Mokanda ya liboso ya Bakonzi 18:1-46

  • Eliya akutani na Obadia mpe Ahaba (1-18)

  • Eliya ná basakoli ya Baala na Karamele (19-40)

    • ‘Kokakatana’ (21)

  • Eleko ya kokauka ya mbula misato ná ndambo esuki (41-46)

18  Nsima ya mwa ntango, na mbula ya misato ya eleko ya kokauka,+ Yehova alobaki na Eliya boye: “Kende kokutana na Ahaba, mpo nakani konɔkisa mbula na mabele.”+ 2  Bongo, Eliya akendaki kokutana na Ahaba. Na ntango wana, nzala ezalaki makasi+ na Samaria. 3  Na ntango yango, Ahaba abengaki Obadia, oyo azalaki mokambi ya ndako ya mokonzi. (Obadia azalaki kobanga Yehova mingi, 4  mpe ntango Yezabele+ azalaki koboma basakoli ya Yehova, Obadia azwaki basakoli 100 mpe abombaki bango: 50 na kati ya mobenga moko mpe 50 na kati ya mobenga mosusu, mpe azalaki kopesa bango limpa ná mai.) 5  Na nsima Ahaba alobaki na Obadia: “Tótambola na ekólo mobimba, na maziba nyonso ya mai mpe na mabwaku* nyonso. Mbala mosusu, tokokuta matiti mingi mpo na koleisa bampunda ná badɔngi* na biso. Soki te, banyama na biso nyonso ekokufa.” 6  Na yango, bakabolaki bisika oyo basengelaki kokende. Ahaba akendaki ye moko na nzela na ye, Obadia mpe akendaki na nzela mosusu. 7  Wana Obadia azalaki na nzela, Eliya akendaki kokutana na ye. Na mbala moko Obadia ayebaki ete ezali Eliya. Na yango afukamaki, atye elongi na nse liboso na ye mpe alobaki: “Ezali yo, nkolo na ngai Eliya?”+ 8  Eliya alobaki na ye: “Ɛɛ, ezali ngai. Kende mpe yebisá nkolo na yo: ‘Eliya azali awa.’” 9  Kasi Obadia alobaki na ye: “Lisumu nini ngai mosaleli na yo nasali mpo opesa ngai na lobɔkɔ ya Ahaba? Soki nasali oyo olobi, Ahaba akoboma ngai! 10  Lokola Yehova Nzambe na yo azali solo na bomoi, nkolo na ngai Ahaba atindi bato na bikólo nyonso mpe na bokonzi nyonso mpo na koluka yo. Ntango bato ya bokonzi to ya ekólo yango bazalaki koloba: ‘Eliya azali awa te,’ Ahaba azalaki kosɛnga bango bálapa ndai ete bamoni yo te.+ 11  Sikoyo ozali koloba na ngai: ‘Kende mpe yebisá nkolo na yo: “Eliya azali awa.”’ 12  Ntango nakolongwa awa, elimo ya Yehova ekomema yo+ na esika oyo nayebi te, mpe soki nayebisi Ahaba ete ozali awa, kasi amoni yo te, na ntembe te akoboma ngai. Nzokande, ngai mosaleli na yo nabangaka Yehova banda bolenge na ngai. 13  Ee nkolo na ngai Eliya, naino bayebisá yo te likambo oyo nasalaki ntango Yezabele azalaki koboma basakoli ya Yehova? Nabombaki basakoli ya Yehova 100: basakoli 50 na kati ya mobenga moko mpe 50 na kati ya mobenga mosusu, mpe nazalaki kopesa bango limpa ná mai.+ 14  Sikoyo ozali koloba na ngai: ‘Kende mpe yebisá nkolo na yo: “Eliya azali awa.”’ Na ntembe te, akoboma ngai.” 15  Kasi Eliya alobaki na ye: “Lokola Yehova ya mampinga oyo nasalelaka* azali solo na bomoi, lelo nakokende kokutana na Ahaba.” 16  Na yango, Obadia akendaki kokutana na Ahaba mpe ayebisaki ye. Bongo, Ahaba akendaki kokutana na Eliya. 17  Ntango kaka Ahaba amonaki Eliya, alobaki na ye: “Nazwi yo! Yo moto omemeli Yisraele mpasi mingi!” 