ELOBELI TITRE YA EZIPELI: LISEKWA YA YESU EZALI NA NTINA NINI MPO NA YO?
Lisekwa ya Yesu esalemaki mpenza?
HÉRODOTE, Mogrɛki moko mpe moto ya mayele na istware oyo azalaki na bomoi eleki sikoyo mbula 2 500, alobelaki lisolo ya bato ya Ezipito ya mikolo na ye. Akomaki boye: “Na bafɛti ya bazwi, nsima ya kolya, moto moko azalaki komema sanduku oyo ezali na ekeko ya libaya ya bolai ya santimɛtrɛ soki 45 to 90, oyo bapakolá langi mpe basalá yango mpenza lokola ebembe ya moto. Azalaki kolakisa yango moto nyonso oyo azali wana mpe azalaki koloba boye: ‘Lyá mpe sepelá, mpo ntango okokufa, okokóma lokola ekeko oyo.’”
Kaka Baezipito te nde bazalaki kotalela bomoi mpe liwa ndenge wana. Lelo oyo mpe, bato mingi basalelaka maloba lokola oyo: “Lyá, mɛlá, mpe sepelá.” Soki liwa nde esukisi makambo nyonso, mpo na nini te kosepela na bomoi ntango libaku emonani? Mpo na nini koboma nzoto na kosala malamu? Soki liwa nde nsuka ya makambo, boye ebongi mpenza kosala nyonso oyo olingi ntango ozali naino na bomoi. Ntoma Paulo amonisaki yango polele. Alobelaki ndenge bato oyo bandimaka lisekwa te bakanisaka; alobaki boye: “Soki bakufi bakolamuka te, ‘tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.’”—1 Bakorinti 15:32.
Ya solo, Paulo azalaki kondima te ete soki moto akufi, esili mpo na ye. Azalaki mpenza kondima ete bakufi bakozonga lisusu na bomoi, na elikya ya kokufa lisusu te. Kondima na ye eutaki na likambo moko ya solo mpe ya ntina mingi, oyo amonaki ete ekoki te kotyelama ntembe; elingi koloba lisekwa * ya Yesu Kristo. Kutu, lisekwa yango ezalaki likambo mpenza oyo elendisaki kondima ya bayekoli ya liboso.
Kasi, lisekwa ya Yesu ezali na ntina nini mpo na biso? Ndenge nini toyebi ete esalemaki mpenza?
Tótala ndenge ntoma Paulo alobelaki likambo yango ntango akomelaki bakristo ya Korinti.ELINGAKI KOZALA BONI SOKI KRISTO ASEKWAKA TE?
Bakristo mosusu ya Korinti babulunganaki mpo na likambo yango, mpe bamosusu bazalaki kondima te ete lisekwa esalemaka mpenza. Na mokanda ya liboso oyo ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Korinti, alobelaki makambo oyo elingaki kosalema soki lisekwa ezalaka likambo ya solo te. Akomaki boye: “Soki, ya solo, lisekwa ya bakufi ezali te, Kristo mpe alamukaki te. Kasi soki Kristo alamukaki te, mosala na biso ya kosakola ezali mpenza mpamba, mpe kondima na biso ezali mpamba. Lisusu, tomonani mpe ete tozali batatoli ya Nzambe oyo bazali na lokuta . . . kondima na bino ezali mpamba; bozali naino na kati ya masumu na bino. . . . Ná baoyo balalá na kati ya liwa na bomoko elongo na Kristo babebá kaka boye.”—1 Bakorinti 15:13-18.
