Nzambe azali kopesa biso etumbu?
Ntango mabele eninganaki makasi mpe mai ya mbu etombokaki na ekólo Japon na sanza ya Marsi 2011, moto moko ya politiki ya ekólo yango alobaki ete: “Atako nazali koyoka mawa mpo na mpasi oyo ekómeli bato, nakanisi ete [ezali etumbu ya Nzambe].”
Ntango bato koleka nkóto 220 bakufaki na koningana ya mabele oyo esalemaki na Haïti na sanza ya Yanuali 2010, pastɛrɛ moko oyo ayebani mingi alobaki ete likama yango esalemaki mpo bato ya ekólo yango “bayokanaki na Zabolo” mpe esengelaki ete “bázonga epai ya Nzambe.”
Ntango bato 79 bakufaki na mobulu oyo ebimaki na lisano moko na Manille, na ekólo Philippines, sango moko ya Katolike alobaki ete: “Nzambe alingi alamwisa lisosoli na biso oyo ezali kosala lisusu te.” Zulunalo moko ya ekólo yango elobaki ete “Mikóló mingi (21%) bandimaka ete Nzambe azali kokitisela bato nkanda na ye na nzela ya kobukana ya mabele, mopɛpɛ makasi mpe makama mosusu” oyo ezali mbala na mbala kosalema na ekólo na biso.
BANDA kala, bato balobaka ete Nzambe asalelaka makama lokola koningana ya mabele mpe mopɛpɛ makasi mpo na kopesa bato mabe etumbu. Na mobu 1755, ntango bato soki nkóto 60 bakufaki na koningana ya mabele mpe mɔtɔ, oyo esalemaki na Lisbonne, na Portugal, Voltaire, mokomi moko ya France atunaki boye: “Mabe ezalaki nde mingi na Lisbonne, koleka na Paris, epai bisengo etondi kotonda?” Ya solo, bamilio ya bato bamitunaka soki Nzambe mpenza abimisaka makama minene mpo na kopesa bato etumbu. Na bikólo mingi, bato babengaka makama ya ndenge wana misala ya Nzambe.
Na kotalela makambo oyo nyonso, tosengeli komituna boye: Nzambe abimisaka makama minene mpo na kopesa bato bitumbu? Ebele ya makama oyo euti kosalema ezalaki nde bitumbu ya Nzambe?
Lokola bato mosusu bawelaka kopesa Nzambe foti, balobelaka masolo mosusu ya Biblia epai Nzambe abebisaki mokili na Mpela, mɔtɔ mpe kopasola mabele. (Ebandeli 7:17-22; 18:20; 19:24, 25; Mitángo 16:31-35) Nzokande, soki totaleli masolo wana ya Biblia, tokomona ete ezali na makambo misato oyo ekesenisi yango ná makama oyo ezali kosalema lelo. Ya liboso, na likambo mokomoko, likebisi ezalaki kopesama liboso. Ya mibale, Nzambe abomaki kaka bato oyo basengelaki kobomama; nzokande, makama minene oyo ezali kosalema lelo eponaka te. Kaka bato mabe oyo babongolaki motema te to oyo baboyaki koyoka makebisi nde babomamaki. Ya misato, Nzambe azwaki bibongiseli mpo bato ya sembo bábika.—Ebandeli 7:1, 23; 19:15-17; Mitángo 16:23-27.
Eloko moko te emonisi ete Nzambe nde atindaka ebele ya makama minene oyo ezali koboma bamilio ya bato lelo oyo. Mpo na nini makama yango oyo ezali se kobakisama? Ndenge nini tokoki kosala ntango makama yango ebimi? Mpe ekozala nde na ntango oyo makama yango ekosalema lisusu te? Okozwa biyano na masolo oyo elandi.