SEKELE MPO NA LIBOTA YA ESENGO
Ndenge ya kosolola na mwana na yo kozanga koswana
“Ntango mwana na ngai ya mwasi akómaki na mbula 14, abandaki kokatela ngai mangala. Soki nalobi na ye ‘ntango ya kolya ekoki,’ azalaki koloba na ngai ‘nakolya ntango nakoyoka nzala.’ Soki natuni ye soki asilisi misala ya ndako, azalaki koloba ‘tiká kotungisa ngai!’ Mbala mingi, ngai ná ye tozalaki komatisa mingongo mpe koswana.”—MAKI, JAPON. *
Soki ozali moboti mpe mwana na yo akómi elenge, koswana ekoki kozala moko ya mikakatano ya makasi oyo okoki kokutana na yango, mpe ekosɛnga ozala motema molai. Maria, mama ya mwana moko ya mbula 14 na Brésil alobi boye: “Ntango mwana na ngai ya mwasi aboyaka kotosa ngai, epesaka ngai nkanda makasi. Biso nyonso todasukaka, na nsima tobandaka kogangelana.” Carmela, oyo afandaka na Italie, akutanaka mpe na mokakatano yango. Alobi boye: “Soki ngai ná mwana na ngai ya mobali tobandi koswana, mbala mingi ekómaka makasi mpe na nsima, akɔtaka na shambre na ye mpe akangaka porte.”
Mpo na nini bilenge mingi bazalaka matata? Ezali nde foti ya baninga na bango? Ntango mosusu. Biblia elobi ete baninga bakoki kotinda moto na makambo ya malamu to ya mabe. (Masese 13:20; 1 Bakorinti 15:33) Kutu, lelo oyo bilenge mingi basepelaka na masano oyo elakisaka ndenge ya kotombokela bokonzi.
Kasi, ezali na makambo mosusu oyo esengeli kotalela—makambo yango ezali mpasi te mpo na kosilisa yango soki oyebi liboso ndenge oyo ekoki kosala mwana na yo. Tótalela mwa bandakisa.
‘MAKOKI NA YE YA KOKANISA’ EZALI KOKOLA
Ntoma Paulo akomaki ete: “Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, kokanisa lokola mwana moke, kotalela makambo lokola mwana moke; kasi sikoyo lokola nakómi mobali, nalongoli bizaleli ya mwana moke.” (1 Bakorinti 13:11) Ndenge ntoma Paulo amonisi yango, bana ná mikóló bakanisaka ndenge moko te. Na ndenge nini?
Bana bakanisaka ete eloko nyonso ezali malamu to mabe. Nzokande, mbala mingi mikóló batalelaka na mozindo makambo oyo ezali polele te ntango balingi kozwa ekateli boye to boye. Na ndakisa, mbala mingi mikóló batalelaka soki mobeko elobi nini na likambo balingi kosala mpe bakanisaka soki makambo oyo bakosala ekosala basusu malamu to mabe. Mikóló bamesaná kosala bongo. Kasi, likambo ya ndenge wana ezali ya sika mpo na bilenge.
Biblia ezali kolendisa bilenge bákolisa “likoki [na bango] ya kokanisa.” (Masese 1:4) Epai mosusu, Biblia ezali kolendisa bakristo nyonso básalela ‘makoki na bango ya kokanisa.’ (Baroma 12:1, 2; Baebre 5:14) Nzokande, na ntango mosusu, soki mwana na yo akómi na likoki ya kokanisa, yango ekoki kosala mbala mosusu ete akóma koswana na yo ata na makambo ya mikemike. * To akoki koloba na yo likambo moko oyo ezangi motó na makolo. (Masese 14:12) Soki esalemi bongo, ndenge nini okoki kosolola na ye na esika boswana?
MEKÁ KOSALA BOYE: Kanisá ete mwana na yo azali komeka ndenge ya kobimisa makanisi na ye, kasi azali komona te ete ezali mabe. Mpo na koyeba makanisi na ye malamu, pesá ye liboso longonya na ndenge azali kokóma na likoki ya kokanisa. (“Nasepeli na makanisi na yo, atako nandimi te makambo nyonso oyo olobi.”) Na nsima, salisá ye atalela makanisi na ye. (“Okanisi ete makanisi oyo outi kopesa ekoki kosalelama na makambo nyonso?”) Okoki mbala mosusu kokamwa ndenge mwana na yo akotalela lisusu makanisi na ye mpe akobongisa yango.
