Tyelá Yehova motema akosalisa yo mpenza
Tyelá Yehova motema akosalisa yo mpenza
Lisolo ya Edmund Schmidt
Ntango nazalaki komibongisa mpo nakende kosamba na tribinale moko na New York, na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1943, toli wana eyelaki ngai na makanisi. Ntango nazalaki na mbula 25, nalekisaki pene na mbula minei na bolɔkɔ mpo naboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Ndenge moko na bayekoli ya Yesu ya liboso, nazwaki ekateli ya “kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” (Misala 5:29) Kasi, liboso nabɛtɛla bino lisolo yango, tiká nayebisa bino naino ndenge nakómaki na kondima makasi epai ya Nzambe.
NABOTAMAKI na mokolo ya 23 Aprili 1922, na Cleveland, na etúká ya Ohio na États-Unis, na ndako na biso oyo ezalaki likoló ya esika oyo tata azalaki kotumba bagato. Sanza minei na nsima, tata na biso Edmund, akendaki na liyangani moko ya Bayekoli ya Biblia (ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana) na Cedar Point, pembeni ya Sandusky, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 160 kolongwa na ndako na biso.
Na liyangani yango, balendisaki bayangani nyonso ete: “Bósakola, bósakola, bósakola Mokonzi oyo [Nzambe] atye mpe bokonzi na ye.” Mokolo ya lomingo oyo elandaki, tata abandaki kosakola. Akobaki kosala mosala yango na boumeli ya mbula 66 oyo elandaki, tii liwa na ye na mokolo ya 4 Yuli 1988. Mama na biso Mary asalelaki Nzambe na bosembo nyonso tii na liwa na ye na 1981.
Nalandi losambo ya baboti na ngai
Libota na biso ezalaki kokende na lisangá moko ya monɔkɔ ya Polonais oyo ezalaki na Cleveland. Mikolo nyonso ya pɔsɔ nsima ya midi, mingi kati na biso bana, tozalaki kokende kosakola nsango malamu ndako na ndako ná mikóló. Na mikolo ya lomingo, baboti na biso bazalaki kolanda lisolo ya Biblia na esika oyo ebongisamaki mpo na mikóló. Kaka na ntango yango, ndeko moko oyo ayebi koteya malamu azalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia na lisalisi ya buku La harpe de Dieu, * elongo na biso bana soki 30. Eumelaki te, ngai mpe nabandaki koyekola na bato Biblia, mpe nazwaki matomba.
Na sanza ya Yuli 1931, libota na biso mobimba ná Frank ndeko na ngai ya mobali, tokendaki na liyangani mosusu ya Bayekoli ya Biblia, na mbala oyo na Columbus, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 160 na sudi. Ezalaki na ntango wana nde Bayekoli ya Biblia bandimaki na motema mobimba komema nkombo oyo euti na Biblia: Batatoli ya Yehova. (Yisaya 43:10-12) Na mokolo yango, ngai mpe nasakolaki; tokendaki kobenga bato báya koyoka lisolo ya Joseph Rutherford, oyo azalaki kokamba misala ya Batatoli ya Yehova na ntango wana. Na boumeli ya mbula koleka 79, kobanda ntango wana, napesaki bomoi na ngai mobimba na kosalela Yehova Nzambe elongo na bato na ye.
Nazwaki matomba na mosala na ngai atako mikakatano
Na 1933, kobeba ya nkita ezalaki komonana na mokili mobimba. Na États-Unis, bato koleka milio 15, to bato mingi bazalaki na mosala te. Nkita ya bingumba mingi ebebaki, mpe ezalaki lisusu te na bibongiseli ya malamu mpo na kobatela babola. Kasi, bandeko na biso bakristo, mibali mpe basi basalisanaki. Na mikolo ya lomingo, libota na biso tozalaki komema na makita mampa ná bagato oyo tata azalaki kosala mpo na kopesa bandeko. Mbongo nyonso oyo tata azalaki kotikala na yango nsima ya kofuta makambo nyonso na nsuka ya sanza, azalaki kotinda yango na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York. Ayebaki ete mbongo yango ekosalelama mpo na kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia.
