Ndenge ya kokende liboso ata soki libala ekufi
“Namonaki lokola mokili esuki. Makambo ezalaki kotambola malamu kasi na mbalakaka, natikalaki mabɔkɔ mpamba.”—MARK, * oyo libala na ye ekufá eleki sikoyo mbula moko.
“Mobali na ngai azalaki kobima ná mwasi moko oyo azalaki mbula moko ná mwana na biso ya mwasi. Ntango tobomaki libala, motema ekitaki ndenge nalongwaki na boombo ya bizaleli na ye ya mabe, kasi namonaki lokola basambwisi ngai mpe nazangi ntina.”—EMMELINE, oyo libala na ye ekufá eleki sikoyo mbula 17.
Bato mosusu babomaka libala mpo bakanisaka ete bomoi na bango ekobonga, kasi bamosusu balingaka te libala na bango ekufa nzokande bakoki te kotinda balongani na bango bátikala kaka na libala yango. Ata bongo, bato mingi oyo babomá mabala bamonaka ete bomoi na bango ekómaka lisusu mpasi koleka ndenge oyo bazalaki kokanisa. Kutu, soki libala na yo euti kokufa kala mingi te, mbala mosusu okomona ete ezali likambo oyo etungisaka moto koleka makambo mosusu nyonso oyo akoki kokutana na yango. Kasi, ekozala malamu otalela batoli mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo olonga mikakatano oyo koboma libala ebimisaka.
MOKAKATANO 1: MAKANISI YA MABE.
Mitungisi na makambo ya mbongo, kobɔkɔla bana, mpe komiyoka lokola ozali yo moko ekoki kosilisa yo mayele mpe mitungisi yango esilaka noki te. Judith Wallerstein moto moko ya pisikoloji oyo akufá, alobaki ete ata bambula mingi nsima ya koboma libala, bamosusu bamonaka kaka ete batɛkamaki mpe basundolamaki
mpe “bomoi ezali mabe, ezali na litomba moko te, mpe bamiyokaka lokola bazali bango moko.”OKOKI KOSALA BOYE
-
Lelá ndenge obungisi libala na yo. Okoki koyoka mposa ya moto oyo ozali kaka kolinga. Ata soki bozalaki koyokana malamu te, okoki kolela mpo ozwi te esengo oyo okanaki kozwa na libala. (Masese 5:18) Koyoka nsɔni te mpo na kobomba “ntango ya kolela.”—Mosakoli 3:1, 4.
-
Kozala kaka na esika na yo moko te. Ata soki ozali na mposa ya kozala kaka yo moko mpo na kolela, kotikala ndenge wana ntango molai ezali malamu te. (Masese 18:1) Salelá maloba ya kolendisa ntango ozali kosolola na baninga, mpo soki ozali komilelalela ntango nyonso mpo na molongani na yo ya kala, ata soki esengeli, ekoki kotinda baninga yango bákima yo. Soki esɛngi ete ozwa bikateli minene nsima ya koboma libala, luká lisalisi oyo esengeli epai ya moto moko oyo otyelaka motema.
-
Batelá nzoto na yo. Mbala mingi mitungisi ya koboma libala ememelaka moto bamaladi, na ndakisa maladi ya tansiɔ to motó mpasi. Lyáká malamu, saláká ngalasisi, mpe laláká malamu.—Baefese 5:29.
-
Longolá biloko oyo ekoki kosala ete oyokela molongani na yo ya kala nkanda to oyo ozali na mposa na yango te, kasi batelá mikanda ya ntina. Soki biloko lokola bafɔtɔ ya libala ezali kopesa yo mpasi, tyá yango esika moko mpe bombá yango mpo na bana na yo.
-
Benganá makanisi ya mabe. Olga, oyo abomaki libala ntango mobali na ye asalaki ekobo, alobi boye: “Nakobaki komituna, ‘mwasi yango aleki ngai na nini?’” Ndenge Olga amonaki yango na nsima, kozala ntango nyonso na makanisi ya mabe ekoki kosala ete ‘elimo ya moto elɛmba.’—Masese 18:14.
Bato mingi bamonaka ete kokoma makanisi na bango esalisaka bango bázala na makanisi ya polele mpe bátambola motó te. Soki osali yango, meká kozwa makanisi ya malamu mpe tyá yango na esika ya makanisi ya mabe oyo ozali kobundisa. (Baefese 4:23) Tótalela bandakisa oyo mibale:
Makanisi ya kala: Soki molongani na ngai asalaki ekobo ezali foti na ngai.
Makanisi ya sika: Mabunga na ngai epesi te molongani na ngai nzela ya kozwela ngai mbanda.
Makanisi ya kala: Nabebisaki bambula na ngai ya malamu ná mobali moko ya mabe.
Makanisi ya sika: Nakozala na esengo mpenza soki natali nde avenire, kasi te makambo oyo eleká.
-
Kolanda te maloba oyo ezali kopesa yo mpasi. Baninga to bandeko na yo mosusu bakoki koloba makambo oyo ekoki kopesa yo mpasi to oyo ebongi te mpo na yo, na ndakisa: ‘Abongaki na yo te’ to ‘Nzambe ayinaka koboma libala.’ * Yango wana Biblia epesi toli oyo: “Kotya motema na yo te na maloba nyonso oyo bato bakoki koloba.” (Mosakoli 7:21) Martina, oyo abomá libala eleki sikoyo mbula mibale alobi boye: “Na esika natya na motema maloba oyo epesi ngai mpasi, nalukaka nde kotalela makambo ndenge oyo Nzambe atalelaka yango. Makanisi na ye eleki oyo ya biso.”—Yisaya 55:8, 9.
