“Okotimola motako na bangomba”
Ntango bato moko ya arkeoloji bazalaki kotimola mabwaku mpe mibenga na esobe ya Yudea, bakómaki na mobenga moko oyo ezalaki likoló ya ngomba. Bamonaki nde eloko moko ya motuya, mbala mosusu biloko ya kala to maniskri oyo ekokani na barulo ya Mbu ekufá (Mer Morte)? Bakamwaki ntango bamonaki esika moko oyo ezalaki na biloko ya motuya, esika yango ebengami Nahal Mishmar.
BILOKO yango ebombamaki na mwa lidusu mpe balíngaki yango na litɔkɔ moko oyo basalá na papirisi; bamonaki yango na sanza ya 03/1961, ezalaki liboke moko oyo ezalaki na biloko koleka 400, oyo mingi na yango ezalaki ya kwivre. Ezalaki na mitole ya ndenge na ndenge, mangenda, bisaleli mosusu, mpe bibundeli mosusu. Biloko yango ezali na ntina mpo na bato oyo batángaka Biblia na kotalela makambo oyo ezali na Ebandeli 4:22, oyo elobeli Tubale-kaina lokola “motuli ya biloko ya motako mpe ya bibende ya lolenge nyonso.”
Bato mingi bazali kaka komituna esika oyo biloko yango eutá. Ata bongo, ndenge oyo bamonaki yango emonisi ete kotimola kwivre, konyangwisa yango mpe kosala na yango biloko, eyebanaki banda kala na mikili oyo Biblia elobeli.
BISIKA OYO KWIVRE EZALAKI NA MOKILI YA NDAKA
Ntango Bayisraele balingaki kokɔta na Mokili ya Ndaka, Moize alobaki na bango boye: ‘Bokotimola motako [to kwivre] na bangomba ya [mokili] yango.’ (Kolimbola Mibeko 8:7-9) Bato ya arkeoloji bamonaki bisika ebele oyo kala bazalaki kotimola mpe konyangwisa kwivre na Yisraele mpe Yordani, na ndakisa na Feïnân, Timna, mpe na Khirbat en-Nahas. Bisika yango emonisi nini?
Mabele ya Feïnân mpe ya Timna, epai bato bazalaki kotimola kwivre na boumeli ya mbula koleka 2 000, ezali na mabulu ya mozindo mingi te. Ata mpe lelo oyo, bapaya bakoki komona epai na epai biteni ya kwivre oyo ezali na matɔnɔmatɔnɔ ya langi ya mai ya pondu. Bato ya kala oyo bazalaki kotimola kwivre bazalaki kobuka mabanga na bitimweli oyo basalá na mabanga mpo na kobimisa kwivre. Ntango bazalaki kosilisa kozwa kwivre na bisika yango, bazalaki kotimola na mozindo mabulu yango na bisaleli ya bibende mpo na kokómisa mabulu yango minene mpe kosala mwa bashambre na kati na yango. Mokanda ya Yobo elobeli ndenge bazalaki kosala mosala yango. (Yobo 28:2-11) Ezalaki mosala makasi mpenza; kutu, kobanda na siɛklɛ ya misato tii ya mitano ya ntango na biso, bakonzi ya Roma bazalaki kokatela basali mabe mpe bato mosusu ya bolɔkɔ etumbu ya kosala na bisika oyo bazalaki kotimola kwivre na Feïnân.
