Sekele mpo na libota ya esengo
Ntango mwana na yo akómi kotya ntembe na mateya ya Nzambe oyo yo ondimaka
Ntango bazali kokola, bilenge mingi balandaka lingomba ya baboti na bango. (2 Timote 3:14) Nzokande, bilenge mosusu basalaka bongo te. Okoki kosala nini soki mwana na yo akómi kotya ntembe na mateya ya Nzambe oyo yo ondimaka? Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo Batatoli ya Yehova basalaka soki bakutani na likambo yango.
“Nakokende lisusu na lingomba ya baboti na ngai te. Nazali komona lokola natika kaka kokende ná bango.”—Cora, mbula 18. *
ONDIMAKA ete lingomba na yo eteyaka solo na ntina na Nzambe. Oyebaka ete Biblia eteyaka biso lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Koyeba bongo ekoki kaka kotinda yo oteya mwana na yo makambo yango. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Kasi okosala nini ntango mwana na yo azali kokola, azali kosepela lisusu te na makambo ya Nzambe? Okosala nini soki abandi kotya ntembe na mateya oyo azalaki kondima liboso ntango azalaki naino mwana moke?—Bagalatia 5:7.
Soki esalemi bongo, kokanisa mbala moko te ete olongi te koteya mwana na yo. Ndenge tokomona yango, ekoki kozala na makambo mosusu oyo etindi ye akóma bongo. Kasi, kobosana likambo oyo te: Ndenge oyo ozali kosolola ná mwana na yo nde ekotinda ye akangama na mateya ya Nzambe oyo oteyaka ye to aboya yango. Soki oluki kobendana ná mwana na yo mpo na likambo yango, yebá ete okolonga te.—Bakolose 3:21.
Eleki malamu olanda toli oyo ya ntoma Paulo: “Moombo ya Nkolo asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto na bato nyonso, moto oyo ayebi koteya, oyo amipekisaka na ntango basali ye mabe.” (2 Timote 2:24) Ndenge nini okoki komonisa ete ‘oyebi koteya’ soki mwana na yo akómi kotya ntembe na mateya ya Nzambe oyo yo ondimaka?
Zalá na bososoli
Ya liboso, luká koyeba makambo nini ezali kotinda mwana akóma na makanisi wana. Na ndakisa:
-
Azali nde komiyoka ete azali ye moko mpe azangi baninga na kati ya lisangá? “Lokola nazalaki na mposa ya baninga, nakómaki kokangama na baninga mingi ya kelasi, mpe yango esalaki ete bambula ebele, nakóma mosika na Nzambe. Nazalaki kosepela na makambo ya Nzambe lisusu te, mingimingi mpo nakómaki na baninga mabe, mpe lelo oyo, likambo yango esalaka ngai mpasi na motema.”—Lenore, mbula 19.
-
Abangaka nde makambo, yango wana akokaka te koyebisa bato mosusu mateya oyo andimaka? “Ntango nazalaki na kelasi, nazalaki kokoka te koyebisa baninga na ngai ya kelasi mateya ya Nzambe oyo nandimaka. Nazalaki kobanga ete bámona ngai ‘mosantu.’ Mwana kelasi nyonso oyo akesenaki na baninga, bazalaki kolinga ye te, mpe nalingaki te ete yango ekómela ngai.”—Ramón, mbula 23.
-
Amonaka ete kotosa Mibeko ya Nzambe eleki kilo? “Namonaka lokola ete bomoi ya seko oyo Biblia elaki ezali mpasi mingi mpo na kozwa yango, mpe namonaka ete ngai nakokoka ata moke te kozwa yango. Nabangaka makasi, yango wana namonaka ete malamu kutu natika na ngai kolanda makambo ya Nzambe.”—Renee, mbula 16.
Sololá na mwana na yo
Ekoki kozala ete mwana na yo azali kokutana na makambo mosusu. Lolenge malamu ya koyeba yango, ezali ya kotuna ye! Kasi, kebá ete lisolo yango ebimisa kobendana te. Landá nde toli oyo ezali na Yakobo 1:19: ‘Osengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.’ Moniselá ye motema molai. Zalá “motema molai mpenza mpe na mayele ya koteya,” kaka ndenge okoki kosala mpo na moto moko oyo azali na libota na yo te.—2 Timote 4:2.
Na ndakisa, soki mwana na yo alingi te koyangana na makita ya lisangá, luká koyeba soki ezali na likambo mosusu oyo ezali kolɛmbisa ye. Kasi zalá motema molai ntango ozali koluka koyeba likambo yango. Moboti oyo tolingi kolobela na lisolo oyo elandi alongaki te kosimba motema ya mwana na ye.
