Liteya 3: Bato nyonso ya malamu bakendaka na lola
Liteya yango eutá wapi?
Nsima ya liwa ya bantoma ya Yesu, na ebandeli ya ekeke ya mibale ya ntango na biso (T.B.), Batata ya Lingomba bakómaki na lokumu mingi. Mpo na mateya na bango, buku moko elobi boye: “Mateya na bango ezalaki mingimingi komonisa ete nsima ya liwa soki kaka molimo epɛtolami ndenge esengeli, ekɔtaka mbala moko na bisengo ya lola.”—New Catholic Encyclopedia (2003), Volimi 6, lokasa 687.
Biblia elobi nini?
“Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.”—Matai 5:5.
Atako Yesu alakaki bayekoli na ye ete ‘akobongisela bango esika’ na likoló, amonisaki ete bato nyonso te ya malamu nde bakendaka likoló. (Yoane 3:13; 14:2, 3) Abondelaki te ete mokano ya Nzambe esalema “lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele”? (Matai 6:9, 10) Ya solo, bato mosusu ya sembo bakokende likoló mpe bamosusu bakotikala awa na mabele. Bato moke kaka nde bakoyangela ná Kristo na likoló, kasi bato mingi bakozala na bomoi ya seko awa na mabele.—Emoniseli 5:10.
Nsima ya bambula, lingomba ya ebandeli ebongolaki ndenge ya kotalela mosala oyo ezalaki na yango awa na mabele. Yango esalaki nini? Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Lingomba ekómaki mokemoke kozwa esika ya Bokonzi ya Nzambe oyo esengelaki koya.” Lingomba ekómaki koluka kosangana na politiki mpo ezwa nguya mingi koleka; babosanaki ete Yesu alobaki polele ete bayekoli na ye basengeli kozala “bato ya mokili te.” (Yoane 15:19; 17:14-16; 18:36) Na boyangeli ya Constantin, oyo azalaki amperɛrɛ ya Roma, lingomba ebebisaki bindimeli na yango mosusu, moko na yango etalelaki Nzambe ye moko.
Kokanisá bavɛrsɛ oyo ya Biblia: Nzembo 37:10, 11, 29; Yoane 17:3; 2 Timote 2:11, 12
LIKAMBO YA SOLO:
Bato mingi ya malamu bakozala nde na bomoi ya seko awa na mabele, kasi na lola te