Lingomba ekómi esika mosusu ya kosala mombongo?
Omonaka ndenge mangomba emipesi kaka na koluka mbongo na esika ya koteya bato makambo ya Nzambe? Mangomba etɛkaka biloko, mpe esalaka bapiblisite mpo na misala na yango mpo na kozwa mbongo. Bafutaka bakonzi mingi ya mangomba mbongo mingi mpe bazalaka na bomoi ya bomɛngo. Tótalela mwa bandakisa:
Ankɛtɛ moko emonisaki ete eleki sikoyo mbula 13, episkopo moko Mokatoliki asalelaki mbongo ya lingomba na ye mpo na kofuta mibembo soki 150 oyo asalaki na pɛpɔ to aviɔ mpe mibembo 200 oyo asalaki na motuka moko ya ntalo mingi. Asalelaki mpe dolare koleka milio 4 mpo na kobongisa lisusu monastɛrɛ na bango.
Na ekólo moko na Afrika, pastɛrɛ moko atambwisaka mbala na mbala losambo na baeglize na ye oyo eyanganisaka bankóto ya bandimi. Eglize na ye ezali na bisika oyo batɛkaka biloko ya ndenge nyonso, banda na “mafuta mosantu” tii na basakosi to bilamba oyo batyá bafɔtɔ na ye. Ye moko azali mozwi mpenza, kasi bandimi ya lingomba na ye bazali babola mpenza..
Na ekólo Chine, kati na bangomba mosantu minei ya Babuda, mibale etyami na liste ya bakompanyi ya mombongo. Lisusu basalaka mosala ya mombongo na tempelo Shaolin. Kutu, tata mokonzi abengamaka “sango PDG.”
Na Amerika, bapesi-toli na makambo ya Nzambe bakómi komonana na bakompanyi. Lapolo moko emonisi ete bakómi kosalela mimeseno ya mangomba mpo na kosala milulu mosantu mpe kopesa bakiliya na bango misala mosusu na makambo ya Nzambe.
Okanisaka nini mpo na mangomba oyo emipesaka kaka na koluka mbongo? Osí omituná soki Nzambe akanisaka nini mpo na bato oyo balukaka kokóma bazwi na nzela ya mangomba?
Nzambe akanisaka nini mpo na mangomba oyo esangisaka makambo ya Nzambe ná mombongo?
Nzambe alingaka te básangisa makambo ya losambo ná mombongo. Biblia emonisi ete na ntango ya kala, Nzambe asepelaki te na banganga-nzambe oyo bazalaki koloba ete bazali bamonisi na ye nzokande bazalaki koteya kaka “mpo na mbongo.” (Mika 3:11) Nzambe ayinaki mpenza misala ya mombongo ya lokoso oyo ekómisaki esika na ye ya losambo “mobenga ya miyibi.”—Yirimia 7:11.
Yesu mpe amonisaki mayoki oyo Nzambe azalaka na yango mpo na bato oyo basalelaka mangomba mpo na kozwa mbongo. Na ntango ya Yesu, bakonzi ya mangomba bazalaki kozwa mbongo epai ya bato ya mombongo oyo bapesaki bango nzela ya kosala mombongo na tempelo ya Yerusaleme. Kuna bazalaki kobuba bato ya mitema sembo oyo bazalaki koya kosambela. Na mpiko nyonso, Yesu abenganaki bato ya mombongo ya lokoso na tempelo, ntango alobaki boye: “Bótika kokómisa ndako ya Tata na ngai ndako ya mombongo!”—Yoane 2:14-16.
Lisusu, Yesu amonisaki makanisi ya Nzambe na ndenge oyo asalaki mosala na ye. (Yoane 8:28, 29) Ata mokolo moko te, asɛngaki bato bápesa ye mbongo ntango azalaki koteya bango makambo ya Nzambe. Azalaki te kosɛnga mbongo ntango azalaki kosala makamwisi, na ndakisa, koleisa bato oyo bazalaki na nzala, kobikisa bato ya maladi, mpe kosekwisa bakufi. Yesu asalelá ata moke te mosala na ye ya kosakola mpo na koluka mbongo, kutu azalaki ata na ndako te.—Luka 9:58.
