MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Kozala na bonkonde ezali mpenza na ntina?
‘Bato bafungolelaka ngai porte te; bongo mpo na nini ngai nafungolela bango?’
‘Koloba “nabondeli yo,” “mersi,” to “matɔndi,” mpe “limbisá ngai” ezali na ntina nini?’
‘Ezali na ntina te namonisa bonkonde epai ya bandeko na ngai. Tozali libota moko.’
Ekoki kokómela yo mpe oloba moko ya makambo wana? Soki ɛɛ, mbala mosusu okozwa matomba te oyo eutaka na komonisa bonkonde!
Makambo oyo osengeli koyeba mpo na bonkonde
Komonisa bonkonde ekoki kobongisa makambo misato oyo elandi:
Lokumu na yo. Makambo oyo osalelaka bato mosusu ekoki komonisa soki ozali moto malamu to moto mabe. Soki omonisaka bonkonde, bato bakomona ete okoli mpe obongi kotyelama motema: bango mpe bakomonisela yo bonkonde! Kasi soki omonisaka bonkonde te, bato bakomona ete olukaka kaka bolamu na yo moko, mpe yango ekoki kozangisa yo mosala to makambo mosusu. Ndenge Biblia elobi yango, “moto ya nko amemelaka nzoto na ye moko mpasi.”—Masese 11:17.
Boyokani na yo na baninga. Biblia elobi ete: “Bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:14) Likambo yango ezali mpe na ntina mingi na boninga. Bato balingaka baoyo bazalaka na bonkonde mpe oyo basalelaka bango makambo ya malamu. Kutu, moto moko te alingaka kozala moninga ya moto ya nko to ya makambo mabe!
Makambo oyo basusu basalelaka yo. Elenge mwasi moko na nkombo Jennifer, alobi boye: “Soki ozali ntango nyonso na bonkonde, nsukansuka ata moto oyo asalelaka yo makambo na nko mpenza akoki kobongwana.” Nzokande soki osalaka makambo na nko, bato mpe bakosalela yo makambo na nko. Biblia elobi: “Bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela.”—Matai 7:2.
Na mokuse: Mokolo na mokolo tokutanaka mpe tosololaka na bato. Bakosalela yo makambo mpe bakotalela yo na kolanda bizaleli oyo omoniselaka bato. Na maloba mosusu, kozala na bonkonde ezali mpenza na ntina!
Ndenge ya komonisa yango
Mitalelá. Omituna mituna lokola oyo: ‘Ntango nasololaka na mikóló, namonisaka limemya? Nazalaka na momesano ya koloba “mersi” to “limbisá ngai”? Ntango nasololaka na basusu, makanisi na ngai ekendaka epai mosusu, na ndakisa natángaka to nakomaka bamesaje na telefone na ngai? Nazalaka na limemya epai ya baboti mpe bandeko na ngai, to namonelaka bango kaka mpo “tozali libota moko”?’
Biblia elobi boye: “Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.”—Baroma 12:10.
Mityelá mikano. Komá makambo misato oyo okoki kobongisa. Na ndakisa, Allison, oyo azali na mbula 15 alobi ete asengeli koyekola “koyokaka basusu na esika ya kolobaka mingi.” David, oyo azali na mbula 19, alobi ete asengeli kosala makasi mpo akomaka bamesaje na telefone na ye te ntango azali kosolola na bato ya libota to baninga na ye. Alobi ete: “Kosala bongo ezali kozanga limemya. Ezali lokola nazali koloba na bango ete nazali na mposa ya kosolola na moto mosusu, kasi na bango te.” Edward, oyo azali na mbula 17, alobi ete asengeli kosala makasi mpo akataka basusu maloba te. Mpe Jennifer, oyo tolobelaki liboso azwi ekateli ya koyekola komonisa bonkonde epai ya mibange. Alobi boye: “Nazalaki kopesa bango kaka mbote mbangumbangu, mpe na nsima nazalaki koyebisa bango ete nasengeli kosala likambo moko na baninga oyo tozali na bango mbula moko. Kasi sikoyo nakosala mpenza makasi mpo nayeba bango malamu. Esalisi ngai mingi mpo nakóma na bizaleli ya malamu!”
Biblia elobi boye: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”—Bafilipi 2:4.
Talá soki ozali kokende liboso. Na boumeli ya sanza moko, kanisá makambo oyo olingi kobongisa, mpe kebá na maloba na yo mpe na makambo oyo ozali kosala. Na nsuka ya sanza, omituna boye: ‘Ndenge nini komonisa bonkonde esalisi ngai nakóma moto malamu? Makambo nini nasengeli lisusu kobongisa?’ Na kotalela biyano oyo okopesa, mityelá mikano mosusu.
Biblia elobi boye: “Kaka ndenge bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.”—Luka 6:31.