Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Minɔkɔ oyo tolobaka eutá nde na “ndako molai ya Babele”?

Minɔkɔ oyo tolobaka eutá nde na “ndako molai ya Babele”?

“Yehova apalanganisaki bango uta na esika yango tii na mabele mobimba, mpe nsukansuka batikaki kotonga engumba yango. Yango wana babengaki yango nkombo Babele, mpamba te kuna Yehova abulunganisaki monɔkɔ ya mabele mobimba.”​—Ebandeli 11:8, 9.

LISOLO yango oyo Biblia elobeli, esalemaki mpenza? Bato bakómaki nde koloba minɔkɔ ndenge na ndenge na mbala moko ndenge Biblia emonisi? Bamosusu batyolaka lisolo yango ya Biblia oyo emonisi ndenge minɔkɔ oyo tolobaka ebandaki mpe epalanganaki. Mokomi moko alobaki ete: “Lisapo ya ndako molai ya Babele ezali mpenza moko ya masolo ya lokuta na masolo nyonso oyo ebɛtamá.” Ata mpe Rabi moko Moyuda abengaki yango “mwa mayele moko oyo ezangá ntina mpo na kolimbola ndenge bikólo ebandaki.”

Mpo na nini bato baboyaka kondima lisolo ya Babele? Na mokuse, mpo eyokani te na mateya mosusu oyo elobeli epai minɔkɔ ebandá. Na ndakisa, bato mosusu ya mayele balobaka ete minɔkɔ ebimá na mbalakaka te, kasi ebandaki nde “na monɔkɔ moko” mpe na nsima ekolaki mokemoke. Basusu balobaka ete minɔkɔ mokomoko ya ebandeli ekolaki na ndenge na yango, ebandaki na mwa makelele lokola oyo ya ngulu mpe mokemoke ekómaki maloba mpenza. Mateya oyo mpe mateya mosusu ya bongolabongola esalá ete bato mingi bándima makanisi ya profesɛrɛ Tecumseh Fitch, oyo akomaki boye na buku na ye (The Evolution of Language): “Naino tozwi mpenza te biyano ya solosolo.”

Biloko nini bato ya arkeoloji mpe bato mosusu ya mayele bakundolaki oyo emonisi ndenge minɔkɔ ebandaki mpe ekolaki? Biloko yango emonisi ete mateya oyo elobelami awa ezali mpenza solo? To emonisi nde ete lisolo ya Babele ezali solo? Liboso, tótalela naino malamumalamu lisolo yango ya Biblia.

LIKAMBO YANGO ESALEMAKI WAPI MPE NTANGO NINI?

Biblia elobi ete ezalaki na “mokili ya Shinare,” oyo na nsima ebengamaki Babilone nde mobulungano ekɔtaki na minɔkɔ ya bato mpe esalaki ete bápalangana. (Ebandeli 11:2) Esalemaki ntango nini? Biblia elobi ete “bato ya mokili bakabwanaki” na mikolo ya Pelege, oyo abotamaki mbula soki 250 liboso ete Abrahama abotama. Na yango, lisolo ya Babele esali sikoyo mbula soki 4 200.​—Ebandeli 10:25; 11:18-26, Bible na lingala ya lelo oyo.

Bato mosusu ya mayele balobaka ete minɔkɔ ya lelo eutá na monɔkɔ moko ya ebandeli, oyo bakanisaka ete bato bazalaki koloba eleki sikoyo mbula soki 100 000. * Basusu mpe balobaka ete minɔkɔ ya lelo ekokani na ebele ya minɔkɔ ya liboso oyo ezalaki kolobama eleki sikoyo mbula soki 6 000. Ndenge nini bato oyo bayekolaka makambo etali minɔkɔ bayebi ndenge minɔkɔ wana oyo elobamaka lisusu te ekolaki? Zulunalo moko (Economist) elobi ete “likambo yango ezali mindɔndɔ. Na kokesana na bato ya bioloji, bato oyo bayekolaka makambo etali minɔkɔ bazali te na biloko ya kala oyo bakundolá mpo esalisa bango báyeba makambo ya kala.” Zulunalo yango ebakisi ete moto oyo ayekolaka ndenge minɔkɔ ekolaka apesaka makanisi na ye na kotalela “bakalkile oyo asali na kolanda makanisi na ye, kasi oyo ebongi te kotyelama motema.”

