Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Vadim Kutsenko ná mwasi na ye, Ekaterina, na 2018

18/2/2020
RUSSIE

Russie: Bapolisi ya Tchita banyokoli ndeko Vadim Kutsenko

Russie: Bapolisi ya Tchita banyokoli ndeko Vadim Kutsenko

Na mokolo ya 10/02/2020, na butu makasi mpenza, bapolisi ya Tchita, na Russie, banyokolaki Motatoli ya Yehova moko nkombo na ye Vadim Kutsenko. Bapolisi yango babɛtaki ndeko Kutsenko mbala na mbala, bafini ye nkingo mbala na mbala, mpe bazalaki kotya ye nsinga ya kura na libumu mpe na makolo. Ntango bazali konyokola ndeko Kutsenko ndenge wana, bazali koloba na ye afunda Batatoli ya Yehova mosusu.

Na ntɔngɔ makasi ya mokolo yango, bapolisi ya Russie (Service fédéral de sécurité to FSB) bakɔtaki na bandako ya Batatoli ya Yehova soki 40 oyo bafandaka na Tchita, bakɔtaki mpe na ndako ya ndeko Kutsenko. Na ngonga ya 23, bapolisi yango bakangaki ndeko Kutsenko na ndako ya mama ya mwasi na ye. Batyaki ye minyɔlɔlɔ na mabɔkɔ, bazipi ye elongi, bakɔti na ye na zamba moko oyo ezalaki pene wana epai bakendaki konyokola ye. Atako banyokolaki ndeko Kutsenko ndenge wana, aboyaki kofunda Batatoli mosusu. Ntango bato yango bamonaki ete mayele na bango ya konyokola ndeko esimbi te, bakendaki na ye epai ya bapolisi mpo bátuna ye malamumalamu.

Na nsima batyaki ndeko Kutsenko na bolɔkɔ mpo na mwa ntango, ye na bandeko mosusu misato oyo bakangamaki ntango bapolisi bakɔtaki na bandako ya bandeko na Tchita, ezali ndeko Sergey Kirilyuk, Pavel Mamalimov, ná Vladimir Yermolayev.

Nsima ya mikolo mibale, Tribinale ya etúká ya Ingodinskiy batyaki bandeko Kutsenko, Kirilyuk, ná Mamalimov na bolɔkɔ mikolo misato. Na nsima, tribinale ebimisaki ndeko Yermolayev mpe bazongisaki ye na ndako na ye kasi asengeli kobima na libándá te.

Na mokolo ya 15/02/2020, bapolisi oyo bazalaki kotuna bango mituna batikaki ndeko Vadim Kutsenko ná bandeko mosusu mibale bázonga epai na bango mpo bamonaki mabe moko te oyo basalaki. Bapolisi yango batikaki bandeko bákende, basambisaki bango te, batyelaki bango mpe epekiseli ata moko te.

Tozali kobondela ete ndeko Kutsenko ná bandeko mosusu na Russie bákoba kozala “na mpiko mpe na makasi,” bátyela Yehova motema mobimba ete akokoba kosunga bango na komekama na bango.​—Yosua 1:7, 9.