Na boumeli ya bambula yango, radio esalisaki mingi na mosala na biso ya kosakola. Masolo ya Biblia oyo ezalaki kosalema na mayangani na biso ezalaki koleka na bashɛnɛ koleka 400. Na bambula ya 1930, biro ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn ezalaki kobimisa fɔnɔ mpe bakasɛti. Tozalaki kosalela yango na mosala ya kosakola mpe tozalaki kokoma mbala boni toyokisi bato oyo bazalaki Batatoli te masolo ya Biblia mpe bato boni bayokaki masolo yango.
Na 1933, Adolph Hitler mpe lingomba ya Banazi bazwaki bokonzi na Allemagne. Batatoli ya Yehova bakómaki konyokwama mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. (Yoane 15:19; 17:14) Lokola baboyaki kokɔta na makambo ya politiki to kokumisa Hitler, Batatoli mingi na Allemagne bakɔtaki babɔlɔkɔ to na bakaa ya bakangami. Mingi babomamaki; mpe mingi bakufaki mpo na mosala ya makasi oyo bazalaki kosalisa bango. Mpo na mpasi oyo bazalaki komonisa bango, mingi bakufaki ntango moke nsima ya kobima na bolɔkɔ. Minyoko oyo Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango na mikili mosusu mpe na États-Unis, eyebani mpenza te.
Na 1940, tokendaki liyangani moko na Detroit, na Michigan. Kuna, na mokolo ya 28 Yuli, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesaki epai ya Yehova Nzambe. Sanza moko liboso ya liyangani yango, tribinale monene ya États-Unis ebimisaki mobeko ete koboya kopesa bendele losako ezali mabe, mpe mwana-kelasi nyonso oyo akoboya kosala yango akolongolama na eteyelo. Batatoli ya Yehova basalaki nini? Mingi na bango basalaki biteyelo na bango mpo na koteya bana na bango. Bazalaki kobenga yango biteyelo ya Bokonzi.
Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1939 na Mpoto, mpe nsɔmɔ ya etumba epanzanaki na États-Unis mobimba. Bilenge mpe mikóló mosusu oyo bayebaki te ntina nini Batatoli ya Yehova bakɔtaka te na makambo ya politiki, bazalaki konyokola mpe
kobɛta bilenge oyo bazalaki Batatoli ya Yehova. Lapolo emonisaki ete kobanda 1940 tii 1944, Batatoli ya Yehova banyokwamaki mbala koleka 2 500 na bato ya mabe. Minyoko yango eyaki makasi ntango bato ya Japon babebisaki Pearl Harbor mwa esanga moko na mokolo ya 7 Desɛmbɛ 1941. Mwa bapɔsɔ liboso, nabandaki kosala lokola pionye, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka baoyo balekisaka ngonga mingi na mosala ya kosakola. Nabombaki mbongo mpe nasombaki mwa wagɔ moko ya mɛtrɛ nsambo, mpe mingi na biso tokendaki na engumba Louisiane, mpo na kosakola kuna.Minyoko na sudi
Bankolo-mboka bapesaki biso ndingisa tótɛlɛmisa wagɔ na biso na nse ya mwa nzete moko, pembeni ya engumba Jeanerette. Mokolo moko ya pɔsɔ, tomonaki malamu tósakola na balabala, kasi mokonzi ya bapolisi atindaki bapolisi na ye mpe bakangaki biso mpe bamemaki biso na bolɔkɔ ya engumba. Bato ya mobulu soki 200 bazalaki libándá; mpe bapolisi balobaki na biso tókende epai bato yango bazalaki, kozanga ete bábatela biso. Likambo ya kokamwa, bato yango bapanzanaki mpe batikaki biso tóleka. Na mokolo oyo elandaki, tokendaki na Baton Rouge, engumba moko ya monene oyo ezalaki pembeni wana mpo na koyebisa Batatoli mosusu likambo oyo ekómelaki biso.
