Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na yo?

Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na yo?

Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na yo?

OYOKAKA ete balingaka yo? To na bantango mosusu omonaka lokola ete moto moko te atyelaka yo likebi? Na mokili oyo makambo nyonso ezali kosalema mbangumbangu, oyo moto na moto azali koluka kaka matomba na ye moko, ekoki kozala pɛtɛɛ okanisa ete ozali moke mingi mpo bato bátyela yo likebi, ozali mpenza na ntina te mpo bámona yo. Yango emonisi bosolo ya makambo oyo Biblia elobi mpo na ntango na biso, bato mingi lelo batyaka kaka likebi na makambo na bango moko, yango esali ete ezaleli ya kozanga komibanzabanza mpo na basusu epalangani mingi.​—2 Timote 3:1, 2.

Ata soki bazali na mbula nini, mimeseno nini, monɔkɔ nini, to mposo nini, bato nyonso bazalaka na mposa makasi ya kolinga basusu mpe ete basusu bálinga bango. Balapolo mosusu emonisi ete bɔɔngɔ na biso esalemá na likoki ya koyeba ete oyo ezali bolingo mpe oyo ezali boboto. Yehova Nzambe oyo akelá biso, ayebi malamu koleka moto nyonso mosusu mposa oyo tozalaka na yango ete bálinga mpe básepela na biso. Okoyoka ndenge nini soki balobi na yo ete ozali na motuya mingi na miso na ye? Na ntembe te, ekozala mpenza likambo moko ya ntina mingi oyo naino oyoká te. Tokoki mpenza kondima ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bato ya kozanga kokoka? Atyelaka mokomoko na biso likebi? Soki bongo, nini mpenza esalaka ete moto azala na ntina na miso na ye?

Yehova atyelaka biso likebi

Mbula soki 3 000 esili koleka, mokomi moko ya nzembo oyo azalaki kobanga Nzambe akamwaki mpenza ntango atalaki ndenge likoló ezalaki kongɛnga kitoko na butu. Na ntembe te, ayebaki mpenza ete Mozalisi azali mpenza monene koleka. Ntango akanisaki na bonene ya Yehova mpe komona ete moto azali moke mpenza, mokomi ya nzembo akamwaki mpenza na ndenge oyo Yehova amibanzabanzaka mpo na bato; alobaki boye: “Ntango nazali komona likoló oyo osalá, misala ya misapi na yo, sanza ná minzoto oyo obongisá, moto​—mowei mpamba—​azali nani mpo okanisa ye, mpe mwana ya moto ya mabele mpo obatela ye?” (Nzembo 8:3, 4) Ekoki kozala pɛtɛɛ koloba ete Ye oyo aleki likoló azali mosika mpenza to azali na makambo mingi ya kosala oyo ekoki kopekisa ye atya likebi na bato ya kozanga kokoka. Kasi, mokomi ya nzembo ayebaki ete atako moto azali moke mpenza mpe ete bomoi na ye ezali mokuse, azali na motuya na miso ya Nzambe.

Mokomi mosusu ya nzembo alobaki boye: “Yehova asepelaka na baoyo bazali kobanga ye, na baoyo bazali kozela motema boboto na ye.” (Nzembo 147:11) Makanisi oyo emonisami na nzembo yango mibale, ezali mpenza kosimba motema. Atako Yehova azali likoló mpenza, azangaka te kotya likebi epai ya bato. Kutu, ‘abatelaka bango’ mpe ‘asepelaka na bango.’

Likambo yango emonisami lisusu polele na esakweli moko ya Biblia oyo emonisaki makambo oyo esengelaki kosalema na mikolo na biso. Na nzela ya mosakoli Hagai, Yehova amonisaki ete kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ekosalema na mokili mobimba. Esengelaki kobimisa matomba nini? Talá moko na yango: “Biloko kitoko ya bikólo nyonso ekokɔta mpenza na ndako oyo, mpe nakotondisa yango na nkembo.”​—Hagai 2:7.

