Sɛkɛlɛ mpo na libota ya esengo
Kopesa bana disipilini
John: * Ntango nazalaki mwana moke, liboso baboti na ngai bápesa ngai etumbu, bazalaki naino koluka koyeba mpo na nini nasali mabe mpe nini etindi ngai nasala yango. Ngai mpe nasalaka bongo epai ya bana na ngai. Nzokande, mwasi na ngai Alison, abɔkwamá ndenge mosusu. Baboti na ye bazalaki kosilika noki. Emonani ete bazalaki kobɛta bana na bango kozanga koluka koyeba nini etindi bango básala mabe. Ntango mosusu, namonaka ete mwasi na ngai mpe asalaka lokola baboti na ye.
Carol: Tata na ngai asundolaki biso ntango nazalaki na mbula mitano. Azalaki kokipe ngai ná baleki na ngai te. Mama azalaki kosala makasi mpo na kobɔkɔla biso, mpe ngai nazalaki kosala mingi mpo na kobatela baleki na ngai. Lokola nazalaki kosala makambo oyo baboti nde basalaka nazalaki na ntango te ya kosakana lokola bana nyonso. Ata ndenge nakoli, nakokaka kosala masɛki te. Soki bana na biso basali mabe, nazwaka ntango molai mpo na kokanisa na likambo yango. Nalukaka koyeba mpo na nini likambo yango esalemi mpe makanisi nini bazalaki na yango. Nzokande mobali na ngai, Mark, azalaka bongo te; amemaka makambo milaimilai te. Tata na bango azalaki kolinga bango mingi, kasi azalaki mpe kopesa bango etumbu ntango esengeli; azalaki mpe kokipe mama na bango malamu. Soki bana basali mabe, mobali na ngai alukaka kosilisa likambo yango mbala moko. Atalelaka likambo yango, asilisaka yango mbala moko mpe abosani.
NDENGE maloba ya John ná Carol emonisi yango, mbala mingi baboti balandaka kaka ndenge baboti na bango babɔkɔlá bango. Soki mwasi ná mobali babokwamá ndenge moko te, mbala mingi bazalaka na likanisi moko te na likambo ya kobɔkɔla bana. Ntango mosusu, bokeseni yango ebimisaka mikakatano na libala.
Mikakatano yango ekómaka lisusu makasi ntango baboti balɛmbi. Bato oyo bakómi baboti sika baumelaka te komona ete kobɔkɔla bana ezali likambo ya pɛtɛɛ te mpe ezwaka ntango mingi. Joan, oyo akolisá bana mibale ye ná mobali na ye Darren, alobi boye: “Nalingaka bana na ngai mingi, kasi ntango nazalaki kotinda bango bákende kolala, bazalaki koboya. Bazalaki kolamuka na ntango oyo
esengeli te. Soki nazali koloba na bango, bazalaki kokata ngai maloba. Bazalaki kotika basapato, bilamba mpe biloko na bango ya kosakana libándá. Soki mpe basilisi kolya, bazalaki kozipa bilei oyo etikali te.”Jack, oyo mwasi na ye abelaki maladi ya motó nsima ya kobota mwana na bango ya mibale, alobi boye: “Nazalaki kouta na mosala nalɛmbi, mpe mbala mingi nazalaki kolala te ntango molai na butu mpo na kobondela mwana na biso. Mpo na yango, tozalaki lisusu kokipe mwana na biso ya liboso malamu te. Yango wana, akómaki koyokela leki na ye zuwa.”
Ntango baboti oyo balɛmbi bayokani te na ndenge ya kopesa bana disipilini, bakómaka koswana, mpe ata mwa likambo ya moke ekoki kobimisa koswana ya makasi. Soki basilisi matata yango te, yango ekoki kokabola bango mpe kokómisa bana motó makasi. Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa baboti báyokanaka malamu na likambo ya kobɔkɔla bana?
Bólekisaka ntango elongo
Bana bayaka kokuta tata ná mama, mpe soki bakoli bakendaka mpe batikaka bango. Mpo na libala, Biblia elobi boye: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Matai 19:6) Nzokande, vɛrsɛ yango emonisi mpe ete Nzambe abongisaki ete nsukansuka mwana ‘asengelaki kotika tata na ye mpe mama na ye.’ (Matai 19:5) Ya solo mpenza, kobɔkɔla bana ezali likambo ya libosoliboso te na kati ya libala. Na ntembe te, baboti basengeli komipesa mpenza mpo na kobɔkɔla bana na bango, kasi basengeli kobosana te ete soki bango moko bazali koyokana te, bakobɔkɔla mpe bana malamu te.
Nini ekosalisa mwasi ná mobali báyokanaka malamu wana bazali kobɔkɔla bana na bango? Soki likoki ezali, bosengeli kobongisaka ntango mbala na mbala mpo na kozala kaka bino mibale. Yango ekopesa bino libaku ya kolobelaka makambo ya libota mpe kolekisa ntango elongo. Ya solo, ezali pɛtɛɛ te kozwa ntango ya kofanda kaka bino mibale. Alison, mama oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Kaka soki ngai ná mobali na ngai tolingi kozala biso mibale mpo na kosolola, mwana na biso ya moke akoki kobanda kolela to oyo ya mokóló akoki kobanda koluka kreyɔ na ye.”
Joan ná Darren, oyo tolobelaki liboso, batyelaki bana na bango ngonga oyo basengeli kolala, mpo bázwaka ntango ya kotikala kaka bango mibale. Joan alobi boye: “Na ngonga oyo totyaki, tozalaki kotinda bana na biso báboma mwinda mpe bálala. Yango ezalaki kopesa ngai ná Darren nzela ya kopema mpe kosolola.”
