Lingomba esengeli komikotisa na makambo ya politiki?
Na mokili mobimba, bato mingi oyo balobaka ete balandaka Yesu Kristo bamikɔtisá mpenza mobimba na makambo ya politiki. Basusu bapesaka bato ya politiki to parti politiki moko mabɔkɔ mpo bálongisa mateya mpe bizaleli oyo lingomba na bango eteyaka bato. Na yango, bato ya politiki balobelaka mbala mingi makambo etali bizaleli ya bato mpe balakaka bato bomoi ya malamu mpo bato ya mangomba bápesa bango mabɔkɔ. Esalemaka mpe mingi ete bakonzi ya mangomba bápesa nkombo mpo na koponama na bibonga ya bokonzi. Mpe na bikólo mosusu, nkombo “mokristo” ekoki kozwa esika ya lokumu mpenza lokola lingomba ya Leta to ya ekólo.
Okanisi boni? Bayekoli ya Yesu Kristo basengeli komikɔtisa na makambo ya politiki? Mpo na kozwa eyano, tótala ndakisa ya Yesu. Alobaki boye: “Napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasali bino, bino mpe bósalaka bongo.” (Yoane 13:15) Na makambo ya politiki, ndakisa nini Yesu apesaki?
Yesu akɔtaki na makambo ya politiki?
Te. Yesu akɔtaki na makambo ya politiki ya mokili oyo te.
Yesu alukaki bokonzi ya politiki te. Aboyaki kokóma moyangeli ya baguvɛrnema ya mokili ntango Satana Zabolo apesaki ye “makonzi nyonso ya mokili.” (Matai 4:8-10) a Mokolo moko, bato oyo bamonaki ete Yesu azali na makoki mpenza ya kozala mokambi ya malamu balukaki kokanga ye na makasi mpo akɔta na makambo ya politiki. Biblia elobi: “Yesu, lokola ayebaki ete balingi koya kokanga ye mpo na kotya ye mokonzi, alongwaki akei lisusu na ngomba, kaka ye moko.” (Yoane 6:15) Yesu andimaki te kosala makambo oyo bato balingaki ete asala. Yango wana, aboyaki kokɔta na makambo ya politiki.
Yesu akɔtelaki ngámbo moko te na makambo ya politiki. Na ndakisa, na mikolo ya Yesu, Bayuda bazalaki kolinga likambo ya kofuta mpako ya guvɛrnema ya Roma ata moke te, mpe bazalaki komona ete ezali likambo moko oyo ebongi te. Ntango balukaki kokɔtisa Yesu na likambo yango, amikɔtisaki te na bantembe ya makambo ya politiki mpo na komonisa ete bampako yango ezali malamu to te. Kasi ayebisaki bango: “‘Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala,’ kasi Nzambe biloko ya Nzambe.” (Marko 12:13-17) Amikɔtisaki te na ngámbo moko na makambo ya politki, kasi amonisaki nde ete mpako oyo bakonzi ya Leta, oyo bazalaki komonisa Kaisala, bazalaki kosɛnga, esengelaki kofutama. Mpe na libaku yango, amonisaki ete botosi epai ya bakonzi ya Leta ezali na ndelo. Moto asengeli ata moke te kopesa Leta to bakonzi eloko oyo esengeli kopesama kaka epai ya Nzambe, na ndakisa, komipesa na Nzambe mpe losambo.—Matai 4:10; 22:37, 38.
Yesu azalaki koteya bato Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema ya likoló. (Luka 4:43) Yesu amikɔtisaki na makambo ya politiki te mpo ayebaki ete kaka Bokonzi ya Nzambe, kasi baguvɛrnema ya bato te, nde ekosala makambo oyo Nzambe alingi kosala na mabele. (Matai 6:10) Ayebaki malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekosala misala na nzela ya baguvɛrnema ya bato te, kasi Bokonzi ya Nzambe ekozwa nde esika ya baguvɛrnema ya bato.—Danyele 2:44.
Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bakɔtaki na makambo ya politiki?
Te. Bayekoli ya Yesu batosaki etinda ya Yesu ya kozala “bato ya mokili te.” (Yoane 15:19) Balandaki ndakisa na ye mpe bakɔtaki ata moke te na makambo ya politiki ya mokili oyo. (Yoane 17:16; 18:36) Na esika ya komikɔtisa na makambo ya politiki, basalaki mosala oyo Yesu atindaki bango básala: kosakola mpe koteya makambo ya Bokonzi ya Nzambe.—Matai 28:18-20; Misala 10:42.
Kotosa Nzambe ezalaki likambo ya liboso na bomoi na bango. Kasi bayebaki mpe ete basengeli kotosa bakonzi ya Leta. (Misala 5:29; 1 Petro 2:13, 17) Bazalaki kotosa mibeko mpe kofuta mpako. (Baroma 13:1, 7) Atako bazalaki kokɔta na makambo ya politiki te, bazalaki kozwa bolamu na misala oyo baguvɛrnema ezalaki kosala. Bazalaki mpe kosalela mibeko mpo na kozwa libateli.—Misala 25:10, 11; Bafilipi 1:7.
Bakristo basengeli kokɔta na makambo ya politiki lelo oyo?
Biblia emonisi polele ete, ezala Yesu to bayekoli ya siɛklɛ ya liboso, bakɔtaki na makambo ya politiki te. Yango wana, biso Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, lokola tozali bakristo, tokɔtaka na makambo ya politiki ata moke te. Ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, tosalaka mosala oyo Yesu atindaki biso tósala: kosakola “nsango malamu ya Bokonzi.”—Matai 24:14.
a Ntango Yesu aboyaki, alobaki te ete Satana azali na bokonzi te ya kopesa ye makonzi yango. Bambula na nsima, Yesu alobaki ete Satana azali “mokonzi ya mokili oyo.”—Yoane 14:30