“Biloko kitoko” oyo ezali kouta na bikólo nyonso ezali nini? Ekoki te kozala bozwi ya mokili. (Hagai 2:8) Oyo esepelisaka mpenza motema ya Yehova ezali te wolo mpe palata. Asepelaka na bato oyo, atako bazali bato ya kozanga kokoka, basambelaka ye na bolingo. (Masese 27:11) Bazali “biloko kitoko” oyo bapesaka ye nkembo, mpe asepelaka na mitema na bango oyo emipesi na ye mpe na molende oyo bamonisaka na mosala na ye. Ozali na kati na bango?

Likanisi ete bato ya kozanga kokoka bázala biloko kitoko na miso ya Mozalisi Monene ya molɔ́ngɔ́ ekoki komonana lokola ete ekoki kosalema te. Kasi, mpo na koloba solo, likambo yango esengeli kotinda biso tóndima libyangi ya esengo ya kopusana penepene na ye.​—Yisaya 55:6; Yakobo 4:8.

“Ozali moto oyo alingami mingi”

Ntango akómaki mobange, na butu moko, mosakoli Danyele akutanaki na likambo moko oyo ekamwisaki ye makasi. Ntango azalaki kobondela, na mbala moko mopaya moko ya ndenge mosusu abimelaki ye. Nkombo na ye ezalaki Gabriele. Danyele akutanaki na ye liboso mpe ayebaki ete azali anzelu ya Yehova. Gabriele ayebisaki ntina oyo akómelaki ye na mbalakaka; alobaki boye: “Ee Danyele, sikoyo nabimi mpo na kopesa yo mayele ya kososola mpe mayele. . . . mpo ozali moto moko oyo alingami mingi.”​—Danyele 9:21-23.

Na libaku mosusu, moko ya baanzelu ya Yehova alobaki na Danyele boye: “Ee Danyele, yo moto oyo alingami mingi.” Na nsima, mpo na kolendisa Danyele, anzelu yango alobaki boye: “Ee moto oyo alingami mingi, kobanga te. Ozala na kimya.” (Danyele 10:11, 19) Mbala misato mobimba, Danyele abengami “moto oyo alingami mingi.” Maloba wana ekoki kolimbola moto oyo “alingami mingi koleka,” oyo “bazali kozwa na lokumu mingi,” ata mpe “moto oyo bazali kopesa motuya mingi.”

Na ntembe te, Danyele azalaki mpenza koyoka ete azali penepene na Nzambe na ye mpe azalaki komona ete Yehova azalaki kondima mpenza mosala oyo azalaki kosala na motema mobimba. Kasi, maloba wana ya bolingo mingi oyo Nzambe alobaki na nzela ya baanzelu na ye oyo atindaki, epesaki mpenza Danyele elikya. Tokoki kokamwa te ndenge Danyele ayanolaki ete: “Opesi ngai makasi.”​—Danyele 10:19.

Lisolo ya kolendisa oyo emonisi boboto ya Yehova epai ya mosakoli na ye ya sembo, ekomamaki na Liloba ya Nzambe mpo na litomba na biso. (Baroma 15:4) Kokanisa na ndakisa ya Danyele ekosalisa biso tóyeba eloko oyo esalaka ete moto azala na motuya na miso ya Tata na biso ya likoló.

Yekoláká Liloba ya Nzambe mbala na mbala

Danyele azalaki koyekola Liloba ya Nzambe malamumalamu. Toyebi yango mpo ye moko akomaki ete: “Nasosolaki na nzela ya babuku, . . . motángo ya mbula oyo ekoleka mpo libebi ya Yerusaleme ekokisama.” (Danyele 9:2) Na ntembe te, babuku oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu oyo azalaki na yango na ntango wana ezalaki, makomi ya Moize, Davidi, Salomo, Yisaya, Yirimia, Ezekiele, mpe basakoli mosusu. Tokoki komona na makanisi Danyele ná ebele ya barulo zingazinga na ye, azali kotánga na likebi nyonso mpe azali koluka kokokanisa bisakweli oyo etalelaki kozongisama ya losambo ya solo na Yerusaleme. Na esika moko oyo makɛlɛlɛ ezali te, ekoki kozala na nsamba ya shambre na ye, azali kokanisa na mozindo na ndimbola ya makomi yango. Boyekoli na ye elendisaki kondima na ye mpe esalisaki ye apusana penepene na Yehova.

