LISOLO YA BOMOI
“Ebele ya bisanga esepela”
Nabosanaka te mokolo wana na Brooklyn. Ngai ná bandeko ya bikólo mosusu tozalaki kozela na esika oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka likita. Tozalaki kozela Komite ya Bokomi ekɔta. Esengelaki tómonisa bango ndenge ya kolonga mikakatano mosusu oyo babongoli bakutanaka na yango, kasi tozalaki kobanga. Ezalaki mokolo ya 22/05/2000. Kasi mpo na nini likita yango ezalaki na ntina? Liboso napesa bino eyano, tiká nabɛtɛla bino mwa moke lisolo ya bomoi na ngai.
NABOTAMAKI na mobu 1955, na etúká ya Queensland na ekólo Australie. Mwa moke na nsima, Batatoli ya Yehova babandaki koyekola Biblia ná mama na ngai Estelle. Azwaki batisimo mbula moko na nsima, mpe tata na ngai Ron, ayambaki solo mbula 13 na nsima. Nazwaki batisimo na 1968 na mboka moko mosika mpenza na Queensland.
Ata ntango nazalaki naino mwana moke, nazalaki kolinga babuku mpe koyekola minɔkɔ. Ntango nyonso oyo ngai ná baboti na ngai tozalaki kosala mobembo, nazalaki kofanda na kiti ya nsima mpe kotánga buku moko. Ntango mosusu, baboti na ngai bazalaki kosepela te mpo nazalaki kotala te bangomba, mai mpe bazamba. Kasi, lokola nazalaki kolinga kotánga mingi yango esalisaki ngai nazwaka malamu na kelasi. Kutu nazwaki mbano ndenge na ndenge ntango nazalaki kotánga na eteyelo ya ntei na engumba Glenorchy, na esanga ya Tasmanie.
Na ntango wana, nasengelaki kozwa ekateli moko ya ntina mingi. Nazalaki komituna soki nasengelaki kondima mbano mpo na kokende na iniversite to te. Atako nazalaki kolinga babuku mingi mpe koyekola, nazalaka na botɔndi ndenge mama ateyaki ngai nalinga Yehova mingi koleka moto to eloko mosusu nyonso. (1 Bakorinti 3:18, 19) Na yango, lokola baboti na ngai bapesaki ngai nzela, nazwaki ekateli ete ntango kaka nakosilisa eteyelo ya ntei, nakotika makambo ya kotánga bakelasi mpe nakobanda mosala ya mobongisi-nzela. Yango nde nasalaki na sanza ya 01/1971, ntango nazalaki na mbula 15.
Na boumeli ya mbula mwambe oyo elandaki, nasalaki mosala ya mobongisi-nzela na Tasmanie. Na ntango wana, nabalaki Jenny Alcock, mwasi moko kitoko na Tasmanie. Tosalelaki Yehova lokola babongisi-nzela monene na bingumba ya mosika lokola Smithton mpe Queenstown.
MOSALA YA MISIONƐRƐ NA BISANGA YA PASIFIKE
Na mobu 1978, ngai ná mwasi na ngai tokendaki na Port Moresby, na ekólo Papouasie-Nouvelle-Guinée, mpo na kokɔta na liyangani moko oyo esangisaka bato ya mikili mingi. Nabosanaka te ndenge misionɛrɛ moko azalaki kosala diskur na monɔkɔ ya Hiri Motu. Atako nakokaki te kokanga ntina ya makambo oyo azalaki koloba, nakómaki kokanisa ete ngai mpe nasengeli kokóma misionɛrɛ, koyekola monɔkɔ mosusu, mpe kosalaka badiskur mpo na kolendisa bandeko na minɔkɔ na bango. Nsukansuka, nayaki komona ndenge oyo nakoki kosalela mposa oyo nazalaka na yango na makambo etali minɔkɔ mpo na kosalela Yehova.
Ntango tozongaki na ndako, okoki komona na makanisi esengo oyo nazalaki na yango ntango bayebisaki biso ete tokómi bamisionɛrɛ. Tokómaki na esanga ya Funafuti, na Tuvalu na sanza ya 01/1979. Ezalaki kaka na bandeko misato oyo bazwá batisimo na Tuvalu mobimba.
