Okoki kosala nini mpo otika komɛla masanga koleka ndelo?
Bato mingi bamɛlaka masanga mingi ntango bazali komitungisa na makanisi, bazali bango moko, to ntango balɛmbi nzoto. Ozalaka na momeseno ya komɛla masanga mingi? Soki bongo, ndenge nini okoki koyeba soki ozali kolekisa ndelo to okómi moombo ya masanga? Makambo oyo elandi ekoki kosalisa yo oyeba oyo okoki kosala mpo olekisa ndelo te na oyo etali komɛla masanga.
Komɛla masanga na bokatikati elakisi nini?
Oyo Biblia elobi: “Kozala te kati na bamɛli minene ya vinyo.”—Masese 23:20.
Talelá likambo oyo: Biblia epekisi te komɛla masanga na bokatikati. (Mosakoli 9:7) Kasi, emonisi bokeseni oyo ezali kati na komɛla masanga na bokatikati, kolekisa ndelo na komɛla masanga, mpe kolangwa masanga. (Luka 21:34; Baefese 5:18; Tito 2:3) Ata soki omesaná komɛla masanga mingi mpe olangwaka te, yango ekoki kosala ete ozwa bikateli ya mabe, kobebisa sante na yo, to boyokani na yo ná basusu.—Masese 23:29, 30.
Bakonzi mingi bayebaka kokesenisa komɛla oyo ekoki kobimisa likama monene mpe oyo ekoki kobimisa likama moke, bayebaka yango na kotalela motángo ya kɔpɔ ya masanga oyo moto amɛlaka na mokolo moko mpe mbala oyo moto amɛlaka na kati ya pɔsɔ. a Kasi, bato nyonso basalaka makambo ndenge moko te nsima ya komɛla masanga, mpe ezali na bantango mosusu oyo moto asengeli mpenza komɛla masanga te. Na kotalela ebongiseli ya ONU oyo etalelaka sante:
“Ata kɔpɔ moko to mibale ya masanga ekoki kozala mingi—na ndakisa:
Ntango ozali kotambwisa motuka to ozali kosalela masini.
Ntango mwasi azali na zemi to azali komɛlisa mwana mabɛlɛ.
Ntango ozali komɛla nkisi.
Ntango ozali kozwa lisalisi ya monganga oyo esɛngi omɛla masanga te.
Soki okokaka na yo masanga te.”
Makambo oyo emonisaka ete moto akómi kolekisa ndelo na komɛla masanga
Oyo Biblia elobi: “Tóluka banzela na biso mpe tótalatala yango.”—Bileli 3:40.
Talelá likanisi oyo: Okoki komibatela na makama oyo ebimaka nsima ya komɛla masanga soki ozali mbala na mbala kotalela momeseno na yo ya komɛla masanga mpe kobongola yango soki esengeli. Makambo oyo elandi ekoki komonisa ete moto akómi kolekisa ndelo na komɛla masanga.
Mpo ozala na esengo osengeli komɛla masanga. Omonaka mpo oyoka malamu, ozala na bato, to osepela osengeli naino komɛla masanga. Omɛlaka mpo na kosilisa mitungisi na yo.
Omesaná komɛla masanga mingi. Omɛlaka masanga mingi mbala na mbala. Omɛlaka masanga makasi, mpe esɛngaka omɛla yango mingi mpo omiyoka ndenge omesaná komɛla.
Masanga oyo omɛlaka ememelaka yo mikakatano na ndako to na mosala. Na ndakisa, osilisaka mbongo nyonso kaka na masanga.
Ozwaka bikateli oyo ekoki kobimisa likama nsima ya komɛla masanga, na ndakisa, kotambwisa motuka, kosakana to kosukola na mai, to kosalela masini.
Basusu bamitungisaka mpo na ndenge na yo ya komɛla masanga. Ntango basalaka yango, olukaka komilongisa. Olingaka te basusu bayeba ete omɛli masanga, to okosaka na oyo etali motángo ya kɔpɔ ya masanga oyo omɛli.
Okokaka te kotika komɛla masanga. Omekaki kotika komɛla masanga, kasi ozali kolonga te.