Ndenge nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso bakobaki kosala makambo na bango ya losambo kozanga ete bámikɔtisa na makambo ya mombongo?
Yesu ayebisaki bayekoli na ye báluka soki moke te kozwa mbongo na makambo ya losambo. Alobaki boye: “Bozwi ofele, bópesa ofele.” (Matai 10:8) Bayekoli wana ya siɛklɛ ya liboso, oyo bakómaki kobengama bakristo, balandaki malako wana ya Yesu. Tózwa mwa bandakisa:
Ntoma Petro, oyo azalaki kosakola elongo na Yesu. Mokolo moko moto moko na nkombo Simo alingaki kopesa ntoma Petro mbongo, mpo ntoma Petro apesa ye elimo santu. Na mbala moko ntoma Petro aboyaki likanisi yango, apamelaki ye mpe alobaki na ye boye: “Palata na yo ebeba elongo na yo, mpo okanisi kozwa likabo ya ofele ya Nzambe na mbongo.”—Misala 8:18-20.
Ntoma Paulo ayebanaki malamu lokola mosakoli oyo asalaka mibembo. Atako asalaki mosala makasi na boumeli ya bambula mingi na masangá mingi ya bokristo, azalaki soki moke te koluka kozwa matomba mpo na mosala na ye ya makasi. Ye ná baninga na ye bakristo bazalaki te “bato oyo batɛkaka liloba ya Nzambe ndenge bato mingi bazali.” (2 Bakorinti 2:17) Kutu, ntoma Paulo akomaki boye: “Ezali na nzela ya mosala makasi butu moi, mpo na kotyela moto moko te na kati na bino kilo monene, nde tosakolaki nsango malamu epai na bino.”—1 Batesaloniki 2:9.
Na ntembe te, bakristo wana ya siɛklɛ ya liboso basengelaki na mbongo mpo na kokokisa mosala ya kosakola mpe ya kosalisa bato na ntango ya mpasi. Kasi batikalá ata moke te kosɛnga bato mbongo mpo na makambo ya losambo oyo basalaki. Bato bazalaki kosepela kopesa na bolingo na bango moko, na kolanda malako oyo:
2 Bakorinti 8:12: “Mpo soki libosoliboso mposa makasi ezali, ekondimama mingi mpenza na kotalela oyo moto azali na yango, kasi te na kotalela oyo moto azali na yango te.”
Ndimbola na yango: Elimo oyo etindaka moto apesa eleki eloko oyo apesi.
2 Bakorinti 9:7: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”
Ndimbola na yango: Nzambe alingaka te bátindika moto na makasi apesa. Asepelaka nde ntango moto ye moke aponi kopesa na bolingo na ye moko
Mosika te nini ekokómela mangomba oyo esangisaka makambo ya Nzambe ná mombongo?
Biblia elobi polele ete Nzambe andimaka te mangomba nyonso to lolenge nyonso ya losambo. (Matai 7:21-23) Na esakweli moko ya nsɔmɔ, Biblia ekokanisi mangomba nyonso ya lokuta na mwasi moko ya ndumba mpo mangomba yango esali boyokani na baguvɛrnema mpo na kozwa mbongo to kosala makambo mosusu, mpo na kobuba bato ya bikólo nyonso. (Emoniseli 17:1-3; 18:3) Esakweli yango ekobi komonisa ete mosika te Nzambe akosambisa mangomba nyonso ya lokuta.—Emoniseli 17:15-17; 18:7.
Mosika te, Nzambe akosepela lisusu te komona ndenge bizaleli mabe ya mangomba ya lokuta ezali kobebisa bato to kosala ete bázala mosika na ye. (Matai 24:11, 12) Asɛngi na bato ya mitema sembo báyekola kosalela ye na ndenge oyo andimi mpe bálongwa na mangomba ya lokuta.—2 Bakorinti 6:16, 17.