Koyekola monɔkɔ ya Tuvalu ezalaki pɛtɛɛ te. Buku kaka moko oyo ezalaki na monɔkɔ yango ezali, “Kondimana ya sika.” Lokola badiksionɛrɛ mpe kelasi ya koyekola monɔkɔ yango ezalaki te, tozwaki ekateli ya koyekola mokolo na mokolo maloba ya sika kobanda 10 kino 20. Kasi eumelaki te, tomonaki ete tozalaki koyeba te ndimbola mpenza ya maloba mingi oyo tozalaki koyekola. Na esika ete tóyebisa bato ete misala ya bademo ezali mabe, tozalaki nde koyebisa bango ete basengeli te kosalela bimekeli kilo mpe kotambola na mwa banzete! Kasi tosengelaki kokoba koyekola monɔkɔ yango mpo tozalaki na bayekoli ya Biblia ebele. Bambula mingi na nsima, moko ya bayekoli na biso ya liboso ya Biblia ayebisaki biso ete: “Tozali na esengo mingi ndenge bozali koloba monɔkɔ na biso malamu sikoyo. Na ebandeli, tozalaki koyeba mpenza te makambo oyo bozalaki koloba!”
Kasi, ezalaki na likambo moko oyo esalisaki biso tóyekola monɔkɔ yango noki. Lokola ndako ya kofutela ezalaki te, tozalaki kofanda epai ya libota moko ya Batatoli na mboka ya mwa monene. Tosengelaki koloba monɔkɔ ya Tuvalu esika nyonso, ata mpe na ndako. Lokola tozalaki lisusu koloba lingelesi te na boumeli ya mwa bambula, tomonaki ete monɔkɔ ya Tuvalu ekómaki mpenza monɔkɔ na biso ya libosoliboso.
Mwa moke nsima ya kokóma na biso, bato mingi babandaki kosepela na solo. Kasi eloko nini tokokaki kosalela mpo na koyekola na bango? Tozalaki ata 1 Bakorinti 14:9) Tozalaki komituna boye, ‘Mokolo mosusu tokozwa mikanda na monɔkɔ ya Tuvalu, monɔkɔ oyo elobamaka na bato pene na 15 000?’ Yehova apesaki biso biyano na mituna yango mpe amonisaki biso makambo mibale: (1) Alingi bato ya “bisanga mosika” báyekola makambo etali ye, mpe (2) Alingi ete baoyo mokili emonaka ete bazali bato ya ‘komikitisa mpe oyo bazali komitombola te,’ bákima epai ya nkombo na ye.—Yirimia 31:10; Sefania 3:12.
na mokanda moko te na monɔkɔ na bango. Ndenge nini bakosala boyekoli na bango moko? Ntango bakobanda koya na makita, bakoyemba nzembo nini, ndenge nini bakosala masolo, mpe ndenge nini bakobongisa makita? Ndenge nini bakozwa batisimo? Bato oyo ya komikitisa bazalaki na mposa ya mikanda na monɔkɔ na bango mpo na koteya bango makambo etali Yehova! (MOSALA YA KOBONGOLA MPO NA KOTEYA SOLO
Na 1980, biro ya filiale epesaki biso mokumba ya kobongola mikanda na monɔkɔ ya Tuvalu. Tobandaki mosala yango, atako tozalaki kokanisa ete toyebi monɔkɔ yango mingi te. (1 Bakorinti 1:28, 29) Na ebandeli, tosombaki masini moko ya kala na guvɛrnema mpo na konyata mikanda na mabɔkɔ na makita na biso. Kutu na nsima, tobongolaki buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko na monɔkɔ ya Tuvalu mpe tonyataki yango na mwa masini wana. Nazali kokanisa lisusu nsolo makasi ya mai ya mikanda (encre), mpe molunge makasi oyo ezalaki kosala ete mosala ya kobimisa mikanda na mabɔkɔ ezala mpasi. Na ntango mosusu, tozalaki na kura te!
