenza, Yesu amonisaki “bolingo ya motema” mpo na ebele ya bato oyo bayaki epai na ye. Mawa monene oyo azalaki na yango etindaki ye ‘abanda koteya bango makambo mingi.’ (Marko 6:34; Biblia haut fleuve) Likambo wana ebongolaki bomoi ya baoyo balandaki mateya na ye. Boboto ya Yesu ezalaki kosuka te kaka na koyoka mawa. Ezalaki mpe kotinda ye asalisa baoyo bazalaki na bosɛnga.—Matai 15:32-38; 20:29-34; Marko 1:40-42.
13. Nini emonisi ete Yesu azalaki koloba na bato na boboto? (Talá elilingi ya ebandeli.)
13 Maloba ya boboto. Motema mawa ya Yesu ezalaki kotinda ye alobaka na basusu na boboto, mingimingi bato oyo bazalaki kotungisama. Ntoma Matai azongelaki maloba ya Yisaya oyo etali Yisaya 42:3; Matai 12:20) Yango elimboli nini? Yesu azalaki te kosala bato mabe to konyokola bango. Kutu, azalaki nde koloba na bango na lolenge oyo ekokaki kopemisa bango. Asakolaki nsango ya elikya epai ya baoyo “bazoki na motema.” (Yisaya 61:1) Abengaki bato oyo ‘bazalaki komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba’ báya epai na ye mpo ete ‘bápema.’ (Matai 11:28-30) Alakaki bayekoli na ye ete Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na mosambeli na ye mokomoko, ezala “bato mike,” baoyo mokili etalelaka lokola bato bazangi ntina.—Matai 18:12-14; Luka 12:6, 7.
Yesu. Yisaya alobaki ete: “Akobuka te mongendu oyo etutami; mpe akoboma te nsinga ya lini oyo mɔtɔ na yango elingi kokufa.” (MEKOLÁ EZALELI YA BOBOTO YA YESU
14. Ndenge nini tokoki komonisela basusu bolingo ya motema?
14 Ndenge nini tokoki komekola ezaleli ya boboto ya Yesu? Komitya na esika ya basusu. Biblia ezali koyebisa biso ete tósala makasi tómonisa “bolingo ya motema oyo euti na mawa,” ata soki tokokoka te kosala yango. Makambo wana ezali na kati ya “bomoto ya sika” oyo Yehova alingi ete bakristo nyonso bálata. (Tángá Bakolose 3:9, 10, 12.) Ndenge nini okoki komonisa bolingo ya motema? Biblia elobi ete: “Bófungwama.” (2 Bakorinti 6:11-13) Yokáká na likebi ntango moto moko azali koyebisa yo ndenge azali koyoka mpe nini ezali kotungisa ye. (Yakobo 1:19) Salelá makoki na yo ya kokanisa mpe omituna boye: ‘Soki likambo wana nde ekómelaka ngai, nalingaki koyoka ndenge nini? Nalingaki kozala na mposa ya nini?’—1 Petro 3:8.
15. Tokoki kosala nini mpo na kosalisa baoyo bakoki kozala na mawa to na mpasi?
15 Misala ya boboto. Boboto ekotinda biso tósalisa basusu, mingimingi baoyo bazali na mawa to bazali konyokwama. Ndenge nini tokoki kosalisa bango? Baroma 12:15 elobi ete: “Bólela elongo na bato oyo bazali kolela.” Mbala mingi, bato bazalaka na mposa ya libɔndisi koleka koyebisa bango ndenge ya kosilisa likambo bazali na yango. Bazalaka na mposa ya moninga oyo akomibanzabanza mpo na bango mpe akoyoka bango. Ndeko mwasi moko oyo Batatoli mosusu babɔndisaki ye ntango ndeko na ye akufaki alobi boye: “Nazalaki kosepela mpenza ntango baninga bazalaki koya mingi mpe kolela ná ngai elongo.” Tokoki mpe komonisa boboto soki tosali makambo oyo ekoki mpenza kosalisa basusu. Ekoki kozala ete mwasi moko oyo mobali na ye akufá azali na mposa ete básalisa ye mpo na kobongisa ndako. To ekoki kozala ete mokristo moko ya mobange asengeli na lisalisi mpo akendeke na makita, na mosala ya kosakola to kokende epai ya doktɛrɛ. Ata mwa likambo moke ya boboto ekoki kozala na ntina mingi na bomoi ya moto. (1 Yoane 3:17, 18) Oyo eleki ntina, tokoki komonisela basusu boboto soki tozali kosala nyonso mpo na kosakola nsango malamu. Na lolenge wana nde tokoki kosalisa mpenza bato ya mitema sembo!
16. Tokoki koloba nini mpo na kolendisa baoyo batungisami na makanisi?
16 Maloba na biso ya boboto. Soki tozali komitya na esika ya basusu, yango ekotinda biso ‘tólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi.’ (1 Batesaloniki 5:14) Tokoloba nini mpo na kolendisa bango? Tokoyebisa bango ete totyelaka bango likebi. Tokoki kopesa bango longonya mpe kosalisa bango bátalela bizaleli malamu mpe makoki oyo bazali na yango. Tokoki kokundwela bango ete Yehova asalisaki bango báyeba solo, na yango, bazali na motuya mingi na miso na ye. (Yoane 6:44) Tokoki kokitisa bango motema ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na basaleli na ye oyo “motema ebukani” to “elimo etutami.” (Nzembo 34:18) Maloba na biso ya boboto ekoki mpenza kopemisa baoyo basengeli na libɔndisi.—Masese 16:24.
17, 18. (a) Yehova alingaka ete bankulutu básalela bampate na ye makambo ndenge nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
17 Bankulutu, Yehova alingi ete bósalela bampate na ye makambo na boboto. (Misala 20:28, 29) Bóbosana te ete mokumba na bino ezali ya koteya, kolendisa mpe kopemisa bampate. (Yisaya 32:1, 2; 1 Petro 5:2-4) Na yango, nkulutu oyo azali na boboto, akoluka te kokonza bandeko na ye, elingi koloba, kotyela bango mibeko to kotya bango mosukusuku mpo básala mingi ntango oyo bazali na makoki te ya kosala. Kutu, nkulutu alingaka ete bandeko na ye bázala mpenza na esengo, mpe atyaka motema ete bolingo na bango mpo na Yehova ekotinda bango bápesa Nzambe eloko na bango oyo eleki mpenza malamu.—Matai 22:37.
18 Soki tozali komekola komikitisa mpe boboto ya Yesu, tokozwa makasi ya komekola ye. Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge oyo tokoki komekola mpiko mpe bososoli ya Yesu.