Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libondeli​—Epai ya nani?

Libondeli​—Epai ya nani?

MABONDELI nyonso ekendaka esika moko, ata soki moto azali kobondela nani? Lelo oyo, bato mingi bakanisaka bongo. Bato oyo basangisaka mangomba basepelaka na likambo yango mpe balingaka ete Nzambe andima mangomba nyonso ata soki ekeseni. Kasi, likanisi yango ekoki kozala lokuta?

Biblia eteyaka ete mabondeli mingi ekendaka te na esika oyo ebongi. Banda ntango Biblia ezalaki kokomama, bato mingi bazalaki kobondela bililingi. Kasi, mbala na mbala Nzambe akebisaki mpo na likambo yango. Na ndakisa, Nzembo 115:4-6 elobi na ntina na bikeko ete: “Ezali na matoi, kasi eyokaka te.” Vɛrsɛ yango ezali polele. Mpo na nini kosambela nzambe oyo akoyoka yo ata moke te?

Lisolo moko ya Biblia emonisi polele likambo yango. Eliya, mosakoli ya solo asɛngaki basakoli ya Baala básambela nzambe na bango, nsima ye mpe akosambela Nzambe na ye. Eliya alobaki ete Nzambe ya solo akoyanola, mpe oyo ya lokuta akoyanola te. Basakoli ya Baala bandimaki likambo yango mpe babondelaki ntango molai; babondelaki kutu na mongongo makasi​—kasi, nzambe na bango ayanolaki bango te! Lisolo yango elobi ete: “Moto moko ayanolaki te, mpe moto moko te atyaki likebi.” (1 Bakonzi 18:29) Kasi, nini esalemaki ntango Eliya abondelaki?

Ntango Eliya asilisaki kobondela, Nzambe na ye ayanolaki mbala moko, atindaki mɔtɔ uta na likoló mpe ezikisaki mbeka oyo Eliya abongisaki. Bokeseni ezalaki wapi? Likambo moko ya ntina mingi ezali na libondeli oyo Eliya asalaki, oyo ezali na 1 Bakonzi 18:36, 37. Ezali libondeli moko ya mokuse​—na monɔkɔ ya Ebre ya ebandeli, ezali na maloba soki 30 mpamba. Kasi, kaka na mwa maloba wana, Eliya abengaki Nzambe mbala misato na nkombo na ye Yehova.

Baala, oyo elimboli “nkolo,” azalaki nzambe ya Bakanana, mpe ezalaki na balolenge mingi ya nzambe yango. Nzokande, Yehova ezali nkombo kaka moko oyo esalelamaka mpo na kolobela Ye oyo aleki bato nyonso na molɔ́ngɔ́. Nzambe yango ayebisaki bato na ye boye: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai; mpe nakopesa nkembo na ngai na mosusu te.”​—Yisaya 42:8.

Libondeli ya Eliya mpe ya basakoli wana ya Baala ekendaki esika moko? Losambo ya Baala ebebisaki bizaleli ya bato na milulu na yango ya bondumba ata mpe kopesa bambeka ya bato. Nzokande, losambo ya Yehova ezalaki kopesa Bayisraele, bato na ye lokumu, ezalaki kosikola bango na misala wana ya mabe. Na yango kanisá na likambo oyo: Soki okomeli moninga na yo moko oyo omemyaka, okolinga ete mokanda yango ekende epai ya moto mosusu oyo azali na nkombo ya moninga na yo te, oyo bizaleli na ye ekeseni mpenza na oyo ya moninga na yo? Soki moke te!

Likambo oyo Eliya asɛngaki basakoli ya Baala emonisi ete mabondeli nyonso ekendaka esika moko te

Soki obondeli Yehova, ozali kobondela Mozalisi, Tata ya bato nyonso. * Mosakoli Yisaya abondelaki boye: “Ee Yehova, yo nde Tata na biso.” (Yisaya 63:16) Ezali Ye nde Yesu Kristo alobelaki ntango alobaki na bayekoli na ye ete: “Nazali komata epai ya Tata na ngai mpe Tata na bino mpe epai ya Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.” (Yoane 20:17) Yehova azali Tata ya Yesu. Azali Nzambe oyo Yesu azalaki kobondela mpe oyo alakisaki bayekoli na ye bábondelaka.​—Matai 6:9.

Biblia eteyaka biso tóbondelaka Yesu, Maria, basantu to baanzelu? Te​—kaka Yehova. Tótalela bantina mibale oyo emonisi likambo yango. Ya liboso, libondeli ezali losambo, mpe Biblia elobi ete losambo esengeli kopesama kaka epai ya Yehova. (Kobima 20:5) Ya mibale, Biblia emonisi ete abengami “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Atako Yehova atikelá bikelamu na ye mikumba mosusu, kasi apesá moko te mokumba ya koyokaka mabondeli. Azali Nzambe oyo alaki koyoka mabondeli na biso ye moko.

Na yango, soki olingi ete Nzambe ayoka mabondeli na yo, kobosana te toli oyo: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.” (Misala 2:21) Kasi, Yehova ayokaka mabondeli nyonso, kozanga kosɛnga likambo moko? To ezali na likambo mosusu oyo tosengeli koyeba soki tolingi Yehova ayoka mabondeli na biso?

^ par. 9 Mangomba mosusu elobaka ete ezali mabe kotánga nkombo mpenza ya Nzambe ata na libondeli. Nzokande, nkombo yango ezali mbala soki 7 000 na minɔkɔ oyo bakomaki Biblia, mpe ezali mbala mingi na mabondeli mpe banzembo ya basaleli ya sembo ya Yehova.