Ebele ya bosɔtɔ oyo ezali na Khirbat en-Nahas (oyo elimboli “bitiká ya kwivre”), emonisi ete esika yango ezalaki izini ya monene ya konyangwisa kwivre. Bato ya mayele bakanisi ete kwivre oyo bazalaki
komema kuna, bazalaki kotimola yango na mabulu ya pembeni, na ndakisa oyo ezalaki na Feïnân mpe Timna. Mpo na kobimisa kwivre, bazalaki kosalela batiyo mpe kofula na kati ya batiyo yango mpo na kongalisa mɔtɔ ya makala tii ekokóma makasi (1 200°C) na boumeli ya ngonga mwambe to zomi. Ezalaki kosɛnga konyangwisa kwivre ya kilo mitano mpo na kobimisa kwivre ya kilo moko, oyo na nsima bakokaki kosala na yango biloko ndenge na ndenge.NDENGE OYO BAZALAKI KOSALELA KWIVRE NA YISRAELE
Na Ngomba Sinai, Yehova Nzambe alobaki polele ete basengelaki kosalela kwivre na mosala ya kotonga tabernakle mpe na nsima basalelaki yango mpe mpo na kotonga tempelo ya Yerusaleme. (Kobima mokapo 27) Mbala mosusu Bayisraele bayebaki mwa moke mosala ya bibende liboso bákende na Ezipito, to mpe bayekolaki mosala yango kuna. Ntango babimaki na Ezipito, bakokaki kosala ekeko ya mwana-ngɔmbɛ oyo enyangwisami. Bayebaki mpe kosala biloko ndenge na ndenge ya kwivre oyo esɛngamaki mpo na mosala ya tabernakle; na ndakisa saani ya monene, banzungu, kikalungu, bapau mpe nkanya.—Kobima 32:4.
Na nsima, ntango bazalaki kaka na mobembo na bango na esobe, mbala mosusu pene ya Punone (ekoki kozala oyo ebengamaka lelo Feïnân), esika oyo kwivre ezalaki mingi mpenza, nde Bayisraele bakómaki koimaima mpo na mana mpe mai. Mpo na kopesa bango etumbu, Yehova atindelaki bango banyoka ya ngɛngɛ mpe bato mingi bakufaki. Ntango Bayisraele babongolaki motema, Moize abondelaki mpo na bango mpe Yehova ayebisaki ye asala nyoka moko ya kwivre mpe atɛlɛmisa yango likoló ya nzete. Lisolo yango elobi boye: “Mpe esalemaki boye: soki nyoka eswi moto mpe moto yango atali nyoka ya motako, atikali na bomoi.”—Mitángo 21:4-10; 33:43.
KWIVRE OYO MOKONZI SALOMO ASALELAKI
Mokonzi Salomo asalelaki ebele ya kwivre mpo na tempelo ya Yerusaleme. Mingi kati na yango tata na ye Davidi nde azwaki ntango abundisaki bato ya Siri mpe alongaki bango. (1 Ntango 18:6-8) “Mbu ya ebende oyo enyangwisami” ya kwivre, saani ya monene oyo banganga-nzambe bazalaki kosalela mpo na kosukola, ekokaki kokɔta litre 66 000 ya mai mpe kilo na yango ekoki kozala ya tɔni 30. (1 Bakonzi 7:23-26, 44-46) Batɛlɛmisaki mpe makonzí mibale ya minene ya kwivre liboso ya porte ya tempelo. Bosanda na yango ezalaki ya mɛtrɛ mwambe, mpe likoló na yango ezalaki na mitó oyo ezalaki na molai ya mɛtrɛ soki mibale. Na kati na yango ezalaki polele mpe ezalaki na bonene ya santimɛtrɛ nsambo na ndambo, mpe na molai ya mɛtrɛ moko na ndambo. (1 Bakonzi 7:15, 16; 2 Ntango 4:17) Soki tokanisi ebele ya kwivre oyo bazalaki kosalela mpo na biloko wana, ezali mpenza kokamwisa!
Na ntango ya kala, bato bazalaki mpe kosalela kwivre mingi na mosala na bango ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, Biblia elobeli biloko lokola bibundeli, bikangeli, bisaleli ya miziki, mpe baporte oyo basalá na kwivre. (1 Samwele 17:5, 6; 2 Bakonzi 25:7; 1 Ntango 15:19; Nzembo 107:16) Yesu alobelaki mbongo ya “motako” mpo na potɔmɔni, mpe ntoma Paulo atángaki nkombo ya “Alezandre mosali ya biloko ya motako.”—Matai 10:9; 2 Timote 4:14.
Bato ya arkeoloji mpe ya istware bazali naino na mosala ya koluka koyeba bisika oyo ebele ya kwivre wana ezalaki kouta na ntango ya kala, ata mpe biloko ya motuya oyo bazwaki na Nahal Mishmar. Ata bongo, kaka ndenge masolo ya Biblia emonisi yango, mokili oyo Bayisraele bazwaki ezalaki mpenza ‘mokili moko malamu, . . . mpe oyo basengelaki kotimola motako na bangomba na yango.’—Kolimbola Mibeko 8:7-9.