Ata bongo, ezali na “biloko ya arkeoloji oyo etali minɔkɔ”. Biloko yango ezali nini, mpe emonisi nini mpo na ndenge oyo minɔkɔ ebandá? Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Makomi ya kalakala mpenza to eloko moko ya arkeoloji oyo etali minɔkɔ, oyo bato bakoki kozala na yango esali naino te mbula koleka 4 000 to 5 000.” Epai wapi bamonaki “biloko ya arkeoloji oyo etali minɔkɔ,” to “makomi” yango? Na Mezopotamia, esika oyo mokili ya Shinare ezaláká. * Na yango, biloko yango eyokani mpenza na makambo oyo Biblia elobi.

BATO OYO BALOBAKA MINƆKƆ EKESENI, BAKANISAKA NDENGE MOKO TE

Biblia elobi ete na Babele, Nzambe ‘abulunganisaki monɔkɔ na bango mpo ete moko te akoka koyoka monɔkɔ ya mosusu.’ (Ebandeli 11:7) Yango esalaki ete basali ‘bátika kotonga engumba’ ya Babele mpe bápalangana “na mabele mobimba.” (Ebandeli 11:8, 9) Na yango, Biblia elobi te ete minɔkɔ nyonso ya lelo eutá kaka na “monɔkɔ moko.” Kutu, emonisi ndenge oyo minɔkɔ ebele ya sika ebimaki na mbala moko, mpe bato bazalaki na likoki ya komonisa ndenge bazali koyoka mpe kokanisa na minɔkɔ yango mokomoko oyo ekesanaki mpenza.

Etanda ya mabele oyo ezali na makomi ya cunéiforme, ya milenɛrɛ ya misato liboso ya ntango na biso oyo bamonaki na Mezopotamia

Minɔkɔ ya lelo ezalaka mpenza ndenge moko to ekeseni? Lera Boroditsky, moto ya siansi na makambo etali ndenge oyo moto ayekolaka makambo, akomaki boye: “Ntango bato oyo bayekolaka makambo etali minɔkɔ basalaki bolukiluki ya mozindo na likambo yango (mwa ndambo oyo batalelaki kati na minɔkɔ 7 000 to koleka), bamonaki ete minɔkɔ yango ekeseni mpenza na ndenge ya koloba te.” Toboyi te, atako minɔkɔ mosusu esalaka lokola ekokana, na ndakisa monɔkɔ ya Cantonais mpe Hakka oyo elobamaka na sudi ya Chine; minɔkɔ yango ekeseni mpenza na minɔkɔ mosusu, na ndakisa oyo elobamaka na Espagne: Catalan na Wɛsti mpe Valencien.

Minɔkɔ oyo bato balobaka emonisaka ndenge oyo bakanisaka mpe ndenge oyo bamonaka langi, balobelaka eloko oyo ezali mingi to moke mpe esika oyo moto auti to azali kokende. Na ndakisa, moto moko akoki koloba boye na monɔkɔ na ye: “Mwa nyama ezali na lobɔkɔ na yo ya mobali.” Kasi na monɔkɔ mosusu moto akoki koloba, “mwa nyama ezali na lobɔkɔ na yo ya sudi-wɛsti.” Mpo na koloba solo, bokeseni yango ekoki kobulunganisa. Yango wana, bato oyo bazalaki kotonga Babele bakokaki te kokoba mosala yango.

EZALAKI MALOBA MPENZA?

Monɔkɔ oyo bato bazalaki koloba na ebandeli ezalaki ndenge nini? Biblia emonisi ete Adama, mobali ya liboso, azalaki na likoki ya kobimisa maloba ya sika ntango azalaki kopesa banyama mpe bandɛkɛ nyonso nkombo. (Ebandeli 2:20) Asalaki mpe Poɛmi moko mpo na komonisa ndenge ayokaki mpo na mwasi na ye, mpe mwasi na ye amonisaki polele likambo oyo Nzambe apekisaki bango básala mpe makama oyo ekobima soki baboyi kotosa. (Ebandeli 2:23; 3:1-3) Na yango, monɔkɔ ya liboso esalisaki bato básololaka kozanga mokakatano mpe bábimisa makanisi na bango malamu mpenza.

