Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo nalalaka mingi?

Nasala nini mpo nalalaka mingi?

 Soki ozali kozwa te na matematiki, okoki kokanisa ete esɛngi otánga lisusu mingi. Soki ozali kosala lisano moko malamu mpenza te, okoki kokanisa ete esɛngi omekameka yango mwa mingi lisusu. Mbala mosusu na makambo wana nyonso mibale, ekoki kosɛnga kaka olalaka na ndenge ebongi. Tótala mpo na nini.

 Mpo na nini kolala ezali na ntina?

 Bato ya mayele balobi ete bilenge basengeli kolekisaka ngonga mwambe to zomi ya mpɔngi na butu. Mpo na nini osengeli kolalaka mingi?

  •   Kolala esalaka ete makanisi ezala polele. Babengaka mpɔngi “bilei ya bɔɔngo.” Ekoki kosalisa yo ozwa bapwɛ mingi na kelasi, obɛta lisano malamu mpe okolisa makoki na yo ya kosilisa matata na basusu.

  •   Kolala ebongisaka makanisi mpe ebakiselaka moto esengo. Bato oyo balalaka malamu te bakoki kokóma nkandankanda to kosilika mpambampamba; kokóma mawamawa to kotungisama na makanisi mpe bazalaka na mokakatano ya koyokana na basusu.

  •   Kolala esalaka ete sofɛlɛ azala ekɛngɛ. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na États-Unis emonisaki ete motángo ya basofɛlɛ ya mbula 16 tii 24 oyo bazalaki “na mpɔngi na ntango ya aksida ezalaki mbala mibale koleka” motángo ya basofɛlɛ ya mbula 40 tii 59.

  •   Kolala ebongisaka sante. Kolala esalaka ete nzoto ebatela mpe ebongisa baselile, maboke ya baselile mpe misisa oyo elekisaka makila na nzoto. Kolala malamu ekoki mpe kobatela yo okóma monene koleka te, obɛla maladi ya sukali te mpe osala AVC te.

Kaka ndenge esɛngaka kotya telefone na kura mpo ekoba kosala, osengeli mpe kolala malamu mpo nzoto esala malamu koleka

 Nini epekisaka yo okende kolala?

 Ata soki kolala ezali na matomba oyo tolobeli awa, bilenge mingi balalaka te na ndenge ebongi. Na ndakisa, Elaine, oyo azali na mbula 16; alobi boye:

 “Molakisi na biso atunaki kelasi mobimba ngonga oyo mokomoko akendaka kolala. Mingi balobaki bakendaka kolala na 2:00. Bamosusu balobaki balalaka na 5:00. Kaka moyekoli moko nde alobaki ete alalaka na 21:30.”

 Makambo nini ekoki kopekisa yo okende kolala?

 Baninga. “Ezalaka mpasi te nalala retare mpe nabebisa ntango, mingimingi soki tobimi na baninga na butu.”​—Pamela.

 Mikumba. “Nalingaka mpɔngi, kasi ezalaka mpasi nalala ndenge esengeli mpo nazalaka na makambo mingi ya kosala.”​—Ana.

 Teknoloji. “Telefone na ngai nde esalaka ete nabosana kolala. Ezalaka mpasi naboya kotala yango ntango namati na mbeto.”​—Anisa.

 Okoki kosala nini mpo olalaka mingi?

  •   Luká koyeba soki kolala ezali mpenza na ntina. Biblia elobi: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:6) Kolala ezali na ntina, moto nyonso azali na likoki ya kolala. Soki moto azali kolala te, akosala mosala malamu te; akosala mpe masano te na ndenge esengeli!

  •   Luká koyeba ntina mpenza oyo olalaka te. Na ndakisa, ozalaka elongo na baninga tii na butu makasi? Omonaka ete badevuare ya kelasi mpe misala ya ndako elekaka ndelo? Telefone na yo esalaka ete olala te na ngonga oyo olalaka to elamwisaka yo ntango osí olali?

 Kanisá naino: Ekosɛnga osala mwa makambo mpo olonga mokakatano na yo, kasi milende na yo ekozala ya mpamba te mpo na matomba oyo yango ekobimisa. Masese 21:5 elobi: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.”

 Toboyi te, makambo oyo ekoki kosalisa moto moko alalaka mingi ekoki kosimba te epai ya moto mosusu. Na ndakisa, bamosusu balobaka ete kolala mwa moke na mokolo esalisaka bango bálala malamu na butu. Kasi bamosusu balobi ete soki basali bongo, balalaka malamu te na butu. Luká koyeba nini esimbaka mpo na yo. Makanisi oyo elandi ekoki kosalisa:

  •   Zwá ntango ya kopema. Soki ozwi ntango ya kopema liboso ngonga ya kokende kolala ekoka, na ntembe okozwa mpɔngi noki.

     “Ezali malamu kosilisa misala mpe mikumba mosusu liboso mpo omitungisa mpo na yango te na ntango ya kolala.”​—Maria.

  •   Kanisá oyo okosala. Na esika otika makambo oyo ozali na yango ekonza yo, bongisá programɛ na yo mpo olalaka na ndenge esengeli.

     “Esɛngi nalalaka ngonga mwambe butu nyonso. Na yango, soki ekosɛnga nalamuka ntɔngɔ makasi koleka, natalaka soki ekosɛnga nakende kolala na ngonga nini.”​—Vincent.

  •   Salá nyonso olalaka na ngonga moko. Nzoto ekobanda kolamwisa yo na ngonga oyo otye, kasi kaka soki omesenisi yango. Bato ya mayele balobi ete ebongi okendaka kolala mpe olamukaka mikolo nyonso na ngonga moko wana. Meká kosala bongo sanza mobimba mpe okomona ndenge okomiyoka malamu.

     “Soki ozali kokende kolala kaka na ngonga moko wana butu nyonso, bɔɔngɔ na yo ekozwa makasi mokolo oyo elandi. Yango ekosalisa yo osala malamu mosala nyonso oyo okosala.”​—Jared.

  •   Kolekisa ndelo te na likambo etali kozwa mwa mopɛpɛ na baninga. Biblia elobi ‘tólekisaka ndelo te na bizaleli na biso’ mpe yango esangisi makambo oyo osalaka na ntango na yo ya kozwa mwa mopɛpɛ.​—1 Timote 3:2, 11.

     “Esɛngaki nayeba kotya bandelo na makambo oyo nasalaka mpo na kozwa mwa mopɛpɛ na butu. Soki natye te ngonga oyo nakokata kominanola, nakozala na mokakatano na likambo moko, mpe mingimingi ezalaki mpɔngi na ngai!”​—Rebecca.

  •   Tiká telefone na yo mpe “elala!” Ngonga soki moko liboso ya kokende kolala, tɛmɛlá makanisi ya kokɔta na Internet to kotindela baninga na yo bamesaje na butu makasi. Kutu, bato mosusu ya mayele balobi ete lolenge ya pole oyo telefone, TV to tablɛti ebimisaka, esalaka ete ezala mpasi kozwa mpɔngi.

     “Bato bakolinga ozala wana mpo na bango ngonga nyonso. Kasi mpo olala mpenza, osengeli kokanga telefone na yo.”​—Julissa.