Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Mpo na nini Yesu abengami Mwana ya Nzambe?

Nzambe azali na mwasi te oyo abotaki na ye bana. Azali Mozalisi ya biloko nyonso. Nzambe akelá bato na likoki ya komekola bizaleli na ye. Yango wana, Adama moto ya liboso oyo Nzambe akelaki, abengamaki “mwana ya Nzambe.” Ndenge moko mpe, Yesu abengami “mwana ya Nzambe” mpo akelamaki na bizaleli lokola oyo ya Tata na ye.​—Tángá Luka 3:38; Yoane 1:14, 49.

Ntango nini Nzambe akelaki Yesu?

Nzambe akelaki Yesu liboso akela Adama. Kutu, Nzambe akelaki Yesu mpe na nsima asalelaki ye mpo na kosala biloko mosusu nyonso, ata mpe baanzelu. Yango wana Biblia ebengi Yesu “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá” na Nzambe.​—Tángá Bakolose 1:15, 16.

Yesu azalaki ekelamu ya elimo na likoló liboso abotama na Beteleme. Ntango ngonga ekokaki, Nzambe alongolaki bomoi ya Yesu na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Maria mpo abotama lokola moto.​—Tángá Luka 1:30-32; Yoane 6:38; 8:23.

Mpo na nini Nzambe asalaki ete Yesu abotama awa na mabele? Yesu akokisaki mokumba nini ya ntina? Okoki kozwa biyano na mituna wana na Biblia, mpe yango ekobakisa boyebi na yo mpe ekosalisa yo omonisa lisusu botɔndi mpo na oyo Nzambe mpe Yesu basalá mpo na yo.