-
Bondelá Nzambe. Alendisaka basambeli na ye ‘bábwakela ye mitungisi na bango nyonso,’ mingimingi ntango bazali na mawa makasi.—1 Petro 5:7.
MEKÁ KOSALA BOYE: Komá bavɛrsɛ oyo omoni ete ekoki kosalisa yo, mpe tyá yango na esika oyo okoki komona yango ntango nyonso. Longolá bavɛrsɛ oyo touti kotánga, bavɛrsɛ oyo elandi, esalisaki bato mingi oyo mabala ekufá, Nzembo 27:10; 34:18; Yisaya 41:10; mpe Baroma 8:38, 39.
MOKAKATANO 2: BOYOKANI NÁ MOLONGANI NA YO YA KALA.
Juliana, oyo libala na ye ekufaki nsima ya mbula 11, alobi boye: “Nabondelaki mobali na ngai ete atika ngai te. Kasi ntango akendaki, nakangelaki ye ná mwasi oyo
akendaki na ye nkanda.” Bato mingi oyo mabala na bango ekufá batikalaka na nkanda makasi mpo na balongani na bango ya kala. Ata bongo, basengeli kosololaka mbala na mbala, mingimingi soki babotá.OKOKI KOSALA BOYE
-
Kobá komonisela molongani na yo ya kala bonkonde. Tyá miso na makambo ya ntina mpe kobenda masolo milaimilai te, lobá kaka likambo oyo esengeli. Bato mingi bamonaka ete kosala bongo esalaka ete kimya ezala.—Baroma 12:18.
-
Boyá maloba oyo epelisaka mɔtɔ. Mingimingi soki oyoki nkanda, salelá toli oyo ya Biblia: “Moto nyonso oyo apekisaka maloba na ye azali na boyebi.” (Masese 17:27) Soki okokoka te kozongisa na nzela lisolo moko oyo esepelisi yo te, okoki koloba boye: “Namoni malamu nakanisa naino na makambo olobi mpe tokosolola yango nsima.”
-
Soki likoki ezali, longolá mikanda na yo ya Leta, ya mbongo mpe ya monganga na mikanda ya molongani na yo ya kala.
MEKÁ KOSALA BOYE: Mbala ya nsima oyo okosolola na molongani na yo ya kala, talá makambo oyo etindaka mokomoko na bino akóma komilongisa to kokangama kaka na makanisi na ye. Soki esengeli, katá naino lisolo yango to sɛngá bokomelana bamesaje na Internet.—Masese 17:14.
MOKAKATANO 3: NDENGE YA KOSALISA BANA NA YO BÁMESANA.
Maria akanisi lisusu oyo ekómelaki ye kaka ntango libala na ye ekufaki: “Mwana na ngai ya moke ya mwasi azalaki kolela ntango nyonso mpe azongelaki lisusu kosuba na mbeto. Atako yaya na ye ya mwasi azalaki komeka kobomba ndenge oyo azalaki koyoka, nazalaki komona ete ye mpe akómaki ndenge mosusu.” Likambo ya mawa, okoki komona ete ozangi ntango to makasi ya kosalisa bana na yo ntango bazali mpenza na mposa na yo.
OKOKI KOSALA BOYE
-
Lendisá bana na yo báyebisaka yo ndenge oyo bazali koyoka, ata soki yango ekomonana lokola “bilobaloba.”—Yobo 6:2, 3.
-
Kobá kokokisa mokumba na yo malamu. Atako okoki kozala na mposa ya lisungi ntango otungisami na likambo moko mpe mwana na yo akoki kosepela kosalisa yo, ekozala malamu te kosɛnga mwana apesa lisalisi na makambo ya mbula na ye te. (1 Bakorinti 13:11) Komeka te kokómisa mwana na yo moto oyo oyebisaka basekele na yo, kokómisa ye mpe te molobeli na yo epai ya molongani na yo ya kala.
-
Salá ete makambo ya mwana na yo ekoba kotambola malamu. Kofanda kaka na ndako oyo bozalaki mpe kosala makambo kaka ndenge bozalaki kosala, esalisaka mpenza; kasi likambo eleki ntina ezali ya kokoba kozala na boyokani malamu na Nzambe, kotánga Biblia mpe kosala losambo na libota.—Kolimbola Mibeko 6:6-9.
MEKÁ KOSALA BOYE: Na bantango mosusu na pɔsɔ oyo, monisá bana na yo ete olingaka bango mpe bango te nde basalaki ete libala na bino ekufa. Yanolá na mituna na bango kozanga ete opesa molongani na yo ya kala foti.
Okoki kokende liboso ata soki libala ekufi. Melissa, oyo libala na ye ekufaki nsima ya mbula 16, alobi boye: “Ntango libala na ngai ekufaki, nakómaki koloba boye na motema, ‘nalingaki te bomoi na ngai ekóma boye.’” Kasi sikoyo, akómá na esengo atako libala na ye ekufá. Alobi boye: “Ntango natikaki koluka kobongola makambo oyo eleká, nayokaki malamu mpenza.”
^ par. 2 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.
^ par. 18 Nzambe ayinaka baoyo basalelaka mayele mabe mpo na koboma libala. Kasi, soki molongani moko asali pite, Nzambe apesi molongani oyo asali likambo te nzela ya koboma libala. (Malaki 2:16; Matai 19:9) Talá lisolo “D’après la Bible—Quel genre de divorce Dieu hait-il?” na Lamuká! ya 08/02/1994, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
OMITUNA BOYE . . .
-
Nazwaki mpenza ntango ya kolela ndenge libala na ngai ekufaki?
-
Ndenge nini nakoki kolongola nkanda oyo nayokelaka molongani na ngai ya kala?