Ndenge oyo Nzambe abulunganisaki minɔkɔ ya bato na Babele esalaki ete ezala mpasi mpenza mpo básalela mayele mpe makasi na bango mpo na kosala elongo. Ata bongo, minɔkɔ ya sika oyo bakómaki koloba ezalaki maloba mpenza, kaka ndenge monɔkɔ ya liboso ezalaki. Kaka nsima ya mwa bankama ya bambula, bato batongaki bingumba, basalaki mampinga ya basoda ya nguya mpenza, mpe bakómaki kosala mimbongo na mikili ndenge na ndenge. (Ebandeli 13:12; 14:1-11; 37:25) Ndenge nini bakokaki kosala makambo wana nyonso soki bazalaki kosalela te monɔkɔ moko oyo ezali na maloba mingi mpe na gramɛrɛ? Ndenge Biblia emonisi yango, monɔkɔ ya liboso mpe minɔkɔ oyo ebimaki na Babele ezalaki te mwa makɛlɛlɛ lokola oyo ya ngulu, kasi nde maloba mpenza.

Bolukiluki ya mikolo oyo endimisi likanisi yango. Buku moko (The Cambridge Encyclopedia of Language) elobi boye: “Ankɛtɛ moko oyo esalemaki mpo na mimeseno mokomoko emonisi ete ata na bikólo oyo bato bakangamá kaka na ‘mimeseno ya kala,’ minɔkɔ oyo balobaka ezalaka mpenza maloba oyo etondi na makambo ndenge na ndenge kaka ndenge ezalaka mpo na minɔkɔ ya bato oyo bikólo na bango ekolisá ‘mayele na makambo mingi’.” Ndenge moko mpe, na buku na ye (Language Instinct), Steven Pinker profesɛrɛ ya pisikoloji na Iniversite ya Havard, alobaki boye: “Minɔkɔ nyonso ezalaka na maloba ndenge na ndenge.”

MONƆKƆ NINI BATO BAKOLOBA NA MIKOLO EZALI KOYA?

Nsima ya kotalela mbula mpe esika oyo bakundolaki “biloko ya arkeoloji” oyo etali minɔkɔ, bokeseni oyo ezali kati na minɔkɔ boye to boye, mpe maloba ndenge na ndenge oyo minɔkɔ ya kala ezalaki na yango, tokoki koloba nini? Bato mingi bandimi ete lisolo ya Biblia oyo elobeli likambo oyo esalemaki na Babele ezali mpenza ndimbola oyo ebongi.

Biblia eyebisi biso ete Yehova Nzambe, abulunganisaki minɔkɔ ya bato na Babele mpo batombokelaki ye. (Ebandeli 11:4-7) Kasi, alakaki boye: “Nakopesa bato ya bikólo monɔkɔ moko ya pɛto, mpo bango nyonso bábelela nkombo ya Yehova, mpo básalela ye na bomoko.” (Sefania 3:9) “Monɔkɔ moko ya pɛto” ezali solo ya Liloba ya Nzambe, oyo ezali kosangisa bato ya bikólo nyonso. Ebongi mpenza tóloba ete na mikolo ezali koya, Nzambe akosangisa lisusu bato ntango akopesa bango monɔkɔ moko, mpe akolongola mobulungano oyo akɔtisaki na Babele.

^ par. 8 Mbala mingi mateya etali minɔkɔ emonisaka ete na ebandeli moto azalaki lokola mokomboso. Mpo na koyeba esika maloba wana euti, talá nkasa 27 tii 29 ya mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 9 Pembenipembeni ya Shinare, bato ya arkeoloji bakundolaki ebele ya batempelo ya etaje oyo ezali lokola piramide. Biblia elobi ete bato oyo batongaki ndako molai ya Babele batongaki yango na babriki, kasi na mabanga te mpe basalelaki gudrɔ lokola pɔtɔpɔtɔ. (Ebandeli 11:3, 4) Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete na Mezopotamia, “mabanga ezalaki mpenza komonana te to mpe ezalaki te,” kasi gudrɔ ezalaki mingi mpenza.