LISOLO YA BOMOI
Mobola na mosuni kasi mozwi na makambo ya Nzambe
Tata ná nkɔkɔ na ngai ya mobali bazalaki kofanda na ndako moko oyo esilá te na Cotiujeni, mwa mboka moko na nɔrdi ya Moldavie. Nabotamaki kuna na sanza ya 12, na mobu 1939. Na ebandeli ya bambula 1930, bakómaki Batatoli ya Yehova. Mama akómaki mpe Motatoli ya Yehova ntango amonaki ete nkɔkɔ ya mobali ayebi Biblia koleka sango ya mboka wana.
Ntango nazalaki na mbula misato, bamemaki tata, leki na ye ya mobali mpe nkɔkɔ na kaa ya bakangami mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Kaka tata na ngai nde akufaki te na kaa yango. Na 1947, nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, azongaki na ndako mokɔngɔ ebukaná. Atako nzoto ezalaki malamu te, kondima na ye elɛmbaki te.
MBONGWANA MONENE NA BOMOI NA BISO
Ntango nakómaki na mbula 9, bamemaki libota na biso na makasi ná ebele mosusu ya Batatoli ya Yehova na Sibérie. Na mokolo ya 06/07/1949 bakɔtisaki biso na bawagɔ oyo ememaka banyama. Nsima ya kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 6 400 na boumeli ya mikolo 12, tokitaki na garɛ ya Lebyazhe. Bakonzi ya mboka yango bazalaki kozela biso. Bakabolaki biso na bituluku ya mikemike mpe bapanzaki biso na mboka yango mobimba. Etuluku na biso ekómaki kofanda na mwa eteyelo moko oyo basundolá. Tolɛmbaki nzoto mpe mawa ekangaki biso. Biso nyonso elongo na ndeko mwasi moko ya mokóló tobandaki koyemba na mongongo ya nse loyembo oyo Batatoli ya Yehova basalaki na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Eumelaki te, biso nyonso tokómaki koyemba boye:
“Bandeko mingi bamemamaki na makasi mosika mpenza.
Bamemaki bango na nɔrdi mpe na ɛsti.
Mpo na mosala ya Nzambe, banyokolaki bango mpe na bisika yango, bayikaki mpiko na mikakatano oyo ezalaki lokola liwa.”
Na nsima, tokómaki kokende makita mokolo nyonso ya lomingo na ntaka ya kilomɛtrɛ 13 kolongwa na esika oyo tozalaki kofanda. Mbala mingi tozalaki kolongwa na ntɔngɔntɔngɔ na eleko ya malili makasi (-40°C) mpe tozalaki kotambola na kati ya banɛjɛ oyo ezalaki kosukela biso na loketo. Biso nyonso bato 50 to koleka, tozalaki kofinana na mwa ndako ya moke mpenza. Tozalaki naino kobanda na nzembo moko, mibale to misato. Ndeko moko azalaki kosala libondeli oyo euti mpenza na motema, mpe na nsima tozalaki kosolola masolo ya Biblia. Masolo yango ezalaki koumela ngonga moko to koleka. Tozalaki koyemba nzembo ebele mpe kosolola lisusu masolo ya Biblia. Ezalaki mpenza kolendisa kondima na biso!
MIKAKATANO MOSUSU
Na 1960, Batatoli oyo bamemamaki na makasi bazwaki bonsomi. Atako tozalaki babola, nazwaki likoki ya kozonga na Moldavie, epai nakutanaki na Nina oyo baboti ná bankɔkɔ na ye bazalaki mpe Batatoli ya Yehova. Eumelaki te, tobalanaki mpe tozongaki na Sibérie; na 1964 tobotaki mwana na biso ya mwasi Dina, mpe oyo ya mobali Viktor na 1966. Mbula mibale na nsima, tokendaki na Ukraine mpe tozalaki kofanda na ndako moko ya moke na engumba Dzhankoy oyo ezali na ntaka
ya kilomɛtrɛ 160 kolongwa na Yalta, na péninsule de Crimée.Bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Crimée, kaka ndenge ezalaki na Union soviétique mobimba. Kasi bapekisaki biso makambo nyonso te, mpe bazalaki mpenza konyokola biso te. Na yango, milende oyo Batatoli ya Yehova mosusu bazalaki na yango mpo na solo ebandaki kosila. Bakanisaki ete lokola banyokwamaki mingi na Sibérie, ezalaki sikoyo ntango ya kosala mosala makasi mpo na konduka biloko ya mokili.
