MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Nasala nini mpo nalyaka na ndenge ebongi?
Na ntembe te, oyebi ete kolya na ndenge ebongi te ekoki kobebisa sante na yo. Soki olyaka bilei oyo etongaka nzoto te ntango ozali elenge, okokoba mpe bongo ntango okokóma mokóló, yango wana ezali malamu ozala na momeseno ya kolya na ndenge ebongi banda sikoyo.
Kolya na ndenge ebongi elakisi nini?
Biblia elobi tózala bato oyo “balekisaka ndelo te na bizaleli na bango,” yango esɛngi mpe kozala na momeseno malamu ya kolya. (1 Timote 3:11) Na kotalela toli yango, ezali malamu koyeba ete . . .
Kolya na ndenge ebongi esɛngi kolya lolenge nyonso ya bilei. Lolenge mitano ya bilei esangisi bilei oyo esalemi na miliki, baproteini, bambuma, bandunda mpe ba-céréale. Bato mosusu batikaka kolya bilei yango mosusu mpo bakanisaka ete ekosalisa bango bákitisa kilo. Kasi kosala bongo ekoki kozangisa nzoto na yo bavitamini oyo esengeli na yango.
Meká kosala boye: Salá bolukiluki to kende epai ya monganga mpo oyeba matomba oyo bilei mosusu ezalaka na yango. Na ndakisa:
Lolenge moko boye ya sukali oyo babengaka yango Hydrates de carbone ekoki kopesa yo makasi. Baproteini ekoki kosalisa nzoto na yo ebundisa mikrobe mpe ebongisa baselile. Mafuta mosusu; soki moto alye yango kozanga kolekisa ndelo ekoki kokitisa likama ya kobɛla maladi ya motema mpe kopesa moto makasi mingi na nzoto.
“Namekaka kolya bilei ya lolenge nyonso kozanga kolekisa ndelo. Namonaka mpe ete ezali mabe te kolya bɔmbɔ to bisikiti na bantango mosusu. Kasi moto asengeli te kolya kaka yango. Koboya kolekisa ndelo ezali mobeko oyo ebongi kolanda.”—Brenda.
Kolya na ndenge ebongi epekisaka moto alekisa ndelo. Yango ekoki kozala kolya moke mpenza, koboya kolya bongo na nsima olya ebele ya bilei to koboya kolya eloko moko oyo olingaka mpenza.
Meká kosala boye: Tyá likebi na bilei oyo ozali kolya na boumeli ya sanza mobimba. Mbala boni okweaka na moko ya mimeseno oyo tolobeli awa likoló? Momeseno nini okoki kotika mpo olyaka na ndenge ebongi?
“Nazalaki na mikolo oyo nalyaka koleka ndelo bilei oyo epesaka nzoto makasi mpe mikolo mosusu oyo nazalaki kotya yango ata moke te na monɔkɔ. Nsukansuka, nazwaki ekateli ya kotika momeseno yango, kokeba ete nalya koleka ndelo te mpe natika kolya soki natɔndi. Ezwaki ngai ntango, kasi sikoyo nalyaka na ndenge ebongi.”—Hailey.
Nasala nini mpo nalyaka kaka na ndenge ebongi?
Kanisá liboso. Biblia elobi: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.” (Masese 21:5) Mpo okóma na momeseno ya kolyaka bilei oyo etongaka nzoto, osengeli kokanisa liboso.
“Esɛngaka komibongisa mpo na kolya bilei oyo etongaka nzoto mpe mbala mingi yango esɛngaka olamba bilei yango yo moko. Kasi kosala bongo ezali mosala ya mpunda te, mpo ekoki kosalisa yo obatela mbongo.”—Thomas.
Tiká kolya bilei oyo etongaka nzoto te. Biblia elobi: “Batelá bwanya.” (Masese 3:21) Bwanya ekosalisa yo okanisa lolenge ekeseni ya kolya bilei oyo etongaka nzoto mpe okóma na momeseno malamu ya kolyaka bilei yango.
“Mokolo na mokolo, nakómaki kolongola bilei oyo etongaka nzoto te mpe na esika na yango nakómaki kolya oyo etongaka nzoto. Na ndakisa, na esika nalya bɔmbɔ, nakómaki nde kolya pɔme. Na boumeli ya ntango mokuse, nakómaki kolongola bilei oyo etongaka nzoto te mpe kolya bilei oyo etongaka nzoto!”—Kia.
Kolekisa ndelo te. Biblia elobi: “Lyá bilei na yo na esengo.” (Mosakoli 9:7) Kolya na ndenge ebongi esengeli te kolongola yo esengo ya kolya, esɛngi mpe te ete omitungisa mpo na eloko nyonso oyo ozali kolya. Ata soki esɛngi okitisa kilo ya nzoto, kobosana te ete mokano na yo ezali ozala nzoto kolɔngɔnɔ. Kolekisa ndelo te na oyo olingi mpo na nzoto na yo.
“Nauti kokitisa kilo soki 14 mobimba, ata bongo namibomaki na nzala te, natikaki te kolya lolenge mosusu ya bilei to koboya kolya bambuma mpe bongo na bongo. Namonaki ete kokitisa kilo ekozwa ntango mpe ete nasengelaki kotika bilyalya.”—Melanie.