Makambo mitano oyo ekosalisa yo olekisa ndelo te ntango ozali komɛla masanga
1. Tyá programɛ.
Oyo Biblia elobi: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.”—Masese 21:5.
Meká kosala boye: Poná mikolo oyo okomɛla masanga na kati ya pɔsɔ. Omityela ndelo ya motángo ya kɔpɔ ya masanga oyo osengeli komɛla na mikolo wana nyonso. Mpe poná ata mikolo mibale na pɔsɔ nyonso oyo okomɛla masanga te.
Ebongiseli moko ya Royaume-Uni oyo etalaka mateya na oyo etali masanga elobi boye: “Kotya mikolo oyo okomɛla masanga te na pɔsɔ ekosala ete okóma te moombo ya komɛla masanga.”
2. Tosá programɛ oyo otye.
Oyo Biblia elobi: “Bósukisa mpe kosala yango.”—2 Bakorinti 8:11.
Meká kosala boye: Luká koyeba bonene ya kɔpɔ ya masanga oyo osalelaka mpo oyebá motángo boni ya kɔpɔ oyo osengeli na yango mpe oyeba ndelo na yo. Luká masanga oyo elangwisaka te oyo osepelaka na yango, mpe salá ete ezangaka te.
Ebongiseli moko na États-Unis (L’Institut américain de prévention de l’abus d’alcool et de l’alcoolisme) elobi boye: “Bambongwana ya mikemike ekoki kosala ete okitisa mikakatano oyo ebimaka ntango moto azali komɛla masanga mingi.”
3. Kangamá na bikateli na yo.
Oyo Biblia elobi: “Tiká Ɛɛ na bino ezala Ɛɛ, mpe Te na bino, Te.”—Yakobo 5:12.
Meká kosala boye: Na boboto nyonso, boyá komɛla masanga soki moto moko apesi yo yango na ntango oyo obongisaki te ete okomɛla yango.
Ebongiseli moko na États-Unis (L’Institut américain de prévention de l’abus d’alcool et de l’alcoolisme) elobi boye: “Soki ozali koboya mbala na mbala bápesa yo masanga, okwea te na motambo yango.”
4. Tyá makanisi na matomba oyo bikateli na yo ekobimisa.
Oyo Biblia elobi: “Nsuka mpenza ya likambo eleki ebandeli na yango.”—Mosakoli 7:8.
Meká kosala boye: Salá liste ya makambo oyo etindi yo oboya kolekisa ndelo na komɛla masanga. Na ndakisa makambo lokola kolala malamu, sante na yo, kobatela mbongo, mpe boyokani na basusu. Soki ozali kolobela basusu bikateli oyo ozwi, lobelá mingimingi matomba oyo okozwa na esika ya kolobela mikakatano.
5. Luká lisalisi epai ya Nzambe.
Oyo Biblia elobi: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”—Bafilipi 4:13.
Meká kosala boye: Soki ozali komitungisa mpo na ndenge omɛlaka masanga mingi, bondelá Nzambe asalisa yo. Sɛngá ye apesa yo makasi mpe ezaleli ya komipekisa. b Mpe zwá ntango ya koyeba bwanya oyo ezali na Liloba na ye, Biblia. Na lisalisi na ye, okoki koboya kolekisa ndelo na oyo etali komɛla masanga.
a Na ndakisa, Departema oyo etalelaka makambo ya sante mpe misala ya bato na États-Unis emonisi ete ezali likama mpenza soki “mwasi azali komɛla kɔpɔ 4 ya masanga to koleka na mokolo to kɔpɔ 8 ya masanga to koleka na pɔsɔ mpe soki mobali azali komɛla kɔpɔ 5 ya masanga to koleka na mokolo to kɔpɔ 15 ya masanga to koleka na pɔsɔ.” Mboka na mboka ezali na mibeko na yango na likambo etali masanga, na yango tuná monganga na yo mpo ayebisa yo motángo boni ya kɔpɔ ya masanga oyo ebongi mpo na yo.
b Soki ozali kokoka te kotika komɛla masanga mingi, okoki mpe koluka lisungi epai ya baoyo basalisaka bato na likambo yango.