Likebisi: Ntango ozali kosolola na mwana na yo, kokanisa te ete kaka maloba na yo nde ezali solo. Ata soki emonani lokola andimi te makambo oyo olobi, yango elingi koloba te ete makambo bosololi ekɔti na litoi oyo mpe ebimi na litoi mosusu, mbala mosusu akoki kondima yango to kozwela yango matomba na nsima, koleka ndenge ozalaki kokanisa. Nsima ya mwa mikolo, kokamwa te soki mwana na yo azali kotingama na makanisi na yo, to mbala mosusu koloba ete ezalaki makanisi na ye.
“Ntango mosusu ngai ná mwana na ngai ya mobali toswanaka mpo na makambo ya mikemike, na ndakisa na likambo etali kobebisa biloko mpambampamba to kotungisa leki na ye ya mwasi. Kasi, na makambo mingi, alingaka natuna ye ndenge azali kokanisa mpe namonisa mwa makanisi na ngai mpe naloba, ‘Ah, likambo yango mpenza wana’ to ‘Oyo mpenza ndenge okanisi.’ Soki nazongisi makanisi nsima, namoni ete soki nalobaki likambo lokola oyo wana, ntango mosusu tokoki koswanaka te.”—Kenji, Japon.
AZALI KOBONGISA BOMOTO NA YE
Likambo ya ntina mingi na mosala ya kobɔkɔla mwana ezali ya kobongisa ye mpo mokolo oyo akotika ndako, azala mokóló oyo akoyeba kosala makambo ye moko. (Ebandeli 2:24) Na ntango wana, esɛngaka osalisa ye amonisa ndenge bomoto na ye ekozala, elingi koloba bizaleli mpe mateya ya Nzambe oyo ekomonisa ndenge azali. Ntango amekami makasi mpo asala likambo moko ya mabe, elenge oyo abongisá bomoto na ye akokanisa na makama oyo yango ekoki kobimisa. Akomituna mpe boye: ‘Nazali moto ya lolenge nini? Nazali na bizaleli ya ndenge nini? Moto oyo azali na bizaleli yango akosala nini soki akutani na likambo ya boye?’—2 Petro 3:11.
Biblia eyebisi biso lisolo ya Yozefe, elenge mobali moko oyo abongisaki malamu bomoto na ye. Na ndakisa, ntango mwasi ya Potifare atyaki ye mbamba asangisa na ye nzoto, Yozefe alobaki boye: “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?” (Ebandeli 39:9) Atako Bayisraele bazwaki naino te mobeko oyo epekisaki kosala ekobo, Yozefe atalelaki likambo yango ndenge Nzambe atalelaka yango. Longola yango, maloba “ndenge nini nakoki” emonisi ete azalaki mpenza kotalela makambo ndenge Nzambe atalelaka, elingi koloba akómisaki yango bomoto na ye.—Baefese 5:1.
Mwana na yo azali mpe kosala makasi mpo abongisa bomoto na ye. Ezali malamu mpo yango ekosalisa ye alonga makanisi mabe ya baninga na ye to atɛmɛla bango. (Masese 1:10-15) Epai mosusu, kobongisa bomoto yango ekoki mpe kotinda ye akóma kotɛmɛla yo. Soki esalemi bongo, okosala nini?