MAKAMBO YA ESENGO
Na mokolo ya 27/03/1991, Leta ya ekólo oyo ezalaki kobengama Union soviétique epesaki biso bonsomi na makambo ya losambo. Na mbala moko, bibongiseli ezwamaki mpo mayangani nsambo ya mikolo mibale esalema na ekólo mobimba. Tosengelaki kosala moko na yango na Odessa, na ekólo Ukraine kobanda mokolo ya 24 ya sanza ya mwambe. Nakómaki na esika yango sanza moko liboso mpo na kobongisa stade monene oyo tosengelaki kosala liyangani yango.
Tozalaki kosala mosala mokolo mobimba mpe na butu tozalaki mbala mingi kolala likoló ya bakiti ya stade yango. Bandeko basi bazalaki kotya bopɛto na nse ya banzete oyo ezalaki zingazinga ya stade. Balongolaki tɔni soki 70 ya bosɔtɔ na esika yango. Bandeko oyo bazwaki mokumba ya kopesa bayangani bisika ya kolala batambolaki engumba mobimba mpo na kolukela bandeko 15 000 oyo basengelaki kouta na bamboka mosika bisika ya kolala. Kasi, na mbalakaka, tozwaki nsango moko oyo epesaki biso mpasi na motema!
Na mokolo ya 19 ya nsanza ya mwambe, mikolo mitano liboso liyangani ebanda, bakangaki Mikhail Gorbachev prezida ya URSS ntango azalaki na konje pene na Yalta, mosika mingi te na esika oyo tozalaki. Bayebisaki biso ete tokosala lisusu liyangani te. Bandeko ya bamboka mosika oyo basengelaki koya na liyangani yango babandaki kobenga bandeko ya biro ya bakambi ya liyangani mpe kotuna boye: “Tokosala nini lokola tofutaki tike ya bisi mpe ya engbunduka?” Nsima ya kobondela mingi, bandeko ya biro bayebisaki bango boye, “boya kaka!”
Bandeko bakobaki kaka kobongisa makambo etali liyangani yango mpe kobondela. Bandeko ya departema ya transport bazalaki kokende kozwa bandeko oyo bazalaki kouta na bamboka ndenge na ndenge ya Union soviétique mpe komema bango na bisika oyo basengelaki kolala. Ntɔngɔ nyonso, bandeko ya komite ya liyangani bazalaki kokende kokutana na bakonzi ya engumba yango. Kasi, ntango bazalaki kozonga na mpokwa, bazalaki koya na nsango ya malamu te.
EYANO NA MABONDELI NA BISO
Na mokolo ya minei, mwa 22 ya sanza ya mwambe mikolo mibale liboso liyangani yango ebanda, bandeko ya komite bayaki na nsango ya malamu: Bakonzi bandimaki ete liyangani esalema! Mitema na biso etondaki mpenza na esengo ntango tozalaki koyemba loyembo ya ebandeli mpe kolanda libondeli. Na mokolo ya pɔsɔ nsima ya liyangani, totikalaki tii na mpokwa mpo na kosolola na bandeko mpe kozongisa boninga. Tozalaki mpe na bandeko ya kondima makasi oyo bayikaki mpiko na komekama ya makasi mpenza.
Bambula koleka 22 nsima ya liyangani yango, bokoli moko monene esalemaki. Batongaki bandako ya Bokonzi na ekólo mobimba ya Ukraine, mpe motángo ya basakoli oyo ezalaki 25 000 na mobu 1991, lelo oyo eleki 150 000!
TOZALI KAKA BAZWI NA MAKAMBO YA NZAMBE
Tii lelo oyo libota na biso efandaka kaka na ndako wana ya Dzhankoy, engumba oyo ezali lelo oyo na bato soki 40 000. Atako Batatoli ya Yehova bazalaki mingi te na engumba yango ntango toutaki na Sibérie na mobu 1968, kasi lelo oyo Dzhankoy ezali na masangá motoba.
Libota na ngai mpe ekómá monene. Lelo oyo, tozali kosalela Yehova Nzambe elongo na bana na biso, bana na bango, mpe bana ya bana na bango.