18  Bongo Eliya alobaki: “Ezali ngai te moto namemeli Yisraele mpasi, kasi ezali nde yo ná libota ya tata na yo. Mpo botiki mitindo ya Yehova mpe bokómi kosambela Babaala.+ 19  Sikoyo, yanganisá Yisraele mobimba na Ngomba Karamele+ mpe bengisá basakoli 450 ya Baala, ná basakoli 400 oyo basambelaka na nzete ya losambo;*+ baoyo Yezabele apesaka bilei.” 20  Na yango, Ahaba atindaki maloba epai ya Bayisraele nyonso, mpe ayanganisaki basakoli na Ngomba Karamele. 21  Bongo Eliya apusanaki epai ya bato nyonso mpe alobaki: “Kino ntango nini bokokakatana boye?*+ Soki Yehova azali Nzambe ya solo, bósalela ye;+ kasi soki ezali Baala, bósalela ye!” Kasi, bato bazongiselaki ye ata liloba moko te. 22  Na nsima Eliya alobaki na bato boye: “Natikali kaka ngai moko mosakoli ya Yehova,+ nzokande basakoli ya Baala bazali 450. 23  Bópesa biso bana-ngɔmbɛ mibale ya mibali. Basakoli ya Baala bápona mwana-ngɔmbɛ moko, bákatakata yango mpe bátya yango likoló ya nkoni. Kasi bátya yango mɔtɔ te. Ngai nakozwa mwana-ngɔmbɛ mosusu, mpe nakotya yango likoló ya nkoni. Nakotya yango mɔtɔ mpe te. 24  Na nsima, basakoli ya Baala basengeli kobelela nkombo ya nzambe na bango,+ mpe ngai nakobelela nkombo ya Yehova. Nzambe oyo akotinda mɔtɔ mpo ezikisa bambeka yango, ye nde Nzambe ya solo.”+ Mpe bato nyonso bayanolaki: “Olobi malamu!” 25  Bongo Eliya alobaki na basakoli ya Baala boye: “Bópona liboso mwana-ngɔmbɛ moko mpe bóbongisa yango, mpo bino nde boleki mingi. Kasi bosengeli te kotya mɔtɔ na mbeka na bino. Na nsima, bóbelela nkombo ya nzambe na bino.” 26  Na yango, bazwaki mwana-ngɔmbɛ oyo bapesaki bango, babongisaki yango, mpe babandaki kobelela nkombo ya Baala banda ntɔngɔ tii na midi. Bazalaki koloba: “Ee Baala, yanolá biso!” Kasi bayokaki ata mongongo moko te, mpe ata moto moko te azalaki koyanola bango.+ Bazalaki kotɛngumatɛnguma zingazinga ya etumbelo oyo basalaki. 27  Pene na midi, Eliya abandaki kosɛka bango mpe koloba: “Bóbelela ye na mongongo makasi mpenza, mpo azali nzambe!+ Ekoki kozala ete azali kokanisa makambo mosusu to akei nsima.* To mbala mosusu alali mpɔngi mpe esengeli moto moko alamwisa ye!” 28  Bazalaki kobelela na mongongo makasi mpenza mpe komikatakata nzoto na bambeli mpe na makɔnga, kaka ndenge bamesaná kosala, tii makila ebimaki bango na nzoto mobimba. 29  Midi elekaki, mpe bazalaki kaka koningananingana* lokola basakoli tii na ntango oyo bato bapesaka likabo ya mbuma ya mpokwa. Kasi, mongongo moko te eyokanaki, mpe moto moko te ayanolaki bango; moto moko te atyaki likebi.+ 30  Nsukansuka, Eliya alobaki na bato nyonso boye: “Bópusana pene na ngai.” Bongo bango nyonso bapusanaki pene na ye. Na nsima, Eliya abongisaki etumbelo ya Yehova oyo ebukanaki.+ 31  Eliya azwaki mabanga 12, na kolanda motángo ya mabota ya bana ya Yakobo, oyo Yehova alobaki na ye: “Nkombo na yo ekokóma Yisraele.”+ 32  Na mabanga yango, atongaki etumbelo+ mpo na nkombo ya Yehova mpe pembenipembeni ya etumbelo yango atimolaki mwa libulu, oyo ezalaki na bonene ya esika oyo bakoki kolona sea* mibale ya mbuma. 