Ntango tozongaki na Jeanerette, tokutaki mokanda moko na porte ya wagɔ na biso oyo bakomaki ete: “Nasɛngi bino bóya kotala ngai na kaa ya basali ya petrole.” Ezalaki na nkombo ya “E. M. Vaughn.” Tokendaki epai ya moto yango, mpe asɛngaki biso tólya elongo na ye mpe mwasi na ye. Alobaki ete ye ná bato na ye bazalaki na kati ya bato ya mobulu oyo tokutanaki na bango mokolo ya pɔsɔ, mpe soki esengelaki akokaki kobatela biso na bato yango ya mobulu. Maloba na ye elendisaki biso.
Na mokolo oyo elandaki, badepite oyo bazalaki na mindoki bakangaki biso mpe babɔtɔlaki biso mikanda. Bazwaki bafungola na wagɔ epai tozalaki kolala mpe batyaki ngai na bolɔkɔ mikolo 17 kaka ngai moko, kozanga ete bápesa ngai mpenza eloko ya kolya. Vaughn, asalaki nyonso mpo na kosalisa biso, kasi alongaki te. Ntango tozalaki naino na bolɔkɔ, bato ya mobulu bayaki koyiba biloko na biso mpe batumbaki biloko nyonso oyo tozalaki na yango ata mpe wagɔ na ngai. Na ntango wana nazalaki koyeba te ete Yehova azalaki kobongisa ngai mpo na likambo oyo elingaki kokómela ngai.
Nakɔti bolɔkɔ na nɔrdi
Sanza moko nsima ya kozonga na nɔrdi, batindaki ngai lokola pionye, moto oyo azalaki kosakola mingi na Olean, na engumba New York, elongo na Batatoli mosusu. Ntango tozalaki kuna, guvɛrnema esɛngaki ngai nakɔta na mosala ya soda, mpe bapesaki ngai mokanda oyo emonisaki ete naboyi mosala yango. Nsima ya kosala ngai ekzamɛ ya monganga, bakomaki na papye na ngai ete “akoki kozwa formasyo ya mosala ya soda.”
Nazalaki na likoki ya kokoba mosala na ngai ya pionye mbula moko lisusu. Na nsima, na 1943 lokola naboyaki kotika mosala na ngai ya kosakola mpe kokende kolanda formasyo ya mosala ya soda, basoda ya FBI (Bureau fédéral des recherches criminelles) bakangaki ngai mpe basɛngaki ngai nakende na tribinale ya engumba Syracuse, na New York, kosamba kuna na pɔsɔ oyo elandaki. Bafundaki ngai mpe bayebisaki ngai ete nakosamba nsima ya mikolo mibale.
Nazalaki na avoka te mpo alobela ngai; ngai moko kaka nazalaki kosamba. Na makita, bapesaki biso bilenge malako na ndenge oyo tokoki kolobela lotomo na biso na tribinale mpe ndenge oyo tosengeli komitambwisa na esika yango. Nabosanaki te toli oyo nalobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Bato mosusu oyo bazalaki kofunda biso bazalaki koloba kutu ete Batatoli bayebi mibeko koleka bango! Ata bongo, bato oyo bazalaki kosambisa balongisaki ngai te. Ntango zuzi atunaki ngai soki nazali na likambo mosusu ya koloba, nayebisaki ye kaka boye: “Lelo oyo, ekólo ezali kosamba liboso ya Nzambe mpo na ndenge oyo ezali konyokola baoyo bazali kosalela ye.”
