Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Teyá bana na yo

Na ebandeli amonisaki motó makasi, kasi nsukansuka atosaki

Na ebandeli amonisaki motó makasi, kasi nsukansuka atosaki

NAINO ekómelá yo te omonisa motó makasi mpe oboya kotosa? * Ntango mosusu olandaki programɛ moko na televizyo, oyo mama to tata na yo apekisaki yo kotala yango. Ntango mosusu na nsima okanisaki likambo yango mpe esalaki yo mpasi na motema ndenge otosaki te. Nkombo ya moto oyo na ebandeli aboyaki kotosa ezali Naamane. Tótala naino ndenge basalisaki ye atosa.

Meká komona na makanisi ete tozali na bomoi eleki mbula 3 000. Naamane azali mokonzi monene ya basoda ya Siri. Ye moto apesaka basoda na ye mitindo, mpe batosaka ye. Kasi, Naamane azwi maladi moko mabe mpenza, oyo babengi maba. Ebebisi ye nzoto, mpe na ntembe te, ezali mpe kosala bato mosusu mpasi.

Mwasi ya Naamane azali na mwana ya mosala, elenge mwasi moko ya moke oyo autá na Yisraele. Mokolo moko, elenge mwasi yango ayebisi nkolo na ye ete ezali na mobali moko nkombo na ye Elisha, oyo afandaka na ekólo oyo ye autá. Alobi ete mobali yango akoki kobikisa Naamane. Ntango Naamane ayoki likambo yango, mbala moko andimi kokende epai ya Elisha. Azwi makabo ebele mpe asali mobembo elongo na basoda na ye na Yisraele. Akei epai ya mokonzi ya Yisraele mpo na koyebisa ye ntina oyo ayei.

Elisha ayoki likambo yango mpe atindeli mokonzi maloba ete Naamane aya epai na ye. Ntango Naamane akómi na ndako ya Elisha, Elisha atindi kaka mosaleli na ye ayebisa Naamane ete akende kosukola mbala nsambo na Ebale Yordani. Elisha alobi ete soki Naamane asali bongo, akobika. Okanisi ete Naamane ayoki ndenge nini na likambo yango?

Asiliki. Asali motó makasi mpe aboyi kotosa mosakoli ya Nzambe. Alobi na basoda na ye boye: ‘Bibale ya mboka na ngai eleki oyo na malamu nakoki kosukola kuna.’ Naamane abandi kozonga. Kasi oyebi motuna basoda na ye batuni ye?— ‘Soki mosakoli alobaka na yo likambo moko ya monene, olingaki kosala yango te? Bongo mpo na nini te kosala likambo moke oyo asɛngi yo?’

Naamane ayokeli basoda na ye mpe asali oyo bango balobi. Amizindisi na ebale mbala motoba mobimba. Ntango abimi na mai mpo na mbala ya nsambo, Naamane akamwe makasi, maladi yango elimwe! Nzoto na ye ekómi lisusu kitoko! Azongi na ndako ya Elisha nokinoki, na ntaka ya kilomɛtrɛ 48, mpo na kopesa ye matɔndi. Alingi kopesa Elisha makabo ya ntalo mingi, kasi mosakoli aboyi kozwa ata eloko moko.

Kasi, Naamane asɛngi Elisha eloko mosusu. Oyebi eloko yango?— ‘Tiká nazwa mabele, oyo badɔngi mibale ekoki kokumba mpo nakende na yango na mboka na ngai.’ Oyebi mpo na nini alingi kozwa yango?— Naamane alobi ete alingi kopesa Nzambe likabo na mabele oyo azwi na Yisraele, mokili ya bato ya Nzambe. Na nsima, Naamane alaki ete akosambela Nzambe mosusu te longola kaka Yehova! Azali lisusu na motó makasi te, kutu andimi kotosa Nzambe ya solo.

Omoni ndenge oyo okoki kolanda ndakisa ya Naamane?— Soki ozali na motó makasi ndenge ye azalaki, okoki kobongwana. Okoki kondima lisalisi mpe kotika kozala motó makasi.

Tángá na Biblia na yo

^ par. 3 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.