“Abimelaki bandeko koleka nkama mitano (500) na mbala moko . . . Na nsima na yango abimelaki Yakobo, mpe na nsima bantoma nyonso; kasi na nsuka mpenza abimelaki mpe ngai.”—1 Bakorinti 15:6-8
Paulo abandi lisolo na maloba oyo ekoki kobimisa ntembe moko makasi: Soki bakufi bakosekwa te, boye Kristo oyo akufaki, asekwaki mpe te. Soki Yesu asekwaka te, nini elingaki kosalema? Boye, kosakola nsango malamu elingaki kozala na ntina te, kutu nde lokuta monene! Kutu, lisekwa ya Yesu ezali mpenza likambo oyo esimbi kondima ya bakristo mpe eyokani mpenza na mateya mosusu ya ntina mingi ya Biblia oyo etali boyangeli ya Nzambe, nkombo na ye, Bokonzi na ye, mpe lobiko na biso. Soki lisekwa esalemaki te, boye, nsango oyo Paulo ná bantoma mosusu basakolaki elingaki kozala na ntina te.
Elingaki mpe kobimisa makambo mosusu. Soki Kristo alamukaka uta na bakufi te, mbɛlɛ kondima ya bakristo elingaki kozala na ntina te mpe elingaki kouta nde na makambo ya lokuta. Lisusu, elingaki komonisa ete Paulo mpe bakristo mosusu balobaki lokuta mpo na lisekwa ya Yesu, mpe mpo na Yehova Nzambe oyo bango bazalaki koloba ete asekwisaki Yesu. Longola yango, likambo oyo ete Yesu “akufaki mpo na masumu na biso” elingaki kozala lokuta—mpo soki mobikisi ye moko abikisamaki na liwa te, ndenge nini alingaki kobikisa basusu? (1 Bakorinti 15:3) Yango elingaki komonisa ete bakristo oyo bakufaki, ntango mosusu lokola bamartiru, bakufá na elikya ya lokuta ete bakosekwisama.
Paulo asukisaki boye: “Soki na bomoi oyo kaka nde totyelaki Kristo elikya, tozali mpenza bato ya mawa koleka bato nyonso.” (1 Bakorinti 15:19) Paulo mpe bakristo mosusu, babungisaki biloko na bango, banyokwamaki, bayikaki mpiko na mikakatano, mpe bamonaki liwa na miso mpo bazalaki kondima lisekwa mpe matomba oyo yango ekomemela bato. Elingaki kozala mosala ya mpunda soki lisekwa ezalaki kaka likambo ya lokuta!
NTINA OYO OSENGELI KONDIMA LISEKWA
Paulo ayebaki ete makambo oyo bakristo bazalaki kondima ezalaki lokuta te. Ayebaki ete Yesu asekwaki; mpe na mokuse, ayebisaki Bakorinti makambo oyo endimisaki ye “ete Kristo akufaki mpo na masumu na biso na kotalela Makomami; mpe ete akundamaki, ɛɛ, ete alamukaki na mokolo ya misato na kotalela Makomami; mpe ete abimelaki Kefa, mpe na nsima bantoma zomi na mibale.” * Na nsima abakisaki boye: “Na nsima na yango, abimelaki bandeko koleka nkama mitano (500) na mbala moko, oyo mingi na bango bazali tii sikoyo, kasi bamosusu balalá na kati ya liwa. Na nsima na yango abimelaki Yakobo, mpe na nsima bantoma nyonso; kasi na nsuka mpenza abimelaki mpe ngai.”—1 Bakorinti 15:3-8.
Luka 24:1-11) Mingi na bango bazalaki naino na bomoi na mikolo ya Paulo mpe moto nyonso akokaki kotuna bango mpo na koyeba soki likambo yango esalemaki mpenza. (1 Bakorinti 15:6) Ekokaki kozala pɛtɛɛ koboya kondima litatoli ya moto moko to mibale, kasi te litatoli ya bato 500 to koleka, oyo bamonaki likambo yango na miso.