Kobongola na monɔkɔ ya Tuvalu ezalaki pɛtɛɛ te mpo tozalaki na likoki te ya kotala maloba na diksionɛrɛ to kosala bolukiluki na mikanda ya monɔkɔ yango. Kasi na ntango mosusu tozalaki kozwa lisalisi na balolenge mosusu. Mokolo moko na ntɔngɔ, kozanga koyeba nakɔtaki na ndako ya moto moko oyo asepelaka na solo te. Mobali yango ya mokóló, oyo azalaki molakisi, ayebisaki ngai ete toyaka te na ndako na ye. Na nsima alobaki ete: “Nalingi koyebisa bino kaka likambo moko. Mbala mingi na mikanda na bino, bómonisaka te mbala moko moto oyo azali kosala likambo to eloko oyo ezali kosala likambo (voix active). Na monɔkɔ ya Tuvalu, tolobaka bongo te mbala mingi. Natalelaki likambo yango ná bandeko mosusu mpe tomonaki ete alobaki solo. Na yango, tobongolaki makambo mosusu mpo na kobongisa lisusu mosala na biso ya kobongola. Nakamwaki mingi ndenge Yehova apesaki biso lisalisi oyo na nzela ya
moto oyo azalaki kosepela na solo te kasi azalaki kotánga mikanda na biso!Mokanda ya liboso ya monɔkɔ ya Tuvalu oyo topesaki bato ezalaki nkasa ya libyangi ya ekaniseli. Na nsima, tobongolaki mpe trakte Nsango ya Bokonzi No. 30, oyo ebimaki nzela moko na oyo ya Lingelesi. Kanisá esengo oyo tozalaki na yango ntango tomonaki ete tozali na mwa eloko oyo tokoki kopesa bato na monɔkɔ na bango! Nsima ya mwa ntango, tokómaki mpe na mwa babuku mpe babuku mosusu na monɔkɔ ya Tuvalu. Na 1983, biro ya filiale ya Australie ebandaki konyata Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na monɔkɔ ya Tuvalu. Zulunalo yango ezalaki na nkasa 24 mpe ezalaki kobima nsima ya sanza misato nyonso. Bato ya Tuvalu basepelaki na babuku mpe bazulunalo yango? Ɛɛ, mpo balingaka kotánga mingi. Mbala nyonso oyo tozalaki kobimisa mokanda ya sika, radio ya guvɛrnema ezalaki kolobela yango na bansango, mpe na ntango mosusu yango nde ezalaki nsango oyo ezalaki kolobelama mingi na mokolo wana! *—Talá maloba na nse ya lokasa.
Mosala ya kobongola ezalaki kosalema ndenge nini? Ya liboso, tozalaki kokoma makambo nyonso na biki mpe papye. Na nsima, tozalaki kobɛta yango na masini mbala na mbala tii ntango oyo tozalaki komona ete ebongi etindama na filiale ya Australie. Kuna na filiale, atako bayebaki monɔkɔ ya Tuvalu te, bandeko basi mibale bazalaki kobɛta makomi yango moto na moto na ordinatɛrɛ na ye. Kasi, lokola bazalaki kobɛta makomi yango mbala mibale mpe na nsima bazalaki kotala bisika oyo ekeseni na ordinatɛrɛ, yango ezalaki kosalisa bango básala bafoti te. Mpe filiale ezalaki kobongisa mikanda yango, elingi koloba, kotya yango bafɔtɔ. Na nsima, bazalaki kotindela biso yango na aviɔ. Tozalaki kotala yango na likebi mpenza mpe kotinda yango lisusu na filiale mpo bányata yango.
Mosala ya kobongola ebongá mpenza! Sikoyo baekipi ya babongoli babɛtaka maloba mpe babongisaka yango mbala moko na ordinatɛrɛ. Mbala mingi, ndeko oyo abongisaka mpe atyaka bafɔtɔ na mikanda (compositeur) azalaka esika moko ná ekipi yango. Na nsima, batindaka mikanda yango na nzela ya Internet na bafiliale oyo enyataka mikanda. Moto moko te asengeli kokimaka mbangu na biro ya posita na miniti ya nsuka mpo na kotinda mikanda oyo bandeko babongoli.
MIKUMBA MOSUSU
Nsima ya bambula, ngai ná Jenny tozwaki mikumba ndenge na ndenge na bamboka mingi ya Pasifike. Na 1985, tolongwaki na Tuvalu mpe batindaki biso na filiale ya Samoa. Kuna, topesaki mabɔkɔ na mosala ya kobongola na monɔkɔ ya Samoa, Tongan, mpe ya Tokelau, ata mpe na mɔnɔkɔ ya Tuvalu. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Na nsima, na mobu 1996, batindaki biso na filiale ya Fidji, mpe kuna tozalaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobongola oyo ezalaki kosalema na monɔkɔ ya Fidjien, Kiribati, Nauru, Rotumien, mpe Tuvalu.