Soki baboti batyeli bana na bango ngonga ya kolala, bango moko bakobanda kozwa ntango ya kosolola, kasi yango ekosalisa mpe bana ‘bákanisa mpo na bango moko te koleka ndenge oyo basengeli kokanisa.’ (Baloma 12:3) Nsukansuka, bana oyo baboti na bango batyeli bango ngonga ya kolala bamonaka ete atako bazali na ntina na kati ya libota, basengeli kolukaka te ete baboti básalaka kaka oyo bango balingi; bango mpe basengeli kotosaka mibeko ya libota.
MEKÁ KOSALA BOYE: Bótyela bana ngonga ya kolala mpe bósɛnzɛla ete bátosaka yango. Soki mwana asɛngi ete atikala mwa moke, ntango mosusu mpo na komɛla mai, koboya te. Kasi, kotika te ete mwana akoba kosɛngasɛnga makambo mingi mpo na kolekisa ntango. Soki mwana asɛngi yo atikala mpo na mwa ntango moke, na ndakisa miniti mitano mpe ondimi, talelá ye ngonga. Mpe soki miniti yango ekoki, tindá ye akende kolala. Tiká ete liloba na yo ‘Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na yo, Te.’—Matai 5:37.
Bózala na bomoko
Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Mwana na ngai, yoká mateya ya tata na yo mpe tiká mibeko ya mama na yo te.” (Masese 1:8) Vɛrsɛ yango emonisi ete tata ná mama, bazali na bokonzi likoló ya bana na bango, bango nyonso mibale. Nzokande, ata soki mwasi ná mobali babɔkwamá ndenge moko, bakoki kozala na makanisi ekeseni mpo na ndenge ya kosembola bana mpe mpo na mibeko oyo bakoki kotyela bango. Ndenge nini baboti bakoki kosilisa mokakatano yango?
John, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Soki toyokani te na likambo moko, nalingaka te tómonisa yango na miso ya bana.” Kasi, alobi ete kosala bongo ezali pɛtɛɛ te. Abakisi boye: “Bana bamonaka. Ata soki tolobi te, mwana na biso amonaka ete likambo ezali.”
Ndenge nini John ná Alison basilisaka mokakatano yango? Alison alobi boye: “Soki nasepeli te na etumbu oyo mobali na ngai apesi mwana, nazelaka ntango mwana akozala te mpo nayebisa ye makanisi na ngai. Nalingaka te mwana amona ete akoki kokabola biso. Soki mwana amoni ete ngai ná tata na ye toyokani te, nayebisaka ye ete mokomoko na kati ya libota asengeli kolanda ebongiseli ya Yehova, mpe ngai nasengeli kotosa tata na ye, ndenge ye mpe asengeli kotosa ngai ná tata na ye.” (1 Bakolinti 11:3; Baefese 6:1-3) John alobi boye: “Ntango tozali elongo, mbala mingi ngai nde napesaka bana etumbu soki basali mabe. Kasi, soki Alison nde ayebi likambo oyo basali, natikaka ye apesa bango etumbu, mpe ngai nandimaka oyo ye asali. Soki nasepeli te na likambo moko, nayebisaka ye yango na nsima.”
Soki boyokani te na likambo ya kobɔkɔla bana, bokoki kosala nini mpo bókangelana nkanda te mpe bana bátika komemya bino te?
Meká kosala boye: Bózwaka ntango pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kolobela ndenge ya kobɔkɔla bana na bino, mpe soki boyokani te na likambo moko, bólobelaka yango polele. Luká koyeba makanisi ya molongani na yo, mpe kobosana te bolingo oyo ye mpe azali na yango mpo na mwana.
Bóyebana malamu
Na ntembe te, kobɔkɔla bana ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Ntango mosusu ekoki mpe kolɛmbisa. Kasi, nsukansuka, bana na bino bakokende mpe bokotikala kaka bino mibale ndenge bobandaki. Kobɔkɔla bana ekokolisa bolingo na bino to ekokitisa yango? Yango etali ndenge bozali kosalela toli oyo ezali na Mosakoli 4:9, 10: “Mibale baleki moko na malamu, zambi bakozala na libonza malamu na mosala na bango. Mpo ete soki bakokwea, moko akotombola moninga na ye.”
Soki baboti bazali na bomoko, bakolonga mpenza. Carol, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Nayebaki ete mobali na ngai azali na bizaleli mingi ya malamu, kasi ntango oyo tolekisi na kobɔkɔla bana esalisi ngai nayeba ye lisusu malamumalamu. Komona ndenge azalaki kobɔkɔla bana na bolingo nyonso ebakisi limemya mpe bolingo na ngai mpo na ye.” John alobi mpo na Alison boye: “Komona ndenge mwasi na ngai azalaki kokipe bana malamu etindi ngai nalinga ye lisusu makasi.”
Soki ozali kolekisa ntango elongo na molongani na yo mpe bozali na bomoko ntango bozali kobɔkɔla bana, bolingo na bino ekokóma lisusu makasi wana bana na bino bazali kokola. Ndakisa nini ya malamu bokopesa bana na bino?
^ par. 3 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.
OMITUNA . . .
-
Nalekisaka ntango boni pɔsɔ na pɔsɔ elongo na molongani na ngai kaka biso mibale?
-
Nazalaka ngámbo moko ná molongani na ngai ntango azali kopesa bana disipilini?