Bakatelaki ngai etumbu ya mbula minei ya bolɔkɔ na Chillicothe, na Ohio. Kuna batyaki ngai lokola sɛkrɛtɛrɛ na biro ya mokonzi moko ya bolɔkɔ. Nsima ya mwa bapɔsɔ, moto moko oyo autaki na Washington, ayaki na biro na biso mpe alobaki ete bazali koluka koyeba Hayden Covington. Azalaki avoka ya Batatoli ya Yehova
mpe ayebanaki lokola moko ya baavoka ya malamu koleka na Amerika.Moto yango alobaki ete alingaki koyeba makambo mosusu na ntina na bakangami mibale—Danny Hurtado mpe Edmund Schmidt. Mokonzi na ngai alobaki ete: “Oyo nde likambo ya kokamwa, Schmidt, ye oyo.” Moto yango ayaki kosala mosala moko ya sekele, kasi akamwaki ndenge toyebaki likambo yango. Eumelaki te, bapesaki ngai mosala mosusu na nkuku.
Mosala ya pionye, Betele, mpe libala
Na mokolo ya 26 Sɛtɛmbɛ 1946, babimisaki ngai na bolɔkɔ liboso mikolo oyo bakatelaki ngai ekoka, mpe nazongelaki mosala ya pionye, mbala oyo nazalaki na lisangá ya Highland Park, na Californie. Na nsima, na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1948, nakokisaki likambo oyo nazalaki kokana banda kala. Babengaki ngai nakende kosala mosala ya kolamba mampa, na Betele, na Brooklyn, esika babimisaka mikanda na biso oyo tosalelaka na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Natikaki mbala moko mosala na ngai ya kosala bagato na restora moko na Glendale mpe nakendaki na Betele.
Mbula nsambo na nsima, na 1955, mayangani mingi oyo esangisaka bato ya mikili mingi ebongisamaki na Mpoto. Libota na ngai epesaki ngai mbongo mpo nakende na mayangani yango. Nakendaki na mayangani oyo ezalaki na Londres, Paris, Rome, mpe mingimingi oyo ezalaki na Nuremberg, na Allemagne, epai bato koleka 107 000 bayanganaki na libándá ya masano ya monene epai Hitler na lolendo nyonso asalaki molulu moko mpo na basoda na ye. Na kati ya bato oyo bazalaki na liyangani yango, ezalaki na Batatoli mosusu oyo Hitler akanaki kosilisa na koboma. Ezalaki mpenza esengo kozala elongo na bango!
Na liyangani ya Nuremberg, nakutanaki na Brigitte Gerwien, elenge mwasi moko Motatoli, nasepelaki na ye mpo na libala. Nsima ya mwa basanza tobalanaki mpe tozongaki na Glendale kofanda pene ya baboti na ngai. Na 1957, Tom, mwana na biso ya liboso abotamaki, Don, mwana na biso ya mibale abotamaki na 1958, mpe Sabena, mwana na biso ya mwasi abotamaki na 1960.
Bomoi moko ya esengo mpenza
Bamosusu batunaka soki nayokaka mawa te ndenge nanyokwamaki na bato ya mabe mpe ndenge nakɔtaki babɔlɔkɔ mpo na kosalela Nzambe. Te, nayokaka mawa te, kutu napesaka Yehova mersi ndenge nazwaki libaku ya kosalela ye elongo na ebele ya basaleli na ye ya sembo. Mpe nazali kolikya ete makambo oyo nakutanaki na yango ekolendisa basusu bápusana lisusu penepene na Nzambe mpe bátika ye ata moke te.
Basaleli mingi ya Nzambe banyokwamaki mpo na kosalela ye. Kasi, yango ezali te makambo oyo esakolamaki ete tokokutana na yango? Biblia elobi ete: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na boyokani na Kristo Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Timote 3:12) Ee, maloba oyo ya Nzembo 34:19 ezali solo mpenza: “Bampasi ya moyengebene ezali mingi, kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso”!
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 7 Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi lelo oyo ebimaka lisusu te.
[Elilingi na lokasa 27]
Na mosala ya kosakola na Louisiane na ebandeli ya bambula ya 1940
[Elilingi na lokasa 29]
Nazali kosala mampa na Betele na Brooklyn
[Elilingi na lokasa 29]
Elongo na mwasi na ngai, Brigitte