Ekamwisaka ngai ntango nyonso ndenge namonaka bolingo oyo babongoli bazalaka na yango mpo na mosala na bango atako ezalaka pɛtɛɛ te mpe ekoki kolɛmbisa. Lokola Yehova, bandeko oyo ya sembo balingaka mpenza bato báyoka nsango malamu na monɔkɔ na bango. (Emoniseli 14:6) Na ndakisa, ntango bibongiseli ezwamaki mpo na kobongola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya liboso na monɔkɔ ya Tongan, nakutanaki na bankulutu nyonso na Tonga mpe natunaki bango banani bakosepela kozwa formasyo mpo na kokóma babongoli. Moko na bango, oyo azalaki na mosala moko malamu, andimaki kotika yango mpe mokolo oyo elandaki abandaki mbala moko kosala mosala ya kobongola. Kondima na ye ya makasi elendisaki ngai mingi, mpo azalaki na libota mpe ayebaki te ndenge oyo akozwa mbongo mpo na kosalisa bango. Kasi Yehova asalisaki ye mpe libota na ye, mpe alekisaki bambula mingi na mosala ya kobongola.
Lokola babongoli yango, bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi batyaka mpenza likebi na likambo etali kobimisa mikanda na minɔkɔ nyonso, ata na minɔkɔ oyo elobamaka kaka na bato moke. Na ndakisa, batunaki motuna soki ezalaki mpenza na ntina kosala milende mpo na kobongola mikanda na monɔkɔ ya Tuvalu. Nalendisamaki mingi ntango natángaki eyano ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo ete: “Tomoni mpenza te ntina oyo bosengeli kotika kobongola mikanda na monɔkɔ ya Tuvalu. Ata soki bato oyo balobaka yango bazali moke soki tokokanisi bango na minɔkɔ mosusu, bato bazali na mposa báteya bango nsango malamu na monɔkɔ na bango.”
Na mobu 2003, balongolaki ngai ná Jenny na Departema ya kobongola na Fidji mpe batindaki biso na Departema ya mosala ya kobongola na Patterson, na New York. Ezalaki lokola ndɔtɔ mpe ekómi likambo ya solo! Tokómaki basangani ya ekipi oyo epesaka mabɔkɔ na mosala ya kobongola mikanda na biso na minɔkɔ mingi. Na boumeli ya bambula mibale to koleka oyo tolekisaki na Departema ya mosala ya kobongola, bapesaki biso mokumba ya kopesa formasyo na baekipi ya babongoli ya bikólo ndenge na ndenge.
BIKATELI YA NTINA MINGI
Sikoyo, tiká nazonga lisusu na likita ya ntina mingi oyo nalobelaki na ebandeli. Na mobu 2000, Lisangani ya Mikóló-Bakambi bamonaki ete esengeli kosalisa baekipi ya babongoli na mokili mobimba mpo básala mosala na bango malamu. Babongoli mingi bazwaki ata formasyo moko te na oyo etali kobongola. Nsima ya likita wana ná Komite ya bokomi, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaki ekateli ete babongoli nyonso na mokili mobimba basengeli kozwa formasyo. Esengelaki koteya babongoli ndenge ya koyeba malamumalamu makambo oyo ezali na Lingelesi, ndenge ya kolonga mikakatano ya mosala ya kobongola, mpe ndenge ya kosala malamu na ekipi.
Litomba nini formasyo yango epesi babongoli? Mosala ya kobongola ekómi lisusu malamu koleka. Lisusu, mikanda na biso ezali kobongolama na minɔkɔ mingi koleka ndenge ezalaki liboso. Na mobu 1979, ntango tokómaki bamisionɛrɛ, zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kobimisama kaka na minɔkɔ 82. Ata bongo, na minɔkɔ mingi Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kobima mwa basanza na nsima ya oyo ya Lingelesi. Kasi sikoyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobongolama na minɔkɔ koleka 240, mpe na minɔkɔ mingi, zulunalo yango ebimaka nzela moko na oyo ya Lingelesi. Sikoyo, bato bakoki kotánga ata mwa mokanda moko oyo ekoki koteya bango solo ya Biblia na minɔkɔ koleka 700. Na mwa bambula oyo eleki, emonanaki lokola ete likambo ya boye ekokaki kosalema te.
