Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Kobima 20:12​—“Kumisá tata na yo mpe mama na yo”

Kobima 20:12​—“Kumisá tata na yo mpe mama na yo”

 “Kumisá tata na yo mpe mama na yo mpo bomoi na yo ezala molai na mabele oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.”​—Kobima 20:12, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Tosa tata ná mama na yo, ózala na bomoi molai na mboka oyo ngai Yawe Nzambe na yo napesi yo.”​—Kobima 20:12, Bible na lingala ya lelo.

Ndenge Kobima 20:12 elimbolami

 Nzambe apesaki Bayisraele ya kala mobeko ya kotosa baboti na bango. Ntango Nzambe abakisaki elaka na mobeko yango, apesaki bango ntina mosusu oyo basengelaki kotosa yango. Atako bakristo basengeli te kotosa Mibeko ya Moize, elingi koloba Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele, mitinda na yango ebongwani soki moko te. Mitinda yango oyo euti na Mibeko ya Nzambe, ezali mpe kosalelama tii lelo. Yango wana, ezali mpenza na ntina mpo na bakristo.​—Bakolose 3:20.

 Bana, ezala bilenge to mikóló batosaka baboti na bango ntango bamemyaka mpe bakumisaka bango. (Balevi 19:3; Masese 1:8) Ata ntango bana bakoli mpe bakómi na mabota na bango, bakobaka kokokisa bamposa ya baboti na bango. Na ndakisa, bamindimisaka ete baboti na bango bazali malamu lokola bakómi mibange, ata mpe kopesa bango lisungi ya mbongo ntango esengeli.​—Matai 15:4-6; 1 Timote 5:4, 8.

 Yebá ete bana ya Bayisraele basengelaki kotosa tata na bango mpe mama na bango, yango ezalaki kokundwela bango mokumba monene oyo mama azalaki na yango na libota. (Masese 6:20; 19:26) Lelo oyo mpe bana basengeli kotosa baboti na bango.

 Mobeko ya kotosa baboti ezalaki na bandelo. Bana ya Bayisraele basengelaki te kotosa baboti na bango, to moto mosusu nyonso, soki kosala yango ekobuka mobeko ya Nzambe. (Kolimbola Mibeko 13:6-8) Ndenge moko mpe lelo oyo, bakristo ‘batosaka Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.’​—Misala 5:29.

 Na Mibeko oyo Nzambe apesaki Yisraele, alakaki ete bana oyo bakotosa baboti na bango bakozala na bomoi ‘molai mpe makambo na bango . . . ekotambola malamu’ na mabele oyo Nzambe akopesa bango. (Kolimbola Mibeko 5:16) Basengelaki kozwa te etumbu oyo bazalaki kopesa bana oyo bazalaki kotosa te mobeko wana ya Nzambe mpe kotombokela baboti na bango. (Kolimbola Mibeko 21:18-21) Mitinda oyo euti na mobeko yango ebongwani te ata soki ntango eleki mingi. (Baefese 6:1-3) Ezala tozali bilenge to mikóló, tokozongisa monɔkɔ epai ya Mozalisi na biso. Mpo na komona bosolo ya elaka yango, bana oyo batosaka Nzambe mpe baboti na bango bazalaka na bomoi molai. Kutu, bazali na elikya ya bomoi ya seko.​—1 Timote 4:8; 6:18, 19.

Makambo oyo bazali kolobela na Kobima 20:12

 Mobeko oyo ezali na Kobima 20:12 ezali na esika moko ya ntina na kati ya Mibeko Zomi to Maloba Zomi. (Kobima 20:1-17) Mibeko oyo ezali liboso na yango emonisaki Bayisraele mikumba oyo bazalaki na yango epai ya Nzambe, na ndakisa mposa na bango ya kosambela kaka ye. Mibeko oyo elandaki yango emonisaki bango mikumba oyo bazalaki na yango epai ya bazalani na bango, yango esangisaki mibeko oyo esɛngaki kozala sembo epai ya molongani mpe koyiba te. Na yango, mobeko oyo elobi ete “kumisá tata na yo mpe mama na yo” ezalaki lokola gbagba to pont oyo Nzambe atyaki mpo na koyokanisa makambo mibale oyo mibeko ezalaki kosɛnga.

Tángá Kobima mokapo 20 ná maloba na nse ya lokasa, mpe ndimbola ya maloba oyo oyebi malamu te.