Koyekola Liloba ya Nzambe ebongisaki mpe bomoto ya Danyele mpe ezalaki kotambwisa bomoi na ye mobimba. Na ntembe te, mitinda ya Makomami oyo ayebaki ntango azalaki naino elenge, esalisaki ye azala na ekateli ya kotosa mibeko ya Nzambe oyo ezalaki na ntina na ntango wana. (Danyele 1:8) Na nsima, na mpiko nyonso asakolaki nsango ya Nzambe epai ya bakonzi ya Babilone. (Masese 29:25; Danyele 4:19-25; 5:22-28) Moto nyonso ayebaki molende, bosembo ya Danyele, mpe ete azalaki moto ya kotyela motema. (Danyele 6:4) Oyo eleki nyonso, na esika ya kobuka mobeko ya Nzambe mpo na kobikisa bomoi na ye, Danyele atyelaki Yehova motema mobimba. (Masese 3:5, 6; Danyele 6:23) Na ntembe te, azalaki “moto oyo alingami mingi” na miso ya Nzambe!

Tokoki koloba ete koyekola Biblia ezali pɛtɛɛ na mikolo na biso koleka ndenge ezalaki na eleko ya Danyele. Lelo oyo, na esika ya barulo mineneminene, tozali nde na babuku oyo ebongi. Tozali sikoyo na Biblia na mobimba na yango, mpe lisolo oyo elobeli ndenge bisakweli ya Danyele ekokisamaki. Mpe tozali mpenza na ebele ya mikanda oyo ezali kosalisa biso tóyekola Biblia mpe bisaleli mpo na kosala bolukiluki. * Osalelaka mikanda yango malamu? Obombaka ntango mpo na kotángaka Biblia mbala na mbala mpe kokanisaka mozindo na makambo oyo ozali kotánga? Soki ozali kosala bongo okozwa mpe matomba ndenge Danyele azwaki. Okozala na likoki ya kokóma na kondima makasi mpe kokómisa boyokani na yo na Yehova makasi. Liloba ya Nzambe ekotambwisa mpenza bomoi na yo malamu, mpe ekondimisa yo mpenza ete Nzambe atyelaka yo likebi.

Kotika te kobondela

Danyele azalaki moto ya mabondeli. Asalaki malɔmbɔ oyo ebongi mpenza epai ya Nzambe. Ntango azalaki elenge, akokaki kobomama soki akokaki te kolimbola ndɔtɔ ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone. Kozanga kokakatana, Danyele abondelaki Yehova asalisa ye mpe abatela ye. (Danyele 2:17, 18) Bambula mingi na nsima, na komikitisa nyonso, mosakoli wana ya sembo andimaki ete ye mpe azali moto ya kozanga kokoka, ayambolaki masumu na ye mpe oyo ya bato nyonso ya ekólo mpe asɛngaki Yehova alimbisa bango. (Danyele 9:3-6, 20) Ntango ayebaki te makambo oyo Nzambe alakisaki ye na emonaneli moko, Danyele asɛngaki Nzambe asalisa ye. Na libaku moko, anzelu oyo abimelaki Danyele mpo na kopesa ye bososoli mingi lisusu alobaki boye: “Maloba na yo eyokamaki.”​—Danyele 10:12.