Na mobu 2004, Lisangani ya Mikóló-Bakambi emonaki ete ebongi Libongoli ya mokili ya sika ebima na minɔkɔ mingi mpe esengeli kosala yango nokinoki. Ekateli yango esali ete sikoyo bato mingi bákoka kotánga Libongoli ya mokili ya sika na monɔkɔ na bango. Kutu, na 2014, Biblia yango to bandambo na yango ebimisami na minɔkɔ 128, na kati na yango, tokoki mpe kotánga minɔkɔ mosusu oyo elobamaka na Sudi ya Pasifike.
Moko ya makambo oyo nabosanaka te ezali liyangani oyo esalemaki na Tuvalu na 2011. Mbula
ezalaki kobɛta te na ekólo wana mobimba na boumeli ya basanza mingi. Bandeko bakanisaki ete liyangani wana ekosalema lisusu te. Kasi likambo ya esengo, na mpokwa ya mokolo oyo tokómaki, mbula ebandaki kobɛta makasi. Na yango, tosalaki liyangani na biso! Mpo na ngai, kobimisa Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na monɔkɔ ya Tuvalu, ezalaki mpenza libaku moko malamu! Atako ezali kaka na bandeko moke oyo balobaka monɔkɔ yango, bango mpe bakokaki kozwa likabo wana kitoko ya Yehova. Na nsima, mbula mosusu ya makasi ebɛtaki na nsuka ya liyangani. Na yango, moto nyonso azalaki na ebele ya mai ya solo mpe ebele ya mai ya mbula!Likambo ya mawa, mwasi na ngai Jenny azalaki wana te ná ngai. Akufaki na 2009, nsima ya kobunda na maladi ya kanser na boumeli ya mbula 10. Tosalaki mbula 35 na libala. Ntango akosekwa, akosepela mingi ntango akoyoka ete Biblia ebimaki na monɔkɔ ya Tuvalu.
Yehova apamboli ngai na ndenge apesi ngai mwasi mosusu ya kitoko na nkombo Loraini Sikivou. Loraini ná Jenny basalaki elongo na Betele ya Fidji, Loraini azalaki mpe mobongoli. Na mbala oyo mpe, nazali na mwasi oyo asalelaka Yehova na bosembo mpe alingaka makambo etali minɔkɔ lokola ngai!
Na boumeli ya bambula, namoni mpenza ndenge Yehova, Tata na biso ya bolingo, akokisi bamposa ya bato ya minɔkɔ nyonso, ata soki monɔkɔ na bango elobamaka kaka na bato moke. (Nzembo 49:1-3) Namoni mpe ndenge bato basepelaka ntango bazwi mikanda mpo na mbala ya liboso na minɔkɔ na bango to ntango bayembelaka Yehova na monɔkɔ na bango mpenza ya motema. Na bantango ya ndenge wana, nakanisaka bolingo monene oyo Yehova azalaka na yango mpo na biso. (Misala 2:8, 11) Tii sikoyo nakanisaka mpenza maloba ya ndeko moko ya mobange na Tuvalu, na nkombo Saulo Teasi. Nsima ya koyemba loyembo moko ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso na monɔkɔ na ye, alobaki boye: “Namoni, osengeli koyebisa Lisangani ya Mikóló-Bakambi ete nzembo oyo ezali koyokana kitoko mingi na monɔkɔ ya Tuvalu koleka na Lingelesi.”
Na sanza ya 9/2005, nakamwaki mingi ndenge nazwaki libaku ya kokóma na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Atako nakoki lisusu te kozala mobongoli, napesaka Yehova matɔndi ndenge atiki ete nakoba kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobongola oyo ezali kosalema na mokili mobimba. Esepelisaka ngai mingi mpenza koyeba ete Yehova akokisaka bamposa ya basaleli na ye nyonso, ata baoyo bazali na bisanga ya mosika na katikati ya Océan pacifique! Ya solo, kaka ndenge moko ya bakomi ya nzembo ayembaki ete: “Yehova ye moko akómi mokonzi! Mabele ezala na esengo. Ebele ya bisanga esepela.”—Nzembo 97:1.
^ par. 18 Mpo na kotánga makambo mosusu na oyo etali ndenge bato basepelaki na mikanda na biso, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/12/2000, lokasa 32; 01/08/1988, lokasa 22, na Lifalanse; mpe Lamuká! ya 22/12/2000, lokasa 9, na Lifalanse.
^ par. 22 Mpo na kotánga makambo mosusu oyo etali mosala ya kobongola na Samoa, talá Buku ya mobu 2009 ya Batatoli ya Yehova, nkasa 120-121, 123-124 na Lifalanse.