Watch Tower Bible and Tract Society ezali nini?
Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania ezali ebongiseli moko oyo esalaka mombongo te, oyo esalemaki na 1884 na kolanda mibeko ya Commonwealth of Pennsylvania, na États-Unis. Ezali ebongiseli oyo Batatoli ya Yehova basalelaka mpo na kotambwisa mosala na bango na mokili mobimba, na ndakisa mosala ya kobimisa Babiblia mpe mikanda na bango.
Mokanda oyo emonisi ntina na yango elobi ete ezali ebongiseli ya “losambo, koteya mpe kosunga bato,” mingimingi “kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo mokonzi na yango ezali Yesu Kristo.” Moto akoki kokóma mosangani ya ebongiseli yango kaka soki abengisami, mpe elandaka te makabo boni moto azali kopesa. Basangani ya ebongiseli yango mpe bakambi na yango basungaka bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.
Bibongiseli mosusu oyo endimami na Leta
Longola Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, Batatoli ya Yehova basalelaka bibongiseli ebele oyo endimami na Leta na bikólo ndenge na ndenge. Na nkombo ya bibongiseli yango mosusu, okokuta maloba “Watch Tower,” “Watchtower,” to babongolaka maloba yango.
Bibongiseli yango oyo endimami na Leta esalisi na makambo mingi mpenza, na ndakisa:
Kokoma mpe kobimisa mikanda. Tobimisá mwa Babiblia milio soki 220 mpe mikanda na biso miliare soki 40. Mikanda na biso ezali sikoyo na minɔkɔ koleka 900. Site jw.org ezali kosalisa bato batánga Biblia ofele na Internet na minɔkɔ koleka 160 mpe bázwa biyano na mituna lokola “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?”
Koteya. Tozali na biteyelo ndenge na ndenge ya makambo ya Biblia. Na ndakisa, banda na 1943, Batatoli ya Yehova koleka 9 000 basili koyekola makambo ebele ya Biblia na Gileade, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia; esalisi bango bákóma bamisionɛrɛ to mpe báfandisa mosala na biso na mokili mobimba. Longola yango, pɔsɔ na pɔsɔ, ebele ya bato, ata mpe baoyo bazali Batatoli ya Yehova te, balandaka mateya na makita oyo esalemaka na masangá na biso nyonso. Bakelasi mosusu ezalaka mpo na koteya bato kotánga mpe kokoma mpe mpo na yango, tosili kobimisa mwa buku moko na minɔkɔ 120.
Kosunga. Topesaka lisungi na baoyo bakutani na makama, ezala oyo bato babimisi, na ndakisa na 1994 ntango Bahutu ná Batutsi babomanaki na Rwanda, ezala makama oyo ebimaka yango moko, na ndakisa ntango koningana ya mabele esalemaki na ekólo Haïti na 2010.
Ata soki tozali kosala makambo ebele na nzela ya bibongiseli na biso oyo endimami na Leta, moko te kati na yango esimbi mosala na biso. Mokristo mokomoko azali na mokumba ya kokokisa mosala oyo Nzambe apesá biso ya kosakola mpe koteya nsango malamu. (Matai 24:14; 28:19, 20) Tondimaka ete Nzambe nde asimbi mosala na biso mpe ete akokoba “kokolisa” yango.—1 Bakorinti 3:6, 7.