MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Ndenge nini nakoki kotika komitungisa?
Nini etungisaka yo?
Talá soki yo mpe omiyokaka lokola bilenge oyo:
“Mbala mingi namitunaka: ‘Bongo soki . . . ?’ ‘Bongo soki tosali aksida na motuka?’ ‘Bongo soki aviɔ na biso epanzani na likoló?’ ‘Namitungisaka mpo na makambo oyo moto ya mayele mpenza akoki komitungisa mpo na yango te.”—Charles.
“Namitungisaka ntango nyonso, lokola moto azali kobaluka kaka esika moko, azali kokende liboso te. Nabomaka nzoto, kasi nazwaka mpenza eloko te!”—Anna.
“Ntango bato bayebisaka ngai ete ezali malamu ndenge nakendaka kelasi, nalobaka na nse ya motema ete, ‘Bayebi motungisi ya kokende kelasi te!’”—Daniel.
“Nazalaka kaka na makambo ebele ya kosala. Nakanisaka mingi makambo oyo ekosalema to oyo nasengeli kosala.”—Laura.
Likambo ya solo: Tozali na eleko oyo Biblia ebengi “ntango ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Na yango, ata bilenge mpe bakoki kozala na mitungisi, kaka lokola mikóló.
Komitungisa ezalaka ntango nyonso mabe?
Te. Kutu, Biblia elobi ete ebongi bato bámitungisa mpo na kosepelisa bato oyo balingaka.—1 Bakorinti 7:32-34; 2 Bakorinti 11:28.
Lisusu yebá likambo oyo: komitungisa ekoki kotinda yo osalaka makambo ya malamu. Na ndakisa, kanisá ete okosala ekzamɛ moko na kelasi na pɔsɔ oyo ezali koya. Komitungisa ekoki kotinda yo otánga malamu pɔsɔ oyo mpe yango ekoki kosalisa yo ozwa na ekzamɛ yango!
Komitungisa mosusu ekoki mpe kobatela yo na likama. Elenge mwasi moko na nkombo Serena alobi boye: “Okoki kobanda komitungisa mpo oyebi ete ozali kosala makambo ya mabe mpe ete osengeli kobongisa makambo mpo lisosoli na yo efanda kimya.—Talá mpe Yakobo 5:14.
Likambo ya solo: Komitungisa ekoki kosalisa yo, soki ezali kotinda yo osala makambo ya malamu.
Kasi okoki kosala nini soki komitungisa ekangi yo na motambo mpe okómi kaka na makanisi ya mabe?
Ndakisa: Richard oyo azali na mbula 19 alobi boye: “Nakómaka kobanga soki nakanisi ndenge likambo moko oyo ezali kotungisa ngai ekosuka. Nakómaka kokanisakanisa likambo yango tii nsɔmɔ ekolata ngai.”
Biblia elobi: “Motema ya kimya ezali bomoi ya nzoto.” (Masese 14:30) Nzokande, komitungisa ekoki kobimisa bamaladi na nzoto, na ndakisa motó mpasi, kizunguzungu, estoma, mpe motema likolólikoló.
Okoki kosala nini soki mitungisi ekómi nde konyokola yo na esika esalisa yo?
Oyo okoki kosala
Omituna: nazali mpenza na ntina ya komitungisa boye? “Kokanisa mikumba oyo osengeli kokokisa ezali mabe te; kasi komitungisa mingi mpo na yango ezali likambo mosusu. Etindaka ngai nakanisa lisese oyo elobi: Mitungisi ezali lokola kiti ya kodiembela. Ekopesa yo mosala, kasi ekomema yo epai te.”—Katherine.
Biblia elobi: “Nani na kati na bino soki amitungisi akoki kobakisa bolai ya bomoi na ye ata moke?”—Matai 6:27.
Yango elimboli: Malamu komitungisa esalisa yo osilisa likambo oyo ozali na yango, soki te ekobakisela yo mikakatano, to kutu ekokóma mokakatano.
Komema makambo ya lelo lobi te. “Kanisá naino. Likambo oyo ezali kotungisa yo ekozala mpe na ntina ata lobi? ata nsima ya sanza mobimba? mbula mobimba? to mbula mitano?”—Anthony.
Biblia elobi: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.”—Matai 6:34.
Yango elimboli: Ezali na ntina te komitungisa mpo na makambo ya lobi; mbala mosusu ekosalema te.
Yekolá kondima makambo oyo okoki kobongola te. “Ezali na ntina mingi komibongisa malamu liboso. Kasi, osengeli mpe kondima ete ezali na makambo mosusu oyo okokoka kolongola te.”—Robert.
Biblia elobi: “Ezali te bato ya mbangu mingi nde balongaka na momekano ya kopota mbangu, . . . mpe ezali kutu te bato oyo bazali na boyebi nde bandimamaka, mpamba te ntango ná makambo ekanami te ekwelaka bango nyonso.”—Mosakoli 9:11.
Yango elimboli: Ezali na makambo mosusu oyo okoki kobongola te, kasi okoki kobongola lolenge oyo ozali kotalela yango.
Yekolá kolekisa makambo. “Namoni ete nasengeli te kolandelaka makambo nyonso ya mikemike. Nasengeli koyeba makambo oyo eleki ntina mpe komipesa na yango.”—Alexis.
Biblia elobi: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”—Bafilipi 1:10.
Yango elimboli: Mbala mingi bato oyo balekisaka makambo, bamitungisaka koleka ndelo te.
Sololá na moto. “Ntango nazalaki na mbula 11, soki nazongi ndako nsima ya kelasi, nazalaki komitungisa mingi, mpe kobanga kokende lisusu kelasi lobi. Papa ná mama bazalaki koyoka ngai malamu ntango nazalaki koyebisa bango mitungisi na ngai. Nazalaki kosepela na bango. Nakokaki kotyela bango motema mpe kosolola na bango polele. Yango ezalaki kosalisa ngai nabanga te kokende kelasi mokolo elandi.”—Marilyn.
Biblia elobi: “Motungisi na kati ya motema ya moto yango nde etindaka motema na ye egumbama, kasi liloba ya malamu esepelisaka yango.”—Masese 12:25.
Yango elimboli: Papa, mama, to moninga moko akoki kopesa yo toli oyo ekosalisa yo otika komitungisa.
Bondelá. “Kobondela, kosala yango na mongongo makasi esalisaka ngai. Esalisaka ngai nabimisa mitungisi na ngai na maloba na esika ya kobomba yango na motema. Esalisaka ngai mpe nayeba ete Yehova azali makasi koleka mitungisi na ngai.”—Laura.
Biblia elobi: ‘Bóbwakela [Nzambe] mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.’—1 Petro 5:7.
Yango elimboli: Kobondela ezali te nzela ya kosilisa mitungisi na yo yo moko. Ezali nde kosolola na Yehova Nzambe, ye oyo alaki ete: “Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo, nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza.”—Yisaya 41:10.