Babilone Monene ezali nini?
Eyano ya Biblia
Babilone Monene, oyo mokanda ya Emoniseli elobeli, ezali lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba oyo Nzambe aboyi. a (Emoniseli 14:8; 17:5; 18:21) Atako mangomba wana ekeseni na makambo mingi, yango nyonso ememaka bato mosika ya losambo ya Nzambe ya solo, Yehova.—Kolimbola Mibeko 4:35.
Ndenge ya koyeba Babilone Monene
Babilone Monene ezali elilingi. Biblia emonisi yango lokola “mwasi,” “mwasi ya ndumba monene” oyo azali na nkombo moko oyo ezali ‘libombami: “Babilone Monene.”’ (Emoniseli 17:1, 3, 5) Lokola mokanda ya Emoniseli elobelami “na bilembo,” ebongi koloba ete Babilone Monene ezali elilingi, kasi te mwasi ya solo. (Emoniseli 1:1) Lisusu, “afandi na mai mingi,” oyo ezali komonisa “bato ya mikili mpe ebele ya bato mpe bikólo mpe minɔkɔ.” (Emoniseli 17:1, 15) Mwasi ya solo akoki kosala bongo te.
Babilone Monene ezali ebongiseli ya mokili mobimba. Ebengami “engumba . . . monene oyo ezali na bokonzi likoló ya bakonzi ya mabele.” (Emoniseli 17:18) Na yango, ezali kotambwisa makambo na mokili mobimba.
Babilone Monene ezali ebongiseli ya losambo, kasi ya politiki to ya mombongo te. Babilone ya kala ezalaki engumba oyo etondaki na makambo ya losambo, eyebanaki mpo na misala na yango ya “bondɔki” mpe ya “bonganga-nkisi.” (Yisaya 47:1, 12, 13; Yirimia 50:1, 2, 38) Kutu, losambo ya lokuta oyo etɛmɛlaka Nzambe ya solo, Yehova, ezalaki kosalema kuna. (Ebandeli 10:8, 9; 11:2-4, 8) Na lolendo nyonso bakonzi ya Babilone bamonaki ete bazali na valɛrɛ mingi koleka Yehova mpe ya losambo na ye. (Yisaya 14:4, 13, 14; Danyele 5:2-4, 23) Ndenge moko mpe, Babilone Monene eyebani mpo na ‘misala na yango ya bilimo mabe.’ Yango emonisi ete ezali lisangá ya mangomba.—Emoniseli 18:23.
Babilone Monene ekoki kozala ebongiseli ya politiki te, mpo “bakonzi ya mabele” bakolela ntango ekobebisama. (Emoniseli 17:1, 2; 18:9) Ekoki mpe kozala ebongiseli ya mombongo te, mpo Biblia ekesenisi yango na “bato ya mombongo na mabele.”—Emoniseli 18:11, 15.
Babilone Monene ebongi mpenza kozala mangomba ya lokuta. Na esika elakisa bato ndenge ya kopusana penepene na Nzambe ya solo, Yehova, mangomba ya lokuta ezali nde kotinda bato básambela banzambe mosusu. Biblia ebengi yango pite ya elimo. (Balevi 20:6; Kobima 34:15, 16) Mateya lokola Bosato mpe oyo elobaka ete molimo ekufaka te, makambo lokola kosambela bikeko ebandaki na Babilone ya kala mpe ezali kokoba na mangomba nyonso ya lokuta. Mangomba yango esangisaka losambo ya Nzambe ná kolinga mokili. Biblia emonisi ete kozanga bosembo ya ndenge wana ezali ekobo ya elimo.—Yakobo 4:4.
Bozwi ya mangomba ya lokuta mpe ndenge elakisaka na lolendo biloko na yango eyokani na ndenge oyo Biblia emonisi Babilone Monene, mwasi moko oyo ‘alati elamba ya motane-bulé mpe ya motane makasi’ mpe “amibongisi nzoto na biloko ya wolo, na mabanga ya ntalo, na mayaka.” (Emoniseli 17:4) Babilone Monene ebimisaka “biloko ya bosɔtɔ ya mabele,” to mateya mpe misala oyo efingisaka Nzambe. (Emoniseli 17:5) Bandimi ya mangomba ya lokuta bazali “bato ya mikili mpe ebele ya bato mpe bikólo mpe minɔkɔ” oyo bapesaka Babilone Monene mabɔkɔ.—Emoniseli 17:15.
Babilone Monene ezali na nyongo ya makila ya “baoyo nyonso babomamaki na mabele.” (Emoniseli 18:24) Banda kala, mangomba ya lokuta ebimisaka bitumba mpe ezali kolendisa misala ya bateroriste; ezali mpe kokoka te koteya bato solo ya Yehova, Nzambe ya bolingo. (1 Yoane 4:8) Yango mpe esali ete makila ya bato ebele koleka etanga. Yango wana, bato oyo balingi kosepelisa Nzambe basengeli ‘kobima kati na yango,’ basengeli kolongwa na mangomba ya lokuta.—Emoniseli 18:4; 2 Bakorinti 6:14-17.
a Talá lisolo “Ndenge nini nakoki koyeba lingomba ya solo?”