MEKÁ KOSALA BOYE: Na esika boswana, okoki nde koluka koyeba malamumalamu makanisi na ye. (“Nalingi nayeba soki nasimbi makambo oyo olobi. Olobi ete . . .”) Na nsima, okoki kotuna mituna. (“Nini etindi yo okanisa bongo?” to “Nini etindi yo ozwa ekateli wana?”) Tuná mwana na yo mituna mpo abimisa makanisi ya motema na ye. Tiká ye abimisa makanisi na ye. Soki likambo oyo ezali kokabola bino ezali kaka mpo oyo alingaka boye mpe
oyo kuna alingaka boye, kasi ezali te likambo ya kokesenisa mabe ná malamu, monisá na mwana na yo ete okoki kondima likanisi na ye ata soki ondimi yango te na mobimba.Komonisa ndenge okozala mpe makambo oyo ezali kosalisa mpo omonisa bomoto yango ezali na litomba. Kutu, Biblia elobi ete bakristo basengeli te kozala lokola bana mike oyo bazali “kotindikama lokola na mbonge mpe komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya.” (Baefese 4:14) Na yango, tiká mwana na yo akóma na bomoto mpe na bizaleli oyo ekosalisa ye. Kutu okoki mpenza kolendisa ye na likambo yango.
“Ntango namonisaka bana na ngai ya basi ete nazali na mposa ya koyoka bango, bazalaka pene ya kolanda makanisi na ngai, ata soki ekeseni na oyo ya bango. Nazalaka ekɛngɛ mpo nandimisa bango te na makasi likanisi na ngai, kasi natikaka bango moko bábongisa bomoto na bango.”—Ivana, République Tchèque.
KOZALA BONGOLABONGOLA TE, MAKAMBO MAKASIMAKASI MPE TE
Ndenge kaka bana mike basalaka, bilenge mosusu bayekolá ndenge ya koloba likambo moko mbala na mbala mpo na kolɛmbisa baboti na bango. Soki likambo yango ezali kosalema mbala na mbala na libota na bino, fungolá miso. Soki olɛmbisi motema kaka mpo atye yo mbamba, yango ekoki komema mwa kimya, kasi ekoteya mwana na yo ete koswana ezali nzela oyo ebongi mpo na kozwa eloko oyo azali na mposa na yango. Osengeli kosala nini? Landá toli oyo ya Yesu: “Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te.” (Matai 5:37) Bana bakobanda koswanisa yo mingi te soki bayebi ete soki olobi likambo obongolaka te.
Kasi, osengeli kozala makambo makasimakasi te. Na ndakisa, tikelá mwana na yo nzela amonisa ntina oyo amoni ete esengeli kotalela lisusu ntango oyo otyelá ye mpo na kozongaka ndako. Soki osali bongo, obangi mosukusuku te kasi olandi nde toli oyo ya Biblia: ‘Ezaleli na yo ya makambo makasimakasi te eyebana.’—Bafilipi 4:5.
MEKÁ KOSALA BOYE: Bósala likita mpe bósolola na ntina etali ntango oyo moto nyonso asengeli kozongaka na ndako mpe mibeko mosusu ya libota. Monisá ete ozali na mposa ya koyoka mpe ya kotalela makambo nyonso liboso ya kozwa ekateli. Roberto, tata moko na Brésil alobi boye: “Bana basengeli komona ete baboti na bango bandimaka likambo oyo basɛngi soki ebuki te mobeko ya Biblia.”
Toboyi te, moboti moko te azali moto ya kokoka. Biblia elobi ete: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yakobo 3:2) Soki omoni ete ozali na mwa foti na koswana oyo ebimi, kokakatana te mpo na kosɛnga mwana na yo bolimbisi. Soki ondimi foti na yo, okopesa ndakisa ya komikitisa mpe yango ekofungwela mwana na yo nzela ya kosala mpe bongo.
“Nsima ya koswana, ntango motema ekitaki, nasɛngaki mwana na ngai bolimbisi ndenge nasilikaki makasi. Yango esalaki mpe ete akitisa motema mpe esalisaki ye ayoka ngai na pɛtɛɛ nyonso.”—Kenji, Japon.
^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.
^ par. 10 Ata soki tolobeli bana mibali na lisolo oyo, batoli yango etaleli mpe bana basi.
OMITUNA BOYE . . .
-
Makambo nini nasalaka oyo ebimisaka koswana kati na ngai ná mwana na ngai?
-
Ndenge nini nakosalela makambo oyo ezali na lisolo oyo mpo nayeba mwana na ngai malamu mpenza?
-
Nakoki kosala nini mpo nasololaka ná mwana na ngai kozanga koswana?