33  Nsima na yango, abongisaki nkoni malamu, akatakataki mwana-ngɔmbɛ mpe atyaki yango likoló ya nkoni.+ Bongo alobaki: “Bótondisa mai na bilokó minei ya minene mpe bósopa yango likoló ya likabo ya kotumba mpe likoló ya nkoni.” 34  Na nsima, alobaki: “Bósala lisusu bongo.” Mpe basalaki lisusu bongo. Alobaki lisusu: “Bósala yango mpo na mbala ya misato.” Mpe basalaki bongo mpo na mbala ya misato. 35  Bongo mai esopanaki zingazinga ya etumbelo. Mpe Eliya atondisaki mwa terase yango na mai. 36  Pene na ntango oyo bapesaka likabo ya mbuma,+ mosakoli Eliya apusanaki liboso ya etumbelo mpe abondelaki boye: “Ee Yehova, Nzambe ya Abrahama,+ ya Yisaka,+ mpe ya Yisraele, tiká bato nyonso báyeba lelo ete ozali Nzambe na Yisraele mpe ete nazali mosaleli na yo. Tiká báyeba ete yo nde otindi ngai nasala makambo oyo nyonso.+ 37  Yanolá ngai, Ee Yehova! Yanolá ngai, mpo bato oyo báyeba ete yo, Yehova, ozali Nzambe ya solo mpe ozali kosalisa bango bázongisa mitema na bango epai na yo.”+ 38  Na yango, mɔtɔ ya Yehova eutaki na likoló, ekitaki mpe ezikisaki likabo ya kotumba,+ nkoni, mabanga, ná putulu mpe ekaukisaki mai oyo ezalaki na terase.+ 39  Ntango bato nyonso bamonaki yango, na mbala moko bafukamaki, batye bilongi na nse, mpe balobaki: “Yehova azali Nzambe ya solo! Yehova azali Nzambe ya solo!” 40  Bongo Eliya alobaki na bango: “Bókanga basakoli ya Baala! Ata moko na bango akima te!” Na mbala moko, bakangaki bango. Bongo Eliya akitaki na bango na mokɛli* ya Kishone,+ mpe abomaki bango kuna.+ 41  Na nsima, Eliya alobaki na Ahaba: “Matá, lyá mpe mɛlá, mpo nazali koyoka makɛlɛlɛ ya mbula makasi.”+ 42  Na yango, Ahaba amataki mpo na kolya mpe komɛla. Kasi Eliya amataki na nsɔngɛ ya ngomba Karamele mpe agunzamaki na mabele, mpe atyaki elongi na ye na kati ya mabɔlɔngɔ na ye.+ 43  Na nsima alobaki na mosaleli na ye: “Nabondeli yo, matá mpe talá na ngámbo ya mbu.” Bongo amataki mpe atalaki, na nsima alobaki na Eliya: “Namoni ata eloko moko te.” Eliya alobaki na ye mbala nsambo ete “Zongá lisusu.” 44  Na mbala ya nsambo, mosaleli na ye alobaki: “Talá! Mwa lipata moko lokola lobɔkɔ ya moto ezali kouta na mbu mpe ezali komata.” Bongo Eliya alobaki na ye: “Matá mpe yebisá Ahaba boye: ‘Kangisá banyama na likalo na yo! Kitá mpo mbula makasi epekisa yo te kozonga epai na yo!’” 45  Na ntango yango, mapata ya mbula ebandaki komonana, likoló eyindaki, mopɛpɛ ebandaki kopɛpa, mpe mbula makasi mpenza ebandaki konɔka.+ Kasi Ahaba akobaki kokende na likalo na ye tii na Yizireele.+ 46  Yehova apesaki Eliya nguya mingi. Na yango, akangaki elamba na ye na loketo mpe apotaki mbangu liboso ya Ahaba tii na Yizireele.

Maloba na nse

To, “mabwaku ya mikɛli.”
Ezali mwana ya mpunda moke ya mobali ná mpunda ya mwasi.
Lil., “natɛlɛmi liboso na ye.”
To, “bokotɛnguma na makanisi mibale.”
To mbala mosusu, “akei mobembo.” Maloba “akei nsima” elimboli “kokende na kabinɛ mpo na kosuba to kosumba.”
To, “kosala.”
Sea moko = 7,33 L. Talá Ap. B14.
To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.