Mwana: Nalingi na ngai kokende lisusu na makita te.
Papa: [amatisi mongongo] Olobi nini, okokende lisusu na nini te?
Mwana: Nakómi kobaye makita yango!
Papa: Ozali koloba bongo mpo na Nzambe? Okómi kobaye Nzambe? Wana ezali mabe makasi! Olinga, olinga te, lokola ozali kaka na ndako na ngai, osengeli kokenda ná biso na makita!
Nzambe asɛngi baboti báteya bana na bango makambo na ye mpe bana bátosa baboti na bango. (Baefese 6:1) Kasi, okolinga te mwana na yo alanda makambo ya losambo na bino kaka bilandalanda mpe akendaka ná bino na makita ata soki alingi te. Okolinga nde ete asala yango mpo alingi Yehova mpe ayebi ntina ya makita.
Okolonga kosimba motema na ye soki oyebi likambo nyonso oyo ezali kotinda mwana akóma na ezaleli wana. Na makanisi wana na motó, talá sikoyo ndenge lisolo oyo touti kolobela ekokaki kosalema na ndenge oyo ebongi mpenza.
Mwana: Nalingi na ngai kokende lisusu na makita te.
Papa: [na motema ya kokita] Mpo na nini okanisi bongo?
Mwana: Nakómi kobaye makita yango!
Papa: Ya solo, kofanda esika moko ngonga moko to mibale, ekoki kolɛmbisa. Kasi nini mpenza ezali kolɛmbisa yo mingi na makita yango?
Mwana: Nayebi mpenza te. Nazali komona lokola ebongi nazala esika mosusu.
Papa: Baninga na yo mpe bayokaka bongo?
Mwana: Likambo ezali kotungisa ngai ezali nde ya kozanga baninga. Banda moninga na ngai ya motema akendá epai mosusu, namonaka lokola nazangi moto ya kosolola na ye! Bato mosusu nyonso bazali na esengo. Kasi, ngai nazali komiyoka lokola nazali na moto te!
Lokola Papa ya lisolo oyo atiki mwana aloba polele, yango esalisi ye ayeba mpenza nini ezali kotungisa mwana yango: azali komiyoka lokola azali ye moko. Lisolo yango esalisi mpe mwana atyela papa motema, mpe abanga te kosolola na “Zalá motema molai!”
ye mbala ya nsima.—Talá etandaNsima ya mikolo, bilenge mingi bayaka komona ete soki balongi mikakatano oyo ezali kopekisa bango bápusana penepene na Nzambe, mbala mingi bamiyokaka malamu mpe bamonaka ete kondima na bango ekómi makasi. Tózwa ndakisa ya Ramón, elenge mobali oyo tolobelaki liboso, oyo azalaki kobanga ete na kelasi báyeba ete azali Motatoli ya Yehova. Nsukansuka, Ramón ayaki komona ete koyebisa basusu mateya ya Nzambe oyo ye andimaka ezalaki likambo ya mpasi te ndenge azalaki kokanisa, ata soki bazalaki kosɛka ye mpo na yango. Alobi boye:
“Mokolo moko, mwana mobali moko ya kelasi na biso azalaki kotyola ngai mpo na lingomba na ngai. Nayokaki nsɔni mingi, mpo namonaki ete bana-kelasi nyonso bazalaki koyoka likambo yango. Na nsima, namonaki malamu natuna mpe ye ayebisa ngai mateya nini ya Nzambe ye andimaka. Nakamwaki ntango namonaki ete ye kutu ayokaki nsɔni mingi koleka ngai! Na nsima, nayaki koyeba ete bilenge mingi basambelaka, kasi bakangaka ntina te ya mateya ya mangomba na bango. Ngai kutu nayebi ata kolimbola mateya ya Nzambe oyo ngai nandimaka. Kutu, soki esɛngi kolobela makambo ya Nzambe, bana-kelasi na biso nde basengeli koyoka nsɔni, kasi ngai te!”
MEKÁ KOSALA BOYE: Tuná mwana na yo mituna mpo oyeba ndenge nini amonaka likambo ya kozala mokristo. Mpo na ye, kozala mokristo ezali na matomba nini? Ezali mpe na mikakatano nini? Matomba ezali ebele koleka mikakatano? Soki ɛɛ, sɛngá ye alimbola. (Marko 10:29, 30) Okoki kosɛnga mwana na yo akoma makanisi na ye na papye, na ngámbo mibale; na ngámbo moko akoma mikakatano mpe na ngámbo mosusu akoma matomba. Soki amoni makambo oyo ye moko akomi na papye, yango ekoki kosalisa ye ayeba likambo oyo ezali kotungisa ye mpe aluka kobongisa.
