Nzambe apesaki mibeko etali bopɛto liboso ete bato ya siansi báyeba yango
Mwa moke liboso bana ya Yisraele bákota na Mokili ya Ndaka, esali siɛklɛ soki 35 sikoyo, Nzambe ayebisaki bango ete akobatela bango na ‘maladi mabe’ ya Ezipito oyo bayebaki. (Kolimbola Mibeko 7:15) Asalaki yango na ndenge apesaki mibeko etali bopɛto mpe ndenge ya komibatela na maladi mpe kopekisa yango epalangana. Na ndakisa:
Na mibeko apesaki bango alobaki basukolaka nzoto mpe bilamba na bango.—Balevi 15:4-27.
Mpo na nyɛi, Nzambe alobaki: “Mpe osengeli kozala na esika ya nkuku na libándá ya kaa, mpe osengeli kokende kuna. Mpe osengeli kozala na piké na kati ya bisaleli na yo, mpe ekosalema mpenza boye: ntango okosundama libándá, osengeli kotimola na yango libulu mpe kobaluka mpe kozipa nyɛi na yo.”—Kolimbola Mibeko 23:12, 13.
Moto oyo azalaki na maladi oyo epalanganaka azalaki kotyama mosika na bato mpo na mwa ntango. Liboso moto yango azonga ndako na ye, asengelaki kosukola bilamba mpe nzoto na ye na mai; na ndenge yango bazalaki kokóma “pɛto.”—Balevi 14:8, 9.
Moto nyonso oyo asimbi ebembe asengelaki kotyama mosika na bato.—Balevi 5:2, 3; Mitángo 19:16.
Banda kala, mibeko ya Bayisraele ezalaki komonisa makanisi ya monganga mpe bopɛto.
Bisika mosusu, likambo ya bopɛto ezalaki na ntina te. Na ndakisa:
Bazalaki kotika bosoto na babalabala. Mai ya salite, biloko ebebisamá mpe bosoto nde ememelaka bato maladi mpe esalaka ete babebe mingi bákufa.
Minganga ya kala bayebaki makambo etali mikrobe. Baezipito bazalaki kosalela “bankisi” lokola makila ya miselekete, nyɛi ya ndɛkɛ, mpoko ekufá, masuba, mpe limpa ebebá. Bazalaki kosalela mpe mingi nyɛi ya bato to ya banyama na bankisi na bango.
Baezipito ya kala bazwaki maladi mingi na bamikrobe oyo ezalaki na mai ya Ebale Nile mpe baterase na yango. Ndenge moko mpe, na Ezipito bana mingi bakufaki na pulupulu mpe maladi mosusu ya libumu oyo eutaka na bilei oyo ebebisami.
Nzokande, Bayisraele bazwaki bolamu mpe bazalaki na nzoto malamu koleka bato ya bikólo mosusu mpo batosaki mibeko ya Nzambe.