Atako Danyele azalaki moto ya sembo, asukaki te kaka na kosala malɔmbɔ epai ya Nzambe. Danyele 6:10 elobi ete: “Mbala misato na mokolo azalaki . . . kobondela mpe kopesa masanzoli liboso ya Nzambe na ye, ndenge azalaki kosala mbala na mbala.” Danyele azalaki na bantina mingi ya kopesa Yehova mersi mpe kosanzola ye. Mpe azalaki kosala yango mbala na mbala. Ya solo, kobondela ekɔtaki mpenza na kati ya losambo na ye, yango wana akokaki te kotika yango ata ntango bomoi na ye ekómaki na likama. Na ntembe te, molende ya ndenge wana esalaki ete Yehova alinga ye.

Libondeli ezali mpenza likabo moko kitoko! Kolekisaka te mokolo mobimba kozanga kosolola na Tata na yo ya likoló. Kobosanaka te kopesa ye mersi mpe kosanzola ye mpo na makambo nyonso ya malamu oyo asalelaka yo. Kobangaka te koyebisa ye mitungisi mpe mikakatano na yo. Kanisáká na ndenge oyo ayanolaka malɔmbɔ na yo, mpe monisáká botɔndi. Kobondelaka likolólikoló te. Na yango, ntango tozali kofungwela Yehova motema na biso na libondeli, tokomona mpenza bolingo na ye. Yango wana ebongi mpenza ete ‘tótingama na mabondeli’!​—Baroma 12:12.

Kumisá nkombo ya Yehova

Boninga moko te ekoki koumela soki moninga mosusu azali koluka kaka matomba na ye moko. Ezali mpe bongo na boyokani na biso ná Yehova. Danyele ayebaki likambo yango malamu. Tótalela lolenge oyo azalaki mpenza komibanzabanza mpo na kokumisa nkombo ya Yehova.

Ntango Nzambe ayanolaki libondeli na ye, na ndenge alakisaki ye ndɔtɔ ya Nebukadenezare mpe ndimbola na yango, Danyele alobaki ete: “Nkombo ya Nzambe epambwama libela na libela, mpo bwanya ná nguya ezali ya ye.” Na nsima, ntango azalaki koyebisa Nebukadenezare ndɔtɔ na ye mpe ndimbola na yango, mbala na mbala Danyele azalaki kopesa lokumu epai ya Yehova, azalaki komonisa ete kaka Ye nde azali “Momonisi ya basekele.” Ndenge moko, ntango abondelaki mpo na kosɛnga bolimbisi mpe kosikolama, Danyele alobaki boye: “Ee Nzambe na ngai, . . . nkombo na yo ebengami na engumba na yo mpe na bato na yo.”​—Danyele 2:20, 28; 9:19.

Tozali na mabaku mingi ya komekola Danyele na likambo yango. Ntango tozali kobondela, tokoki komonisa ete tozali komibanzabanza ete nkombo ya Nzambe “esantisama.” (Matai 6:9, 10) Tokolinga soki moke te ete etamboli na biso efingisa nkombo mosantu ya Yehova. Tiká ete tókumisaka nde Yehova ntango nyonso na koyebisa basusu makambo oyo tozali koyekola na ntina na nsango malamu ya Bokonzi na ye.

Ya solo, na mokili oyo tofandi, bolingo mpe komibanzabanza mpo na basusu ezali te. Kasi, tokoki kobɔndisama mpenza na koyeba ete Yehova amibanzabanzaka mpo na mosaleli na ye mokomoko. Ndenge mokomi ya nzembo akomaki: “Yehova azali kosepela na bato na ye. Akómisaka bato ya komikitisa kitoko na lobiko.”​—Nzembo 149:4.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 18 Batatoli ya Yehova bazali kobimisa ebele ya mikanda mpo na kosala bolukiluki mpe bisaleli oyo ekoki kosalisa yo ozwa litomba na botángi mpe boyekoli na yo ya Biblia. Soki olingi kozwa mikanda yango, okoki kosɛnga Motatoli ya Yehova moko.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]

Nzambe amonisaki bolingo epai ya Danyele ndenge atindaki anzelu Gabriele mpo na kolendisa ye

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]

Molende oyo Danyele azalaki na yango mpo na koyekola mpe kobondela ebongisaki bomoto na ye mpe esalaki ete Nzambe andima ye