‘Makoki ya kokanisa’ ya mwana na yo
Baboti mpe bato ya mayele bamonaka ete bokeseni monene ezali kati na ndenge oyo bana mike bakanisaka ná ndenge oyo bilenge bakanisaka. (1 Bakorinti 13:11) Bana mike bakanisaka na kolanda makambo oyo bamoni na miso, nzokande bilenge bakanisaka mosika, ata makambo oyo bamoni na miso te. Na ndakisa, okoki koteya mwana moke ete Nzambe asalá biloko nyonso. (Ebandeli 1:1) Kasi, mwana oyo akómi elenge akoki kobimisa mituna lokola oyo: ‘Ndenge nini nakoki koyeba ete Nzambe azali? Mpo na nini Nzambe ya bolingo akoki kotika nzela ete mabe ezala? Ndenge nini tokoki kondima ete Nzambe azali na ebandeli te mpe na nsuka te?’—Nzembo 90:2.
Okoki kokanisa ete kondima ya mwana na yo ebandi kokita mpo azali kotuna mituna ya ndenge wana. Nzokande, yango ekoki komonisa ete azali nde kokende liboso. Kutu, kotuna mituna ekoki kozala elembo oyo emonisi ete mokristo alingi koyeba lisusu mingi makambo ya Nzambe.—Longola yango, yango emonisi mpe ete mwana na yo azali koyekola kosalela ‘makoki na ye ya kokanisa.’ (Baroma 12:1, 2) Yango ekosalisa ye ayeba “bonene mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo,” ya mateya ya bokristo na ndenge oyo azalaki koyeba yango liboso te ntango azalaki naino mwana moke. (Baefese 3:18) Sikoyo nde ntango ya kosalisa mwana na yo ayeba kokanisa likoló ya makambo oyo andimaka mpo azala na ntembe ata moke te mpo na mateya yango.—Masese 14:15; Misala 17:11.
MEKÁ KOSALA BOYE: Zongelá elongo na mwana na yo mateya ya ebandeli, oyo mbala mosusu, bino mibale bomonaka ete ezali mpasi te. Na ndakisa, salisá ye akanisa na mituna oyo: ‘Nini endimisaka ngai ete Nzambe azali? Makambo nini namonaka oyo emonisi ete Nzambe akipaka ngai? Mpo na nini namonaka ete kotosa mibeko ya Nzambe ezalaka ntango nyonso mpo na litomba na ngai?’ Kebá ete otinda mwana na yo na makasi te ete andima makanisi na yo. Kutu, salisá ye akóma na likoki ya kondima makambo na ndenge na ye moko. Soki osali bongo, okosalisa ye azala bindimandima te.
“Basalisaki yo ondima”
Biblia elobeli elenge mobali moko nkombo na ye Timote, oyo ayebaki makomi mosantu “banda bomwana.” Atako bongo, ntoma Paulo alendisaki Timote boye: “Kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo basalisaki yo ondima bosolo na yango.” (2 Timote 3:14, 15) Ndenge moko na Timote, ekoki kozala ete mwana na yo ayekolaki mitinda ya Biblia banda bomwana. Kasi sikoyo, esengeli kosalisa ye ayeba ntina oyo andimaka makambo yango.
Buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1 elobi ete: “Soki mwana na yo oyo akómi elenge azali naino kofanda na ndako na yo, ozali na lotomo ya kosɛnga ye atosa makambo ya losambo oyo bosalaka na libota na bino. Kasi, nsukansuka mokano na yo ezali nde ya kosalisa mwana yango ye moko alinga Nzambe, kasi te ya koluka kondimisa ye na makasi.” Soki obosani mokano wana te, okosalisa mwana na yo oyo azali naino elenge akóma “makasi na kondima” mpe yango ekóma lolenge na ye ya bomoi. *—1 Petro 5:9.
^ par. 4 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.
^ par. 40 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 2009, nkasa 10-12, mpe buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1, nkasa 315-318.
OMITUNA BOYE . . .
-
Nakosala nini soki mwana na ngai akómi kotya ntembe na mateya ya Nzambe oyo ngai nandimaka?
-
Ndenge nini nakoki kosalela makanisi oyo ezali na lisolo oyo mpo na kosolola malamu ná mwana na ngai?