Paulo abandaki na maloba oyo ete Kristo akufaki mpo na masumu na biso, akundamaki, mpe asekwaki. Nini endimisaki Paulo likambo yango? Ya liboso, ezali litatoli ya bato ebele oyo bamonaki likambo yango na miso. Nsima ya kosekwa, Yesu abimelaki mwa bato (na ndakisa Paulo), abimelaki mwa bituluku ya bato, ata mpe etuluku ya bato nkama mitano (500) oyo na ntembe te, mingi kati na bango bandimaki te ntango bayokaki ete Yesu asekwi! (Simbá mpe ete, mbala mibale mobimba Paulo alobi ete liwa, kokundama mpe lisekwa ya Yesu esalemaki “na kotalela Makomami.” Makambo wana emonisaki ete bisakweli ya Makomami ya Ebre oyo etali Masiya ekokisamaki, mpe emonisaki mpenza ete Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki.
Atako bato oyo bamonaki lisekwa yango na miso bapesaki litatoli mpe Makomami elobelaki yango, ezalaki mpe ezali kaka na bato oyo bandimaka te ete Yesu asekwaki. Bamosusu balobaka ete bayekoli na ye bayibaki nzoto na ye mpe na nsima bakómaki koloba ete bamonaki lisekwa yango na miso. Nzokande, bayekoli bazalaki na nguya te ya kolonga to ya kobongola makanisi ya basoda ya Roma oyo batɛlɛmaki na porte ya lilita mpo na kokɛngɛla. Basusu balobaka ete nsima ya lisekwa, Yesu abimelaki bato te, ezalaki kaka makanisi mpamba. Likanisi yango ezali lokuta mpo Yesu abimelaki bato ebele na ngonga ndenge na ndenge. Lisusu, makanisi mpamba ekoki nde kotumba mbisi mpe kokabola yango ndenge Yesu asalaki na Galile nsima ya lisekwa na ye? (Yoane 21:9-14) Moto ya solo te akoki nde kobenga bato básimba ye?—Luka 24:36-39.
Basusu mpe balobaka ete lisekwa ezalaki likambo moko ya lokuta mpenza oyo bayekoli babimisaki yango na ndenge na bango. Kasi kosala bongo elingaki kozala na litomba nini? Kopesa litatoli mpo na lisekwa esalaki ete bayekoli bátyolama, bányokwama mpe bábomama. Mpo na nini bandimaki kotya bomoi na bango na likama mpo na likambo moko ya lokuta? Lisusu, babandaki naino kopesa litatoli yango na Yerusaleme, na miso ya batɛmɛli oyo bazalaki pene ya kokweisa bango na likambo nyonso.
Lisekwa ezalaki likambo oyo epesaki bayekoli mpiko ya kopesa litatoli mpo na Nkolo na bango atako bakutanaki na minyoko makasi mpenza. Lisekwa ekómá liteya oyo esimbi mpenza kondima ya bakristo. Bakristo ya liboso batyaki te bomoi na bango na likama kaka mpo na kotatola mpo na Moteyi moko ya bwanya oyo bato babomaki. Batyaki nde bomoi na bango na likama mpo na kosakola lisekwa ya Yesu, mpo yango emonisaki ete azali Kristo, Mwana ya Nzambe, moto ya nguya, oyo azalaki kosalisa mpe kokamba bango. Lisekwa na ye emonisaki ete bango mpe bakosekwa. Ya solo, soki Yesu asekwaka te, lingomba ya bokristo mpe elingaki kozala te, mbala mosusu tolingaki kutu koyeba ye te.
Kasi lisekwa ya Yesu ezali na ntina nini mpo na biso?
^ par. 5 Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “lisekwa” elimbolaka “kotɛlɛma lisusu.” Elingi koloba ete moto azongi lisusu na bomoi ndenge azalaki liboso; azongeli bizaleli na ye, bomoto mpe basuvenire na ye ya kala.
^ par. 13 “Bantoma zomi na mibale” ezali lolenge mosusu ya kobenga “bantoma” nyonso atako nsima ya liwa ya Yudasi Mokeriota batikalaki kaka 11. Na libaku mosusu oyo Yesu abimelaki bantoma, kaka 10 nde bazalaki, bango nde bamonisaki bantoma zomi na mibale, mpo Toma azalaki te.—Yoane 20:24.