LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA
Nini ekoki kokómela bana soki baboti babomi libala?
Babalani mosusu bamonaka ete ekosimba te báfanda esika moko, solisyo ezali kaka ya koboma libala mpe bakanisaka ete ekozala malamu mpo na bana na esika ya kozala na baboti oyo bayokanaka te. Kasi bolukiluki emonisi nini na likambo yango?
Makambo nini ekoki kokómela bana soki baboti babomi libala?
Bolukiluki emonisi ete bana banyokwama mingi ntango baboti babomi libala. Bana oyo baboti babomi libala bakoki kokutana na makambo lokola:
kozala nkandandaka, komitungisa mpe konyokwana na makanisi
kozala na bizaleli ya mabe
kokutana na mikakatano na kelasi to kosundola kelasi
kobɛla mpambampamba
Longola yango, bana mingi bakómaka komipesa foti mpe bakanisaka ete bango nde basalaki ete papa ná mama báboma libala to bakokaki kopekisa bango báboma libala.
Mikakatano ya bana oyo baboti babomá libala ekoki kokoba tii ntango bakokóma mikóló. Mpe ntango bakómi mikóló, bakoki komimona ntina te mpe koboya kotyela basusu motema. Lisusu, soki bakutani na mikakatano na libala bango bakoki mpe koboma libala na bango.
Na mokuse: Atako bato mingi bamonaka ete koboma libala ekozala malamu mpo na bana, kasi bolukiluki emonisi ete likanisi wana ezali solo te. Penelope Leach, moto moko ya mayele na makambo ya kobatela bana akomi boye: “Soki baboti babomi libala, yango esalaka ete bana bázala mawamawa.” a
Toli ya Biblia: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”—Bafilipi 2:4.
Bana na ngai bakozala na esengo soki nabomi libala?
Bato mosusu bakoki kondima: Ɛɛ. Kasi kobosana te mbala mingi bamposa ya baboti ezalaka ndenge moko te na oyo ya bana. Moto oyo alingaka koboma libala azalaka na mposa ya bomoi ya sika. Kasi mbala mingi mwana alingaka kokangama na bomoi oyo azali na yango, epai papa ná mama bafandi esika moko.
Nsima ya kotalela malamumalamu bankóto ya mabala oyo ekufá, talá makambo oyo bankolo buku The Unexpected Legacy of Divorce bakomaki: “Likambo ya ntina oyo ezali polele yango oyo: bana balobaka te ete bazali na esengo. Kutu, balobaka polele boye: ‘Mokolo oyo papa ná mama babomaki libala, namonaki ete nasundolami.’” Buku yango ebakisi ete bamonaka ete mokili “ezali te esika ya komibatela mpo na bango, kasi ezali nde esika ya likama mpenza, mpamba te bakoki te kotya motema na boyokani oyo esangisi bato mibale oyo balinganaka makasi.”
Na mokuse: Mbala mingi emonani ete bana bazalaka na esengo te soki baboti na bango babomi libala.
Toli ya Biblia: “Elimo oyo elɛmbi ekaukisaka mikuwa.”—Masese 17:22.
Nasengeli koyeba nini mpo na kobɔkɔla bana soki tokabwani to tobomi libala?
Baboti mosusu oyo babomá libala bamekaka kokabola mikumba ya kobɔkɔla bana lokola nde bazali kaka mwasi ná mobali. Kasi, kobɔkɔla bana ndenge wana ebimisaka mikakatano. Bolukiluki emonisi ete mbala mingi baboti oyo babomá libala:
balekisaka ntango moke elongo na bana na bango
bateyaka bana bizaleli oyo ekeseni na moko ná mosusu
batikaka bana básala oyo balingi mpo baboti bamipesaka foti to bazalaka ya kolɛmba
Mwana oyo baboti babomá libala akoki mpe kobanda koboya bokonzi ya baboti na ye. Lokola baboti baboyi kotosa elako oyo basalaki to babebisi konfianse oyo bazalaki na yango, akoki koloba boye: ‘Nazali komona te ntina ya kotosa bango!’
Na mokuse: Ezalaka mpasi mpo baboti oyo babomá libala bábɔkɔla bana elongo. Kasi mpo na bana, likambo yango ezalaka lisusu mpasi mingi.
Toli ya Biblia: “Bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.”—Bakolose 3:21.
Ezali na solisyo ya malamu koleka?
Nsima ya koboma libala, esɛngaka kosala milende mingi mpo moto azongela bomoi oyo azalaki na yango liboso. Mbala mingi, eleki malamu kosala milende ya ndenge wana mpo na kobatela libala. Buku moko The Case for Marriage elobi boye: “Esengeli te kokanisa ete lokola libala ezali kosimba te, ekotikala kosimba te to ekobonga lisusu te. Wana mikolo ezali koleka, mabala mingi ya babalani oyo bayikaka mpiko esika moko, oyo ezalaki na esengo te, ebongaki mpe ekómaki mabala ya esengo.” Mbala mingi, bana bamiyokaka malamu ntango baboti bazali kofanda esika moko.
Yango elingi koloba te ete koboma libala ekoki soki moke te kosalema. Kutu, Biblia epesi nzela koboma libala soki ekobo to pite esalemi. (Matai 19:9) Nzokande, Biblia elobi mpe ete “moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” (Masese 14:15) Basi ná mibali oyo bazali na matata na mabala na bango basengeli kotalela makambo wana nyonso, ezala mpe makambo oyo ekokómela bana soki babomi libala.
Na ntembe te, esengeli te kokangela mikakatano motema kozanga kosala eloko. Biblia epesi toli ya malamu mpo na kosalisa basi ná mibali bákolisa bizaleli oyo basengeli na yango mpo na koyika mpiko mpe kozala na libota ya esengo. Yango ezali kokamwisa te, mpamba te Mobandisi ya Biblia, Yehova, nde atyaki ebongiseli ya libala.—Matai 19:4-6.
Toli ya Biblia: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko.”—Yisaya 48:17.
a Euti na buku Your Growing Child—From Babyhood Through Adolescence.