PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE
“Bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele”
Ondimelaka Nzambe? Soki ɛɛ, makambo nini endimisi yo ete azali? Mpo na koloba solo, ezali na makambo ebele oyo emonisaka ete Mozalisi azali na bwanya, na nguya mpe bolingo. Makambo yango nini? Mpe mpo na nini tozali kondima yango? Mpo na kozwa biyano, tótalela maloba ya ntoma Paulo na mokanda oyo akomelaki bakristo ya Roma.
Paulo alobaki boye: “Bizaleli na ye [Nzambe] oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye, yango wana bazali kutu na likambo ya koloba te.” (Baroma 1:20) Ndenge Paulo amonisaki yango, biloko oyo Nzambe asalá emonisaka ete azali. Tótalela malamumalamu maloba wana ya Paulo.
Paulo amonisi ete bizaleli ya Nzambe ekoki komonana “banda na kozalisama ya mokili.” Na vɛrsɛ yango, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mokili” elimboli te mabele oyo tofandi. Kasi, elimboli nde bato. * Na yango, Paulo alingaki koloba ete ntango Nzambe akelaki bato, bakokaki komona makambo oyo emonisi bizaleli na ye na biloko oyo akelá.
Makambo yango ezali zingazinga na biso. Biloko oyo Nzambe akelá ezali ‘komonisa yango polele.’ Biloko oyo Mozalisi asalá ezala ya minene to ya mike emonisaka polele ete azali mpe azali na bizaleli kitoko mpenza. Biloko minene oyo Nzambe akelá oyo emonanaka polele, emonisaka biso te ete azali na bwanya? Ebele ya minzoto oyo ezalaka na likoló mpe mbonge ya mai emonisaka te ete azali na nguya? Biloko ndenge na ndenge ya kolya oyo esepelisaka biso, kolala mpe kobima ya moi emonisaka te ete alingaka bato?—Nzembo 104:24; Yisaya 40:26.
Ntina ya kotyela makambo yango ntembe ezali te. Ezali mpenza polele na boye ete baoyo bamonaka yango te mpe baboyaka kondima ete Nzambe azali “bazali kutu na likambo ya koloba te.” Moto moko ya mayele apesaki ndakisa oyo: Kanisá ete sofɛlɛ moko atye likebi te na elembo oyo elobi ete “Baluká—kende na lobɔkɔ ya mwasi.” Polisi moko atɛlɛmisi ye mpe akateli ye amande oyo asengeli kofuta. Sofɛlɛ ameki kosala matata mpe koloba ete amonaki elembo yango te. Kasi polisi yango aboyi kolimbisa ye, mpo elembo yango ezali na esika ya polele, mpe miso ya sofɛlɛ ezali komona malamu. Longola yango, lokola azali sofɛlɛ, azali na mokumba ya komona mpe ya kotya likebi na bilembo yango. Ezali mpe bongo mpo na makambo oyo emonisaka ete Nzambe azali. “Bilembo” yango ezali komonana polele. Lokola tozali bikelamu ya mayele, tozali na likoki ya komona yango. Bolimbisi ezali te mpo na moto oyo azali koboya kotya likebi na makambo yango.
Biloko oyo Nzambe asalá emonisaka ete azali
Ya solo, biloko oyo Nzambe asalá ezali komonisa makambo mingi na ntina na Mozalisi na biso. Kasi ezali mpe na buku oyo elobeli makambo mingi na ntina na ye; buku yango ezali Biblia. Na nzela na yango, tokoki kozwa eyano na motuna oyo ya ntina mingi: Mokano ya Nzambe mpo na mabele mpe bato ezali nini? Eyano na motuna yango ekoki kosalisa yo opusana penepene na Nzambe oyo “bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele” na biloko oyo ezingi biso.
Botángi ya Biblia mpo na sanza ya mwambe
^ par. 3 Biblia elobi mpe ete “mokili” ememá ngambo ya lisumu mpe ezalaki na mposa ya mobikisi, ezali polele ete na bavɛrsɛ oyo, liloba mokili elakisi bato kasi mabele te.—Yoane 1:29; 4:42; 12:47.